Osili komibongisa mpo na maladi ya mbalakaka to likama?
Maladi mosusu to likama ekoki koyela moto mbalakaka. (Yak. 4:14) Yango wana, moto ya mayele alukaka komibongisa liboso. (Mas. 22:3) Osili kopona lolenge ya kosalisa oyo okondima monganga asalela mpo na kobikisa yo, mpe osili kokoma na mokanda ekateli oyo ozwi? Video Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient, eteni ya mibale ya DVD oyo ezali na motó ya likambo Des alternatives à la transfusion—Documentaires, ebimisami mpo na kosalisa yo na likambo yango. Ntango ozali kotala yango, luká kozwa biyano na mituna oyo elandi. Lokola video yango ezali komonisa mpe ndenge bazali kosala bato lipaso, baboti basengeli kokeba ntango bazali kotala yango elongo na bana mike.
(1) Mpo na nini minganga mosusu bakómi kobongola makanisi na likambo ya kozongisa moto makila? (2) Pesá ndakisa ya mapaso misato ya minene oyo basalaki kozanga kozongisa makila. (3) Na mokili mobimba, mpo na nini minganga ebele bazali kondima kosalisa bato to kosala bango lipaso kozanga kozongisa makila? (4) Baankɛtɛ oyo euti kosalema na balopitalo emonisi nini na likambo ya kosalela makila? (5) Makama nini ekoki kokómela moto soki bazongisi ye makila? (6) Minganga mingi balobi nini mpo na matomba ya mayele mosusu oyo basalelaka na esika ya kozongisa moto makila? (7) Nini esalaka ete moto asila makila, mpe nini ekoki kosalema mpo makila emata? (8) Nini ekoki kosalisa nzoto ya moto ebota lisusu ba globules rouges mingi? (9) Mayele nini minganga bazali kosalela mpo moto abima makila mingi te na ntango ya lipaso? (10) Bakoki mpe kosalela mayele oyo esɛngaka kozongisa moto makila te epai ya bana mike, to epai ya bato oyo bazwi likama? (11) Wapi moko ya mibeko ya libosoliboso ya mosala ya monganga, oyo monganga ya malamu asengeli kobosana te?
Lokola kondima to koboya lolenge mosusu ya kosalisa oyo balakisi na video oyo etaleli lisosoli ya moto na moto, kozela te ntango likama ekweli yo bongo obanda kotalela mayele oyo okondima to okoboya básalela mpo na kobikisa yo. Soki otángi mokapo 7 ya buku “Bolingo ya Nzambe” mpe mikanda mosusu epai batindi biso na mokapo yango, mpe lisusu siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006, yango ekosalisa yo oyeba kozwa bikateli ya malamu. Na nsima, soki osilá kozwa batisimo, komá makambo oyo oponi na karte na yo DPA (Instructions médicales/Désignation d’une personne de confiance); osengeli mpe kotambolaka na karte yango ntango nyonso.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Osili kopona lolenge ya kosalisa oyo okondima monganga asalela mpo na kobikisa yo, mpe osili kokoma na mokanda ekateli oyo ozwi?