Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2009
1. (a) Mapamboli nini tokozwa soki tokei liyangani mikolo nyonso misato? (b) Bibongiseli nini tosengeli kozwa banda sikoyo?
1 Biso nyonso tozali kozela na motema likoló liyangani ya etúká ya mobu 2009 mpe libaku ya koyangana lisusu elongo na basambeli mosusu ya Yehova, oyo “bayebi bobola na bango ya elimo.” (Mat. 5:3) Lokola mokolo ya Yehova ezali se kokóma pene, tozali kolendisa mokomoko na bino azala na liyangani yango mikolo nyonso misato, mpo azwa mpenza libaku ya kolekisa ntango elongo na bandeko na biso baklisto, mpe alendisama na elimo mpo atɛlɛma ngwi na kondima. (Sef. 1:14) Tosengeli koyebisa balakisi mpe bapatrɔ na biso ete liyangani ezali eteni ya ntina mingi ya losambo na biso. Na mpiko mpenza, bandá komibongisa libelalibela mpe luká lipamboli ya Yehova; zalá na kondima ete akosalisa yo.—Yis. 50:10.
2. Ata soki tobengisami te na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi, na ndenge nini mayangani ya etúká oyo tokokende ekozala lokola mayangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi?
2 Mayangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi: Lokola mayangani yango ekosalema na bikoló mpe bingumba mingi te, kaka baoyo babengisami nde basengeli kokende na mayangani yango. Soki totosi ebongiseli wana te, bato bakoleka ebele na mayangani yango. (1 Kol. 14:40; Ebe. 13:17) Nzokande, mayangani mingi ya etúká ekosalema lokola mayangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi, mpamba te bamisionɛrɛ mingi, bandeko mingi oyo basalaka na Babetele ya mboka mopaya, mpe bandeko mingi oyo bapesaka mabɔkɔ na misala ya botongi na mboka mopaya, bakozala na mayangani ya etúká na bamboka na bango.
3. Ndenge nini tokoki komonisa bandeko mosusu ya lisangá ete tolingaka bango?
3 Salisá basusu bázala na liyangani: Bandeko mosusu ya lisangá na bino bakozala na mposa ya lisalisi mpo na kokende na liyangani? Soki osalisi bango, okomonisa ete ozali ‘kotya likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na yo moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’—Filp. 2:4.
4-6. (a) Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi bálukela biso esika ya kolala, mpe mpo na nini? (b) Bibongiseli nini esengeli kozwa ntango bandeko basi mpe bandeko mibali basengeli kolala na Ndako ya Bokonzi? (c) Bibongiseli nini tosengeli kozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká? (Talá etanda na lokasa 4.)
4 Bisika ya kolala: Mbala mingi, na engumba oyo liyangani esalemaka, bapaya balalaka na bandako ya bato (bandako ya bandeko), na Bandako ya Bokonzi to epai ya bandeko na bango ya libota. Nsima ya kotalela siplema oyo na Likita ya Mosala, bakotya liste ya bisika nyonso oyo liyangani ya etúká ekosalema na etanda ya mayebisi ya lisangá. Mokomoko na biso asengeli kobondela liboso ya kopona liyangani ya etúká oyo akokende na mobu 2009.
5 Soki olingi bálukela yo esika ya kolala na ndako ya moto (ya ndeko moko), to na Ndako ya Bokonzi, tosɛngi mokomeli ya lisangá asala liboso mpenza liste ya basakoli nyonso oyo bakozala na mposa ya esika ya kolala mpe atinda yango na Departema ya boyambi bapaya, na engumba oyo liyangani ekosalema. Na liste yango, akokoma nkombo ya mosakoli, akomonisa soki azali mwasi to mobali (Mw. to Mob.), mbula na ye, mpe akomonisa baoyo bazali libota moko. Yango ekosalisa bandeko ya Departema ya boyambi bapaya ete bázwa ntango ya koluka bisika ya kolala mpo na bato wana nyonso. Liboso ya kotinda bankombo ya basakoli na Departema ya boyambi bapaya, Komite ya mosala ya lisangá esengeli kotala soki basakoli yango bakokisi masɛngami. Soki bapesi biso esika ya kolala, ekozala malamu te tóluka lisusu kokende kofanda epai ya ndeko mosusu to moninga mosusu. Yango ekopesa mokakatano na bandeko ya Departema ya boyambi bapaya. Kasi, soki mosakoli moko asepeli kofanda epai ya ndeko na ye oyo azali Motatoli te, asengeli te koyebisa mokomeli ya lisangá ete atinda nkombo na ye na Departema ya boyambi bapaya.
6 Tolingi kopesa mwa malako mpo na bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi. Komite ya liyangani ya etúká ekopona nkulutu moko mpo na kotambwisa ebongiseli yango. Bakopesa ye ndeko moko mpo asalisaka ye, mingimingi nkulutu to mpe mosaleli na misala oyo akɔmeli na elimo. Esengeli kokabola Ndako ya Bokonzi na biteni mibale; eteni moko mpo na bandeko basi ná bana na bango ya mike mpe bilenge basi, mpe eteni mosusu mpo na bandeko mibali mpe bilenge mibali. Ndako ya Bokonzi ekozala kaka mpo na kolala. Na moi, ntango bato nyonso bakei na liyangani, bandeko mosusu bakotikala, moto na moto na ngala na ye, mpo na kokɛngɛla biloko ya bandeko ete báyiba yango te. Esengeli kopona bandeko oyo babongi kotyelama motema, baoyo bakɔmeli na elimo, mpo na kokɛngɛla. Moto moko te asengeli kolamba na kati ya Ndako ya Bokonzi. Bakoki kobongisa mwa esika ya kolamba na libándá kaka mpo na eleko ya liyangani. Soki liyangani esili, basengeli kolongola yango. Esengeli ete Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ebongisama malamu, ezala na kati to na libándá. Esengeli kokeba ete ata eloko moko ebeba te. Bandeko basengeli kosala nyonso mpo na komonisa bizaleli ya boklisto, ezala kati na bango to epai ya bato oyo bafandi pembeni ya Ndako ya Bokonzi.—1 Kol. 10:31.
7. Mposa na biso ya liboso esengeli kozala nini ntango tozali komibongisa mpo na kokende na liyangani ya etúká 2009?
7 Misala oyo ekumisaka Nzambe: Soki tozali komonisa mbuma ya elimo na makambo nyonso, kokeba na maloba na biso mpe na bizaleli na biso ntango tozali kokutana na bato na engumba oyo liyangani ekosalema, tobakisaka lokumu oyo basaleli ya Yehova bazali na yango mpe toboyaka kobɛtisa basusu libaku. (1 Kol. 10:31; 2 Kol. 6:3, 4) Salá ete etamboli na yo ekumisa Yehova ndenge wana ntango okokende na liyangani ya etúká 2009!—2 Pet. 2:12.
[Etanda na lokasa 3]
Manaka:
Mwaminei (Kaka mpo na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi)
1:20 nsima ya midi - 4:55 na mpokwa
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:20 na ntɔngɔ - 4:55 na mpokwa
Mwalomingo
9:20 na ntɔngɔ - 4:00 na mpokwa
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká:
◼ Soki okosala mobembo molai mpo na kokende na liyangani, bandá kobomba mbongo ya tike mpo na yo moko mpe libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
◼ Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
◼ Na boumeli ya liyangani, tokokumisa Yehova na etamboli ya malamu mpe na molato ya pɛto mpe oyo ebongisami malamu.—1 Kol. 10:31.
◼ Zwá ekateli ya kotosa malako ya bandeko oyo bayambaka bato mpe ya bandeko mosusu oyo bazwi mokumba ya kosala ete mobulu ezala te. Kokanga bisika ya kofanda te; okoki kokanga bisika kaka mpo na libota na yo to bandeko oyo osali na bango mobembo elongo.
◼ Na ntango ya bopemi, lyá bilei ya pɛpɛlɛ, mpo olanda malamu programɛ ya nsima ya midi. Bilei ya kilo ekoki kopesa yo mpɔngi.—Luka 8:18.
◼ Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya mokolo mokomoko ya liyangani, moto nyonso akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká bapapye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.