Tókabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na mokili mobimba!
1. Kampanye nini ekosalema na mokili mobimba liboso ya Ekaniseli?
1 “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Mpo na kotosa etinda wana ya Yesu, basambeli ya Yehova ná bato oyo basepelaka na solo bakoyangana na mokolo ya 30 Marsi 2010 mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Kobanda mokolo ya 13 tii 30 Marsi, na mokili mobimba, tokosala kampanye ya kokabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli.
2. Tokoki koloba nini ntango topesi moto lokasa ya libyangi?
2 Ndenge ya kokabola yango: Okoki kopesa moto lokasa na mabɔkɔ na ndenge ete amona elilingi oyo ezali na ezipeli, mpe koloba na ye boye: “Na sanza oyo ya Marsi, na mokolo ya 30 na mpokwa, bamilio ya bato na mokili mobimba bakoyangana mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Nayei kopesa yo lokasa oyo mpo na kobengisa yo ná bato ya libota na yo na likita yango. Okoki mpe koya elongo na baninga na yo. Talá ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema.” Soki likoki ezali, tángelá ye Luka 22:19 na kati ya Biblia mpo na komonisa etinda yango. Kasi, tóbosana te ete lokola tozali na mikolo mingi te mpo na kokabola nkasa yango na teritware na biso mobimba, ebongi tólobaka makambo ebeleebele te.
3. Tokoki kobengisa banani na Ekaniseli?
3 Soki teritware ya lisangá na bino ezali monene, mbala mosusu bankulutu bakosɛnga bino bótika nkasa ya libyangi ata na bandako oyo bokokuta bato te ntango boleki mpo na mbala ya liboso. Na mokolo oyo bokabolaka bazulunalo, soki ebongi, bókabola yango nzela moko na nkasa ya libyangi. Bóbosana te kobengisa bato oyo botalaka, bato oyo boyekolaka na bango Biblia, baninga ya mosala, baninga ya kelasi, bandeko ya libota, baninga ya kartye, mpe bato mosusu oyo boyebani na bango.
4. Botɔndi na biso mpo na bolingo ya Yehova na ndenge apesaki lisiko ekotinda biso tósala nini?
4 Omibongisa mpo na kosakola mingi: Eleko ya Ekaniseli ezalaka ntango moko malamu mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola. Okoki nde kobongisa programɛ na yo mpo ozala mobongisi-nzela mosungi? Soki ozali na bana to bato oyo oyekolaka na bango Biblia, oyo bazali kokola malamu na elimo, okoki kosolola na bankulutu mpo bátalela bango soki bakokisi masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te mpo básangana na kampanye yango. Botɔndi na biso mpo na bolingo ya Yehova na ndenge apesaki lisiko ekotinda biso tóbengisa bato mingi mpo tóyangana elongo na Ekaniseli.—Yoa. 3:16.