Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobanda mokolo ya 2 Aprili
1. Tokokabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli ya mbula oyo na dati nini mpe ntina ya kampanye yango ezali nini?
1 Kobanda mokolo ya 2 Aprili tii 17 Aprili, tokokabola nkasa mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ya liwa ya Kristo, likita oyo eleki ntina na mbula mobimba. Na bambula eleki, bato mingi bandimaki libyangi yango. Na ndakisa, na mokolo ya Ekaniseli, mwasi moko abengaki biro ya filiale moko mpe alobaki boye: “Nauti kozonga ndako mpe nakuti lokasa ya libyangi na nse ya porte ya ndako na ngai. Nalingi kokende na likita yango, kasi nayebi ngonga te.” Ndeko oyo ayambaki ye na telefone ayebisaki ye esika oyo akokaki komona ngonga mpe adrɛsi na lokasa yango. Na nsuka ya lisolo na bango, mwasi yango alobaki boye: “Nakoya na likita na bino lelo na mpokwa!”
2. Makambo nini tokoloba ntango tokokabola lokasa ya libyangi?
2 Ndenge ya kokabola yango: Lokola tozali na ntango mokuse mpo na kokabola nkasa ya libyangi na teritware na biso mobimba, tosengeli koloba mingi te. Tokoki koloba boye: “Mbote. Toyei kopesa libota na bino nkasa ya libyangi na likita moko oyo esalemaka mbula na mbula; mpe na mbula oyo, ekosalema na mokili mobimba mokolo ya lomingo 17 Aprili. [Pesá ye lokasa ya libyangi.] Dati wana ezali kokundwela biso mokolo oyo Yesu akufaki. Diskur moko ekosalema mpo na kolimbola ndenge oyo tokoki kozwa matomba na lisiko oyo Kristo apesaki. Lokasa oyo ya libyangi emonisi ngonga mpe adrɛsi ya esika oyo likita yango ekosalema na esika ofandi.”
3. Nini tosengeli kosala mpo tókabola nkasa ya libyangi ebele?
3 Soki lisangá na bino ezali na teritware monene, bankulutu bakoki kopesa malako ete basakoli bákɔtisa nkasa ya libyangi na nse ya porte ya bandako oyo bakuti bato te. Kobosana te kobengisa bato oyo ozongelaka, bandeko na yo, baninga na yo ya mosala mpe ya kelasi mpe bato mosusu oyo oyebani na bango. Soki ozali kokabola nkasa yango mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, kabolá yango nzela moko na bazulunalo, soki ebongi. Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili mpo ozwa libaku ya kokabola nkasa ya libyangi ebele?
4. Mpo na nini tolingi ete bato oyo basepelaka na solo báyangana na Ekaniseli?
4 Bato oyo bakoyangana na likita yango bakoteyama mpenza! Bakoyeba ete bolingo monene ya Yehova nde etindaki ye apesa lisiko. (Yoa. 3:16) Bakoyeba makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bolamu ya bato. (Yis. 65:21-23) Bakosɛnga mpe bango básolola na bandeko oyo bapesaka biso bisika ya kofanda mpo básalisa bango bázwa bato oyo bakoyekola na bango Biblia mpo báyeba lisusu makambo mingi na ntina na Nzambe. Tozali kobondela ete bato mingi oyo bazalaka na mposa ya koyeba solo na ntina na Yehova bándima libyangi yango mpe báya koyangana na biso na Ekaniseli!