Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Augusto
“Lelo oyo, mbala mingi bato bamonisaka Yesu ndenge azalaki eleki sikoyo mbula nkóto mibale: lokola mwana oyo auti kobotama, to lokola moto oyo abakami likoló ya nzete ya mpasi. Kasi, okanisi ete Yesu azali kosala nini sikoyo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge elobami awa.” Lakisá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16 mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Augusto
“Bato mingi bandimaka makamwisi mpe basusu batyaka ntembe. Bongo yo, ondimaka ete makamwisi esalemaka mpenza? [Tiká ye apesa eyano.] Likamwisi oyo ekosalema na mikolo ezali koya mpe elaka yango epesi bato mingi elikya. [Tángá moko ya bavɛrsɛ oyo ezali na nkasa 9-10.] Zulunalo oyo emonisi ndenge ya kosilisa ntembe misato oyo bato mingi babimisaka mpo na makamwisi.”
Lamuká! Augusto
“Lelo oyo, bato mingi babangaka kobima libándá bango moko, mingimingi na butu. Okanisi ete eloko moko ekoki kosalema mpo mokili oyo ezala na mobulu mingi te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli mwa makambo oyo tokoki kosala mpo tókóma kofanda na kimya na basusu. Emonisi mpe ndenge esakweli oyo ya kolendisa ekokokisama.” Tángá Nzembo 72:7.