Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/2 nk. 10-13
  • Biblia ebongolaka bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ebongolaka bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/2 nk. 10-13

Biblia ebongolaka bato

NINI etindaki mobali moko oyo azalaki kolona makaya atika mosala wana, atika mpe lingomba na ye oyo akangamaki na yango makasi? Ndenge nini mwasi moko oyo azalaki molangwi masanga azwaki makasi ya kobongola bomoi na ye? Tótánga makambo oyo bato yango balobi.

“Nasepelaka ndenge nazali na kati ya libota oyo monene.”​—DINO ALI

ABOTAMAKI NA: 1949

EKÓLO: AUSTRALIE

BOMOI NA YE YA KALA: MOLONI MAKAYA

NDENGE NAZALAKI: Baboti na ngai balongwaki na ekólo Albanie na 1939 mpe bakendaki kofanda na Mareeba, mwa engumba moko ya Qeensland, na ekólo Australie. Bato mingi oyo bautaki Bosnie, Grèce, Italie, Serbie, mpe bikólo mosusu bayaki mpe kofanda na esika yango, bamemaki mpe bizaleli, mimeseno mpe bonkɔkɔ na bango. Engumba Mareeba ezalaki esika moko oyo balonaka makaya, mpe baboti na ngai babandaki mpe kolona makaya.

Eumelaki te, yaya na ngai ya mwasi abotamaki, na nsima bandeko na ngai mibale ya mibali, na nsima ngai. Likambo ya mawa, tata akufaki na maladi ya motema ntango nazalaki na mbula moko. Mama abalaki mobali mosusu mpe abotaki bana mosusu minei. Biso nyonso tokolaki kaka na esika oyo mobali ya mama azalaki kosala bilanga ya makaya.

Nalongwaki na ndako ntango nazalaki naino elenge. Ntango nakómaki na mbula mwa moke koleka 20, nabalaki Saime, na Moskɛ oyo ezalaki na engumba yango mpo biso mibale tozalaki Bamizilma. Banɔkɔ, batata-leki, batata-mwasi, bamama-leki ná bana na bango nyonso bazalaki mpe Bamizilma. Nazalaki kotánga Koran mpe buku mosusu oyo ezalaki kolobela lisolo ya Mahomet. Kaka na ntango wana, nazalaki mpe kotánga Biblia moko ya moke. Koran elobelaka basakoli oyo Biblia elobeli, mpe kotánga Biblia esalisaki ngai nayeba ntango oyo bazalaki na bomoi.

Batatoli ya Yehova bazalaki koya epai na ngai, mpe mbala na mbala bazalaki kotikela ngai bazulunalo mpe babuku, oyo ngai ná Saime tozalaki kosepela kotánga. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki kosolola ná Batatoli ya Yehova makambo mingi ya kitoko oyo etali Nzambe. Mbala nyonso oyo tozalaki kosolola, bazalaki koyanola na mituna na ngai na bavɛrsɛ ya Biblia, na esika ya kopesa makanisi na bango moko. Yango ekamwisaki ngai mingi.

Batatoli basɛngaki ete báyekola na ngai Biblia mpe bazalaki kobengisa ngai na makita na bango, kasi nazalaki koboya. Mposa na ngai ya libosoliboso ezalaki ya kozwa elanga na ngai moko ya makaya mpe kobota bana ebele. Nazwaki elanga ya ngai moko te, kasi nsukansuka nakómaki tata ya bana mitano mpe nalingaka bango mingi.

NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ata mbula libwa nsima ya kokutana ná Batatoli ya Yehova, nalongwaki kaka na lingomba na ngai te. Kasi, nazalaki kosepela kozwa mpe kotánga mikanda nyonso oyo bazalaki kobimisa. Mikolo nyonso ya lomingo, ngai ná Saime tozalaki kozwa ntango ya kotánga mikanda yango. Tozalaki kobomba bazulunalo nyonso oyo tozalaki kozwa mbula na mbula. Bazulunalo yango esalisaki ngai mingi ntango bato mosusu babandaki koluka kolɛmbisa kondima oyo ezalaki kokola na motema na ngai.

Na ndakisa, nakutanaki na pastɛrɛ moko oyo amekaki kotya ngai mpanzi likoló mpo nandima Yesu lokola Mobikisi na ngai. Pastɛrɛ yango alongaki kondimisa leki ya Saime ya mobali mpe leki na ngai moko ya mobali. Eumelaki te, bato mosusu oyo nayebanaki na bango, oyo bazalaki na mangomba ndenge na ndenge, bakómaki kotya ngai mbamba nakɔta na mangomba na bango. Bamosusu bapesaki ngai mikanda oyo ezalaki koloba mabe mpo na Batatoli ya Yehova. Natunaki bato yango bálakisa ngai na Biblia esika mateya oyo bateyaka eutá, kasi bakokaki te kopesa ngai biyano.

Lokola bato bazalaki kotɛmɛla ngai bongo, yango etindaki ngai naluka koyeba lisusu Biblia malamumalamu, mpe natánga lisusu mingi mikanda oyo nazwaki epai ya Batatoli ya Yehova. Nsukansuka, namonaki ete ntango ekoki mpo nazwa ekateli ya kosalela makambo oyo nazalaki koyekola.

Liboso kutu nabanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, nakómaki kokende makita na bango. Na ebandeli, nazalaki kobanga mpe nazalaki nsɔninsɔni, kasi na makita yango, nakutanaki na ebele bato ya boboto, mpe nazalaki kosepela na makambo oyo nazalaki koyekola. Nazwaki ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova, mpe na 1981, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe.

Mwasi na ngai aboyaki te ekateli na ngai, atako azalaki ntango mosusu kokanisa ete nakosamaki. Atako bongo, mokolo nazwaki batisimo, ayaki kotala. Nakobaki koyebisa ye mateya ya solo oyo nazalaki koyekola. Pene na mbula moko nsima ya batisimo na ngai, na nzela ntango toutaki konje mpe tozalaki kozonga ndako, Saime alobaki ete alingi kokóma Motatoli ya Yehova. Yango ekamwisaki ngai makasi; kutu etikalaki moke motuka elongwa na nzela! Azwaki batisimo na 1982.

Kobongola makambo mingi na bomoi na biso ezalaki pɛtɛɛ te. Natikaki kolona makaya mpo nayebaki ete yango eyokani te na mitinda ya Biblia. (2 Bakorinti 7:1; Yakobo 2:8) Elekaki mwa ntango molai liboso ete tózwa mosala ya malamu oyo ekokaki kopesa biso mwa mbongo ya kobikela. Longola yango, nsima ya makambo wana, elekaki bambula mingi bandeko na biso mosusu baboyaki koya kotala biso. Tosalaki nyonso tómonisela bango bolingo ndenge Biblia esɛngi. Nsukansuka, balɛmbisaki mitema na bango mpe lelo oyo bayinaka biso lisusu te.

MATOMBA OYO NAZWI: Makambo ndenge na ndenge oyo nakutanaki na yango, na ndakisa kozala nsɔninsɔni, mitungisi ya mbongo, botɛmɛli ya libota, nyonso wana eteyaki ngai ete Yehova Nzambe azali motema molai na ndenge asalisi ngai nalonga mikakatano na ngai. Na ndakisa, sikoyo nazali nkulutu na lisangá mpe mbala mingi nasengeli koteya liboso ya bato. Ezalaka kaka mpasi mpo na ngai mpo nazalaka na mokakatano ya koloba soki nazali kobanga. Kasi, lokola nabondelaka mingi mpe na lisalisi ya Yehova, nazali kolonga kokokisa mokumba yango.

Ngai ná mwasi na ngai tokómi na boyokani makasi, mpe tokoki kokokanisa yango na eloko mosusu te. Tosalaki mabunga ntango tozalaki kobɔkɔla bana na biso, kasi tosalaki nyonso mpo na kokɔtisa na mitema na bango solo ya Biblia oyo toyekoli. (Kolimbola Mibeko 6:6-9) Kutu, mwana na ngai ya mobali ya liboso ná mwasi na ye bazali bamisionɛrɛ.

Nakanisaka lisusu mokolo moko mwa moke nsima ya kobanda koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova elongo na libota na ngai. Natɛlɛmisaki motuka mpe natalaki ebele ya bato oyo bazalaki na kati ya Ndako ya Bokonzi. Natunaki bato ya libota na ngai boye: “Bozali komona nini?” Na kati, ezalaki na bato ya mimeseno, bizaleli mpe minɔkɔ ndenge na ndenge: bato ya Albanie, ya Australie, Ba-Aborigènes, bato ya Croatie; atako bongo, bazalaki na bomoko. Nasepelaka ndenge nazali na kati ya libota oyo monene ya bandeko, oyo ezali kaka na Australie te, kasi mpe na mokili mobimba.​—1 Petro 5:9.

“Yaya na ngai alɛmbaki ngai te.”​—YELENA VLADIMIROVNA SYOMINA

ABOTAMAKI NA: 1952

EKÓLO: RUSSIE

BOMOI NA YE YA KALA: MOOMBO YA MASANGA MPE ALUKAKI KOMIBOMA

NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na Krasnogorsk, mwa engumba moko ya kimya pene na Moscou. Nakolaki na libota moko oyo balakisi bazalaki ebele. Nazalaki mayele na kelasi mpe nayekolaki miziki na kelasi. Emonanaki lokola ete nakozala na bomoi moko ya malamu.

Ntango nabalaki, ngai ná mobali na ngai tokendaki kofanda na esika moko oyo bato bazalaki kofinga, kolangwa masanga mpe komɛla makaya. Liboso nayebaki te, nzokande kofanda na esika wana ebebisaki ngai. Na ebandeli, nazalaki kokende na bafɛti kaka mpo na koyemba mpe kobɛta gitare. Kasi soki nakómi kuna, bato bazalaki kobenga ngai mpo namɛla makaya mpe masanga elongo na bango. Eumelaki te, nakómaki moombo ya masanga.

Masanga ebandaki kobebisa bomoi na ngai. Ezwaki mwa ntango mpo nakóma mpenza nsuka ya moombo ya masanga; kasi ntango nakómaki ndenge wana, nazalaki kokoka lisusu kolya te. Nakómaki kolinga nakufa, mpe nalukaki komiboma. Nazalaka na botɔndi mingi ndenge namibomaki te.

Na ntango wana nyonso, yaya na ngai azalaki koya kotala ngai mbala na mbala. Akómaki Motatoli ya Yehova, mpe azalaki kosala nyonso alimbolela ngai ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa ngai. Nazalaki kosepela na Biblia te, yango wana liboso nazalaki koboya ayebisaka ngai makambo wana. Kasi yaya na ngai alɛmbaki ngai te. Azalaki mpenza motema molai mpe na bolingo, yango wana, nsukansuka nandimaki koyekola Biblia.

NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia, nazwaki ekateli makasi ya kotika komɛla masanga. Na ntango yango, moto moko ya kartye, oyo azalaki na molangwa, abɛtaki ngai mabe. Bamemaki ngai na lopitalo mpo nakómaki pene ya liwa. Mikuwa minei ya mpanzi na ngai ebukanaki, liso na ngai moko mpe ebebaki. Atako bongo, ntango nyonso oyo nalekisaki na lopitalo esalisaki ngai namona te ete nazangi eloko mpo namɛli masanga te.

Na ntango yango, nazalaki kobondela mingi. Vɛrsɛ ya Biblia oyo ebɔndisaki ngai mingi ezalaki Bileli 3:55, 56, oyo elobaka ete: “Nabeleli nkombo na yo, Ee Yehova, uta na libulu ya nse koleka. Osengeli koyoka mongongo na ngai. Kobomba litoi na yo te ntango nazali kobondela ete okitisa ngai motema, ntango nazali kolela mpo na kosɛnga lisalisi.”

Nandimi mpenza ete Yehova ayanolaki mabondeli na ngai. Apesaki ngai makasi mpo nazongela lisusu te bomoi na ngai ya kala. Na bantango mosusu, nazalaki komeka kozongela lisusu komɛla masanga. Sikoyo nakoki koloba na esengo nyonso ete nakweaka lisusu te na motambo wana.

Ntango nakobaki koyekola Biblia, nayebaki ete nasengeli kopesa mobali na ngai mabɔkɔ na mokumba na ye ya mokonzi ya libota. (1 Petro 3:1, 2) Ezalaki pɛtɛɛ te nasala bongo, mpamba te namesanaki kokonza mobali na ngai. Nabondelaki Yehova asalisa ngai. Esɛngaki ntango mpo nabongwana, kasi mokemoke, nakómaki mwasi malamu, oyo asungaka mobali na ye.

Ntango mobali na ngai amonaki ndenge nabongwanaki bongo, akamwaki mingi. Tii na ntango wana, azalaki naino kosepela na Biblia te. Kasi ntango nazwaki ekateli ya kotika komɛla makaya, alobaki boye: “Soki kaka otiki komɛla makaya, ngai nakobanda koyekola Biblia!” Biso mibale totikaki komɛla makaya mokolo moko.

MATOMBA OYO NAZWI: Mobali na ngai atosaki maloba na ye mpe abandaki koyekola Biblia. Lelo oyo, totángaka Biblia elongo mokolo na mokolo, tokanisaka likoló ya makambo oyo totángi, mpe tosalaka nyonso tósalela toli yango na bomoi na biso.

Nazangi maloba mpo na koyebisa ndenge oyo libota na biso ebongi, kozanga kotánga matomba oyo ngai moko nazwi. Natɔndaka mpenza Yehova ndenge abendá ngai epai na ye. (Yoane 6:44) Nazalaka mpe na botɔndi epai ya yaya na ngai ndenge alɛmbaki ngai te. Ndenge oyo ngai nabongwaná, endimisi ngai ete Biblia ebongolaka mpenza bato.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Namonaki ete ntango ekoki mpo nazwa ekateli

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

Yaya na ngai azalaki mpenza motema molai mpe na bolingo, yango wana, nsukansuka nandimaki koyekola Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto