Tókolisa mosala na biso ya motuya
1 Yesu akokanisaki elikya ya Bokonzi na eloko ya motuya monene. (Mat. 13:44-46) Tozali na ezaleli ya motindo moko lokola mibali oyo ya lisese ya Yesu baoyo batekisaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango mpo na kosomba eloko moko ya motuya monene? Soki ezali bongo, tokopesa esika ya liboso na Bokonzi ya Nzambe, ata soki yango ezali pɛtɛɛ te mpe ezali kosenga elimo ya komiboya.—Mat. 6:19-22.
2 Lokola mosala na biso oyo ekokisami mpo na Bokonzi ezali eloko na motuya, mposa na biso esengeli kozala ya kokolisa yango. Lolenge na biso ya kozala na bomoi ezali komonisa nini? Tokokisaka mosala na biso na mitindo mikeseni? Tokoki kosala yango soki tozali kosangana na lolenge mingi ekeseni ya mosala ya kosakola: ndako na ndako, bozongeli ya sika, boyekoli ya Biblia, litatoli ya libaku malamu, mpe bongo na bongo.
3 ‘Lolenge nini nakoki kobakisa bosangani na ngai kati na mosala ya kosakola?’ Na katikati ya mobu ya mosala, ezali malamu ete moto na moto atalela mosala na ye, mpo na komona oyo esengeli na ye kosala na ntina etali kolekisa ntango mingi kati na mosala ya kosakola, mpe amituna: ‘Nakoki komibongisa na lolenge ete nazala mobongisi-nzela mosungi mbala moko to mpe mbala na mbala? Na kosaláka mwa mbongwana, nakoki kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza?’ Baoyo bazali kobanda mosala ya mobongisi-nzela na mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ bakoki koyangana na Eteyelo mpo na babongisi-nzela mbula ezali koya.
4 Basakoli basili komityela mokano ya kopesa litatoli mingi koleka na lolenge ya libaku malamu. Mosala yango mbala mingi epesaka matomba malamu. Basusu bakomona malamu ete esengeli na bango naino kokola na makoki mpo na oyo etali kozongela bato mpe kobanda boyekoli ya sika ya Biblia.
5 Soki tososoli ete kosangana na biso kati na mosala ya kosakola ezali mpenza moke, lolenge nini tokoki kobakisa yango? Baoyo basili kokokisa mikano minene bazali kopesa toli ya kozwa naino ekateli ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, atako yango ekosenga makambo nini. (Mat. 6:33) Kondima mpe elikya makasi epai na Yehova ezali mpenza na ntina. (2 Kol. 4:7) Tóbondela ye na motema na biso mobimba mpe na kolendendela nyonso. (Luka 11:8, 9) Tózala na elikya ete Yehova akopambola milende na biso ya solo mpo na kobakisa bosangani na biso kati na mosala na ye.—1 Yoane 5:14.
6 Tósolola elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo basili kolónga kokólisa mosala na bango mpo na Nzambe. Totuna bango lolenge nini bakokaki kolónga mikakatano kozanga ete balemba kati na motema. Mbala mosusu eksperianse na bango moko ezali yango nde esengeli na biso mpo na komindimisa ete kokolisa mosala na biso mpo na Nzambe ezali te likambo lileki makoki na biso.
7 Wana ezali biso kotánga masoló ya Linɔngi ya Mosɛnzɛli to ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ezali kolobela mosala ya kosakola, tótala kati na libondeli mpo na koyeba soki na meko nini tokoki kosalela makanisi oyo mazwami kati na yango. Tósala motindo moko na ntango tozali koyangana na makita ya lisangá to na mayangani. Makanisi oyo mapesami awa mauti na lisukúlu moko ya liyangani ya zongazonga ya mobu oyo ya mosala. Lisoló oyo ezali ebandeli ya kolandana ya masoló oyo ezali na mokano ya kosalisa biso mpo na kosalela mpenza bilendiseli nyonso oyo bipesamaki na liyangani wana.
8 Yesu atalelaki mosala na ye na bopotu te. Akomisaki yango lobanzo na ye ya liboso. Alobaki ete: “Bilei na ngai ejali boye ete nasala mokano na Motindi na ngai.” (Yoane 4:34) Tozali nde na elimo motindo moko? Soki ee, na ntambe te tokozwa mpenza makoki ya kosala mosala na biso na balolenge ekeseni mpe kokabola elongo na bazalani na biso “makambo malamu” mauti na eloko na biso ya motuya.—Mat. 12:35; Luka 6:45.