Tóbyanga moto nyonso oyo azali na mposa
1 Lokola Amosa asakolaki yango, bato bazali lelo oyo ‘na mposa ya mai te kasi na mposa ya koyoka maloba ya Yehova.’ (Amo. 8:11) Mpo na kosalisa baoyo bazali komona mpasi mpo bazangi maloba ya Nzambe, tozali koyebisa bango bibongiseli oyo Nzambe asili kozwa mpo na kosikola bato ya botosi na lisumu mpe liwa, bibongiseli oyo bilobelami na mokapo ya nsuka ya mokanda ya Emoniseli lokola “ebale na mai na bomoi.” Tozali na libaku malamu ya kobyanga moto nyonso oyo azali na mposa na boyengebene ete ‘aya komela mai ya bomoi kozanga kosomba.’ (Emon. 22:1, 17) Lolenge nini tokosala yango na sanza ya Mársi? Na kolakisáká buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! epai na bato oyo bazali komonisa bosepeli mpenza. Ntango mosusu tokolinga komeka maloba oyo malandi mpo na kobanda lisolo.
2 Bato mingi bazali komibanzabanza mpo na bokolɔngɔnu ya nzoto na bango; ntango mosusu tokomona ete maloba oyo malandi mpo na kobanda lisolo makoki kosepelisa bango:
◼ “Bato mingi bazali komitungisa mpo ete komisalisa nzoto malamu lelo oyo ezali kosɛnga mosolo mingi. Osilá komituna mpo na likambo yango? [Tótika moto yango apesa eyano.] Oyebi mwango moko oyo ekoki kosilisa mokakatano yango libela? [Tótika moto yango apesa eyano.] Talá elikya moko ya kokamwa.” Tótánga Emoniseli 22:1, 2. Na nsima, tófungola buku Emoniseli: kokokana na yango na elilingi ya nkasa 308 kino 309 mpe tólimbola yango na kosaleláká makanisi ya paragrafe 22 na lokasa 311. Mpo na kosukisa, tóloba boye: “Buku oyo ezali kolimbola vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Emoniseli to Mibombamo.” Soki molobani na biso amonisi mposa ya solosolo, tósɛnga na ye ete azwa buku yango mpe tóyebisa ye ntalo na yango. Tókamata bibongiseli mpo na kozonga kotala ye.
3 Ntango tokosala bozongeli ya sika, tokoki kokundola lisolo na biso ya mbala eleki, na kolobáká boye:
◼ “Ntango tokutanaki na mbala eleki, tolobelaki lolenge oyo mitungisi mitali bokolɔngɔnu ya nzoto mikosila libela. Okanisi ete mokolo mosusu bato bakobɛla lisusu bokɔnɔ moko te? [Tótika moto yango apesa eyano.] Talá esakweli oyo ya kokamwa.” Tótánga Yisaya 33:24. Mpe tófungola mwa buku Azali kosɛnga na liteya 5, tótalela baparagrafe 5 mpe 6 na kotunáká mituna na yango oyo mikomami na ebandeli ya liteya yango mpe na kotángáká mwa bavɛrsɛ ya Biblia oyo epesami. Tólimbola ete kosilisama ya bokɔnɔ mpe liwa ezali kokokisama ya mokano ya Nzambe ya libosoliboso mpo na mabelé. Tóyokana mpo na ntango oyo tokokutana mpo na kotalela paragrafe 1 kino 4 mpe paragrafe 7 ya liteya yango moko.
4 Soki nsango eyebani ete moto moko auti kokufa liwa ya mbalakaka, tokoki komeka maloba oyo mpo na kobanda lisolo:
◼ “Na ntembe te oyoki [yebisá nsango yango]. Ntango bato bazali kokufa liwa ya mbalakaka mpo na likama moko, bato mingi bamitunaka nini bakoki kosala mpo na kobɔndisa mabota ya baoyo bakufeli moto. Okanisi boni?” Tótika moto yango apesa eyano. Na nsima, tófungola buku Emoniseli: kokokana na yango na lokasa 299 mpe tólakisa elilingi ya lisekwa. Tókóba na kolobáká ete: “Bato mingi bakamwaka soki bayebi ete bato ya sembo mpe ata bato ya sembo te bakosekwisama mpo na kozala na bomoi kati na Paladiso awa na mabelé. [Tótánga Misala 24:15, oyo etángami na paragrafe 9, na lokasa 297, mpe tópesa ndimbola oyo elobelami na paragrafe 10.] Buku yango ezali kolobela makambo mosusu mingi ya ntina oyo matali mokano ya Nzambe mpo na mikolo mizali koya. Soki olingi koyeba makambo mosusu mingi na ntina na mokano yango, nakoki kotikela yo buku oyo.” Tóyokana mpo na mokolo oyo tokozongela ye mpe tóyeba makambo oyo masepelisaki molobani na biso mpe mitungisi na ye.
5 Na ntango ya bozongeli ya sika, tósala ete lisolo na biso litalela mpenza bamposa ya moto oyo tozali kosolola na ye. Ntango mosusu tokoki kobimisa likanisi ya motindo oyo:
◼ “Na lisolo na biso ya mbala eleki, olobaki likambo moko na ntina na mokano ya Nzambe mpo na mabelé mpe yango esepelisaki ngai mingi. [Tózongela makambo oyo ye alobaki.] Talá mwa makanisi oyo namoni ete ekoki kosepelisa yo.” Tófungola mwa buku Azali kosɛnga na liteya 5. Tótánga baparagrafe oyo ekoki kobenda likebi ya moto yango mpe tósolola likoló na yango. Nsima wana tosili koyokana mpo na ntango oyo tokozongela moto yango mpo ete tókóba kotalela liteya yango, tótikela ye lokasa ya libyangi (soki ezali) oyo ezali komonisa manáka ya makita ya lisangá. Tóyebisa na moto yango soki lisukulu mpo na bato nyonso elimboli nini mpe tóbyanga ye ete ayangana na likita yango.
6 Soki tolingi kosalela maloba ya pɛtɛɛ mpo na kobanda lisolo na kosaleláká trakte, tokoki komeka koloba boye:
◼ “Nalingi kotikela yo trakte oyo ezali na motó na likambo ete Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?” Tópesa ye trakte yango na maboko mpe tóloba na moto yango ete alanda botángi ya paragrafe ya liboso ntango tozali kotánga yango. Tótika moto yango apesa eyano na motuna oyo mozali na molɔngɔ́ ya nsuka. Tótánga paragrafe ya mibale, mpe tólakisa elilingi oyo ezali na lokasa 299 ya buku Emoniseli: kokokana na yango. Tókóba na kolobáká ete: “Buku oyo ezali kolimbola na bozindo elikya ya lisekwa mpe bilaka mosusu ya kokamwa oyo bizali kati na Biblia mpo na mikolo mizali koya. Soki olingi kotánga yango, nakoki kotikela yo yango.” Tóyebisa ntalo na yango mpe tókamata bibongiseli mpo na kosala bozongeli ya sika.
7 Libyangi ya mɔ́tɔ oyo tokosala epai na bazalani na biso ekoki kobenda bango na mai ya bomoi oyo Yehova azali kosopa lelo oyo. Na yango, epai na moto nyonso oyo azali na mposa, tozali koloba ete: “Yaka!”—Emon. 22:17.