Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/02 lok. 8
  • Boyá kolukaluka “makambo ya mpamba”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyá kolukaluka “makambo ya mpamba”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Kosalela Internet​—Kebá na makama!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Nsango malamu na Internet
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Yebá kosalela Internet na ndenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 9/02 lok. 8

Boyá kolukaluka “makambo ya mpamba”

1 Courrier électronique to E-mail ezali nzela moko oyo ezali lelo oyo kosalisa bato na kosolola. Atako ekoki kozala malamu koyebisana bansango to makanisi na bato ya libota to baninga na biso na nzela yango, wapi “makambo ya mpamba” oyo ekoki komonana soki tozali komipekisa te ntango tozali kosalela E-mail?​—Mas. 12:11.

2 Kebá ntango ozali kosalela E-mail: Bato mosusu balobaka ete bamiyokaka penepene na ebongiseli ya Yehova ntango bazali kozwa oyo bamonaka ete ezali bansango ya sika na nzela ya E-mail. Bansango yango ekoki kozala makambo oyo bakutanaki na yango, makambo oyo esalemaki na Betele, balapolo ya makama to minyoko, mpe kutu makambo oyo euti kolobelama na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, oyo esengeli naino koyebisama te. Bato mosusu bazalaka motema likolólikoló mpo na kotinda bansango ya ndenge wana mpo balingi kozala bato ya liboso ya koyebisa baninga na bango makambo yango.

3 Na bantango mosusu, bansango yango mpe masolo ya makambo oyo bato bakutanaki na yango elobelamaka mpenza te ndenge esalemaki, babakisaka to balongolaka makambo mosusu. To ntango mosusu lokola bato mosusu oyo bazali kolobela lisolo yango balingi kobenda likebi na makambo yango, makambo bayebisi ekopesa likanisi oyo ebongi te. Mbala mingi, bato oyo bawelaka kopanza bansango ya ndenge wana bayebaka likambo yango na mobimba te. (Mas. 29:20) Ntango mosusu, ata ntango lisolo moko emonani ete ekoki kozala solo te, bato bapanzaka yango kaka lokola likambo moko ya kokamwisa. Masolo oyo ezali mpenza ya lokuta to oyo ezali kozimbisa ndenge wana ekokani mpenza na “masapo ya lokuta,” oyo ekolendisa moto te mpo akangama kaka na Nzambe.​—1 Tim. 4:6, 7.

4 Soki otindeli moto likambo oyo na nsima emonani ete ezalaki likambo ya lokuta, mawa na mobulungano oyo ekobimisa ekozala mpe na motó na yo. Ntango Davidi ayokaki nsango ya nsɔmɔ ete bana mibali na ye nyonso babomamaki, “apasolaki bilamba na ye” mpo na mpasi na motema. Nzokande, kaka mwana moko mpamba nde akufaki. Yango ezalaki likambo ya mawa, kasi lokola balekisaki ndelo na ntango bapesaki Davidi nsango wana, ebakiselaki ye mpasi na motema. (2 Sam. 13:30-33) Na ntembe te, tokolinga te kosala likambo moko mpo na kokosa bandeko na biso to mpo na kolɛmbisa bango.

5 Nzela oyo Nzambe aponá: Kobosana te ete Tata na biso ya likoló azali na nzela oyo ye aponá mpo na koyebisa makambo, “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Ezali mokumba ya “moombo” yango ya koyeba makambo nini oyo bandeko bakoki koyeba mpe “ntango oyo ebongi” mpo na koyebisa makambo yango. Bilei ya elimo yango epesamaka kaka na nzela ya ebongiseli ya Teokrasi. Na esika ete tóluka koyeba makambo na nzela ya bato oyo bazali kosalela Internet, tosengeli ntango nyonso kotalela ebongiseli oyo Nzambe atii mpo na koyebisa biso solo.​—Mat. 24:45.

6 Basite Web ya Internet: Tozali na site web na Internet: Ezali www.watchtower.org. Site yango ebongi mpenza mpo na koyebisa bato makambo. Ezali na ntina te ete moto mosusu, etuluku ya bato, to lisangá moko ebongisa site web moko oyo etali Batatoli ya Yehova. Bato mosusu bakɔtisá na Internet mikanda mobimba na bavɛrsɛ mpe mitindami nyonso, mpe bakabolaka bakopi ya mateya oyo epesamaka na mayangani soki moto apesi mwa mbongo. Ezala mpo na mbongo to te, kosala bakopi ya mikanda ya Batatoli ya Yehova mpe kokabola yango na nzela ya ordinatɛrɛ ezali kobuka mobeko oyo epesaka lotomo nyonso na bakomi ya mikanda yango. Atako basusu batalelaka yango lokola libaku ya kosalisa bandeko, likambo oyo endimami te mpe esengeli kotika kosala yango.

7 Kozala na ekɛngɛ mpe na makanisi malamu ntango tozali kosalela Internet ekosalisa biso tótondisa makanisi na biso “na biloko ya motuya malamu mpe ya kitoko.”​—Mas. 24:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto