Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
04-10/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 18-19
“Lokola Barazilai, zaláká na bopɔlɔ”
Barazilai ayebaki ndelo na ye
Na ntembe te Davidi azalaki na botɔndi mingi mpo na lisalisi ya Barazilai. Soki Mokonzi Davidi alukaki kopesa Barazilai biloko ya kobikela, ezalaki kaka te mpo na kozongisela ye bolamu oyo asalelaki ye. Barazilai azalaki na bozwi mingi mpe azalaki na mposa ya biloko yango te. Mbala mosusu Davidi alingaki ete mobange yango akende kofanda na ndako ya mokonzi mpo azalaki na bizaleli ya malamu mpenza. Soki Barazilai afandaki na ndako ya mokonzi alingaki kozwa lokumu mpe libaku ya kozala moninga ya mokonzi.
Barazilai ayebaki ndelo na ye
Mbala mosusu Barazilai azwaki ekateli wana mpo amonaki ete lokola akómaki mobange, akokaki lisusu kosala makambo mingi te. Ekoki mpe kozala ete Barazilai amonaki ete azali lisusu na bomoi molai te. (Nzembo 90:10) Asilaki kosala oyo akokaki mpo na kosunga Davidi, kasi ayebaki mpe ndelo oyo bobange etyelaki ye. Barazilai atikaki te ete makanisi ya kozala moto monene mpe ya lokumu epekisa ye atalela malamu makoki na ye. Barazilai azalaki na bopɔlɔ; azalaki te lokola Abesaloma, oyo alingaki lokumu.—Masese 11:2.
Barazilai ayebaki ndelo na ye
Lisolo ya Barazilai eteyi biso ete tosengeli kozala na bokatikati. Tosengeli te kokimaka mikumba na lisangá to koboya kosala milende mpo na kozwa yango mpo tolingi bomoi ya mindɔndɔ te to mpo tokanisi ete tozali te na makoki ya kokokisa yango. Nzambe akosalisa biso soki tosɛngi ye makasi mpe bwanya.—Bafilipi 4:13; Yakobo 4:17; 1 Petro 4:11.
Epai mosusu, tosengeli koyeba ndelo na biso. Na ndakisa moklisto moko akoki kozala na mikumba mingi na lisangá. Akoki komona ete soki andimi mikumba mosusu, akokoka te kokokisa makambo mosusu oyo Biblia ezali kosɛnga ye, na ndakisa kosunga libota na ye na elimo mpe na mosuni. Na ntango yango, akomonisa ete azali na bopɔlɔ mpe na bokatikati soki aboyi kondima mikumba oyo balingi kobakisela ye.—Bafilipi 4:5; 1 Timote 5:8.
Biloko ya motuya ya elimo
“Tópota mbangu tii na nsuka”
19 Soki ozalaka na mokakatano moko mpe soki omonaka ete basusu bamityaka na esika na yo te, ndakisa ya Mefiboshete ekoki kopesa yo makasi. (2 Sa. 4:4) Mefiboshete azalaki ebɔsɔnɔ, mpe Mokonzi Davidi asambisaki likambo na ye na bosembo te. Mefiboshete azalaki na foti te na likambo oyo esalemaki. Kasi, akómaki na makanisi ya mabe te; azalaki nde kosepela na makambo oyo ezalaki kotambola malamu na bomoi na ye. Azalaki na botɔndi mpo na boboto oyo Davidi amoniselaki ye na kala. (2 Sa. 9:6-10) Na yango, ntango Davidi akaniselaki ye mabe, Mefiboshete atalelaki likambo na mobimba na yango. Atikaki te ete libunga ya Davidi ekómisa ye nkandankanda. Mpe asilikelaki Yehova te mpo na likambo oyo Davidi asalaki. Mefiboshete alukaki kosala oyo akokaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mokonzi oyo Yehova atyaki. (2 Sa. 16:1-4; 19:24-30) Yehova akomisaki ndakisa malamu ya Mefiboshete na Liloba na Ye mpo na bolamu na biso.—Rom. 15:4.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: Mikano nini tokoki komityela soki makambo ya bomoi na biso epesi biso likoki te ya kosala mingi?
Zalá na esengo na oyo okoki kosala na mosala ya Yehova
15 Okoki komityela mikano nini? Sɛngá Yehova asalisa yo mpo oyeba mikano oyo okozala na likoki ya kokokisa. (Mas. 16:3; Yak. 1:5) Mpo na nini te komityela moko ya mikano oyo tolobelaki na paragrafe ya liboso ya lisolo oyo? Na ndakisa okoki komityela mokano ya kokóma mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza, kosala na Betele, to na mosala ya kotonga bandako mpo na mosala ya Bokonzi. To mpe okoki koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosakola nsango malamu to kokende kosakola na teritware mosusu. Okoki koyekola makambo mosusu oyo etali mikano yango soki otángi mokapo 10 ya buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova mpe soki osololi na bankulutu ya lisangá na bino. Wana ozali kosala makasi okokisa mikano yango, bandeko mosusu bakomona ete ozali kokola na elimo mpe esengo na yo ekobakisama.
16 Kasi okosala nini soki sikoyo ozali na likoki te ya kokokisa mikano oyo touti kolobela? Ekozala malamu omityela mokano mosusu oyo okozala na likoki ya kokokisa. Tótalela makanisi oyo elandi.
17 Tángá 1 Timote 4:13, 15. Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, okoki kosala makasi okóma molobi malamu to moteyi malamu. Mpo na nini? Mpo soki ‘omipesi mobimba’ mpo okóma motángi, molobi, mpe moteyi malamu, okosalisa baoyo bazali koyoka yo. Omityela mokano ya koyekola mpe ya kosalela toli mokomoko ya koloba malamu oyo ezali na mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya. Yekolá liteya mokomoko, mpe mekáká na ndako ndenge ya kosalela yangona likebi mpenza. Ntango ozali kosala masolo, salelá makambo oyo oyekoli. Lukáká toli epai ya mopesi-toli mosungi to bankulutu mosusu “oyo basalaka mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.” (1 Tim. 5:17) Koluka kaka te oyeba ndenge ya kosalela mayele oyo ozwi na mwa buku yango, kasi osengeli mpe kosala makasi osalisa bayoki na yo bákómisa kondima na bango makasi mpe kolendisa bango básalela makambo oyo bazali koyekola. Soki osali bongo, esengo na yo mpe oyo ya bango ekobakisama.
18 Biso nyonso tozali na mokumba ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Rom. 10:14) Ndenge nini okoki kokolisa mayele na yo na mosala yango ya ntina mingi? Tyá mikano ya sikisiki ntango ozali koyekola mpe kosalela makambo oyo oyekoli na mwa buku Mateya. Okoki kozwa makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo mpe na bavideo oyo emonisaka ndenge ya kobanda masolo, oyo totalaka na makita ya kati ya pɔsɔ. Meká mayele ndenge na ndenge mpo na koyeba oyo ekosimba. Soki osaleli makanisi yango, okokóma moteyi malamu mpe yango ekobakisela yo esengo.—2 Tim. 4:5.
19 Ntango ozali koluka mikano oyo okomityela, kobosana te ete mokano oyo eleki ntina ezali ya kokolisa bizaleli ya bokristo. (Gal. 5:22, 23; Kol. 3:12; 2 Pe. 1:5-8) Ndenge nini okoki kosala yango? Kanisá ete olingi kokómisa kondima na yo makasi. Osengeli kotánga na mikanda na biso masolo oyo ekoki kosalisa yo mpo okómisa kondima na yo makasi. Okozwa mpe matomba soki otali na TV JW, bavideo ya mikuse oyo emonisi ndenge bandeko na biso bamonisaki kondima ntango bazalaki kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Na nsima, luká koyeba ndenge oyo okoki komekola kondima na bango na bomoi na yo.
11-17/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 20-21
“Yehova azali Nzambe ya bosembo”
it-1-F lok. 1047 par. 3
Gibeone
Bagibeone bakobaki kozala lokola libota na boumeli ya basiɛklɛ mingi atako mokonzi Saulo alukaki kosilisa bango. Kasi Bagibeone bazelaki na motema moko Yehova asilisa likambo yango ya kozanga bosembo. Yehova asalaki yango ndenge abimisaki nzala makasi oyo eumelaki mbula misato na boyangeli ya Davidi. Ntango kaka Davidi asololaki na Yehova mpe ayebaki ete nzala wana eyaki mpo na ngambo ya makila, mbala moko atunaki Bagibeone soki asengelaki kosala nini mpo na kozipa lisumu yango. Bagibeone bazongisaki na mongongo makasi ete: ezali ‘likambo ya palata to wolo te’, mpo mibeko emonisi ete bakoki te kondima lisiko mpo na moto oyo abomi moto. (Mit 35:30, 31) Bamonisaki mpe ete bakokaki te koboma moto kozanga ete bápesa bango nzela, na kotalela mibeko. Davidi akobaki kotuna bango mituna mpe bayaki kondima ete bápesa bango “bana mibali” 7 ya Saulo. Lokola ngambo ya makila ezalaki na motó ya Saulo mpe ya ndako na ye, yango ekoki komonisa ete, atako ekoki kozala Saulo nde moto abandisaki likambo yango, bana na ye ya mibali mpe bapesaki maboko na likambo yango na lolenge moko to mosusu. (2Sa 21:1-9) Yango wana, tokoloba te ete bana yango bakufaki mpo na masumu ya batata na bango (Mib 24:16), kasi bakufaki nde mpo na etumbu oyo ebongaki mpo na bango na kotalela mibeko oyo elobi: “molimo mpo na molimo”.— Mib 19:21.
Biloko ya motuya ya elimo
Bankulutu: ‘Baninga ya mosala mpo na esengo na biso’
14 Na mokili mobimba, biso basaleli ya Yehova tozali kokokisa mosala na biso atako tozali kokutana na mikakatano oyo Satana ná bato na ye bazali kobimisela biso. Basusu kati na biso bakutanaki na mikakatano ya makasi oyo ezalaki lokola engambe Goliate, kasi lokola batyelaki Yehova motema mobimba, balongaki yango. Nzokande na bantango mosusu, tolɛmbaka nzoto mpo tozali ntango nyonso kobundana na mikakatano ya mokili oyo. Soki tolɛmbi ndenge wana, ezalaka mpasi te ete mikakatano oyo tokokaki kolonga soki tozalaki makasi ‘ebɛta’ biso. Na ntango wana, lisalisi ya nkulutu moko ekoki kopesa biso lisusu esengo mpe makasi, ndenge bandeko mingi bamonaki yango. Ndeko mwasi moko ya mbula 60 na ndambo oyo azali mobongisi-nzela alobaki boye: “Eleki mwa ntango, nazalaki komiyoka malamu te, mpe mosala ya kosakola ekómaki kolɛmbisa ngai. Nkulutu moko amonaki ete nazali lisusu na makasi te, mpe apusanaki pene na ngai. Vɛrsɛ oyo apesaki ngai ntango tosololaki elendisaki ngai mingi. Nasalelaki batoli oyo apesaki ngai, mpe yango esalisaki ngai.” Abakisaki boye: “Nasepelaki mingi ndenge nkulutu wana amonaki ete nabandi kolɛmba mpe asalisaki ngai.” Ya solo, tozali na esengo mingi ya kozala na bankulutu oyo batyelaka biso likebi na bolingo mpenza mpe batɛlɛmaka mpo na kosalisa biso ndenge Abishai asalisaki Davidi.
18-24/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 22
“Tyelá Yehova motema”
Okoki mpenza ‘kopusana penepene na Nzambe’?
11 Soki otángi ete Nzambe azali na “makasi kati na nguya” (Yisaya 40:26), ekeseni mpenza na soki otángi ndenge abikisaki ekólo ya Yisalaele na Mbu Motane mpe ndenge abatelaki bango na boumeli ya mbula 40 na esobe. Na makanisi, okoki komona ebele ya mai wana ekabwani, bato ya ekólo yango—bango nyonso soki milio 3—babandi kotambola na mabele na kati ya mbu mpe ngámbo na ngámbo, mai etɛlɛmi lokola bifelo ya minene. (Kobima 14:21; 15:8) Okoki mpe komona ndenge Nzambe abatelaki bango na esobe: mai ebimi na libanga; biloko ya kolya oyo ezali lokola mwa mbuma ya mpɛmbɛ na mabele. (Kobima 16:31; Mitángo 20:11) Awa, Yehova amonisi ete asuki kaka kozala na nguya te, kasi asalelaka mpe yango mpo na bolamu ya basaleli na ye. Mitema na biso ekiti mpenza lokola toyebi ete mabondeli na biso ekendaka epai ya Nzambe moko ya nguya, oyo “azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango ya mpasi,” boye te?—Nzembo 46:1.
“Okozala sembo”
Tiká tótalela malamumalamu maloba ya Davidi. Maloba ya Ebre oyo ebongolami na “okozala sembo” ekoki mpe kobongolama na “kosala na motema boboto.” Bosembo ya solosolo eutaka na bolingo. Na bolingo nyonso, Yehova akangamaka na baoyo bazali sembo epai na ye.
Simbá mpe ete, bosembo esukaka kaka na motema te; emonanaka na misala. Yehova asalaka na bosembo, ndenge Davidi amonaki yango. Na ntango ya mpasi na bomoi na ye, Yehova asungaki ye, na bosembo nyonso abatelaki ye mpe akambaki mokonzi yango ya sembo. Na botɔndi nyonso, Davidi andimaki ete Yehova nde abikisaki ye “na lobɔkɔ ya banguna na ye nyonso.”—2 Samwele 22:1.
Maloba ya Davidi ezali na ntina nini mpo na biso? Yehova abongwanaka te. (Yakobo 1:17) Azalaka ntango nyonso sembo na mitinda na ye mpe na bilaka na ye. Na nzembo mosusu, Davidi akomaki boye: “Yehova . . . akotika te bato na ye ya sembo.”—Nzembo 37:28.
Biloko ya motuya ya elimo
Loná ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke
7 Ndakisa ya komikitisa ya Nzambe esimbaki mpenza motema ya Davidi, mokomi ya nzembo. Ayembelaki Yehova ete: “Okopesa ngai nguba na yo ya lobiko, mpe komikitisa na yo nde ezali kokómisa ngai moto monene.” (2 Sa. 22:36) Davidi amonisaki ete soki akómaki mokonzi ya Yisraele, ezalaki nde mpo na komikitisa ya Yehova. Yango elingi koloba ete Nzambe amikitisaki mpo na kotyela ye likebi. (Nz. 113:5-7) Asalaka mpe bongo mpo na biso? Eloko nini tozali na yango, ezala bizaleli ya malamu, mayele to makoki, mpe mikumba, ‘oyo Yehova apesaki biso kopesa te?’ (1 Ko. 4:7) Moto oyo amitambwisaka lokola moto oyo azali mpenza moke azali moto “monene” mpamba te azali na valɛrɛ mingi na ndenge azali mosaleli ya Yehova. (Luka 9:48) Tótalela sikoyo ndenge nini ekoki kosalema bongo.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: Satana nde moto abimisaka mpasi nyonso oyo ekómelaka moto?
Yobo ayikaki mpiko mpe atikalaki sembo
7 Lelo oyo, baklisto oyo bazali konyokwama ndenge mpenza Yobo anyokwamaki bazali mingi te; atako bongo, bazali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Mingi bazali konyokwama mpo na kondima na bango to mpe bazali na mikakatano na kati ya mabota. Kozanga mbongo to maladi ekoki kosilisa moto mayele. Bamosusu kutu bandimaki kokufa mpo na kondima na bango. Kasi, tosengeli te kokanisa ete Satana nde atindaka likambo nyonso ya mpasi oyo ekómeli biso. Mikakatano mosusu eyelaka biso na bozoba na biso moko, mpe maladi mosusu oyo tobɛlaka ezali ya makila, elingi koloba ete tozwaka yango epai ya baboti na biso banda kobotama na biso. (Bagalatia 6:7) Lisusu, bobange eyaka na mikakatano na yango oyo mpe eponaka elongi te. Makama ekoki koyela ata nani kati na biso. Biblia ezali komonisa polele ete lelo oyo, Yehova abatelaka basaleli na ye na makama wana na ndenge ya likamwisi te.—Mosakoli 9:11.
8 Kasi, Satana akoki kosalela minyoko oyo tokutani na yango mpo na kolɛmbisa kondima na biso. Ntoma Paulo alobaki ete azalaki na “nzubɛ moko na kati ya mosuni, anzelu moko ya Satana,” oyo azalaki ntango nyonso ‘kobɛta ye mbata.’ (2 Bakolinti 12:7) Ata soki nzubɛ yango ezalaki maladi; na ndakisa, azalaki komona malamu te, to mokakatano mosusu, Paulo ayebaki ete Satana akokaki kosalela yango mpo na kosilisa ye esengo mpe kolɛmbisa ye. (Masese 24:10) Lelo oyo, Satana akoki kotinda bandeko ya libota, baninga ya kelasi, to mpe bakonzi ya Leta bányokola basaleli ya Nzambe.
25-31/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 23-24
“Likabo na yo ezali mpenza ya motuya?”
it-1-F lok. 153 par. 3
Arauna
Emonani ete Arauna alingaki apesa esika, bangombɛ mpe nzɛtɛ lokola mbeka, kasi Davidi akangamaki kaka afuta Arauna mbongo mpo na biloko yango. Lisolo oyo ezali na 2 Samwele 24:24 emonisi ete Davidi asombaki esika ya kotuta mbuma mpe bangomɛ na motángo ya shekele 50 (110 $). Nzokande, 1 Ntango 21:25 emonisi ete Davidi asombaki esika na motángo ya shekele 600 ya wolo (pene na 77000 $). Emonani ete mokomi ya mokanda ya 2 Samwele alobeli kaka motángo ya mbongo oyo basombeli esika ya kotonga etumbelo mpe biloko ya kotumba mbeka. Nzokande, mokomi ya mokanda ya 1 Ntango alobeli motángo oyo esangisi makambo nyonso oyo ekosalema mpo na kotongama ya tempelo na esika yango. (1Nt 22:1-6 ; 2Nt 3:1)
Lokola lopango ya tempelo ezalaki monene mpenza, emonani ete motángo ya shekele 600 ya wolo ezali mbongo oyo basombelaki lopango yango ya monene kasi te kaka mwa esika ya moke oyo Davidi atongelaki etumbelo mpo na mbala ya liboso.
Tókanga ntina ya ‘makambo ya ebandeli ya solo’
8 Kopona nyama ekokaki kozala mpasi te mpo na Moyisraele oyo, na bolingo na ye moko, alingi kopesa mbeka mpo amonisa botɔndi na ye epai ya Yehova, to kopesa mbeka ya kotumba mpo na kosɛnga ete Nzambe andima ye. Moto yango azalaki na esengo ya kopesa Yehova eloko na ye oyo eleki malamu. Lelo oyo, bakristo bapesaka te bambeka ya banyama oyo Mibeko ya Moize esɛngaki; kasi bapesaka bambeka na ndenge bapesaka ntango, makasi mpe biloko na bango mpo na kosalela Yehova. Ntoma Paulo alobaki ete ‘kosakola polele’ elikya na biso mpe “kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko” ezali bambeka oyo esepelisaka Nzambe. (Ebr. 13:15, 16) Ndenge oyo mosaleli mokomoko ya Yehova asalaka makambo yango emonisaka soki azali mpenza na botɔndi mpo na nyonso oyo Nzambe apesá biso. Na yango, tokoki kokokanisa makanisi oyo etindaka biso tósala mosala ya Nzambe lelo oyo ná makanisi oyo ezalaki kotinda bato bápesa bambeka na bolingo na bango moko na ntango ya kala.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Samwele
23:15-17. Davidi azalaki mpenza komemya mobeko ya Nzambe mpo na bomoi mpe makila; yango wana, na libaku yango, aboyaki kosala likambo oyo emonanaki mpenza ete ekobuka mobeko yango. Biso mpe tosengeli kotalelaka mibeko nyonso ya Nzambe ndenge yango.
01-07/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 1-2
“Ozwaka mateya na mabunga na yo?”
it-2-F lok. 870 par. 3
Salomo
Ntango kaka bayokaki makɛlɛlɛ oyo ezalaki kouta na Gihone, pene ya esika oyo bazalaki, mpe ndenge bato bazalaki koganga ete: “Mokonzi Salomo azala na bomoi!”, na mbala moko Adoniya ná bato oyo bazalaki elongo na ye babandaki kolɛnga mpe kotɛlɛma mpe kokende moto na moto na nzela na ye. Salomo amonisaki bato kimya oyo ekozala na boyangeli na ye, na ndenge aboyaki koboma moto liboso afanda na kiti ya bokonzi. Kasi soki ezalaka Adoniya nde akómaka mokonzi na esika ya Salomo, mbɛlɛ Salomo alingaki kobomama. Adoniya akimaki mpe akendaki kobatama na esika mosantu mpo abomama te; bongo Salomon atindaki momemi-nsango moko epai ya Adoniya mpe na nsima bamemaki ye liboso ya Salomo. Mokonzi Salomo ayebisaki Adoniya ete akokoba kozala na bomoi molai soki bamoni ata likambo moko te ya mabe epai na ye, nsima na yango atikaki ye akende na ndako na ye.— 1Ba 1:41-53.
it-1-F lok. 48 par. 4
Adoniya
Nzokande, na nsima ya liwa ya Davidi, Adoniya akendaki kokutana na Bate-sheba mpo na kondimisa ye mpe kotinda ye asɛnga Salomo, apesa ye Abishage elenge mwasi oyo azalaki kobatela mpe kosalela Davidi, mpo akóma mwasi na ye. Na yango, Adoniya alobaki na Bate-sheba boye: “Yo moko oyebi malamu ete bokonzi esengelaki kokóma nde ya ngai, [. . .] ezali epai na ngai nde Yisraele mobimba batyaki miso na bango mpo nakóma mokonzi.” Adoniya alɛmbaki nzoto, atako maloba na ye emonisaki ete andimaki kobungisa lotomo oyo azalaki na yango mpo Nzambe nde alingaki esalema bongo. (1Ba 2:13-21) Likambo oyo asɛngaki ezalaki kaka mpo na kokitisa mpasi oyo ayokaki na ndenge abungisaki bokonzi; kasi azalaki kaka na elikya ete mokano oyo azalaki na yango ya kokóma mokonzi, nsukansuka ekokokisama. Kasi, na kotalela momeseno moko ya bato ya Moyen-Orient ya kala, basi mpe bamakango ya mokonzi moko basengelaki kotikala kaka ya mokonzi oyo akolanda ye na nsima. (talá 2Sa 3:7; 16:21) Ezalaki na ndenge wana nde Salomo atalelaki likambo oyo mama na ye ayaki kosɛnga. Na yango apesaki mitindo báboma Adoniya, mpe Benaya akakatanaki te mpo na kokokisa etinda yango.—1Ba 2:22-25.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Mikonzi
2:37, 41-46. Ezali mpenza likama kokanisa ete moto akoki kobuka mobeko ya Nzambe kozanga ete azwa etumbu! Baoyo bazali kotika na nko nyonso ‘nzela ekangamakangamá oyo ememaka na bomoi,’ bakobuka mbuma ya ekateli wana ezangi bwanya.—Matai 7:14.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: Yekolá epai ya baoyo bazali kosala mingi na mosala ya kosakola
Kobá kokolisa mayele na yo ya kosakola
1 Biso bakristo tosengeli kokolisa mayele na biso ya kosakola. Yango wana Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo mokemoke na mosala ya kosakola. (Luka 9:1-5; 10:1-11) Ezali mpe mpo na yango nde Akila ná Prisile bazwaki Apolosi mpe “bamonisaki ye polele nzela ya Nzambe.” (Mis. 18:24-26) Kaka mpo na ntina yango, ntoma Paulo alendisaki Timote, oyo azalaki mopalanganisi ya nsango malamu oyo akɔmeli, ete amipesa na mateya na ye mpo “bato nyonso bámona polele” ete azali kokende liboso. (1 Tim. 4:13-15) Ezala tosalelaka Nkolo lokola baombo banda bambula mingi na mosala ya kosakola nsango malamu, tosengeli kokoba kokolisa mayele na biso ya kosakola.
2 Yekolá epai ya basusu: Lolenge moko ya kokolisa mayele na biso ezali ya koyekola epai ya basusu. (Mas. 27:17) Na yango, tyá likebi ntango mosakoli oyo obimi elongo na ye azali kosolola na moto. Sɛngá basakoli oyo bamesani na mosala bápesa yo toli, mpe yoká na likebi makambo oyo bakoyebisa yo. (Mas. 1:5) Ozalaka na mokakatano ya kozongela bato, ya kobanda koyekola na bango Biblia, to ya kosakola na mitindo mosusu? Zwá ekateli ya kokutana na mokɛngɛli ya etuluku na bino to mosakoli mosusu oyo amesani na mosala mpe sɛngá ye asalisa yo. Kobosana mpe te ete elimo santu ya Yehova ekoki kokolisa makoki na biso; yango wana sɛngáká yango mbala na mbala na libondeli.—Luka 11:13.
3 Soki bapesi yo toli mpo obongisa likambo moko, kosilika te ata soki osɛngaki yango te. (Mos. 7:9) Lokola Apolosi, ndimá lisalisi na komikitisa nyonso mpe na botɔndi. Kosala bongo emonisaka bwanya.—Mas. 12:15.
08-14/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 3-4
“Ntina ya kozala na bwanya”
Azali ndakisa to likebisi mpo na yo?
4 Na ebandeli ya boyangeli ya Salomo, Nzambe abimelaki ye na ndɔtɔ mpe ayebisaki ye asɛnga eloko oyo alingi. Lokola Salomo amonaki ete ayebi makambo mingi te, asɛngaki bwanya. (Tángá 1 Bakonzi 3:5-9.) Nzambe asepelaki ndenge mokonzi asɛngaki ye bwanya na esika asɛnga bozwi ná nkembo. Na yango, apesaki Salomo “motema ya bwanya mpe ya mayele,” bakisá mpe bozwi. (1 Bak. 3:10-14) Ndenge Yesu amonisaki yango, bwanya ya Salomo ezalaki mingi na boye ete mokonzi mwasi ya Sheba ayokaki nsango na yango mpe asalaki mobembo molai mpo na koya komona yango ye moko.—1 Bak. 10:1, 4-9.
5 Biso tozali kolikya te kozwa bwanya na ndenge ya likamwisi. Salomo alobaki ete “Yehova ye moko apesaka bwanya,” kasi akomaki ete tosengeli kosala milende mpo na kozwa yango. Alobaki boye: “Otyela bwanya likebi, mpo obalusa motema na yo epai ya bososoli.” Asalelaki mpe maloba mosusu, na ndakisa “okobelela mpo na” bwanya, “okobi koluka” yango, “okobi kolukaluka” yango. (Mas. 2:1-6) Na ntembe te, tokoki kozwa bwanya.
6 Ekozala malamu komituna boye: ‘Nalingaka bwanya ndenge Salomo alingaki yango?’ Mikakatano ya nkita etindaka bato mosusu bámipesa kaka na mosala mpe na koluka mbongo to mpe bábongola bikateli na bango na oyo etali kelasi oyo bakotánga mpe bambula boni bakolekisa na kelasi. Bongo yo ná libota na yo? Makambo oyo boponaka emonisaka ete bozwaka bwanya ya Nzambe na motuya mpe bozali koluka yango? Bosengeli nde kobongola ndenge na bino ya kotalela mbongo mpe ya kotánga kelasi mpo bokoka komipesa na koluka bwanya? Na ntembe te, soki bozwi bwanya mpe bosaleli yango, ekozala mpo na bolamu na bino ya seko. Salomo akomaki boye: “Boye okokanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.”—Mas. 2:9.
Biloko ya motuya ya elimo
Yehova azali Nzambe ya kondimana
15 Na kobongisáká bakitani ya Abalayama lokola ekólo na nsé ya mibeko, Yehova apambolaki bango engebene elaka na ye epai na tata yango ya mabota. Na mobu 1473 L.T.B., Yosua, mokitani ya Mose, akambaki Yisalaele kino na mokili ya Kanana. Kokabola mokili oyo elandaki kati na mabota ya Yisalaele ekokisaki elaka ya Yehova etali kopesa mokili yango na mombóto ya Abalayama. Ntango Yisalaele ezalaki sembo, Yehova akokisaki elaka na ye ya kopesa bango bolóngi likoló na banguna na bango. Yango emonanaki mpenzampenza na boyangeli ya Mokonzi Davidi. Na boyangeli ya Salomo, mwana ya Davidi, likambo ya misato ya kondimana ya Abalayama ekokisamaki. “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo.”—1 Bakonzi 4:20.
15-21/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 5-6
“Batongaki mpenza na motema mobimba”
Oyebaki yango?
Banzete ya sɛdrɛ ya Libá eyebanaki mingi mpo na ndenge ezalaki koumela, ezalaki kitoko, mpe mpo na nsolo kitoko ya mabaya na yango, mpe longola yango banyama nkɛkɛ ezalaki kokoka te kobebisa yango. Na yango, Salomo azalaki kosalela biloko ya kitoko mpo na kotonga tempelo. Lelo oyo, zamba oyo ezalaki na banzete ya sɛdrɛ oyo etondaki kala na bangomba ya Libá, ekómá moke mpenza, etikalá kaka mwa banzete ya mikemike.
it-1-F lok. 411 par. 1
Nzete ya sɛdrɛ
Kosala mabaya na nzete ya sɛdrɛ, ezalaki mosala oyo ezalaki kosɛnga bamilio ya basali mpo na kokataka banzete, komema yango na Tyre to na Sidone na bokula ya Méditerranée, kokangisa yango na bansinga (radeau) mpe kokitisa yango tii na mbu mpo etyola pembenipembeni ya bokula, mbala mosusu tii na Yope. Na nsima, bazalaki komema banzete yango na nzela ya mabele tii na Yerusaleme. Mosala wana nyonso etambolaki malamu mpo na kondimana oyo Hirame ná Salomo basalaki. (1Ba 5:6-18 ; 2Nt 2:3-10) Lokola mabaya yango ezalaki kaka koya, yango wana bato bazalaki koloba ete na boumeli ya boyangeli na ye, Salomo akómisaki ‘mabaya ya sɛdrɛ mpamba lokola banzete ya sikomore’.—1Ba 10:27 ; talá mpe Yis 9:9, 10.
it-2-F lok. 1047 par. 4
Tempelo
Ntango azalaki kobongisa mosala ya kotonga Tempelo, Salomo azwaki bato 30000 na Yisraele, mpe azalaki kotinda bato 10000, bato na bato na ngala na bango mpo bálekisa sanza moko na Libá, na nsima bazalaki kozonga mpo na kolekisa sanza mibale na bandako na bango. (1Ba 5:13, 14) Azwaki mpe bato 70000 lokola bato oyo bamemaka mikumba ya kilo na kati ya “bato oyo bafandi bapaya” na katikati ya bana Yisraele mpe bato 80000 mpo na kokataka mabanga na ngomba. (1Ba 5:15 ; 9:20, 21 ; 2Nt 2:2) Lisusu Salomo aponaki mpe bato 550 mpo bazala lokola bakomisɛrɛ oyo bazalaki kotambwisa mosala mpe emonani ete bato 3300 bazalaki kokamba bato oyo bazalaki kosala mosala. (1Ba 5:16 ; 9:22, 23) Ekoki kozala ete na bato yango, kaka bato 250 nde bazalaki bana ya Yisraele mpe bato 3600 bazalaki bato oyo “bafandaki bapaya” na Yisraele.—2Nt 2:17, 18.
Biloko ya motuya ya elimo
g 7/12 lok. 24, etanda
Biblia—Buku oyo ezali na bisakweli ya solosolo, Eteni 1
BADATI YA SIKISIKI
Ndakisa moko oyo ezali na 1 Bakonzi 6:1 emonisi ete badati ya Biblia ezali na bosikisiki; vɛrsɛ yango elobeli ntango oyo Mokonzi Salomo abandaki mosala ya kotonga tempelo na Yerusaleme. Tozali kotánga boye: “Esalemaki boye: na mbula ya nkama minei na ntuku mwambe [mbula 479 na mobimba na yango] nsima ya kobima ya bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito, na mbula ya minei [ya boyangeli ya Salomo], na sanza ya Zive, elingi koloba sanza ya mibale, Salomo, nsima ya kokóma mokonzi ya Yisraele, abandaki kotonga ndako ya Yehova.”
Badati ya Biblia emonisi ete mbula ya minei ya boyangeli ya Salomo ezalaki na mobu 1034 L.T.B. Soki tozongi nsima kobanda na dati wana, mbula 479 ekomema biso na mobu 1513 L.T.B., mbula oyo Bayisraele babimaki na Ezipito.
22-28/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 7
“Mateya oyo tokoki kozwa na makonzí mibale”
“Okotimola motako na bangomba”
Mokonzi Salomo asalelaki ebele ya kwivre mpo na tempelo ya Yerusaleme. Mingi kati na yango tata na ye Davidi nde azwaki ntango abundisaki bato ya Siri mpe alongaki bango. (1 Ntango 18:6-8) “Mbu ya ebende oyo enyangwisami” ya kwivre, saani ya monene oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela mpo na kosukola, ekokaki kokɔta litre 66000 ya mai mpe kilo na yango ekoki kozala ya tɔni 30. (1 Bakonzi 7:23-26, 44-46) Batɛlɛmisaki mpe makonzí mibale ya minene ya kwivre liboso ya porte ya tempelo. Bosanda na yango ezalaki ya mɛtrɛ mwambe, mpe likoló na yango ezalaki na mitó oyo ezalaki na molai ya mɛtrɛ soki mibale. Na kati na yango ezalaki polele mpe ezalaki na bonene ya santimɛtrɛ nsambo na ndambo, mpe na molai ya mɛtrɛ moko na ndambo. (1 Bakonzi 7:15, 16; 2 Ntango 4:17) Soki tokanisi ebele ya kwivre oyo bazalaki kosalela mpo na biloko wana, ezali mpenza kokamwisa!
it-1-F lok. 355
Boaze, II
Makonzí mibale ya kwivre oyo etɛlɛmaki liboso ya porte ya tempelo kitoko ya Salomo ezalaki na bankombo. Bazalaki kobenga oyo ya ngámbo ya nɔrdi Boaze, oyo mbala mosusu elimboli “Na nguya”. Mpe likonzí oyo ezalaki na ngámbo ya sudi ezalaki kobengama Yakine, oyo elimboli “Tiká ete [Yehova] atɛlɛmisa ngwi”. Na yango, soki basangisi yango nyonso mibale mpe babandi kotánga kobanda na lobɔkɔ ya mwasi soki tozali kotala na ngámbo ya Ɛsti, bato bazalaki komona likanisi oyo: ‘Tiká ete [Yehova] atɛlɛmisa ngwi [tempelo] na nguya.’—1Ba 7:15-21 ; talá CHAPITEAU.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 257
Kosokola nzoto
Bopɛto ya nzoto ezali likambo oyo esɛngisami epai ya bato oyo basambelaka Yehova na bosantu mpe bopɛto. Likambo yango emonisami na misala oyo ezalaki kosalema na tabernakle mpe na tempelo. Liboso ya kotyama lokola banganga-nzambe, nganga-nzambe monene Arona ná bana na ye ya mibali basukolaki nzoto liboso ya kolata bilamba na bango ya mosala. (Kob 29:4-9 ; 40:12-15 ; Le 8:6, 7) Mpo na kosukola mabɔkɔ ná makolo, banganga-nzambe bazalaki kosalela mai oyo ezalaki na kati ya saani monene ya motako oyo ezalaki na lopango ya tabernakle, oyo na nsima, ekómaki mbu monene ya ebende oyo enyangwisami na tempelo ya Salomo. (Kob 30:18-21 ; 40:30-32 ; 2Nt 4:2-6) Na mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene azalaki kosukola nzoto mbala mibale. (Le 16:4, 23, 24) Mpe baoyo bazalaki komema ntaba-mobali mpo na Azazele, mpe biloko mosusu oyo etikalaka na ntango ya bambeka ná ngɔmbɛ-mwasi oyo esengelaki kobomama, basegelaki kosukola nzoto mpe bilamba na bango moko liboso ya kokɔta na kaa.— Le 16:26-28 ; Mit 19:2-10.
29/08–04/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 8
“Libondeli ya komikitisa oyo Salomo asalaki na motema moko liboso ya bato”
Yekoláká Biblia mpo na kobongisa mabondeli na yo
9 Mpo Nzambe ayoka libondeli na biso, esengeli kouta na motema. Salomo asalaki libondeli moko oyo eutaki mpenza na motema, oyo ezali na 1 Bakonzi mokapo 8, liboso ya bato ebele oyo bayanganaki na Yerusaleme na mokolo ya bofungoli tempelo ya Yehova na mobu 1026 L.T.B. Nsima ya kokɔtisa sanduku ya kondimana na Esika oyo Eleki Bosantu, lipata ya Yehova etondaki na tempelo, Salomo akumisaki Nzambe.
10 Talelá libondeli ya Salomo mpe simbá malamu maloba yango na motema. Salomo andimaki ete kaka Yehova nde ayebi motema ya moto. (1 Bak. 8:38, 39) Libondeli yango emonisi mpe ete elikya ezali mpo na moto oyo asali lisumu mpe ‘azongeli Nzambe na motema na ye mobimba.’ Soki monguna akangi basaleli ya Nzambe, Yehova akoyoka libondeli na bango soki babondeli ye na motema mobimba. (1 Bak. 8:48, 58, 61) Ya solo, libondeli na biso esengeli kouta na motema.
Bótombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli
7 Ezala ete tozali kosala libondeli na nkombo ya bato ebele to mpo na biso moko, tosengeli kobosanaka motinda ya Makomami oyo te: tosengeli kozala na komikitisa na kati ya mabondeli na biso. (2 Ntango 7:13, 14) Mokonzi Salomo alakisaki komikitisa na libondeli oyo asalaki na nkombo ya bato nyonso na ntango ya bofungoli tempelo ya Yehova na Yelusaleme. Salomo asilisaki kotonga moko na bandako oyo elekaki kitoko na mokili mobimba na ntango wana. Kasi, abondelaki na komikitisa ete: “Solo Nzambe akofanda na mokili? Talá lola mpe likoló na lola ikoki kozingela ye te, na koleka ndako oyo ngai natongeli yo yango ekoki te.”—1 Bakonzi 8:27.
8 Na ndakisa ya Solomo, tosengeli kozala na komikitisa ntango tozali kosala libondeli na nkombo ya bato ebele. Atako tokoloba lokola basango te, kasi tokoki kolakisa komikitisa na mongongo na biso. Mabondeli oyo esalami na komikitisa ezalaka na maloba ya makasimakasi te to ya kokamwisa te. Mabondeli oyo esalami na komikitisa ebendaka likebi ya bato epai ya moto oyo azali kosala yango te, kasi epai na Ye oyo bazali kosambela. (Matai 6:5) Komikitisa emonanaka mpe na makambo oyo tozali koloba na kati ya libondeli. Soki tozali kosala libondeli na komikitisa, tokomonisa te lokola ete tozali kosɛnga Nzambe asala likambo na ndenge oyo biso tolingi. Nzokande, tokobondela Yehova asala na ndenge oyo eyokani na mokano na ye mosantu. Mokomi na nzembo apesaki ndakisa ya elimo oyo ebongi ntango abondelaki ete: “Ɛ [Yehova], nakobondela yo ete, Bikisá biso; ɛ [Yehova], nakobondela yo ete, Longisá biso.”—Nzembo 118:25; Luka 18:9-14.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 475 par. 3
Likoló
Salomo, moto oyo atongaki tempelo ya Yerusaleme, alobaki “ likoló [. . .] mosika kuna na likoló mpenza,” ekoki te kokoka Nzambe. (1Ba 8:27) Lokola Yehova azali mozalisi ya makoló, azali mpenza likoló koleka yango nyonso, mpe “nkombo na ye yango moko ezali likoló mpenza koleka nyonso. Lokumu na ye eleki mabele mpe likoló”. (Nz 148:13.) Yehova amekaka bonene ya makoló kozanga kokakatana kaka ndenge moto akoki komeka bonene ya eloko moko, soki asemboli lobɔkɔ na ndenge oyo ekosala ete eloko yango ezwa ntaka oyo ebandi na mosapi ya monene tii na mosapi ya moke ya lobɔkɔ na ye. (Yis 40:12) Salomo alingaki koloba te ete Nzambe azangi esika ya kofanda to azalaka esika nyonso, elingi koloba na bisika nyonso mpe na makambo nyonso. Mpo na komonisa yango, Salomo alobi lisusu ete Yehova ayokaka ‘kuna na likoló, na esika oyo afandaka’, elingi koloba likoló esika bikelamu ya elimo bafandaka.—1Ba 8:30, 39.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: “Biso basakoli tosengeli kobondelaka”
Biso basakoli tosengeli kobondelaka
1 Tokoki te kokokisa mosala ya kosakola na makasi na biso moko. Yehova apesaka biso makasi mpo na kokokisa mosala yango. (Flp. 4:13) Atindaka baanzelu na ye mpo na kosalisa biso tókutana na bampate. (Em. 14:6, 7) Yehova nde akolisaka mboto ya solo oyo tolonaka mpe tosopelaka mai. (1 Ko. 3:6, 9) Ezali na ntina mingi ete biso basakoli tóbondelaka Tata na biso ya likoló!
2 Mpo na biso moko: Tosengeli kobondelaka mbala nyonso oyo tobimi na mosala ya kosakola. (Ef. 6:18) Tokoki kobondela mpo na makambo nini? Tokoki kobondela mpo tósepela na teritware na biso mpe tózala na mpiko. (Mis. 4:29) Tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso tókutana na bato ya mitema sembo oyo tokoki koyekola na bango Biblia. Soki batuni biso motuna, tokoki kosala libondeli ya mokuse na nse ya motema mpo na kosɛnga Yehova asalisa biso tópesa eyano ya malamu. (Neh. 2:4) Tokoki mpe kosɛnga bwanya mpo tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso. (Yak. 1:5) Longola yango, Yehova asepelaka ntango tozali kotɔnda ye mpo na libaku malamu ya kozala basakoli.—Kol. 3:15.
3 Mpo na basusu: Tosengeli mpe kobondelaka mpo na basusu, ata mpe kotánga bankombo ya baninga na biso basakoli na mabaku oyo ebongi kosala yango. (Yak. 5:16; Mis. 12:5) Maladi ezali kopekisa yo osakolaka mingi? Boye bondeláká mpo na baninga na yo basakoli oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ. Yebá ete mabondeli oyo ozali kosala mpo na bango ekoki mpenza kosalisa bango! Ebongi mpe kobondela mpo ete bakonzi ya Leta bázwa te bikateli oyo ekobebisa mosala na biso ya kosakola, mpo bandeko na biso ‘bákoba kofanda na kimya mpe na mobulu te.’—1 Tim. 2:1, 2.
4 Kosakola nsango malamu na mabele mobimba oyo bato bafandi ezali mokumba monene mpenza. Soki tozali ‘kotingama na mabondeli,’ Yehova akosalisa biso tókokisa yango.—Rom. 12:12.