Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita bomoi mpe mosala
© 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
07-13/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 21
Mitinda oyo ekosalisa yo ozala na libala ya esengo
Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?
Bikateli ya mbangumbangu ekoki kozala bikateli ya mabe. Masese 21:5 elobi boye: “Makanisi ya bato ya mosala makozwisa biloko mingi, nde ye oyo akosalaka mbangumbangu akozanga bobele kozanga.” Na ndakisa, bilenge oyo lolango ezwi bango basengeli kotika ntango liboso ya kozwa ekateli ya kobalana. Soki basali bongo te, bakoki kokutana na likambo oyo William Congreve, mokomi moko ya Angleterre na ebandeli ya bambula 1700, alobaki: “Soki moto aweli kobala, akokóma komilela bomoi na ye mobimba ete ‘zoba liboso, mayele nsima.’”
Ndenge ya kozala na libala ya malamu
Bózala na komikitisa. “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na komikitisa bómona basusu ete baleki bino.” (Bafilipi 2:3) Matata mingi ebimaka mpo babalani bamonisaka lolendo mpe balukaka kopesa molongani foti na esika bámonisa komikitisa mpe báluka oyo eleki malamu mpo na bango mibale. Komikitisa ekoki kosalisa bino bótɛmɛla mposa ya koluka kaka kolonga ntango matata ebimi.
“Sepelá na mwasi ya bolenge na yo”
13 Bosengeli kosala nini soki mikakatano ya libala na bino ezali kouta na makambo oyo moto na moto azali kosala moninga? Bosengeli kosala milende mpo na kosilisa yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete mwasi moko ná mobali na ye bakómi na momeseno ya kolobana maloba ya mabe. (Masese 12:18) Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, yango ekoki kosala mabe mingi. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Kofanda na mokili ya lisobe eleki malamu kozala na mwasi ya kowelana mpe na nkanda.” (Masese 21:19) Soki ozali mwasi mpe ozali na libala ya ndenge wana, osengeli komituna boye, ‘Ezaleli na ngai nde esalaka ete mobali na ngai akima kolekisaka ntango na ngai?’ Biblia elobi na mibali boye: “Bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” (Bakolose 3:19) Soki ozali mobali, omituna boye: ‘Nazalaka nde nkandankanda, mpe yango etindaka mwasi na ngai aluka moto mosusu oyo akoki kosɛka na ye?’ Ya solo, makambo nyonso wana esengeli kopesa moto nzela te ya komipesa na mabɔkɔ ya moto mosusu. Nzokande, lokola toyebi ete likambo yango ekoki kosalema, ezali malamu mwasi ná mobali básololaka polele mpo na kosilisa mikakatano na bango.
Biloko ya motuya ya elimo
Bimonaneli ya Bokonzi ya Nzambe ekokisami
9 Yesu azali lisusu te moto oyo amati na mwana ya mpunda oyo ememaka mikumba; azali lelo oyo Mokonzi monene. Biblia ezali komonisa ye amati na mpunda oyo epotaka mbangu—nyama oyo Biblia esalelaka lokola elilingi ya etumba. (Masese 21:31) Emoniseli 6:2 elobi boye: “Talá! Mpunda moko ya mpɛmbɛ; mpe moto oyo afandaki likoló na yango azalaki na litimbo; mpe bapesaki ye motole, mpe abimaki na kolonga mpe mpo na kosukisa bolongi na ye.” Lisusu, na ntina na Yesu, Davidi akomaki boye: “Lingenda ya makasi na yo, [Yehova] akotinda yango longwa na Siona, mpe akoloba ete: ‘Zalá na bokonzi na kati ya bayini na yo.’”—Nzembo 110:2.
14-20/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 22
Mitinda oyo ekosalisa yo mpo na kobɔkɔla bana
Ntango bakokola bakosalela Nzambe?
7 Soki babalani balingi kobota bana, basengeli komituna boye: ‘Tozali mpenza bato ya komikitisa, oyo balingaka Yehova mpe Liloba na ye? Yehova akoki mpenza kopona biso mpo tóbatela mwana oyo tokobota?’ (Nz. 127:3, 4) Soki ozali moboti, omituna boye: ‘Nateyaka bana na ngai báyeba ntina ya kosala mosala makasi?’ (Mos. 3:12, 13) ‘Nasalaka nyonso mpo nabatela bana na ngai na makambo oyo bakoki kokutana na yango na mokili ya Satana, oyo ekoki kobebisa nzoto mpe bizaleli na bango?’ (Mas. 22:3) Okoki te kobatela bana na yo na makama nyonso oyo bakoki kokutana na yango. Yango ekoki kosalema te. Kasi, okoki koyebisa bango makambo oyo bakoki kokutana na yango na bomoi, mpe na bolingo nyonso koteya bango ndenge ya kotyela Biblia motema. (Tángá Masese 2:1-6.) Na ndakisa, soki moto moko ya libota na bino atiki kosalela Yehova, salisá bana na yo, na nzela ya Liloba ya Nzambe, báyeba ntina oyo basengeli kotikala sembo epai ya Yehova. (Nz. 31:23) To soki moto moko oyo bolingaka mingi akufi, lakisá bana na yo bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kosalisa bango báyikela likambo yango mpiko mpe bázwa kimya.—2 Ko. 1:3, 4; 2 Tim. 3:16.
Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova
17 Bóbanda koteya bana ntango bazali naino mike mpenza. Ezalaka malamu mingi soki baboti babandi koteya bana ntango bazali naino bana mike mpenza. (Mas. 22:6) Tózwa ndakisa ya Timote, oyo na nsima akómaki kosala mibembo elongo na ntoma Paulo. Mama na ye Enise mpe nkɔkɔ na ye Loisi bateyaki ye ‘banda bomwana mpenza.’—2 Tim. 1:5; 3:15.
18 Jean-Claude ná Peace, oyo bafandaka mpe na Côte d’Ivoire, basalisaki bana na bango nyonso motoba bálinga Yehova mpe básalela ye. Nini esalisaki bango bálonga? Balandaki ndakisa ya Enisi ná Loisi. Balobi boye: “Tobandaki kokɔtisa malamumalamu Liloba ya Nzambe na mitema ya bana na biso kaka mwa moke nsima ya kobotama na bango.”—Mib. 6:6, 7.
19 “Kokɔtisa malamumalamu” Liloba ya Yehova na mitema ya bana elimboli nini? Maloba “kokɔtisa malamumalamu” elimboli “koteya mpe kozongela likambo mbala na mbala.” Mpo na kosala bongo, baboti basengeli kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango. Baboti mosusu bakoki kolɛmba nzoto soki bazali kozongela malako moko mbala na mbala. Kasi, baboti basengeli kosala makasi bámona ete ezali libaku ya kosalisa bana na bango bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe mpe básalela yango.
Baboti, bópesa bana na bino ndakisa malamu
Bana bazali kaka bana, mpe mingi kati na bango balingaka kosala kaka oyo motema na bango elingi, ata mpe kokóma batomboki. (Genese 8:21) Baboti bakoki kosala nini? Biblia elobi boye: “Ebebe ezwami na motema ya mwana; nde [fimbo] ya etumbu ekobengana yango mosika na ye.” (Masese 22:15) Bato mosusu bamonaka ete kosalela fimbo ezali nde konyokola bana, mpe balobaka ete ezali likambo oyo eleká ngala. Ya solo, Biblia epekisi konyokola bato, ezala na kosimba bango na nzoto to na maloba. Kasi, “fimbo” oyo balobeli awa, atako mbala mosusu ezalaka fimbo ya solo, ezali mpenza nde komonisa bokonzi ya baboti, oyo basalelaka na lisɛki te, kasi mpe na bolingo mpe na ndenge ebongi, mpo na bolamu ya libela ya bana na bango.—Baebele 12:7-11.
Biloko ya motuya ya elimo
Zalá na esengo na oyo okoki kosala na mosala ya Yehova
11 Ndenge moko mpe, tokoki kobakisa esengo na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki na mokumba oyo bapesi biso na mosala ya Yehova. ‘Omipesa mingi’ na mosala ya kosakola mpe na makambo ya lisangá. (Mis. 18:5; Ebr. 10:24, 25) Bongisáká makita malamu mpo opesa biyano oyo ekolendisa. Zwáká na motuya mingi masolo nyonso oyo bapesi yo na likita ya kati ya pɔsɔ. Soki basɛngi yo okokisa mokumba moko na lisangá, kómáká na ngonga mpe zalá moto oyo bakoki kotyela motema. Kokanisa te ete mokumba oyo bapesi yo ezali na ntina te, mpe osengeli te kolekisa ntango na yo mpo na yango. Salá makasi oyeba malamu mokumba oyo bapesi yo. (Mas. 22:29) Soki omipesi mobimba na mosala ya Yehova, okokóma moninga na ye ya motema mpe okozala na esengo mingi. (Gal. 6:4) Lisusu ekozala mpasi te mpo osepela ntango bandeko mosusu bazwi mokumba oyo ozalaki kosepela na yango.—Rom. 12:15; Gal. 5:26.
21-27/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 23
Mitinda oyo ekosalisa yo na oyo etali komɛla masanga
Bokatikati na likambo etali komɛla masanga
5 Ezali boni soki moto amɛlaka mwa mingi kasi akebaka ete amonana te ete alangwe? Bato mosusu balangwaka mpenza te, ata soki bamɛli mingi. Kasi, soki moto azali kokanisa ete momeseno wana ezali mabe te azali komikosa. (Yilimia 17:9) Mokemoke, moto ya ndenge wana akobanda komiyoka malamu te soki amɛli te mpe akokóma ‘moombo ya ebele ya vinyo.’ (Tito 2:3) Caroline Knapp akomaki boye: “Kokóma moombo ya masanga ebandaka malɛmbɛmalɛmbɛ, mokemoke, na ndenge oyo moto akoki koyeba te.” Tomoni ete kolekisa ndelo na komɛla masanga ezali mpenza motambo!
6 Tótalela mpe toli ya Yesu oyo: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo. Mpo yango ekoyela baoyo nyonso bafandaka na etando ya mabelé mobimba.” (Luka 21:34, 35) Esɛngaka kaka te moto amɛla tii akolangwa mpo abanda koyoka mpɔngi mpe akóma gɔigɔi, ezala na nzoto to na elimo. Moto ya ndenge wana akosuka wapi soki mokolo ya Yehova ekuti ye bongo?
it-1 1222
Kolangwa masanga
Biblia epekisi molangwa. Biblia epekisi mpenza komɛla masanga ya makasi tii na kolangwa. Mokomi ya bwanya ya Masese alimboli malamu ndenge molangwa esalaka epai ya moto, mpe makambo yango eyokani na siansi. Apesi likebisi oyo: “Banani bazalaka na mawa? Banani bayokaka nzoto malamu te? Banani baswanaka? Banani bamilelalelaka? Banani bazokaka kaka mpamba? Banani miso evimbaka? Baoyo balekisaka ntango mingi na komɛla vinyo; baoyo balukaka vinyo oyo esangisami. Kotala vinyo te ntango ezali komonana motane, wana ezali kobimisa ngɛlingɛli na kɔpɔ, [ndenge vinyo ebendaka moto, ezali kongɛnga] mpe kokita malɛmbɛ na mongongo. Mpo na nsuka, eswaka lokola nyoka, mpe ebimisaka pwazɔ lokola nyoka ya ngɛngɛ [ekoki kopesa moto maladi na nzoto (na ndakisa cirrohose de foie) mpe maladi ya motó (oyo esalaka ete moto abulungana makasi na makanisi), mpe ekoki ata koboma moto]. Miso na yo ekomona bimonamona [masanga ekɔtaka na eteni ya bɔɔngɔ oyo etambwisaka nzoto, epekisaka yango esala malamu; makambo oyo moto aboyaka kosala, akoki sikoyo kosala yango; akobanda kokanisa makambo oyo ezali solo te; akobanda kobosana makambo mpe kobɛta masolo ya lokuta lokola nde ezali solo; akozala lisusu na komipekisa te], mpe motema na yo ekoloba makambo ya kilikili [akobimisa makanisi mpe bamposa oyo abimisaka te soki alangwe te].”—Mas 23:29-33; Hos 4:11; Mt 15:18, 19.
Mokomi ya Masese abakisi mpo na moto oyo alangwe masanga ete: “Mpe okozala lokola moto oyo alali na katikati ya mbu [moto oyo alangwe ayokaka kizunguzungu, mpe nsukansuka ayebaka lisusu eloko te], lokola moto oyo alali na nsɔngɛ ya likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa [ndenge kaka nzete oyo bakangisi elamba ya masuwa eninganaka makasi mpenza, moto oyo alangwe atyaka bomoi na ye na likama mpo akoki kosala aksida, kokwea makalekale, bakoki kobɛta ye, mpe bongo na bongo]. Okoloba: ‘Babɛti ngai, kasi nayoki mpasi te. Batuti ngai, kasi nayebi te [moto oyo alangwe amilobelaka bongo ye moko; ayebaka te makambo oyo ezalaki koleka mpe etumbu oyo molangwa epesi ye]. Nakolamuka ntango nini? Nazali na mposa ya vinyo mosusu [na ntembe te sikoyo alali mpo molangwa esila, kasi lokola azali moombo ya masanga, azali kokanisa ntango oyo akomɛla lisusu].’” Akokóma mpenza mobola, mpo azali kobimisa mbongo mingi mpo na kosomba masanga, bato bakotyela ye lisusu motema te, mpe akokoka lisusu kosala mosala te.—Mas 23:20, 21, 34, 35.
Biloko ya motuya ya elimo
Mituna ya batángi
Na ndakisa, soki moto azali nzoto mineneminene, yango ekoki kozala elembo ete alekisaka ndelo na kolya, kasi monene nyonso eutaka na kolya te. Monene ya bato mosusu ezalaka maladi. Monene ya bato mosusu mpe ezalaka ndenge ya libota na bango. Lisusu, tosengeli kobosana te ete monene ezali likambo ya nzoto, kasi kolekisa ndelo na kolya ezali ezaleli ya moto. Moto oyo azali nzoto mineneminene ezali moto oyo azali na mafuta mingi, kasi moto oyo alekisaka ndelo na kolya azali nde na lokoso. Na yango, moto oyo alekisaka ndelo na kolya akoki te koyebana na monene ya nzoto na ye, kasi nde na ndenge oyo atalelaka bilei. Moto akoki kozala na monene oyo ekoki, ata kutu kozala nzoto mike, kasi alekisaka ndelo na kolya. Lisusu, ndenge oyo bato batalelaka monene ezali likambo ya esika na esika.
28/07–03/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 24
Zalá makasi na elimo na ntango ya mikakatano
it-2 563 par. 4
Monyoko
Bakristo bayebi mpe mbano baoyo bazali koyika mpiko bakozwa. Mpo na mbano yango, Yesu alobaki: “Esengo na baoyo bazali konyokwama mpo na bosembo, mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Mt 5:10) Koyeba ete elikya ya lisekwa ezali mpe koyeba Moto oyo apesi elikya yango epesaka bango makasi. Esalisaka bango bázala sembo epai ya Nzambe ata ntango batɛmɛli ya mabe bakani koboma bango. Lokola bazali na kondima na matomba oyo liwa ya Yesu ebimisi, babangaka lisusu te kokufa na mabɔkɔ ya batɛmɛli. (Ebr 2:14, 15) Mokristo asengeli kozala na makanisi ya malamu mpo yango ekosalisa ye atikala sembo na ntango ya botɛmɛli makasi. “Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango, oyo . . . atosaki tii na liwa, ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi.” (Flp 2:5-8) “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye [Yesu] ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni.”—Ebr 12:2; 2Ko 12:10; 2Te 1:4; 1Pe 2:21-23.
Batelá esengo na ntango ya mpasi
12 Masese 24:10 elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Lisese mosusu elobi boye: “Mpo na mpasi ya motema elimo elɛmbaka.” (Mas. 15:13) Bakristo mosusu balɛmbi mpenza nzoto tii batiki kutu kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola Liloba ya Nzambe. Mabondeli na bango ekómi ya likolólikoló, mpe mbala mosusu bakómi komitangola na bandeko na bango bakristo. Emonani polele ete kolɛmba nzoto ntango molai ekoki kozala likama.—Mas. 18:1, 14.
13 Epai mosusu, kozala na makanisi ya malamu ekosalisa biso tótya makanisi na makambo oyo ekoki kopesa biso esengo na bomoi. Davidi akomaki boye: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.” (Nz. 40:8) Ntango makambo ezali kotambola malamu te na bomoi na biso, tosengeli soki moke te kotika kosala makambo oyo tomesaná kosala na losambo na biso. Kutu, lolenge malamu ya kosilisa mawa, ezali nde komipesa na makambo oyo epesaka esengo. Yehova ayebisi biso ete tokoki kosepela mpe koyoka esengo soki tozali kotánga Liloba na ye mpe kotalatala na kati na yango mbala na mbala. (Nz. 1:1, 2; Yak. 1:25) Tozwaka “maloba ya kosepelisa” oyo ekoki kolendisa biso mpe kosepelisa mitema na biso, ezala na Makomami Mosantu to na makita ya lisangá.—Mas. 12:25; 16:24.
Mituna ya batángi
Masese 24:16 elobi: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.” Yango ezali nde kolobela moto oyo azali kosala lisumu mbala na mbala kasi Nzambe azali kolimbisa ye?
Na ntembe te, vɛrsɛ oyo elingi koloba bongo te. Ezali nde kolobela moto oyo azali kokutana na mikakatano mbala na mbala kasi azali koyikela yango mpiko.
Makambo nyonso oyo emonisi ete Masese 24:16 elobeli te kokwea na lisumu, kasi emonisi nde bampasi mpe mikakatano oyo moto akoki kokutana na yango mbala na mbala. Na mokili mabe oyo, moyengebene akoki kobɛla to kokutana na mikakatano mosusu. Ntango mosusu, bakonzi ya Leta bakoki konyokola ye makasi mpenza mpo na kondima na ye. Kasi akoki kotya motema ete Nzambe azali mosungi na ye, akosalisa ye ayika mpiko mpe alonga. Omituna boye: ‘Namonaka te ete mbala mingi makambo ya basaleli ya Nzambe esukaka kaka malamu?’ Mpo na nini? Mpo tondimaka na motema moko ete “Yehova azali kosunga baoyo nyonso bazali kokwea, mpe azali kotombola baoyo nyonso bagumbami.”—Nz. 41:1-3; 145:14-19.
Biloko ya motuya ya elimo
Mituna ya batángi
Na ntango ya kala, soki mobali alingi “kotonga libota [na ye],” elingi koloba alingi kobala mpo na kosala libota, asengelaki komituna boye: ‘Nasili komibongisa mpo na kobatela mpe kokokisa bamposa ya mwasi mpe ya bana oyo tokoki kobota na nsima?’ Liboso ya kosala libota, asengelaki kosala bilanga na ye, oyo ezalaki mosala makasi. Yango wana, Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Luka liboso kozala na mosala pe na bilanga na yo, sima nde okoki kotònga ndako.” Etinda yango etali mpe biso lelo oyo?
Ɛɛ. Mobali oyo alingi kobala asengeli komibongisa malamu mpo na kokokisa mokumba yango. Soki azali nzoto makasi, asengeli kosala mosala. Ya solo, mosala makasi oyo mobali akosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye esengeli te kosuka kaka na makambo ya mosuni. Liloba ya Nzambe emonisi ete mobali oyo akokisaka te bamposa ya mosuni, ya motema mpe ya elimo ya bato ya libota na ye, azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te! (1 Tim. 5:8) Yango wana, ntango elenge mobali azali komibongisa mpo na kobala mpe kosala libota, asengeli komituna mituna oyo: ‘Nasili komibongisa mpo na koleisa mpe kolatisa mwasi mpe bana? Nasili komibongisa mpo na kotambwisa makambo ya elimo na libota? Nakokoka mpenza kokokisa mokumba ya koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ ná mwasi na ngai mpe bana?’ Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete mikumba wana ezali na ntina mingi.—Mib. 6:6-8; Ef. 6:4.
Yango wana, elenge mobali oyo azali koluka mwasi asengeli kokanisa malamumalamu na etinda oyo ezali na Masese 24:27. Ndenge moko mpe elenge mwasi asengeli komituna soki amibongisi mpo na kokokisa mikumba ya mwasi ya libala mpe ya mama. Bato oyo babalani sika bakoki mpe komituna mituna ya ndenge wana ntango bazali kokanisa soki basengeli kobota. (Luka 14:28) Kotosa etinda yango oyo ekomami na litambwisi ya elimo santu ekoki kosalisa basaleli ya Nzambe bázala na mpasi na motema te mpe bázala na esengo na libota na bango.
04-10/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 25
Mitinda oyo ekosalisa yo oyeba koloba na basusu
Salelá malamu nguya ya lolemo na yo
6 Mpo na nini ezali na ntina kopona ntango oyo ebongi mpo na koloba? Mokanda ya Masese 25:11 elobi ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.” Bapɔme ya wolo ezalaka kitoko, kasi ezalaka lisusu kitoko koleka soki ezali liboso ya eloko moko ya palata. Ndenge moko mpe, tokoki kozala na likambo moko ya malamu ya koyebisa moto. Kasi, soki toponi ntango oyo ebongi mpo na koloba yango, tokoki kosalisa moto yango lisusu mingi koleka. Ndenge nini tokoki kosala yango?
7 Soki tolobi na ntango oyo ebongi te, mbala mosusu bato bakokanga ntina te to bakondima te makambo oyo tolobi. (Tángá Masese 15:23.) Na ndakisa, na sanza ya 03/2011, koningana ya mabele mpe tsunami ebebisaki bingumba mingi na Ɛsti ya Japon. Bato koleka 15 000 bakufaki. Atako ebele ya Batatoli ya Yehova babungisaki bandeko na bango ya libota mpe baninga na bango, bazalaki kaka na mposa ya kosalela Biblia mpo na kosalisa bato mosusu oyo bazalaki na mpasi lokola bango. Kasi, bayebaki ete mingi ya bato yango bazalaki bato ya Lingomba ya Bouddha mpe bayebaki makambo mingi te ya Biblia. Yango wana, na esika ya koyebisa bango elikya ya lisekwa, bandeko babɔndisaki bango mpe bamonisaki bango ntina oyo makambo ya nsɔmɔ ndenge wana ekomelaka ata bato malamu.
Salelá malamu nguya ya lolemo na yo
15 Ndenge oyo tolobaka na basusu mpe makambo oyo tolobaka na bango ezali na ntina. Bato bazalaki kosepela koyoka Yesu mpo azalaki na maloba “kitoko,” to ya boboto. (Luka 4:22) Soki tozali koloba na boboto, na ntembe te, bato bakosepela koyoka biso mpe bakondima makambo oyo tozali koloba. (Masese 25:15) Tokozala na likoki ya koloba na basusu na boboto soki tomemyaka bango mpe tokipaka ndenge oyo bamiyokaka. Yesu azalaki kosala bongo. Na ndakisa, ntango amonaki ebele ya bato bazali kosala makasi mpo na koyoka ye, asepelaki mingi kolekisa ntango elongo na bango mpe koteya bango. (Marko 6:34) Ata ntango bato bafingaki ye, azalaki kozongisa kofinga te.—1 Petro 2:23.
16 Atako tolingaka bato ya libota na biso mpe baninga na biso, ekoki kokóma ete tólobela bango maloba oyo ezangi boboto mpo toyebi bango malamu. Tokoki kokanisa ete tosengeli te kokeba na ndenge oyo tosengeli koloba na bango. Kasi, Yesu alobaki ata mokolo moko te na baninga na ye na ndenge oyo ezangi boboto. Ntango basusu kati na bango bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga, asembolaki bango na boboto mpe asalelaki ndakisa ya mwana moke mpo na kosalisa bango bábongola ndenge na bango ya kokanisa. (Marko 9:33-37) Bankulutu bakoki komekola Yesu soki bazali kopesa basusu toli na boboto.—Bagalatia 6:1.
Tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu—Lolenge nini?
8 Wana ezali biso kosalela Nzambe na biso, tokoki biso banso kolendisana kati na biso na nzela ya ndakisa na biso. Na ntembe te, Yesu azalaki kolendisa bayoki na ye. Alingaki mosala ya boklisto mpe akumisaki yango. Alobaki ete ezalaki lokola bilei mpo na ye. (Yoane 4:34; Baloma 11:13) Bosepeli motindo wana ekoki koyambela basusu. Okoki mpe kosala ete esengo na yo kati na mosala ya kosakola emonana epai na basusu? Wana ozali kosala nyonso mpo na kobwaka ezaleli ya lolendo, lobelá baeksperianse na yo ya malamu epai na basusu kati na lisangá. Na ntango obyangi basusu ete básakola elongo na yo, talá soki okoki kosalisa bango ete bázwa bosepeli wana ezali bango kolobela basusu na ntina na Yehova, Mozalisi na biso Monene.—Masese 25:25.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 670
Motema pɛtɛɛ
Moto oyo azali na ezaleli ya motema pɛtɛɛ azalaka na yango mpo azalaka na kondima mpe azwaka makasi. Atɛngatɛngaka nokinoki te mpe makambo ebulunganisaka ye mpambampamba te. Nzokande kozanga kimya, komitungisa, to kozanga kondima ná elikya, mpe mbala mosusu kolɛmba nzoto nde esalaka ete moto azala na motema pɛtɛɛ te. Talá ndenge Masese elobeli moto oyo azalaka na motema pɛtɛɛ te; elobi: “Moto oyo azali kopekisa nkanda na ye te, azali lokola engumba oyo babuki, oyo ezangi efelo.” (Mas 25:28) Lokola azangi komipekisa, makanisi ya mabe ndenge na ndenge ekoki kokɔtela ye, mpe yango ekoki kotinda ye asala makambo oyo ebongi te.
11-17/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 26
Zalá mosika ya “moto ya zoba”
it-2 602 par. 1
Mbula
Bileko. Bileko mibale ya minene na Mokili ya Ndaka, eleko ya molunge mpe eleko ya malili, ekoki kotalelama nde lokola eleko ya elanga mpe ya mbula. (Talá mpe Nz 32:4; Loy 2:11, msl.) Kobanda na katikati ya sanza ya 4 tii na katikati ya sanza ya 10, mbula ebɛtaka mingi te. Lokola mbula ebɛtaka mingi te na eleko yango, ezalaka eleko ya kobuka mbuma. Masese 26:1 emonisi ete na eleko ya kobuka mbuma, mbula ezalaka mpenza te. (Talá mpe 1Sa 12:17-19.) Na eleko ya mbula, mbula ebɛtaka mikolo nyonso te; mikolo mosusu likoló eyindaka te. Lokola malili ezalaka mpe na ntango yango, moto oyo apɔli mbula alɛngaka na malili. (Ezr 10:9, 13) Na yango, ebongaki kozala na ndako ya malamu mpo na komibatela.—Yis 4:6; 25:4; 32:2; Yb 24:8.
Disipline ezali kobimisa mbuma na kimya
12 Epai na bato mosusu, esengeli kozwa bikateli makasi, lokola Masese 26:3 emonisi yango na maloba malandi: “Mpimbo mpo na mbalata, ekangeli na monoko mpo na mpunda, mpe lingenda mpo na mokongo na zoba.” Jéhovah atikaki mbala mosusu basaleli na ye, Bayisraele, bazwa mpasi oyo bazalaki komibendela: “Baboyaki maloba na Nzambe, batiolaki mpe toli na Oyo-Aleki-likolo. Bongo asilisaki molende na bango na mosala; batelenganaki mpe moto na kosunga azalaki te. Wana bangangaki epai na Jéhovah kati na bolozi na bango, ye mpe asikolaki bango na mpasi na bango nyonso.” (Nzembo 107:11-13) Nzokande, bazoba bakomaka motema makasi na boye ete ata etumbu moko te ekoki kosala bango mpasi: “Ye oyo akoyeisa nkingo na ye makasi mpo na mpamela mingi akobebisama pwasa, na ebikelo te.”—Masese 29:1.
it-1 357 par. 3
Ebɔsɔnɔ
Elobeli ya masese. Mokonzi Salomo alobaki: “Lokola moto oyo azali komikatakata makolo [likambo oyo ekokómisa ye ebɔsɔnɔ], mpe azali komizokisa, moto oyo azali kopesa makambo na ye na lobɔkɔ ya moto oyo azali zoba azali mpe bongo.” Ya solo, moto oyo atye zoba na mosala mpo alandela makambo na ye akozwa ata litomba moko te. Ayeba ete mosala na ye ekosimba te, mpe ekozala likama mpo na ye.—Mas 26:6.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 1006
Zoba
Moto oyo azali koyanola zoba “na kolanda bozoba na ye,” na boye ete azali kopesa bantina ya mpambampamba mpo na komilongisa lokola zoba, azali komitya na molɔngɔ moko na zoba mpe kondima makambo na ye ya mabe. Mpo tókóma bazoba te na ndenge wana, Masese epesi toli oyo: “Koyanola te moto oyo azali zoba na kolanda bozoba na ye.” Nzokande, Masese 26:4, 5 emonisi mpe ete moto oyo azali koyanola zoba “na kolanda bozoba na ye” mpo na kotalela makambo oyo zoba azali koloba, komonisa ete ezangi ntina mpe komonisa ye ete maloba na ye ezali na ndimbola mosusu, ete eyokani te na makanisi oyo azali na yango, ekoki kosalisa ye.
18-24/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 27
Matomba ya kozala na baninga ya solosolo
Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa
12 Moto ya komikitisa asepelaka na toli. Tozwa ndakisa. Kanisá ete ozali na makita. Nsima ya kosolola na bandeko ebele, ndeko moko abendi yo pembeni mpe ayebisi yo ete biloko oyo olyaki ekangami yo na mino. Na ntembe te, okoyoka mwa nsɔni. Kasi okosepela te ndenge ayebisi yo yango? Kutu, okomona ete esengelaki bato oyo osololaki na bango liboso báyebisa yo! Ndenge moko mpe, tosengeli kozala na komikitisa mpe kosepela na ndeko oyo azwi mpiko ya kopesa biso toli oyo tosengeli na yango. Tosengeli komona ye moninga na biso, kasi monguna te.—Tángá Masese 27:5, 6; Gal. 4:16.
it-2 669 par. 7
Mozalani
Kasi, mokanda ya Masese emonisi ete ezali na ntina kokangama na moninga mpe kotyela ye motema, mpe ete ezali malamu kobenga moto ya ndenge wana ntango tozali na bosɛnga; masese yango elobi boye: “Kosundola te moninga na yo to moninga ya tata na yo, mpe kokɔta na ndako ya ndeko na yo te na mokolo ya likama na yo; moninga [shakhén] oyo azali pene azali malamu koleka ndeko oyo azali mosika.” (Mas 27:10) Na vɛrsɛ yango, emonani ete mokomi azali koloba ete moto oyo azali moninga ya libota na biso azali na ntina mingi mpe esengeli koluka lisalisi epai na ye koleka ata epai ya ndeko ya libota, soki ndeko yango azali mosika, mpo mbala mosusu akozala na likoki te ya kosalisa biso lokola moninga.
Bilenge—Bolingi bomoi na bino ezala ndenge nini?
7 Liteya moko oyo tokoki kozwa na ekateli mabe ya Yehoashe ezali ete tosengeli kopona baninga oyo bakosalisa biso tósala oyo ezali malamu: baninga oyo balingaka Yehova mpe balukaka kosepelisa ye. Tosengeli te kosuka kaka na baninga oyo tozali na bango mbula moko. Kobosana te ete Yehoashe azalaki lokola mwana epai ya moninga na ye Yehoyada. Omituna boye: ‘Baninga oyo naponaka basalisaka ngai nakómisa kondima na ngai epai ya Yehova makasi? Balendisaka ngai natosa mibeko ya Nzambe na bomoi na ngai? Balobelaka makambo ya Yehova mpe mateya na ye ya solo? Bazalaka na limemya mpo na mibeko ya Nzambe? Bayebisaka ngai kaka makambo oyo nakolinga koyoka, to bazalaka mpe na mpiko ya kozongisa ngai na nzela ntango nasali mabe?’ (Mas. 27:5, 6, 17) Mpo na koloba solo, soki baninga na yo balingaka Yehova te, bazali na ntina te mpo na yo. Kasi soki ozali na baninga oyo balingaka Yehova, kangamá na bango—bakosalisa yo ntango nyonso!—Mas. 13:20.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Masese
27:21. Eyebanaka soki tozali bato ya ndenge nini ntango bakumisi biso. Komikitisa emonanaka soki, ntango bakumisi biso tondimi ete Yehova nde apesi biso makoki nyonso oyo tozali na yango mpe soki ezali kolendisa biso na kokoba kosalela ye. Kozanga komikitisa emonanaka soki, ntango bakumisi biso, tokómi kokanisa ete toleki basusu.
25-31/08
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 28
Bokeseni kati na moto mabe ná moto ya sembo
Okolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?
“BAYENGEBENE bazali na mpiko lokola nkosi.” (Masese 28:1) Bazali komonisa kondima, na elikya nyonso bazali kosalela Liloba na Nzambe, mpe na molende nyonso bazali kokende liboso kati na mosala na Jéhovah atako mikakatano mizali.
it-1 1197 par. 6
Mayele
Baoyo baboyaka Moto oyo apesaka mayele. Moto oyo alingaka kobuka mibeko atyaka lisusu likebi epai ya Nzambe te ntango azali kozwa bikateli mpe komityela mikano. (Yb 34:27) Moto ya ndenge wana atikaka motema na ye ezipa miso na ye na mabe oyo azali kosala mpe azalaka lisusu na mayele te. (Nz 36:1-4) Ata soki azali koloba ete asambelaka Nzambe, atyaka makanisi ya bomoto liboso ya makanisi ya Nzambe; asepelaka na yango. (Yis 29:13, 14) Amilongisaka mpe alobaka ete etamboli na ye ya nsɔni ezali kaka “lisano”; (Mas 10:23) akómaka na makanisi ya kilikili, ya bonyama, mpe ya bozoba, tii na koloba ete Nzambe oyo amonanaka te azali komona te to kososola te misala na ye ya mabe, lokola nde makoki ya Nzambe ya kososola makambo ebebá. (Nz 94:4-10; Yis 29:15, 16; Yir 10:21) Na etamboli na ye mpe na misala na ye, alobaka nde: “Yehova azali te” (Nz 14:1-3) mpe akipaka ye te na makambo oyo asalaka. Lokola alandaka mitinda ya Nzambe te, akoki te kotalela makambo na ndenge oyo ebongi, koyeba bosolo ya makambo, kokanisa malamu na likambo mokomoko, mpe kozwa bikateli ya malamu.—Mas 28:5.
it-1 1195 par. 4
Bosembo
Moto akoki kobatela bosembo na makasi na ye moko te, kasi kaka na nzela ya kondima makasi mpe na kotya motema mobimba epai ya Yehova mpe na nguya na Ye ya kobikisa. (Nz 25:21) Nzambe alaki ete akozala “nguba” mpe “esika makasi” ya baoyo babatelaka bosembo. (Mas 2:6-8; 10:29; Nz 41:12) Lokola balukaka ntango nyonso kondimama na Yehova esalaka ete bápikama makasi na bomoi na bango, mpe yango esalisaka bango bálanda nzela oyo ekokokisa mikano na bango. (Nz 26:1-3; Mas 11:5; 28:18) Ya solo, kaka ndenge Yobo amonisaki yango, moto oyo azangi mbeba akoki komona mpasi mpo na mibeko ya bato mabe mpe akoki kokufa esika moko na bato mabe; kasi Yehova alobi ete ayebi makambo ya bomoi ya moto oyo azangi mbeba mpe alaki ete libula ya moto yango ekoumela, akozala na kimya, mpe akozwa bolamu. (Yb 9:20-22; Nz 37:18, 19, 37; 84:11; Mas 28:10) Ndenge kaka ezalaki mpo na Yobo, eloko oyo epesaka moto valɛrɛ ezali nde bosembo na ye, kasi te bomɛngo na ye, oyo esalaka ete bato bápesa ye limemya. (Mas 19:1; 28:6) Bana oyo moboti na bango azali sembo basengeli kozala na esengo (Mas 20:7), mpo bazwi libula moko kitoko: ndakisa ya bomoi ya tata na bango, mpe bakozwa matomba mpo na nkombo malamu na ye mpe limemya oyo basusu bapesaka ye.
Biloko ya motuya ya elimo
Okoki komibatela mpo motema na yo ya elilingi ekangama te
Komityela motema koleka. Bato mingi, liboso mpenza motema na bango ekangama, bazalaki kokanisa mpenza ete bazali nzoto kolɔngɔnɔ. Mbala mingi, likambo ya kotalisa nzoto to kosalisa baekizamɛ epai ya monganga bazalaki kotyela yango likebi te to mpe bazalaki mpenza kotala yango mpamba, ete ezali na ntina moko te. Ndenge moko mpe, bato mosusu bakoki kokanisa ete lokola basili koumela banda bakómá baklisto, likambo moko ekoki koyela bango te. Bakoki kobosana kotalaka motema na bango ya elilingi to kobosana komitalela bango moko tii mokolo oyo likama ekoyela bango. Ezali na ntina mingi tóbosanaka te toli malamu oyo Paulo apesaki mpo tómityela motema koleka te: “Tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” Likambo ya mayele ezali ya kondima ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe esengeli mbala na mbala totalelaka elimo na biso.—1 Bakolinti 10:12; Masese 28:14.