Ntango moto oyo olingaka akufi
Mokolo ya 17 Yuli 2007, na ngonga ya 7 ya mpokwa, mpɛpɔ moko oyo ezalaki kokita na libándá ya mpɛpɔ ya São Paulo, na ekólo Brésil, elongwaki na nzela na yango, ekatisaki balabala moko monene mpe ekendaki kokwea na depo moko. Bato soki 200 bakufaki na likama yango.
BATO oyo bakufelaki bandeko bakobosana te likama yango, oyo bato balobaki ete ezali likama eleki monene na makama nyonso ya mpɛpɔ oyo esalemá na Brésil. Claudete azali moko ya bato oyo bakufelaki bandeko na likama yango. Mwasi yango azalaki kotala televizyo ntango ayokaki nsango ya likama yango. Mwana na ye, Renato, azalaki na kati ya mpɛpɔ yango. Azalaki kaka na mbula 26 mpe alingaki kobala na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Claudete abengaki mwana na ye na telefone, kasi moto azalaki koyamba te. Amibwakaki na nse mpe abandaki kolela makasi.
Fianse ya Antje akufaki na likama ya motuka na sanza ya Yanuali 1986. Ntango ayokaki nsango yango, asilaki mayele. “Liboso, nazalaki kondima te. Nazalaki komona yango lokola ndɔtɔ. Nazalaki kolɛnga mpe nayokaki mpasi makasi na estoma, lokola nde moto moko atubi ngai eloko.” Na boumeli ya mbula misato oyo elandaki, Antje anyokwamaki na makanisi. Atako eumeli mbula koleka 20 banda aksida yango esalemá, tii lelo oyo alɛngaka soki akanisi likambo yango.
Maloba ezali te mpo na komonisa nsɔmɔ, kobulungana, mpe kozanga elikya oyo moto azalaka na yango ntango akufeli ndeko to moninga na mbalakaka. Kasi, ata soki toyebaki ete ndeko to moninga na biso akokufa, na ndakisa soki aumeli mingi na maladi, toyokaka kaka mpasi makasi ntango akufi. Moto moko te andimaka liwa ya moto oyo ye alingaka. Mama ya Nanci abɛlaki ntango molai; kasi mokolo oyo akufaki, na mobu 2002, Nanci afandaki na nse na kati ya lopitalo mpe asilaki mayele. Amonaki ete bomoi ezali lisusu na ntina te. Tii lelo oyo, mbula koleka mitano, Nanci alelaka kaka soki akanisi mama na ye.
Profesɛrɛ Holly Prigerson alobaki ete: “Moto abosanaka te ndeko na ye oyo akufi, amesanaka kaka na likambo yango.” Soki osilá kokufela moto moko oyo olingaki mingi, ezala na mbalakaka to te, okoki komituna boye: ‘Ezali mabe nayokaka mawa? Makambo nini ekoki kosalisa ngai nabosana mpasi ya kokufela moto moko oyo nalingaki? Nakomona ye lisusu?’ Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango mpe mituna misusu oyo okoki komituna.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
EVERTON DE FREITAS/AFP/Getty Images