Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Marsi
“Bato mingi bakumisaka mbotama ya Yesu, kasi okanisi ete ezali na ntina tókanisaka liwa ya Yesu?” [Tiká ye apesa eyano.] Na nsima pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16, mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi
“Mangomba ezali ebele, mpe bindimeli ná mimeseno na yango ekeseni. Okanisi ete moto nyonso oyo alobaka ete azali mokristo, azali mpenza mokristo ya solo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Yesu alobaki mpo na koyeba bakristo ya solo. [Tángá Yoane 13:34, 35.] Zulunalo oyo elobeli makambo mitano oyo Yesu alobaki, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba bayekoli na ye ya solosolo.”
Lamuká! Marsi
“Tozali kosolola na bato ya kartye na biso mpo na likambo moko ya mabe oyo ekómi komonana mingi. Emonani lokola ete bato bakómi nkandankanda mpe kosilika nokinoki. Mpo na yo, nini esali ete bato bákóma bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi mpo na nkanda. [Tángá Nzembo 37:8.] Zulunalo oyo emonisi mwa bantina oyo esali ete bato bakóma nkandankanda mingi, mpe ndenge oyo tokoki kopekisa nkanda na biso.”