Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Janvier nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolózi ya makɔnɔ oyo mapalanganaka
  • Bisika ya ntubela kati na bandako ya botɛki mikanda
  • Eloko ata moko te ebwakami
  • Likambo ya mawa na ntina na zemi mpe kobota
  • Motángo ya bato ya sida mozali sé komata
  • Kebá na kotambwisa na elolo!
  • Minganga-bapasoli, bókeba na oyo bozali koloba
  • “Bokɔnɔ bobéngami vache folle”
  • Nkɛlɛ ya Mikrobe
    Lamuká!—1996
  • “Maladi oyo eleki koboma banda mokili ebandá”
    Lamuká!—2003
  • Mpo na nini Afrika?
    Lamuká!—1993
  • Bato ya SIDA bazali kobakisama na ndenge ya nsɔmɔ!
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Janvier nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Bolózi ya makɔnɔ oyo mapalanganaka

Ebongiseli oyo etalelaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na mokili mobimba (O.M.S.) elobi ete, ndambo moko kati na misato ya milió 52 ya bato oyo bakufaki na mbula eleki bakufaki na makɔnɔ oyo mapalanganaka. Mingi kati na bawei wana, oyo motuya na bango ekoki kozala milió 17, bazalaki bana mike. Engebene zulunalo ya O.M.S., The World Health Report 1996, makɔnɔ pene na 30, oyo mapalanganaka, masili komonana na boumeli ya mbula 20 oyo euti koleka, kati na yango totángi Ebola mpe sida. Atako makɔnɔ minene lokola maladi ya ntolo, kolera, mpe malaria ekoki kopɛngolama to kosalisama malamu, nzokande makɔnɔ yango mazali sé kozongela bato mbala na mbala mpe makómi motó makasi na bankisi. Lapólo yango elobi ete likambo wana liuti na “lolenge mabe ya kosalela bankisi babéngi antibiotiques,” bakisá mpe bantina mosusu, lokola bosáli mibembo na mikili mikeseni mpe komata ya motángo ya bato na mikili ya molungé oyo mitondi na ngungi.

Bisika ya ntubela kati na bandako ya botɛki mikanda

Lisangani moko ya Bakatolike na mokili ya Italie ezwaki ekateli ya kotya bisika ya ntubela kati na molɔngɔ́ ya ndako ya botɛki mikanda ya lingomba, ndako moko na moko na sángó na yango. Likanisi yango limekamaki mpo na mbala ya liboso na engumba Milan. Na Mwamisato nyonso, kati na ndako ya botɛki mikanda na vílɛ, sángó moko azalaki wana mpo na “baoyo nyonso bazali na mposa ya kokutana na sángó​—kasi na ndakonzambe te​—mpo na kosɛnga toli na makambo ya elimo, to mpo na kotubela masumu,” wana ezali maloba ya motɛkisi mikanda na ndako yango. Mpe abakisaki ete: “Matomba ya liboso oyo mazwamaki malekaki mpenza oyo tozalaki komizela na yango na mayoki ya bolóngi.” Kasi likanisi yango lizwamaki mpo na nini? Zulunalo La Repubblica ya Italie eyanoli ete: “Mpo na kotombola kokwea ya sakramɛnto ya ntubela.”

Eloko ata moko te ebwakami

Nsima ya kolongola bakiló soko 270 ya misuni ya ngɔmbɛ, biteni oyo bitikalaka bikendaka wapi? Ndambo ya binama na yango ya kati, lokola thyroïde, yéka (pancréas), mampúlúlú, lolɛmbɛ (rate), glande surrénale, mpe nsɔngi (bile) oyo euti na libalé mpe na mwa saki moke ya nsɔngi (vasicule biliaire), esalelamaka mpo na kosala bankisi ya monganga. Proteinɛ oyo babéngi collagène ebimisamaka uta na mikuwa, na binsɔ́bu (sabots), mpe na mposo, mpo na kotyama na mafuta ya kolɛmbisa loposo ya nzoto mpe ya kokómisa yango sɛmbɛsɛmbɛ. Misisa mpe mafuta esalelamaka mpo na kosala biloko lokola stéarate butylique, distéarate de PEG-150, mpe stéarate glycol oyo esalelamaka kati na biloko ya kosala monzɛlɛ na elongi mpe na bankisi ya kobongisa nsuki. Basabuni mingi esalemaka na mafuta ya nyama. Lisusu, mikuwa mpe matindi enikamaka mpo na kosala gélatine oyo esalelamaka kati na biloko mingi ya kolya, na ndakisa crème glacée, biloko mosusu ya sukali, mpe biloko mingi oyo bisalemi “kozanga mafuta.” Biteni mosusu mpe bisalelamaka mpo na kosala ebele ya biloko lokola bakiliyo, mbuma ya alimɛti, biloko ya kotya na pavemá ya ndako, ezipeli babéngi linoléum, antigel oyo esalaka ete mai mákóma ngalasa te, simá, nkisi ya koboma matiti mabe, cellophane oyo bakozingaka na yango biloko ya pɛtɛpɛtɛ, papier photographique, biloko ya kolata na masano, bilamba to tapi [ya kiti, motuka. . .] mpe bilamba ya kolata. Mwa mabanga mikemike oyo efandaka na saki moke ya nsɔngi (calculs biliaires) esombamaka na ntalo makasi​—badolare 600 (U.S.) mpo na grami 28,35! Bato ya mombongo ya Extrême-Orient basombaka yango mpo na kosalelama lokola mɔnɔ́ ya kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto.

Likambo ya mawa na ntina na zemi mpe kobota

Bolukiluki monene oyo UNICEF euti kosala sika elobi ete, mbula na mbula, basi soko 585 000 bazali kokufa na zemi to na ntango ya kobota. Engebene zulunalo Le progrès des nations 1996, makámá mingi ya zemi mpe ya ntango ya kobota makoki kopɛngolama. Lapólo yango elobi ete: “Motángo moleki monene ya basi oyo bazali kokufa ezali te ya basi oyo babɛlakabɛlaka, to basi mibangé, to mpe basi oyo bazali naino bilenge mpenza, kasi nde basi ya nzoto kolɔngɔ́nɔ́ oyo bazali naino na eleko ya bomoi ya bomwasi ya nguya.” Basi pene na 75 000 bazali kokufa mbula nyonso mpo na bolongoli zemi na libungá; 40 000 bazali kokufa mpo na mikakatano na ntango ya kobota; 100 000 bazali kokufa na kobebisama ya makila na mikrɔbe; 75 000 bazali kokufa na kobeba ya bɔɔngɔ́ mpe ya bangei na bokɔnɔ babéngi éclampsie (kokangamakangama ya misisa mpe komata ya tansyɔ́ na ntango zemi esili kokóla); mpe basi koleka 140 000 bazali kokufa na kobima makila mingi. Eyebisami ete ntina ya solosolo ya likambo yango ezali bongo bozangi ya bibongiseli malamu ya kobotisa basi na mikili mingi. Bakambi ya UNICEF bayebisi ete lapólo emonisi boye: mwayene ya mwasi 1 kati na basi 35 na Azia ya Súdi mpe mwasi 1 kati na basi 13 na Afrika ya súdi ya Sahara, bazali kokufa na ntina na makambo ndenge na ndenge oyo makangani na zemi mpe na kobota, nzokande na Canada bobele mwasi moko kati na basi 7300, na États-Unis mwasi 1 kati na 3300, na Mpótó mwasi 1 kati na 3200. Motuya oyo mozwami na bolukiluki yango moleki pene na 20 % motuya oyo mokanisamaki, elingi koloba bawei pene na 500 000 na mbula moko.

Motángo ya bato ya sida mozali sé komata

Zulunalo The New York Times eyebisi ete: “Mikrɔbe oyo epesaka sida ezali kokóba kopalangana nokinoki na bisika mingi ya mokili, mingimingi na Azia mpe na súdi ya Afrika, mpe motángo ya baoyo bazali kobɛla sida esili komata na lombangu mpenza.” Lapólo oyo ebongiseli babéngi United Nations Joint Program esalaki na ntina na V.I.H.-SIDA emonisi ete, na 1995, soko milió 1,3 ya bato bazalaki kobɛla makɔnɔ oyo mazali bilembo ya sida, yango epesi bokóli ya 25 % na motángo ya mbula oyo ezalaki liboso. Ekanisami sikawa ete milió 21 ya mikóló na mokili mobimba basili kozwa mikrɔbe V.I.H., mpe pene na 42 % kati na bango bazali basi. Lisusu, mokolo na mokolo, bato 7 500 bazali kozwa bokɔnɔ yango. Bamilió mingi ya bana mpe balobelami ete bazali na yango. Uta ntango moto azwi mikrɔbe wana kino komonana ya bokɔnɔ makasi, mbula pene na zomi ekoki koleka. Lapólo ya Mabota Masangani emonisi ete, na 1995, bato 980 000 bakufaki na makɔnɔ oyo makangani na sida mpe ete motuya wana mokopumbwa mpenza kino 1 120 000 na 1996. Kala mingi te, mikrɔbe yango ya sida euti kopalangana mingi na mikili ya súdi ya Afrika mpe na Inde; ekanisami ete ekozala mpe bongo mpo na Chine mpe Vietnam. Na mikili misusu ya Africa, bato 16 kino 18 likoló na monkámá ya bafandi na mboka, basili kozwa yango. Bato bakómi kobanga mpamba te motángo ya bilenge basi oyo bazali na yango ezali komata na lombangu mpenza kati na mokili mobimba. Bana soko 33 kati na bana monkámá oyo bakobotama bakozala mpe na mikrɔbe yango.

Kebá na kotambwisa na elolo!

Zulunalo The Daily Telegraph ya Londres eyebisi ete, mbula na mbula, kotambwisa motuka na elolo ezali koboma bato 1 000 na Grande-Bretagne mpe ezali komema makámá 77 000. Ata mpe kotambola na mbangu oyo esɛngami ekoki kozala likámá na bantango mosusu. Makámá koleka 10 likoló na monkámá oyo mazali kosalema na banzela minene mauti na momeseno ya kotambwisa motuka penepene na motuka oyo mozali liboso. Mibeko ya nzela na mboka Angleterre misɛngi ete moto atika ntáká ya segɔ́ndɛ mibale kati na ye mpe motuka oyo mozali liboso, kasi ntáká wana esengeli kozwama mbala mibale ntango ozali komema motuka na banzela ya pɔtɔpɔtɔ mpe ya mosɛlu to mpe na bisika ya molili. Kolanda motuka mosusu penepene esuki te bobele na kozala likámá; yango ezali lisusu likambo ya kolɛmbisa mpe ya kotungisa moto. Bakumbi-mituka bamilelaka mbala mingi ete soki batiki ntáká ya bopɛngoli likámá, motuka mosusu ekoya kokata liboso na bango. Nzokande, lolenge malamu ya kosala na likambo yango ezali bobele ya kolɛmbisa mbangu mpe kotika ete ntáká ekóma lisusu mwa molai. Kokanga frein na mbalakaka ekoki kobimisa makámá, boye salá keba mpo na makambo oyo makoki kobima pwasa. Kozala na ebongiseli oyo esalaka ete motuka mótambola lisusu mwa moke nsima ya kokanga frein ezali te kokólisa ntáká oyo ekaboli yo na esika motuka ekotɛlɛma nsima ya kokanga frein. Paul Ripley, molakisi ya makambo matali mituka alobi ete: “Mbangu ya bopɛngoli likámá na ezalela ata ya lolenge nini ezalaka ntango nyonso mbangu ya malɛmbɛ koleka oyo bakumbi-mituka mingi bakanisaka.”

Minganga-bapasoli, bókeba na oyo bozali koloba

Balukiluki na Eteyelo monene ya Erasmus na mokili ya Pays-Bas bamonaki ete babɛli oyo bazali kosalama lipaso bakoki “koyoka” makambo ata ntango babomami nzoto mobimba na anestezi. Nsima ya lipaso, bayebisaki na babɛli 240 eteni ya liboso ya liloba oyo elobamaki ntango lipaso ezalaki kosalema mpe basɛngaki na bango ete báloba liloba ya liboso oyo liyeli bango na makanisi. Atako yango ezalaki nsima ya ngonga 24, babɛli mingi bamikundolaki maloba oyo malobamaki mbala bobele moko. Balukiluki yango balobi ete likambo wana limonisi ete babɛli oyo babomami nzoto na anestezi bakoki “kolanda lisoló” na ntango lipaso lizali kosalema mpe bakoki kozokisama na maloba mabe to ya kofinga. Mokanda Research Reports From the Netherlands, oyo ebimisami na Ebongiseli ya Pays-Bas mpo na bolukiluki na makambo ya Siansi, epesi bosukisi oyo: “Boye, minganga basengeli kokeba na masoló na bango ntango lipaso lizali kosalema.”

“Bokɔnɔ bobéngami vache folle”

◼ Kobima ya “bokɔnɔ bobéngami vache folle” na Grande-Bretagne ebimisi polele likambo moko ya kalakala na ntina na bobɔkɔli nyama. Banyama oyo bamesaná kolya matiti bakómi kolinga kolya misuni mpo ete bazali koleisa bango biteni ya banyama mosusu. Makila ya kokauka, mikuwa oyo minikami, bilei bisangisami na misuni, oyo kati na yango okokuta misɔpɔ́ oyo baniká, misisa mizingamá, bɔɔngɔ́, mpe biloko mosusu ya kati, lokola yéka, mongongo, mpe bangɛi; nyonso wana ezali mbala na mbala kosalelama na ntina ete mosolo móbimisama mingi te, ete likoki ya kozwa matomba likóma monene, mpe banyama bákóla nokinoki. Monganga Harash Narang, moko na bato ya mayele oyo bakebisaki mpo na mbala ya liboso na ntina na bokɔnɔ yango, alobi ete: Na ntango mwana ya ngɔmbɛ akokisi sanza motoba, asili koleisama kiló 12 ya bilei oyo biuti na biteni ya banyama mosusu. Kolobeláká makambo oyo amonaki na ntango akendaki na ndako moko ya bobomi-nyama, moto yango alobaki ete: “Nakamwaki mingi. Tozalaki mpenza koleisa bangɔmbɛ na bangɔmbɛ mosusu. Mpo na ngai, ezalaki lokola nde moto azali kolya mosuni ya moninga na ye moto.”

◼ Na lolenge ya litomba mpenza, Mongelesi moko mobɔkɔli-ngɔmbɛ ya bobimisi miliki ayaki komona lolenge akoki kosalela bangɔmbɛ oyo banuni, oyo akoki te kotɛkisa na mosolo mingi mpo na bobángi “bokɔnɔ bobéngami vache folle.” Lokola zulunalo Newsweek eyebisi yango, azali kosalela bangɔmbɛ yango lokola mabaya ya piblisité. Atyaka makomi ya kopesa piblisité likoló ya bangɔmbɛ na ye ntango bazali kolya matiti pene na nzela epai bato bazali koleka mingi, mpe na ngɔmbɛ moko, azali kozwa badolare 40 na pɔ́sɔ moko. Mobɔkɔli-ngɔmbɛ yango alobaki ete: “Tosengeli koluka myango ya sika mpo na kozwa mosolo. Kosala bongo ezali mwango malamu mpo na bangɔmbɛ ete bámizwela oyo esengeli mpo na kobikela.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto