Boyekoli ya moto na moto: likambo oyo lisengeli kobenda likebi na biso
1 Mpo na biso, nini ezali likambo ya ntina oyo esengeli kobenda likebi na biso? Ya solo, tosengeli komibanzabanza mingimingi mpo na kosala mpe kobatela boyokani ya penepene elongo na Yehova. Boyekoli ya moto na moto ezali kokokisa mokumba monene mpo na bokoli ya boyokani motindo wana. Lelo oyo, bato moke kati na biso bazali na likoki ya kolekisa ntango molai mpo na komanyola mpe koyekola bango moko. Atako boni, soki tozali kotánga te Liloba na Nzambe mbala na mbala, kino tokozala lisusu na nguya te ya kotɛmɛla elimo ya mokili mpe bamposa ya nzoto oyo yango ezali kotya na esika ya liboso.
2 Tóyoka mpenza mposa ya Liloba: Ntango toyebaki mikano ya Nzambe mpo na mbala ya liboso, tozalaki mpenza na mposa makasi ya kozwa boyebi mingi. Nzokande, ekoki kozala ete nsima ya mwa ntango mposa na biso ya bilei ya elimo ebandi kokita. Mbala mosusu tozali na bosɛnga ya “koyoka mpenza mposa” ya bilei ya elimo. (1 Pet. 2:2) Ndenge nini tokoki kokolisa mposa wana?
3 Nsolo mpimbó ya bilei na biso oyo tolingaka ekoki kopesa biso mposa ya kolya mpamba te ezali kokundwela biso makambo kitoko. Ntango mikuse ya boyekoli na biso moko ekoki kozala na bopusi ndenge moko na makambo ya elimo. Na komileisáká mwa bilei kitoko ya elimo, tokoki koyoka mposa ya basolo eleki mozindo. Bosepeli oyo euti na boyebi tozali kozwa, ekoki kolendisa biso na kotimola mingi kati na Liloba ya Yehova.
4 Tómityela ebongiseli ya malamu: Wana bamoko bazali komibombela mpokwa mobimba mpo na boyekoli na bango moko, basusu bazali komona malamu kolekisa ntango mikuse, kasi oyo ezali kosalema mbala na mbala mpo na boyekoli na bango moko. Soki tokanisi ete ekozala nkaka mpo na biso kotɛlɛmisa makanisi esika moko na ntɔngɔntɔngɔ, mbala mosusu tokozwa ekateli ya koyekolaka liboso ya kolya bilei ya ntɔngɔ. Soki elimo na biso ezalaka kimya mingi na mpokwa, tokopona kosala boyekoli liboso ya kolala. Atako boni, likambo ya ntina ezali ete boyekoli wana esengeli kosalema mbala na mbala mpe ete tótosaka ebongiseli oyo eyokani na bamposa na biso.
5 Ntango tolendisami ete tóyekolaka mingi, mbala mosusu tozalaka pene na koloba ete tosilá komisalela ebongiseli moko malamu. Nzokande, moko na moko na biso asengeli kozala na kolongobana ntango azali kotalela ndenge asalelaka ngonga na ye. Mokolo na mokolo, tolekisaka nde ngonga mingi mpo na kotala televizyo? Tozalaka pene mpo na komipimela bamposa na biso mosusu? Na ndakisa, botaleli malamu ya lolenge tozali kolekisa ntango na biso ekoki komonisa biso ete mokolo na mokolo tozalaka na ntango oyo tokoki kosalela malamu mpo na boyekoli na biso moko.—Ef. 5:15, 16.
6 Boyekoli ya Liloba ya Nzambe esengeli kobenda likebi na biso mobimba. Tokomizwela matomba mingi te soki tokomeka kosala likambo mosusu bobele na ntango oyo tozali kotánga yango. Soki tozali na momeseno ya koyekola wana tozali kolya, wana tozali koyoka radio to wana tozali kotala televizyo, likebi na biso ekozala mpenza te na likambo oyo tolingi koyekola. (1 Tim. 4:15) Na bongo, tótya pembeni makambo nyonso oyo ekoki kopɛngwisa likebi na biso.—Talá Mokanda mpo na eteyelo, na nkasa 32-33.
7 Ezali likambo ya ntina koyekola mpe kosalela mokolo na mokolo batoli oyo Biblia ezali kopesa, mpamba te ezali na nzela wana nde Yehova azali kokamba biso. Tómityela mokano ya kokɔtisa kati na motema solo oyo ezwami kati na mikanda [ya la Société]. Tósimba mabaku nyonso mpo na kotánga, kotalela to komanyola makanisi ya elimo, ata soki tozali bobele na ntango moke mpo na kosala yango.—Det. 6:6-8; Kols. 1:9-10.