Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/05 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 12/05 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Des.

“Bato mingi bamitungisaka ndenge bamonaka ete eleko ya bafɛti ekómá ntango oyo bato ya mombongo batɛkaka mingi. Okanisi ete bato babosani ntina ya bafɛti yango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli ndenge bafɛti yango ebongwani na bambula oyo eleki. Elobeli mpe ndenge oyo tokoki mpenza kokumisa Nzambe mpe Klisto.” Tangá Yoane 17:⁠3.

Lamuká! 22 Des.

“Eleki sikoyo mbula 85, maladi moko oyo ezwaka ebebe ya bato na mbala moko, ebomaki ebele ya bato na pɔsɔ 24 koleka kutu bato oyo Sida ebomi na boumeli ya mbula 24. Basusu babengaka yango maladi oyo eleki mabe banda mokili ebandá. Osilá koyoka maladi babengi grippe espagnole? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli soki likambo ya ndenge wana ekoki kosalema lisusu. Emonisi mpe ntina oyo tosengeli kozala na elikya.” Tángá Yisaya 33:⁠24.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Yan.

“Bato bazali na likoki ya kosala makambo mingi ya malamu, kasi likambo ya mawa, mbala mingi basalaka makambo ya mabe mpenza. Omituná naino te mpo na nini ezalaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo epesi eyano ya Biblia na likambo yango. Ezali mpe kolimbola ndenge oyo, nsukansuka, malamu ekolonga mabe.” Tángá Baloma 16:⁠20.

Lamuká! Yan.

“Omituná naino te ndenge oyo mokili ekokóma nsima ya mbula 20 to 30? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 119:105.] Biblia engɛngiselaka biso nzela mpo na kosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Zulunalo oyo elobeli bisakweli oyo emonisi ntango nini tokómi sikoyo mpe ntina oyo tosengeli kozala na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto