Ndenge ya kobanda lisolo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/10/2015
“Tozali kolakisa moto nyonso ya kartye na biso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ya kitoko. [Lakisá ezipeli.] Bato mosusu bakanisaka ete libondeli ezali kaka kolekisa ntango, mpe moto moko te ayokaka yango. Basusu bandimaka ete Nzambe ayokaka mabondeli na bango. Yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi mpo na libondeli. [Tángá Yisaya 30:19.] Zulunalo oyo emonisi ete Nzambe ayokaka mpe ayanolaka mabondeli oyo basali na ndenge ebongi mpe mpo na makambo ya malamu.”
Lamuká! 10/2015
“Tozali kotala bato ya kartye na mwa miniti moke mpo bato mingi bazali komituna mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala. Okanisi ete kotuna Nzambe makambo ya ndenge wana ezali kozanga limemya? [Tiká ye apesa eyano.] Yobo, moto moko ya sembo amonisaki mposa ya kotuna Nzambe motuna. [Tángá Yobo 23:3-5.] Zulunalo oyo elobeli mituna misato oyo bato mingi bakolinga kotuna Nzambe, soki bazwi libaku, mpe biyano ya malamu oyo Biblia epesi.”