Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na Loyembo ya Salomo
“LOKOLA fololo lisi na kati ya matiti ya nzubɛnzubɛ, moninga na ngai ya mwasi azali bongo na kati ya bana basi.” “Lokola nzete ya pɔme na kati ya banzete ya zamba, bolingo na ngai azali bongo na kati ya bana mibali.” “Oyo nani atali lokola ebandeli ya moi na kitoko lokola sanza mpe na kongɛnga lokola moi?” (Loyembo ya Salomo 2:2, 3, NW; 6:10) Maloba kitoko wana euti na bavɛrsɛ ya Loyembo ya Salomo! Mokanda yango mobimba ezali na maloba ya ntɔki oyo ezali mpe na ndimbola monene; yango wana ebengami “loyembo ya koleka nzembo nyonso.”—Loyembo ya Salomo 1:1.
Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, nde akomaki loyembo yango oyo ezali kolobela lolango ya elenge moko mobateli ya mpate ná elenge mwasi moko ya mboka Sulama; akomaki yango na mobu soki 1020 L.T.B., na ebandeli ya boyangeli na ye oyo eumelaki mbula 40. Na kati ya bato oyo balobeli na loyembo yango tokoki kotánga mama ya elenge mwasi ná bandeko na ye ya mibali, “bana basi ya Yelusaleme [basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi],” mpe “bana basi ya Siona [basi ya Yelusaleme].” (Loyembo ya Salomo 1:5; 3:11) Ntango moto azali kotánga Loyembo ya Salomo, ekoki kozala mpasi ayeba nani azali koloba, kasi soki alandi malamumalamu makambo oyo alobi to oyo balobi na ye, akoyeba nani to banani bazali koloba.
Loyembo ya Salomo ezali moko na mikanda ya Liloba ya Nzambe; yango wana nsango na yango ezali na ntina mingi mpo na makambo mibale. (Baebele 4:12) Ya liboso, ezali koteya biso bolingo ya solosolo kati na mwasi ná mobali. Ya mibale, loyembo yango ezali komonisa bolingo ya Yesu Klisto ná baklisto bapakolami.—2 Bakolinti 11:2; Baefese 5:25-31.
BÓMEKA TE ‘KOLAMUKISA BOLINGO EPAI NA NGAI’
“Tiká ete apwɛpwa ngai na kopwɛpwa ya monɔkɔ na ye; zambi bolingo na yo eleki vinyo na malamu.” (Loyembo ya Salomo 1:2) Loyembo ya Salomo ebandi na maloba wana ya elenge mwasi moko oyo azalaki kofanda na mboka, oyo akómaki na hema ya Salomo. Akómaki kuna ndenge nini?
Ye moko alobi boye: “Bana babali ya mama na ngai basilikaki na ngai, batii ngai mokɛngɛli ya bilanga ya miwiti.” Bandeko na ye ya mibali basilikelaki ye mpo elenge mobateli ya bampate oyo alinganaki na ye, abengaki ye bákende kotambola na zamba mokolo moko na eleko ya prɛnta, na ntango bafololo ezalaki kobima mingi. Mpo na kopekisa ye kokende, bapesaki ye mosala ya kobengana ‘bagambala mike oyo bazalaki kobebisa banzete ya vinyo.’ Nzokande, epai akendaki kosala mosala yango ezalaki mosika te na esika oyo Salomo apikaki bahema na ye na kati ya zamba. Elenge mwasi yango akitaki na “elanga ya mbuma ya limona” mpe, ntango basali ya Salomo bamonaki ye, basepelaki na kitoko na ye mpe bamemaki ye na kaa ya Salomo.—Loyembo ya Salomo 1:6; 2:10-15, NW; 6:11.
Ntango elenge mwasi yango amonisaki mposa ya komona molingami na ye mobateli ya mpate, basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi balobaki na ye ‘alanda matambe ya bitonga’ mpo na koluka ye. Kasi Salomo aboyaki kotika ye akende. Salomo alulaki ye mpo na kitoko na ye mpe alakaki ye “biloko ya nkembo ya wolo etyami mpe palata katikati.” Kasi, nyonso wana ebɛtisaki motema ya elenge mwasi yango te. Na nsima, elenge mobateli ya mpate akɔtaki na kaa ya Salomo, amonaki moninga na ye, mpe alobaki boye: “Talá, yo ozali bonzenga, molingami na ngai; talá, yo ozali bonzenga.” Elenge mwasi alapisaki basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ndai ete: ‘Bólamukisa bolingo te kino yango mpenza elingi boye.’—Loyembo ya Salomo 1:8-11, 15; 2:7; 3:5.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:2, 3—Mpo na nini elenge mwasi alobaki ete maloba mpe bajɛstɛ ya bolingo ya elenge mobateli ya mpate eleki vinyo mpe nkombo na ye ezali lokola mafuta? Vinyo esepelisaka motema ya moto mpe kopakola mafuta na motó ekitisaka motema; ndenge moko mpe, elenge mwasi azalaki kosepela mpe kobɔndisama soki akanisi nkombo ya moninga na ye mpe bolingo oyo moninga na ye azalaki na yango mpo na ye. (Nzembo 23:5; 104:15) Ndenge moko mpe, baklisto ya solo, mingimingi bapakolami, basepelaka mpe balendisamaka soki bakanisi ndenge oyo Yesu Klisto alingaka bango.
1:5—Mpo na nini elenge mwasi alobaki ete mposo moindo na ye ezali lokola “hema ya Kedala”? Kala bazalaki kosala bilamba na nsuki ya ntaba mpe bazalaki kosalela bilamba yango makambo mingi. (Mituya 31:20) Na ndakisa, bazipaki “hema na likoló ya mongombo” na “bilamba ya [nsuki] ya ntaba.” (Exode 26:7) Ekoki kozala ete bahema ya Kedala ezipamaki na bilamba ya nsuki ya ntaba ndenge kaka bahema ya babateli ya mpate oyo bafandaka na esobe ezalaka ata lelo oyo.
1:15—Mobateli ya mpate alingaki koloba nini na maloba oyo: “Miso na yo ezali miso ya bibenga”? Elenge mobateli ya mpate alingaki koloba ete miso ya moninga na ye ezali kitoko mpe elalá lokola miso ya ebenga.
2:7; 3:5—Mpo na nini elenge mwasi alapisaki basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ndai “mpo na mboloko mpe mpo na mbuli ya bilanga”? Mboloko mpe mbuli ezalaka banyama kitoko mpe edendaka ntango ezali kotambola. Na bongo, elenge mwasi Mosulama asɛngisaki basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ete na nyonso oyo ezalaka kitoko mpe bonzenga, bálamwisa bolingo na motema na ye te.
Mateya mpo na biso:
1:2; 2:6. Ezali mabe te ete bafianse bálobana maloba ya bolingo to básimbana na lobɔkɔ na ndenge oyo ebongi. Kasi, basengeli kokeba ete kolakisana bolingo ndenge wana ebota te mposa ya mabe, oyo ekoki komema bango na pite to na etamboli ya nsɔni.—Bagalatia 5:19.
1:6; 2:10-15. Soki bandeko ya elenge mwasi Mosulama baboyaki akende kotambola na bangomba ná molingami na ye, bango mibale kaka, ezali te mpo azalaki mobulu to azalaki na makanisi ya mabe. Balukaki nde kobatela ye mpo akóma te na esika oyo akoki komekama na kosala mabe. Liteya mpo na bafianse ezali ete basengeli koboya bisika oyo bakozala kaka bango mibale.
2:1-3, NW, 8, 9. Atako elenge Mosulama azalaki mwasi kitoko, ye moko azalaki komimona lokola “fololo mpamba ya Safra oyo ebimaka na bokula.” Elenge mokɛngɛli ya mpate azalaki komona ye lokola “fololo lisi na kati ya matiti ya nzubɛnzubɛ” mpo azalaki kitoko mpe azalaki sembo epai ya Yehova. Tokoloba nini mpo na elenge mobali ye moko? Lokola azalaki mobali kitoko, elenge mwasi azalaki komona ye lokola “mboloko.” Na ntembe te azalaki mpe kosepela na makambo ya elimo mpe azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova. Elenge mwasi alobaki boye: “Lokola nzete ya pɔme na kati ya banzete ya zamba, bolingo na ngai azali bongo na kati ya bana mibali.” Maloba yango emonisi ete kondima mpe bosembo epai ya Yehova nde bizaleli tosengeli koluka epai ya moto oyo tozali kotalela soki tokoki kobalana na ye.
2:7; 3:5. Atako Salomo asalaki nyonso, elenge mwasi Mosulama alingaki ye te. Elenge yango alapisaki mpe basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ndai ete bámeka te kolamwisa bolingo na motema na ye mpo na moto mosusu; alingaki kaka mobateli ya mpate. Ekoki kosalema te mpe ebongi te kolinga ata moto nini na bolingo ya mwasi ná mobali. Na ndakisa, moklisto oyo azali monzemba mpe alingi kobala asengeli koluka kaka mosaleli ya sembo ya Yehova.—1 Bakolinti 7:39.
“MPO NA NINI BOKOTALA MOSULAMA?”
Eloko moko “elongwe na lisobe lokola mapata ya molinga.” (Loyembo ya Salomo 3:6) Ntango basi ya Yelusaleme babimi mpo na kotala, bamoni nini? Salomo ná basali na ye bazali kozonga na Yelusaleme! Mokonzi ayei mpe na elenge mwasi Mosulama.
Mobateli ya mpate alandaki elenge mwasi mpe nsukansuka azwi libaku ya komona ye. Ntango ayebisi ye ete motema na ye ezali kaka epai na ye, mwana mwasi alobi ete alingi kofanda na engumba te: “Kino mokolo ekobanda mpe molili ekolimwa. Nakokende na ngomba ya mola mpe na nkeka ya mpaka ya malasi.” Elenge mwasi alobi na mobateli ya mpate ete “aya kati na elanga na ye, alya mpe mbuma na yango eleki malamu.” Ye azongisi ete: “Nayei na elanga na ngai, ndeko na ngai, mwasi na ngai.” Basi ya Yelusaleme balobi na bango ete: “Bolyá, ee baninga! Bómɛla mpe bólangwa bolingo!”—Loyembo ya Salomo 4:6, 16; 5:1, NW.
Ntango elenge mwasi Mosulama ayebisi basi oyo basalaka na ndako ya mokonzi ndɔtɔ oyo alɔtaki, alobi na bango ete: “Nayoki maladi mpo na bolingo.” Bango batuni ye ete: “Molingami na yo aleki molingami mosusu boni?” Ye alobi ete: “Molingami na ngai azali pɛɛ mpe motane, azali liboso ya nkóto zomi.” (Loyembo ya Salomo 5:2-10) Ntango Salomo ameki kolengola ye na ebele ya maloba kitoko, ye azongisi kaka ete: “Mpo na nini bokotala Mosulama?” (Loyembo ya Salomo 6:4-13) Mokonzi amoni ete yango ezali libaku ya kolengola malamumalamu motema ya elenge mwasi yango mpo azwa ye; yango wana, abakisi lisusu maloba ya sukali. Kasi, elenge mwasi akangami kaka na mobateli ya mpate. Nsukansuka, Salomo atiki ye akende.
Biyano na mituna ya Biblia:
4:1; 6:5—Mpo na nini bakokanisi nsuki ya elenge mwasi na “etonga ya bantaba”? Yango ezali komonisa ete nsuki na ye ezalaki kongɛnga mpe ezalaki ebele lokola nsuki moindo ya ntaba.
4:11 (NW)—Na ndimbola nini ‘mbɛbu’ ya Mosulama ‘ezali kotangisa mafuta ya nzoi oyo ezali na ndako ya nzoi’ mpe ‘mafuta ya nzoi ná miliki ezali na nse ya lolemo na ye’? Mafuta oyo ezali kotanga na ndako ya nzoi ezalaka nsolo kitoko mpe elɛngi koleka mafuta ya nzoi oyo babimisi na ndako na yango mpe ezwi mopɛpɛ. Bokeseni wana, bakisa mpe maloba oyo elobi ete mafuta ya nzoi ná miliki ezalaki na nse ya lolemo ya elenge mwasi, ezali komonisa polele ete Mosulama azalaki na maloba ya boboto mpe ya elɛngi.
5:12—Maloba “miso na ye lokola bibenga pembeni ya maziba ya mai; bisukolami na mabɛlɛ” ezali na ndimbola nini? Mosulama alobelaki miso kitoko ya molingami na ye. Mbala mosusu maloba yango ya elilingi ezali kolobela ndenge oyo mbuma moindo ya miso ya molingami na ye ezalaki komonana na katikati ya mbuma mpɛmbɛ lokola bibenga oyo ezali na nsala ya bule mpe langi ya mputulu oyo ezali kosukola na kati ya miliki.
5:14, 15—Mpo na nini basaleli bililingi wana mpo na kolobela mabɔkɔ ná makolo ya mobateli ya mpate? Ekoki kozala ete Mosulama akokanisaki misapi ya mobateli ya mpate na bambuma ya wolo mpe manzaka na ye na libanga ya ntalo. Akokanisi makolo na ye na “makonzí ya libanga” mpamba te ezali makasi mpe bonzenga.
6:4—Mpo na nini bakokanisi elenge mwasi na Tilisa? Yosua abɔtɔlaki engumba wana ya Kanana mpe na nsima, ntango mabota ya Yisalaele ekabwanaki, nsima ya boyangeli ya Salomo, yango ekómaki engumba-mokonzi ya liboso ya Yisalaele, ekólo ya mabota zomi. (Yosua 12:7, 24; 1 Mikonzi 16:5, 6, 8, 15) Buku moko elobi boye: “Emonani ete engumba yango ezalaki kitoko mingi, yango wana elobelami awa.”
6:13—“Kobina ya bibolo [to bakaa] mibale” elimboli nini? Maloba yango ekoki mpe kobongolama na “kobina ya Mahanaime.” Engumba oyo bazalaki kobenga Mahanaime ezalaki na ɛsti ya Ebale Yolodani, pembeni ya lobwaku ya Yaboko. (Genese 32:2, 22; 2 Samwele 2:29) “Kobina ya bibolo mibale” ekoki kozala mabina oyo bato ya engumba yango bazalaki kobina na ntango ya fɛti moko boye.
7:4 (NW)—Mpo na nini Salomo akokanisi nkingo ya Mosulama na “linɔ́ngi ya mpɛmbɛ ya nzoku”? Mwa liboso, bakumisaki kitoko ya elenge mwasi yango na maloba oyo: “Nkingo na yo ezali lokola linɔ́ngi ya Davidi.” (Loyembo ya Salomo 4:4, NW) Linɔ́ngi ezalaka moke mpe molai; mpɛmbɛ ya nzoku ezalaka sɛlisɛli. Salomo asepelaki mingi na nkingo molai mpe kitoko ya elenge mwasi yango.
Mateya mpo na biso:
4:1-7. Atako elenge mwasi Mosulama azalaki moto ya kozanga kokoka, abendamaki te na maloba kitoko ya Salomo; yango emonisi ete azalaki mobulu ya mibali te. Etamboli malamu na ye ebakisaki lisusu kitoko na ye. Baklisto ya basi basengeli kozala ndenge yango.
4:12. Lokola elanga kitoko na kati ya lopango, oyo bakɔtelaka kaka na porte oyo ekangamaka na fungola, elenge mwasi Mosulama abombaki bolingo na ye mpo na mobali oyo akobala ye. Yango ezali ndakisa malamu mpo na baklisto oyo bazali naino minzemba!
“MOLALO YA MƆTƆ YA YAH”
Ntango bandeko ya elenge Mosulama bamonaki ye azali kozonga na ndako, batunaki boye: “Mwasi oyo nani azali kouta na esobe, amilalisi epai ya molingami na ye?” Mwa liboso, moko na bango alobaki boye: “Soki azali lopango, tokotonga ndako ya palata likoló na ye. Nde soki azali ekuke, tokozingela ye na mabaya ya sɛdrɛ.” Lokola Mosulama amekamaki mpe amonisaki ete azali bilingalinga te, ye moko alobi ete: “Nazali efelo, mpe mabɛlɛ na ngai lokola manɔ́ngi. Na bongo, na miso na ye nakómi lokola ye oyo azwi kimya.”—Loyembo ya Salomo 8:5, 9, 10, NW.
Bolingo ya solo ezali “molalo ya mɔtɔ ya Yah.” Mpo na nini? Mpamba te bolingo yango eutaka na Yehova. Ye nde atyá na mitema na biso mposa ya kolinga. Molalo ya mɔtɔ yango ekoki kokufa te. Loyembo ya Salomo esaleli maloba kitoko mpenza mpo na komonisa ete bolingo ya mwasi ná mobali ekoki kozala “makasi lokola liwa.”—Loyembo ya Salomo 8:6, NW.
Loyembo eleki kitoko ya Salomo ezali mpe komonisa bolingo makasi ya Yesu Klisto ná mwasi na ye ya elilingi. (Emoniseli 21:2, 9) Bolingo ya Yesu mpo na baklisto bapakolami eleki bolingo nyonso ya mobali ná mwasi na ye. Bolingo ya mwasi ya Klisto, elingi koloba lisangá ya baklisto bapakolami, ezali mpenza makasi. Yesu andimaki mpe kopesa bomoi na ye mpo na “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Yango wana, basambeli nyonso ya solo bakoki kolanda ndakisa ya bolingo ya solosolo mpe bosembo oyo Mosulama amonisaki.
[Elilingi na lokasa 18]
Loyembo ya Salomo eteyi biso tólukaka nini epai ya moto oyo tozali kotalela soki tokoki kobalana na ye?