Manáka ya liyangani ya zongazonga 1995-1996
1 Molɔngɔ́ ya mayangani ya zongazonga oyo esili kobanda uta Sɛtɛ́mbɛ 1995 ezali na motó na likambo ete “Bósɛnzɛlaka, bótɛlɛma ngwi, bókemba na nguya.” Wana ezali maloba ya kolendisa oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso, oyo mazwami kati na 1 Bakolinti 16:13.
2 Mpo na baoyo bayangani naino na yango te, liyangani yango ekomonisa libosoliboso ete tozali ntango nyonso na mposa ya komitalela na elimo. Mpo na kotikala ngwi kati na ekateli ya kosala oyo ezali sembo na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ ezali likambo ya ntina ete tótalela, na bosolo nyonso, boyokani na biso elongo na Yehova mpe lisangá na ye. (2 Tim. 3:1) Bakokundwela biso ete Yehova azali kosepela na milende na biso. Tozali na mposa ya koteyama mpo na komonisa lisusu bizaleli ya boklisto mpe kobatela etamboli oyo ebongi.
3 Likebi likobendama mingi lisusu likoló na ntina ya kosangana na molende nyonso kati na mosala ya kozalisa bayekoli, na kozaláká na mposa ya kokóla na elimo mpe ya kozwa mikumba. Malako malamu makopesama kati na masukúlu ndenge na ndenge, bilakiseli mpe masoló; malako yango mazali komonisa lolenge tokoki, biso moko mpe kati na libota, kolanda manáka ya mbala na mbala oyo matali bolei na elimo.
4 Na Mwapɔ́sɔ, bakandidá oyo bakokisi masɛngami bakomonisa polele komipesa na bango epai na Yehova na kozwáká batisimo. Lisusu, tokolinga ete biso banso tózala wana na Mwalomingo mpo na koyoka lisukúlu ya bato banso oyo ezali na motó na likambo ete “Ozali na etɛlɛmɛlo nini liboso na Nzambe?”
5 Manáka yango ekosuka na kopesama ya bilendiseli mpo na kotikala ngwi kati na kondima, na kosunganáká bamoko na bamosusu kati na elimo ya bolingo mpe ya kimya. Liyangani ya zongazonga ezali moko na mabaku malamu oyo Yehova azali kopesa biso mpo na ‘kolendisana na bolingo mpe na misala malamu bamoko na bamosusu.’ (Eb. 10:24, 25) Tósɛnzɛla ete tómibongisa mpo na kozala wana na boumeli ya mikolo nyonso mibale.