Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbula oyo
1 Mpo na nini tosengeli kosakola nsango malamu kozanga kotika? Masɛngami nini moto asengeli kokokisa mpo na kozala mosakoli ya nsango malamu? Lolenge nini ata bato oyo bazalaka nsɔ́ninsɔ́ni mpe oyo babangabangaka bakoki kobanda koyebisa nsango malamu epai na bazalani na bango? Mituna wana oyo mizali kosɛnga botɔngɔli mpe mituna mosusu mingi mikozwa biyano na boumeli ya liyangani ya mokolo moko ya mbula oyo esilaki kobanda na Sɛtɛ́mbɛ eleki. Ezali na motó ya likambo ete “Tobongisami mpo na kozala baministre ya nsango malamu.”—Talá 2 Bakolinti 3:5.
2 Tozali basaleli ya Yehova; yango wana tosengeli kosɛnzɛla na ntina na etamboli na biso. Bilenge bakoyebisa baeksperiansi ya kolendisa oyo ekomonisa lolenge oyo batɛmɛlaki bopusi ya baninga na bango. Baboti balendisami na bolingo nyonso ete báyeba ntina ya kobongisa bana na bango mpo ete bákóma baministre ya Nzambe. Biso nyonso tozwaka batoli oyo ekosalisa na kososola ntina ya kosakola, mpe mapamboli oyo tokozwa, ezala biso mpe baoyo bazali koyoka biso.—1 Tim. 4:16.
3 Molulu ya batisimo ekozala mpenza ntango moko ya ntina ya mokolo yango. Kasi liboso na yango, lisukúlu uta na Biblia likosalema mpe likotalela mingimingi bato oyo bamipesi na Nzambe kala mingi te. Ya solo, bayangani nyonso babyangami ete bátya likebi na lisukúlu yango oyo likolimbola polele ntina ya batisimo. Baoyo nyonso balingi kozwa batisimo na liyangani ya mokolo moko basengeli koyebisa yango nokinoki na mokɛngɛli-mokambi mpo ete akamata bibongiseli na boye ete bankulutu batalela mituna oyo milengelami elongo na bakandidá.
4 Mokolo yango mokolendisama mpe na lisukúlu ya ntina oyo likosalema na molobi-mopaya. Lisukúlu yango, lizali na motó ya likambo ete “Tobongisami mpe tozali na nyonso esengeli mpo na kozala baministre ya Nzambe,” likomonisa bibongiseli minei ya ntina oyo epesaka biso nzela ete tótángama baministre babongisami. Baeksperiansi ya kolendisa mpe ekolobelama.
5 Tómilengela uta sikawa mpo na koyangana na masukúlu nyonso (lobá soko tosilaki koyangana na yango). Tozangisa te kobyanga bato oyo bamonisaka bosepeli na Biblia, mpo ete bango mpe bákoka kozwa litomba na mokolo yango ya kolakisama na mateya ya teokrasi. Na bongo, tokozwa endimiseli ya kozala bato oyo “babongisami” awa ezali biso baministre ya nsango malamu.