Saleláká site Internet na biso na mosala ya kosakola—“Biyano na mituna ya Biblia”
Na jw.org esika bakomi “Mateya ya Biblia,” ezali na eteni babengi “Biyano na mituna ya Biblia.” Soki tomesani na mituna yango oyo bato batunaka mingi, tokoki kolakisa moto oyo tozali kosolola na ye biyano ya Biblia na site Internet na biso. Tokoki mpe kosalela yango mpo na kobanda masolo na mosala ya kosakola. Tokoki kopona motuna moko oyo esepelisaka bato na teritware na biso, kosɛnga moto apesa likanisi na ye, mpe koyebisa ye oyo Biblia elobi na kosalela makanisi oyo ezali na jw.org. Na nsima, tokoki kolimbwela ye to mpe kolakisa ye esika tozwaki makambo yango. Lolenge mosusu ya kosala ezali kotika ye atánga eyano mbala moko na site Internet. Mwasi ya mokɛngɛli-motamboli moko azwaka matomba na ndenge alobaka: “Bato mingi bamitunaka, ‘Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?’ Okosepela koyeba eyano kaka na segɔnde 51?” Na nsima, atyaka eyano ya maloba oyo batángi kotánga oyo atyá na telefone na ye ya mabɔkɔ. Asukisaka na kolakisa mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka.