Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr23 Mars nk. 1-13
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • 06-12/03
  • Kosambela Yehova epesaka esengo mingi
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • Nzambe azali na ebongiseli
  • Emonisi bolingo ya Nzambe
  • 13-19/03
  • 20-26/03
  • 27/03–02/04
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • 10-16/04
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 8-9
  • 17-23/04
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • 24-30/04
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2023
mwbr23 Mars nk. 1-13

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

© 2022 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

06-12/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 23-26

“Tempelo mpo na losambo ebongisami lisusu malamu koleka”

it-2-F lok. 133 par. 2

Balevi

Misala ya Balevi ebongisamaki malamumalamu na boyangeli ya Davidi, oyo aponaki bakambi, bakapita, basambisi, bakɛngɛli ya baporte, mpe babombi mosolo. Ezalaki mpe na ebele ya bato oyo bazalaki kopesa banganga-nzambe mabɔkɔ na tempelo, na mapango, mpe na bisika ya kolya na oyo etali makabo, bambeka ya kotumba, na komipɛtolama, komɛka kilo, mezire, mpe misala ndenge na ndenge ya kokɛngɛla. Se ndenge banganga-nzambe bakabolamaki na bituluku, Balevi oyo bazalaki koyemba bakabolamaki na bituluku 24, mpe bazalaki kosala mosala etuluku na etuluku. Bazalaki kobwaka mbɛsɛ mpo na kokabola misala. Bazalaki mpe kosala bongo mpo na kokabola misala mpo na bituluku ya bakɛngɛli ya baporte.​—1Nt 23, 25, 26; 2Nt 35:3-5, 10.

it-2-F nk. 657-658 par. 7

Nganga-nzambe

Bakapita ndenge na ndenge nde bazalaki kobongisa misala oyo banganga-nzambe bazalaki kosala na tempelo. Bazalaki kobwaka mbɛsɛ mpo na kokabola misala mosusu. Etuluku mokomoko ya bituluku yango 24 ezalaki kosala misala pɔsɔ moko mobimba, mpe ezalaki kosala bongo mbala mibale na mbula. Emonani ete banganga-nzambe nyonso bazalaki kosala na bileko ya bafɛti mpo bato bazalaki kopesa bambeka ebele, ndenge basalaka yango na fɛti ya bofungoli ya tempelo. (1Nt 24:1-18, 31; 2Nt 5:11; talá mpe 2Nt 29:31-35; 30:23-25; 35:10-19.) Nganga-nzambe moko akokaki mpe kosala na bangonga mosusu, kaka soki azalaki komikɔtisa te na mosala oyo banganga-nzambe mosusu bazalaki na mokumba ya kosala. Na kotalela mimeseno ya barabi, ntango Yesu azalaki awa na mabele, banganga-nzambe bazalaki mingi mpenza, na boye ete mosala ya pɔsɔ ekabolamaki na mabota oyo ezalaki na etuluku moko, mokomoko na yango ezalaki kosala mokolo moko to mikolo ebele na kotalela motángo ya basangani na yango.

it-2-F lok. 358 par. 6

Miziki

Ntango Davidi azalaki komibongisa mpo na kotonga tempelo ya Yehova, atyaki Balevi 4000 mpo na mosala ya miziki. (1Nt 23:4, 5) Kati na bango, bato 288 ‘bamesanaki na nzembo ya Yehova, bango nyonso bayebaki mosala malamumalamu.’ (1Nt 25:7) Asafe, Hemane, mpe Yedutune (oyo mbala mosusu ayebanaki mpe na nkombo Etane) nde bazalaki kokamba ebongiseli yango ya miziki. Lokola bato yango misato bautaki na libota moko ya bana misato ya Levi, Gershome, Kohate, mpe Merari, bankumu yango misato ya mabota ya Balevi bazalaki bamonisi na ebongiseli yango ya miziki na tempelo. (1Nt 6:16, 31-33, 39-44; 25:1-6) Bana nyonso ya bato misato yango bazalaki 24, bango nyonso bazalaki na kati ya bato 288 oyo bayebaki miziki malamumalamu. Babwakaki mbɛsɛ mpo na kopona mwana mokomoko mpo azala mokambi ya etuluku moko ya bayembi. Mokomoko na bango azalaki kokamba bato 11 oyo ‘bayebaki mosala malamumalamu,’ oyo baponamaki na kati ya bana na bango mpe Balevi mosusu. Yango wana, motángo ya bato 288 ya Balevi oyo bayebaki koyemba malamumalamu esalemi boye: ([1+11]×24=288), ndenge moko na banganga-nzambe, bakabolamaki na bituluku 24. Soki bato mosusu nyonso 3712 oyo batikalaki bazalaki ‘bayekoli’ bakabolamaki na lolenge moko, etuluku mokomoko ya bituluku yango 24 ekokaki kozala na bato soki 155, na ndenge yango, mokomoko ya baoyo bayebaki koyemba malamumalamu akokaki kozala na Balevi 13 oyo bazalaki koyekola mpe kozwa formasyo na ntango ekeseni. (1Nt 25:1-31) Lokola bato oyo bazalaki kobɛta kelelo bazalaki banganga-nzambe, basengelaki kozala na kati ya Balevi oyo bazalaki bayembi.​—2Nt 5:12; talá mpe Mit 10:8.

it-2-F lok. 620

Mokɛngɛli ya baporte

Na tempelo. Mwa moke liboso akufa, Mokonzi Davidi abongisaki malamumalamu Balevi mpe basaleli ya tempelo, ezala mpe bakɛngɛli ya baporte, bazalaki bato 4000. Ndenge bakabolamaki na bituluku 24, bazalaki koya mikolo nsambo bato na bato na bituluku na bango. Bazalaki na mokumba ya kokɛngɛla ndako ya Yehova mpe kotala soki baporte ezalaki ya kofungwama mpe ya kokangama na ntango oyo etyamaki. (1Nt 9:23-27; 23:1-6) Longola mosala ya kokɛngɛla, basusu bazalaki kotalela makabo oyo bato bazalaki komema mpo na kosalela na tempelo. (2Ba 12:9; 22:4) Na nsima, ntango nganga-nzambe monene Yehoyada atyaki Yehoashe mafuta mpo akóma mokonzi, bakɛngɛli ya malamu batyamaki mpo na kokɛngɛla baporte ya tempelo mpo na kobatela elenge Yehoashe na mokonzi-mwasi Atalia oyo azwaki bokonzi na makasi. (2Ba 11:4-8) Ntango Mokonzi Yosiya abebisaki losambo ya bikeko, bakɛngɛli ya baporte basalisaki na kolongola na tempelo bisaleli oyo ezalaki kosalelama mpo na losambo ya Baala. Na nsima batumbaki yango na libándá ya engumba.​—2Ba 23:4.

Biloko ya motuya ya elimo

w22.03 lok. 22 par. 10

Kosambela Yehova epesaka esengo mingi

10 Koyembela Yehova na lisangá ezali na kati ya losambo na biso. (Nz. 28:7) Mpo na Bayisraele, koyemba ezalaki likambo ya ntina na kati ya losambo na bango. Mokonzi Davidi atyaki Balevi 288 mpo báyembaka na tempelo. (1 Nt. 25:1, 6-8) Lelo oyo, tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe ntango tozali koyemba nzembo ya masanzoli. Mongongo na biso ezali te eloko oyo eleki ntina. Tótalela ndakisa oyo: Ntango tolobaka, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi,” kasi yango epekisaka biso te koloba na makita mpe na mosala ya kosakola. (Yak. 3:2) Ndenge moko mpe, ata soki tokanisi ete tozali na mongongo ya malamu te mpo na koyemba, tosengeli te kotika yango epekisa biso koyemba mpo na kosanzola Yehova.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Mpo na nini bakristo bazali na ebongiseli?

w11 1/6 nk. 14-15

Nzambe azali na ebongiseli

Emonisi bolingo ya Nzambe

Tokoloba nini lelo oyo? Bato mosusu bakoki kokatana mpo na kokóma bandimi ya lingomba moko boye. Kasi, Biblia emonisi polele ete Nzambe asalelaka ntango nyonso ebongiseli na ye mpo na kokokisa mokano na ye. Abongisaki basambeli na ye na Yisraele, mpe abongisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso na losambo na bango.

Na yango, tokoki mpenza te koloba ete Yehova Nzambe azali kokoba kotambwisa basaleli na ye, ndenge asalaki na ntango ya kala? Ɛɛ, kobongisa basambeli na ye mpe kosangisa bango na bomoko, emonisi ete alingaka bango mpe amibanzabanzaka mpo na bango. Lelo oyo, Yehova asalelaka ebongiseli na ye mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato. Ndenge nini tokoki koyeba ebongiseli na ye? Tótalela makambo oyo elandi.

▪ Bakristo ya solo babongisami mpo na kokokisa mosala moko. (Matai 24:14; 1 Timote 2:3, 4) Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola nsango ya Bokonzi na bikólo nyonso, mokumba oyo ekokaki kosalema te soki ebongiseli ezalaka te na mokili mobimba. Na ndakisa, yo moko okoki kozala na mokakatano te ya koleisa moto moko, kasi soki esengeli oleisa bankóto ya bato, ata mpe bamilio, ekosengela ozala na etuluku ya bato oyo babongisami malamu mpe oyo bazali kosala na bomoko. Mpo na kokokisa etinda na bango, bakristo ya solo bazali kosala “na bomoko,” to “bazali kosala mosala ya [Nzambe] na bomoko.” (Sefania 3:9; Biblia Byington) Mosala oyo ezali kosalema na bikólo, minɔkɔ mpe na bato ya mposo ndenge na ndenge, ekokaki kosalema kozanga ete ebongiseli moko oyo ebongisami malamu mpe ezali kosala na bomoko ezala? Emonani polele ete ekokaki kosalema te.

▪ Bakristo ya solo babongisami mpo na kosungana mpe kolendisana. Moto oyo amataka bangomba, oyo azali ye moko, akoki kopona esika nini alingi komata mpe komona malamu ete akipe te bamati-ngomba oyo bamesani naino te na lisano yango. Kasi, soki akutani na likama to mokakatano moko, ekozala mpasi mingi, mpo moto ya kosalisa ye akozala te. Komitangola na basusu ezali mpenza likambo ya mayele te. (Masese 18:1) Mpo bakristo bákokisa mosala oyo Yesu apesi bango, basengeli kosalisana mpe kopesana mabɔkɔ. (Matai 28:19, 20) Lisangá ya bokristo ezali kopesa mateya mpe formasyo ndenge na ndenge ya Biblia oyo esengeli, mpe bilendiseli mpo moto nyonso akoba kokende liboso mpe atika te. Tolingaki koteyama ndenge nini na banzela ya Yehova soki makita ya bokristo oyo ebongisami malamu mpo na koteya biso mpe mpo na kosambela Yehova ezalaka te?​—Baebre 10:24, 25.

▪ Bakristo ya solo babongisami mpo na kosalela Nzambe na bomoko. Lokola bampate ya Yesu bayokaka mongongo na ye, bakómaka “etonga kaka moko” na nse ya litambwisi na ye. (Yoane 10:16) Bapanzani te na kati ya mangomba mpe bituluku oyo ezali kosala makambo na ndenge na yango; bakabwani mpe te na mateya na bango. Kutu, bango nyonso ‘bazali koloba na boyokani.’ (1 Bakorinti 1:10) Mpo na kozala na bomoko, tosengeli kosala makambo na molɔngɔ, mpe kosala makambo na molɔngɔ esɛngaka ebongiseli ezala. Kaka bandeko oyo bazali na bomoko nde bakoki kozwa mapamboli ya Nzambe.​—Nzembo 133:1, 3.

Bolingo ya solosolo mpo na Nzambe mpe mpo na solo ya Biblia ebendi bamilio ya bato na ebongiseli oyo ezali kokokisa masɛngami wana mpe mosusu oyo Biblia elobeli. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, lokola bato oyo babongisami malamu mpe bazali kosala na bomoko, basalaka makasi mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Bazali mpenza kondima elaka oyo: “Nakofanda na kati na bango mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.” (2 Bakorinti 6:16) Yo mpe okoki kozwa mapamboli kitoko oyo soki osambeli Yehova Nzambe na kati ya ebongiseli na ye.

13-19/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 27-29

“Tata ya bolingo apesaka mwana na ye toli”

w05 15/2 lok. 19 par. 9

Tóbatela bomoto na biso ya boklisto

9 Luká omona yo moko bosolo ya mateya ya Biblia. Soki boyebi na biso ya Biblia ezali likolólikoló, yango ekoki komema biso tóbosana ete tozali basaleli ya Yehova. (Bafilipi 1:9, 10) Mokristo mokomoko: elenge to mokóló, asengeli komindimisa ete makambo oyo andimaka ezali mpenza mateya ya solo ya Biblia. Paulo alendisaki baninga na ye bandimi na maloba oyo: “Bótalelaka malamumalamu makambo nyonso; bókangama makasi na oyo ezali malamu.” (1 Batesaloniki 5:21) Bilenge oyo baboti na bango bazali basaleli ya Nzambe basengeli koyeba ete bakoki te kozala baklisto ya solo na kondima ya baboti na bango. Davidi, tata ya Salomo, alendisaki ye ‘ayeba Nzambe ya tata na ye mpe asalela ye na motema malamu mpe na molimo ya botosi.’ (1 Ntango 28:9) Esengelaki te ete Salomo atala kaka ndenge oyo tata na ye alendisaki kondima na ye epai ya Yehova. Ye moko asengelaki koyeba Yehova, mpe asalaki yango. Abondelaki Nzambe boye: “Pesá ngai [sikoyo] mayele mpe boyebi ete nalekaleka liboso ya libota oyo.”​—2 Ntango 1:10.

w12 15/4 lok. 16 par. 13

Tóbatela motema mobimba epai ya Yehova

13 Liteya oyo tokoki kozwa ezali polele. Ezali malamu mingi soki tozali koyangana na makita ya lisangá mpe tozali kobima na mosala ya kosakola. Kasi kosalela Yehova na motema mobimba esuki wana te. (2 Nta. 25:1, 2, 27) Soki na kati ya motema na ye, mokristo moko azali kokoba kolinga “biloko oyo ezali na nsima,” elingi koloba makambo mosusu oyo bato ya mokili basalaka, azali na likama mpo akoki kobebisa boyokani na ye na Nzambe. (Luka 17:32) Tokozala bato oyo ‘babongi na bokonzi ya Nzambe’ kaka soki ‘tozali mpenza koyina oyo ezali mabe mpe tokangami na oyo ezali malamu.’ (Rom. 12:9; Luka 9:62) Na yango, biso nyonso tosengeli kokeba ete eloko moko te oyo ezali na mokili ya Satana, ata soki ezali na ntina to ezali komonana malamu, epekisa biso tómipesa na mosala ya Nzambe na motema na biso mobimba.​—2 Ko. 11:14; tángá Bafilipi 3:13, 14.

w17.09 lok. 32 par. 20-21

“Zalá na mpiko . . . mpe salá”

20 Mokonzi Davidi ayebisaki Salomo ete Yehova akozala elongo na ye tii akosilisa kotonga tempelo. (1 Ntango 28:20) Na ntembe te, Salomo amanyolaki maloba yango, mpe atikaki te ete bolenge na ye epekisa ye asala mosala. Kasi, amonisaki mpiko, mpe na lisalisi ya Yehova, asilisaki kotonga tempelo kitoko nsima ya mbula nsambo ná ndambo.

21 Ndenge kaka Yehova asalisaki Salomo, akoki mpe kosalisa biso tózala na mpiko mpe tósala mosala, ezala na libota na biso to na lisangá. (Yisaya 41:10, 13) Soki tomonisi mpiko na mosala ya Yehova, tóyeba ete akopambola biso lelo, mpe na mikolo ezali koya. Yango wana, “zalá na mpiko . . . mpe salá.”

Biloko ya motuya ya elimo

w17.03 lok. 29 par. 6-7

Kobatela boninga ntango boninga yango ezali na likama

Davidi azalaki na baninga mosusu oyo bakangamaki na ye na ntango ya mpasi. Moko na bango ezalaki Hushai, oyo Biblia ebengi “moninga ya Davidi.” (2 Samwele 16:16; 1 Ntango 27:33) Ekoki kozala ete azalaki kapita na ndako ya mokonzi, moninga na ye, mpe moto oyo azalaki kotambola na ye, oyo na ntango mosusu azalaki kosala makambo ya nkuku oyo etali mokonzi.

Ntango Abisalome, mwana ya Davidi, alingaki kobɔtɔla tata na ye bokonzi, Bayisraele mingi bazalaki na ngámbo na ye, kasi Hushai te. Ntango Davidi azalaki kokima, Hushai alandaki ye. Davidi ayokaki mpasi na motema ndenge mwana na ye moko mpe bato mosusu oyo azalaki kotyela motema batɛkaki ye. Kasi, Hushai atikalaki sembo, andimaki kutu kotya bomoi na ye na likama mpe akokisaki mokumba oyo ezalaki na mokano ya kobebisa mwango wana ya mabe. Hushai asalaki yango te kaka mpo ezalaki mokumba na ye lokola azalaki kapita na ndako ya mokonzi. Amonisaki nde ete azali moninga ya sembo.​—2 Samwele 15:13-17, 32-37; 16:15–17:16.

20-26/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 1-4

“Mokonzi Salomo azwi ekateli moko ya mabe”

it-1-F lok. 181 par. 3

Limpinga ya basoda

Na boyangeli ya Salomo, lipinga ya basoda ya Yisraele ezwaki mopɛpɛ ya sika. Boyangeli na ye ezalaki na kimya mpenza, kasi abakisaki bampunda mpe makalo mingi. (Talá LIKALO.) Bampunda yango mingi esombamaki na Ezipito. Esengelaki kotonga bingumba na teritware mobimba ya Yisraele mpo bituluku ya sika ya mampinga ya basoda efandaka kuna. (1Ba 4:26; 9:19; 10:26, 29; 2Nt 1:14-17) Kasi, Yehova apambolaki te likambo oyo Salomo abandisaki, mpe limpinga yango ya Yisraele esilaki makasi nsima ya liwa na ye mpe ntango bokonzi ekabwanaki. Yisaya akomaki boye na nsima: “Mawa na baoyo bazali kokita na Ezipito mpo na koluka lisungi, baoyo bazali kotya motema na bampunda, mpe baoyo bazali kotya motema na makalo ya bitumba, mpo ezali ebele, mpe na bampunda, mpo ezali na makasi mingi, kasi batali Mosantu ya Yisraele te mpe baluki Yehova te.”​—Yis 31:1.

it-1-F lok. 430 par. 4-5

Likalo

Na Yisraele, kaka na boyangeli ya Salomo nde limpinga ya basoda ezalaki na bampunda mingi, mpo Nzambe apekisaki mokonzi ete abakisa bampunda mingi, lokola nde libateli ya bato ezalaki kouta na bampunda yango. Mobeko yango esalaki ete makalo esalelamaka mingi te, mpamba te bampunda nde ezalaki kobenda makalo yango. (Mib 17:16) Ntango Samwele ayebisaki Bayisraele makambo ya mpasi oyo boyangeli ya bato ekomema, alobaki na bango boye: “Akozwa bana na bino ya mibali mpe akokómisa bango bato na ye ya makalo.” (1Sa 8:11) Ntango Abisalome ná Adoniya balukaki kobɔtɔla bokonzi, mokomoko na bango azalaki na likalo na ye moko, elongo na mibali 50 oyo bazalaki kopota mbangu liboso na bango. (2Sa 15:1; 1Ba 1:5) Ntango Davidi alongaki mokonzi ya Soba, atikaki bampunda 100 ya makalo.​—2Sa 8:3, 4; 10:18.

Mpo akómisa limpinga ya basoda ya Yisraele makasi, Mokonzi Salomo, akómaki na makalo 1400. (1Ba 10:26, 29; 2Nt 1:14, 17) Longola Yerusaleme, bingumba mosusu mpe oyo eyebanaki lokola bingumba ya makalo ezalaki na bandako oyo etyamaki kaka mpo na kobongisa bisaleli wana ya sika ya etumba.​—1Ba 9:19, 22; 2Nt 8:6, 9; 9:25.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 1/12 lok. 19 par. 6

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Ntango

1:11, 12. Yehova amonaki na libondeli oyo Mokonzi Salomo asalaki ete kozwa bwanya mpe boyebi ezalaki mpenza mposa ya motema na ye. Yango emonisi ete mabondeli oyo tosalaka epai ya Nzambe emonisaka mposa ya motema na biso. Ekozala malamu tótalelaka makambo oyo tozali kosɛnga na mabondeli.

27/03–02/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 5-7

“Motema na ngai ekozala mpenza kuna ntango nyonso”

w02 15/11 lok. 5 par. 1

Tótika te koyanganaka

Na nsima, ntango Davidi azalaki mokonzi na Yelusaleme, amonisaki mposa makasi ya kotonga ndako moko mpo na nkembo ya Yehova. Kasi, lokola Davidi abundaki bitumba mingi, Yehova ayebisaki ye ete: “Okotonga ndako mpo na nkombo na ngai te.” Yehova aponaki nde Salomo, mwana ya Davidi, mpo atonga tempelo yango. (1 Ntango 22:6-10) Mosala ya kotonga tempelo eumelaki mbula nsambo na ndambo mpe na nsuka, na mobu 1026 L.T.B., Salomo asalaki molulu ya bofungoli tempelo yango. Yehova asepelaki na ndako yango mpe alobaki boye: “Nasantisi ndako oyo otongi na ndenge natye nkombo na ngai wana mpo na ntango oyo etyami ndelo te; mpe miso na ngai ná motema na ngai ekozala mpenza wana ntango nyonso.” (1 Bakonzi 9:3) Ntango nyonso oyo Bayisraele bakotikala sembo epai ya Yehova, Yehova akondima ndako yango. Kasi, soki batiki kosala malamu, Yehova akondima yango lisusu te mpe ‘ndako yango ekokóma mabondo ya bitiká.’​—1 Bakonzi 9:4-9; 2 Ntango 7:16, 19, 20.

it-2-F lok. 1048 par. 5

Tempelo

Istware. Tempelo yango ezalaki tii na mobu 607 L.T.B., ntango limpinga ya basoda ya Babilone oyo etambwisamaki na Mokonzi Nebukadenezare ebebisaki yango. (2Ba 25:9; 2Nt 36:19; Yir 52:13) Lokola Yisraele emikɔtisaki na losambo ya lokuta, Nzambe atikaki bikólo mosusu enyokola Yuda mpe Yerusaleme, mpe tii bapunzaki biloko ya motuya ya tempelo. Lisusu, na ntango moko boye, tempelo yango esundolamaki. Mokonzi Shishake ya Ezipito akɔtaki kuna mpe azwaki biloko na yango ya motuya (993 L.T.B.) na mikolo ya Rehoboame mwana ya Salomo, kaka mbula soki 33 nsima ya bofungoli ya tempelo yango. (1Ba 14:25, 26; 2Nt 12:9) Mokonzi Asa (977-937 L.T.B.) azalaki komemya ndako ya Yehova, kasi mpo na kobatela Yerusaleme, na bozoba mpenza apesaki Mokonzi Bene-hadade I ya Siri palata mpe wolo oyo ezalaki na esika ya kobomba biloko na tempelo, mpo mokonzi ya Siri akata boyokani oyo asalaki ná mokonzi Baasha ya Yisraele.​—1Ba 15:18, 19; 2Nt 15:17, 18; 16:2, 3.

Biloko ya motuya ya elimo

w10 1/12 lok. 11 par. 7

Ayebi “motema ya bana ya bato”

Tokoki kobɔndisama na libondeli ya Salomo. Baninga na biso bato bakoki koyeba mpenza te ndenge oyo biso tozali koyoka na motema​—‘bolɔzi na biso moko’ mpe ‘mpasi na biso moko.’ (Masese 14:10) Kasi, Yehova ayebi mitema na biso, amibanzabanzaka mpenza mpo na biso. Kofungolela ye motema na libondeli ekoki koyeisa mikumba na biso pɛpɛlɛ mpo na komema. Biblia elobi ete: ‘Bwakelá ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’​—1 Petro 5:7.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Tokosala nini soki tokoki te koyangana na Ekaniseli mpo mikakatano oyo tokutani na yango epekisi biso kosala yango?

w93 1/2 lok. 31

Mituna ya batángi

Soki mokristo moko azali na bokono to na mobembo mpe akoki te koyangana na Ekaniseli, asengeli kosala yango nsima na sanza moko?

Na Yisraele ya kala, Elekeli ezalaki kokumisama mbula na mbula mokolo ya le 14 ya sanza ya liboso, oyo ebengami Nisana (to, Abibe). Nzokande, tozali kokuta ebongiseli moko ya sipesiale na mokanda ya Mitángo 9:10, 11: “Lobá na bana ya Yisraele boye: ‘Soki moto moko na kati na bino to na kati ya mabota na bino oyo ekoya akómi mbindo na molimo moko to azali na mobembo mosika, ye mpe asengeli kobongisa mbeka ya elekeli mpo na Yehova. Na sanza ya mibale [ebengami Iyare to Zive], na mokolo ya zomi na minei, na mpokwa, liboso molili ekɔta, bakobongisa yango. Bakolya yango elongo na mampa oyo ezangi levire mpe na ndunda ya bololo.ˈ”

Emonani polele ete mokapo oyo elobeli te mikolo mibale ekeseni (Nisana 14 to Zive 14), mpo na kokumisa Elekeli, lokola nde Moyisraele mokomoko to libota moko ezalaki na bonsomi ya kopona moko na yango ndenge alingi. Kokumisama ya Elekeli na sanza ya mibale ezalaki mpenza likambo ezalaki kosalema mingi te: na ndakisa, wana Moyisraele moko azalaki pɛto te na boyokani na mibeko to soki azalaki na mobembo mosika na mboka epai milulu esengelaki kosalema.

Mbala kaka moko oyo tozali kotánga na Makomami ete ebonigiseli oyo esalelamaki na bato mingi, ezalaki ntango mokonzi ya sembo Hizikiya azongisaki fɛti ya bagato ezangi levire. Bayisraele bazalaki na ntango ya komibongisa te mpo na sanza ya liboso (banganga-nzambe bamilɛngɛlaki naino te mpe bato bayanganaki naino te), yango wana esalemaki mokolo ya 14 ya sanza ya mibale.​—2 Ntango 29:17; 30:1-5.

Soki likambo ya ndenge wana ezalaki te, Bayuda bazalaki kokumisa Elekeli na mokolo etyamaki na Nzambe. (Kobima 12:17-20, 41, 42, Balevi 23:5) Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki kosala fɛti yango lokola Mibeko esɛngaki; bazalaki kosakana te na mokolo oyo etyamaki. Yango wana, Luka alobi ete: “Mokolo ya bagato ezangi levire ekómaki, mokolo oyo mbeka ya elekeli esengelaki kopesama; mpe atindaki Petro ná Yoane, alobi: ‘Bókende mpe bóbongisela biso elekeli mpo tólya yango.’”​—Luka 22:7, 8.

Ezalaki na libaku wana nde Yesu abongisaki molulu ya mbula na mbula oyo bakristo bayebi yango na nkombo ya Bilei ya Nkolo. Ntina ezali te ya koloba mingi ete bakristo basengeli koyangana na molulu yango. Mpo na Batatoli ya Yehova ezali likambo eleki ntina na kati ya mbula. Maloba oyo ya Yesu ezali komonisa yango: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Mpo na yango, basanza mingi na liboso, Motatoli ya Yehova mokomoko asengeli kozwa bibongiseli mpo eloko moko te epekisa ye kosala molulu yango na mokolo wana. Bilei ya Nkolo ekokumisama mardi le 6 avril 1993, nsima ya kolala na moi na esika bozali.

Atako yango esalemaka mbala mingi te, ekómaka ete likambo ekanami te, lokola maladi to mikakatano ya mobembo, ekoki kopekisa mokristo moko ayangana na Ekaniseli lokola akanaki yango. Asengeli kosala nini na ntango yongo?

Na boumeli ya molulu yango, balekisaka limpa ezangi levire mpe vinyo; ezali kaka baoyo batyami mafuta na elimu santu mpe baponami mpo na kozala na bomoi kuna na likoló nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo yango. (Matai 26:26-29; Luka 22:28-30) Soki mokristo moko oyo alyaka yango mbula na mbula azali na maladi na ndako na ye to na lopitalo, bankulutu ya lisangá na ye bakozwa bibongiseli mpo ete moko na bango amemela ye mwa limpa mpe vinyo, bakotalela mwa bavɛrsɛ ya Biblia oyo eyokani na likambo yango mpe bakolakisa ye limpa mpe vinyo. Soki mokristo moko atyami mafuta na elimo azali mosika na lisangá na ye, asengeli kozwa bibongiseli mpo na koyangana na Ekaniseli na lisangá oyo ezali penepene na esika azali na ntango yango.

Na yango, esengeli mpenza kozala na mabaku mingi te oyo ekosɛnga ete mokristo oyo atyami mafuta na elimo abongisa Bilei na Nkolo mikolo 30 na nsima, na boyokani na etinda oyo ezali na Mitángo 9:10, 11 mpe na ndakisa oyo epesami na 2 Ntango 30:1-3, 15.

Baoyo bazali basangani ya etuluku ya “bampate mosusu” ya Yesu mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele bazwaki te etinda ya kolya limpa mpe komɛla vinyo. (Yoane 10:16) Ya solo, ezali na ntina mingi mpo na bango ete báyangana na Bilei wana ya Nkolo ya mbula na mbula, kasi balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te. Mpo na yango, soki moko na bango azali na maladi to na mobembo, mpe azali mosika na lisangá moko na mpokwa wana, akoki, kotánga biteni ya Makomami oyo eyokani na likambo yango (bakisa lisolo oyo elobeli esika oyo Yesu asalaki Ekaniseli) mpe akobondela Yehova mpo apambola ebongiseli wana na mokili mobimba. Kasi, na likambo lolenge yango, ntina ezali te ya kozwa bibongiseli mpo na kosala likita mosusu to botángi mosusu ya Biblia nsima na sanza moko.

10-16/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 8-9

“Amonaki ete bwanya ezali na motuya”

w99 1/11 lok. 20 par. 4

Bato mingi basepelaka kokaba

Ya solo, mokonzi-mwasi ya Sheba asalaki likambo moko monene ndenge azwaki ntango mpe milende ya kokende kotala Salomo. Emonani lokola ete Sheba ezalaki na esika oyo ezali République de Yémen lelo oyo. Yango elingi koloba ete mokonzi-mwasi atambolaki kilomɛtrɛ koleka 1600 likoló ya bakamela tii na Yerusaleme. Lokola Yesu alobaki yango, “autaki na nsuka ya mabele.” Mpo na nini mokonzi-mwasi ya Sheba asalaki milende yango? Ayaki libosoliboso “koyoka bwanya ya Salomo.”​—Luka 11:31.

w99 1/7 lok. 30 par. 4-5

Azwaki matomba na mobembo na ye

Ata soki ezalaki ndenge nini, mokonzi-mwasi akómaki na Yerusaleme “ná molɔngɔ ya bato ebele mpenza nsima na ye, ná bakamela oyo ezali komema mafuta ya balsame mpe wolo mingi mpenza mpe mabanga ya ntalo.” (1 Bakonzi 10:2a) Bato mosusu balobaka ete kati na “bato ebele mpenza” oyo mokonzi-mwasi yango ayaki na bango “nsima na ye,” ezalaki mpe na basoda. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te mokonzi-mwasi yango azalaki na lokumu mingi mpe amemaki biloko oyo ekoki kosombama lelo oyo na bamilio mingi ya dolare.

Kasi, likambo ya kobenda likebi ezali ete, mokonzi-mwasi ayokaki nsango ya Salomo oyo ezalaki kokumisa “nkombo ya Yehova.” Na bongo, mobembo na ye ezalaki kaka mobembo ya mombongo te. Emonani ete mokonzi-mwasi ayaki libosoliboso mpo na koyoka mayele ya Salomo, ntango mosusu mpe ata koyekola mwa makambo ya Yehova, Nzambe ya Salomo. Lokola akokaki kozala mbala mosusu mokitani ya Seme to Kame, baoyo bazalaki kosambela Yehova, ntango mosusu azalaki na mposa ya koyoka makambo ya losambo ya bankɔkɔ na ye.

w99 1/7 nk. 30-31

Azwaki matomba na mobembo na ye

Mayele ya Salomo na kofuluka ya bokonzi na ye ekamwisaki mokonzi-mwasi ya Sheba na boye ete “mayele esilaki ye.” (1 Bakonzi 10:4, 5) Bato mosusu balobaka ete maloba yango elimboli ete mokonzi mwasi azalaki lisusu na “mpema te.” Nganga-mayele moko apesaki likanisi ete alɛmbaki! Ata soki likambo nini esalemaki, mokonzi-mwasi akamwaki na makambo oyo amonaki mpe ayokaki. Alobaki ete basaleli ya Salomo bazalaki na esengo mpamba te bazalaki na libaku ya koyoka mayele ya mokonzi yango, mpe akumisaki Yehova na ndenge aponaki Salomo azala mokonzi. Na nsima, apesaki mokonzi makabo ya motuya mingi, wolo yango moko ezalaki na motuya ya pene na dolare 40000000 na moi ya lelo. Salomo mpe apesaki mokonzi-mwasi yango makabo “nyonso oyo asepelaki na yango, oyo asɛngaki.”​—1 Bakonzi 10:6-13.

it-2-F lok. 873 par. 6

Salomo

Longola yango, ntango mokonzi-mwasi amonaki nkembo ya tempelo mpe ya ndako ya Salomo, bilei na mesa na ye, ndenge basaleli na ye bazalaki kofanda, ndenge basaleli na ye bazalaki kopesa biloko na mesa, molato na bango, basaleli oyo bazalaki kopesa ye masanga, bambeka na ye ya kotumba oyo azalaki kopesa mbala na mbala na ndako ya Yehova, “mayele esilaki ye.” Yango wana, alobaki boye: “Talá! oyo bayebisaki ngai ekómi ata na katikati te. Bwanya na yo mpe bozwi na yo eleki mpenza makambo oyo nayoká na matoi na ngai.” Na nsima, akobaki koloba ete esengo na basaleli oyo bazalaki kosalela mokonzi ya ndenge wana. Makambo wana nyonso etindaki ye akumisa Yehova, apambola Yehova Nzambe, oyo amonisaleki Yisraele bolingo na ye na ndenge aponaki Salomo azala mokonzi mpo na kokata makambo mpe kosala na boyengebene.​—1Ba 10:4-9; 2Nt 9:3-8.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 1110 par. 1

Kiti ya bokonzi

Na bakiti nyonso ya boyangeli na Yisraele, kaka oyo ya Salomo nde balobeli makambo nyonso ya mikemike. (1Ba 10:18-20; 2Nt 9:17-19) Emonani ete ezalaki na “Veranda ya Kiti ya bokonzi,” moko ya bandako oyo ezalaki na Ngomba Moria na Yerusaleme. (1Ba 7:7) Ezalaki ‘kiti moko monene ya bokonzi na mpɛmbɛ ya nzoku, mpe ezipamaki na wolo oyo epɛtolami mpe ezalaki na ezipeli na nsima na yango, oyo egumbamá mpe lobɔkɔ na ngámbo oyo mpe lobɔkɔ na ngámbo oyo mosusu ya esika ya kofanda.’ Atako mpɛmbɛ ya nzoku ekokaki kozala esaleli ya libosoliboso oyo basalelaki mpo na kosala kiti yango ya mokonzi, kasi mayele oyo basalelaki mpo na kotonga tempelo ezali kopesa makanisi lokola nde basalaki yango na nzete oyo ezipami na wolo oyo epɛtolami mpe manzanza oyo epakolami na mpɛmbɛ ya nzoku. Na ntembe te, moto oyo azalaki kotala kiti ya bokonzi yango, akokaki komona ete esalamaki mobimba na mpɛmbɛ ya nzoku mpe na wolo. Nsima ya kolobela eskalye ya matambe motoba tii na kiti ya bokonzi, lisolo ekobi boye: “Nkɔsi mibale etɛlɛmaki pembeni ya mabɔkɔ yango. Mpe ezalaki na nkɔsi zomi na mibale oyo etɛlɛmaki wana na matambe motoba ya eskalye yango, na ngámbo oyo mpe na ngámbo oyo mosusu.” (2Nt 9:17-19) Elembo ya nkɔsi oyo emonisi bokonzi oyo ezali koyangela ebongi mpenza. (Eb 49:9, 10; Em 5:5) Emonani lokola bankɔsi 12 ezalaki komonisa mabota 12 ya Israele, mbala mosusu mpo na komonisa ndenge bazalaki kotosa mpe kopesa mokonzi oyo azalaki kofanda na kiti yango ya bokonzi mabɔkɔ. Emonani ete ebonga ya makolo esalemaki na wolo. Ndenge balobeli yango, kiti ya bokonzi yango ya mpɛmbɛ ya nzoku mpe ya wolo, oyo etombwanaki likoló mpenza, mpe oyo ezalaki na bankɔsi ya nkembo liboso na yango, elekaki na nkembo bakiti ya bokonzi nyonso oyo eyebanaki na ntango wana, ezala oyo bato ya Arkeoloji bamonaki to oyo ezalaki na bamonima to oyo balobeli na babuku. Mokomi ya mokanda ya Ntango alobaki boye: “Bokonzi mosusu te ezalaki na kiti ya bokonzi oyo basalá ndenge wana.”​—2Nt 9:19.

17-23/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 10-12

“Matomba oyo tozwaka na toli ya bwanya”

w18.06 lok. 13 par. 3

Nzambe akokaki kondima ye

Bayisraele bamonaki ete bazali konyokwama mpe batindaki bato bákende koyebisa Rehoboame likambo oyo balingaki ete asalela bango: “Tata na yo akómisaki ekanganeli na biso makasi; sikoyo yo, lɛmbisá mosala makasi ya tata na yo mpe ekanganeli ya kilo oyo atyelaki biso, mpe tokosalela yo.”​—2 Ntango 10:3, 4.

w01 1/9 nk. 28-29

Lolenge oyo okoki kozwa bikateli ya malamu

Na kati ya lisangá ezali mpe na bato bakɔmɛli oyo Yehova apesi, baoyo tokoki kosolola na bango na ntina na bikateli na biso. (Baefese 4:11, 12) Nzokande, ntango tozali koluka toli epai ya bato mosusu, tosengeli te kolanda ndakisa ya bato oyo bakendaka epai ya moto moko mpe na nsima epai ya moto mosusu na likanisi ya kokutana kaka na moto oyo akoloba makambo oyo bazali na mposa ya koyoka. Bongo na nsima balandaka toli na ye. Tosengeli mpe te kobosana likambo oyo ekómelaki Lehobama, yango ezali ndakisa oyo ezali kokebisa biso. Ntango asengelaki kozwa ekateli moko ya monene, azwaki toli ya malamu epai ya mikóló oyo basalaki elongo na tata na ye. Nzokande, na esika ete alanda toli oyo bango bapesaki ye, akendaki koluka toli epai ya bilenge oyo bakolaki elongo na ye. Lokola alandaki toli ya bilenge wana, azwaki ekateli moko ya mabe mpe nsukansuka abungisaki eteni monene ya bokonzi na ye.​—1 Bakonzi 12:1-17.

Ntango ozali koluka toli, luká yango epai ya bato oyo bayebi makambo mingi ya bomoi mpe baoyo bayebi Makomami malamumalamu mpe baoyo bazali na limemya makasi mpo na mitinda ya sembo. (Masese 1:5; 11:14; 13:20) Soki likoki ezali, zwá ntango ya komanyola likoló ya mitinda oyo etalelami na likambo yango mpe likoló ya makambo nyonso ozwi na bolukiluki oyo osali. Lokola okómi sikoyo kotalela likambo yango ndenge Liloba ya Yehova ezali mpe kotalela yango, ekateli ya malamu ekomonana mpenza polelepolele.​—Bafilipi 4:6, 7. 

it-2-F lok. 754

Rehoboame

Lolendo mpe makanisi mabe oyo Rehoboame azalaki na yango, esalaki ete bato bákabwana. Kaka mabota mibale nde ekobaki kopesa ndako ya Davidi mabɔkɔ, elingi koloba, libota ya Yuda mpe ya Benyamina. Longola mabota wana mibale, banganga-nzambe ná Balevi ya bokonzi yango mibale mpe bato oyo bazalaki mosika na mabota zomi bakobaki mpe kopesa ndako ya Davidi mabɔkɔ.​—1Ba 12:16, 17; 2Nt 10:16, 17; 11:13, 14, 16.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F nk. 618-619

Bademo na ndenge ya ntaba

Maloba ya Yosua oyo ezali na Yosua 24:14 emonisi ete Bayisraele bamikɔtisaki na lolenge moko to mosusu na losambo ya lokuta oyo ezalaki kosalema na Ezipito ntango bazalaki kuna. Mpe Ezekiele amonisi ete losambo ya ndenge wana ya bapakano ekobaki ntango molai na nsima. (Ezk 23:8, 21) Yango wana, bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia bakanisaka ete soki Nzambe apesaki Bayisraele na esobe mitindo ete basengeli te kopesa “bambeka na bango epai ya bademo na ndenge ya ntaba” (Le 17:1-7) mpe soki Yeroboame atyaki banganga-nzambe “mpo na bisika oyo etombwaná mpe mpo na bademo na ndenge ya ntaba mpe mpo na bana-ngɔmbɛ oyo asalaki,” (2Nt 11:15) emonisi ete motindo moko ya losambo ya ntaba oyo ezalaki kosalema na kati ya Bayisraele eyokanaki na oyo epalangaki na Ezipito, mingimingi na Ezipito ya nse. Herodote (II, 46) amonisi polele ete losambo wana ya Baezipito etindaki Bagrɛki bákóma kosalela nzambe Pan mpe lisusu bato ya Satyre, banzambe oyo esalemaki na mabaya, mpe bazalaki komonisa bango ete bazalaki na masɛkɛ, mokila mpe makolo ya ntaba mobali. Basusu balobaka ete lolenge wana ya banzambe ya bapakano oyo esalemaki ndambo moto ndambo nyama, epesaka likanisi ya komonisa Satana azali na mokila, masɛkɛ mpe makolo oyo ekabwani, momeseno oyo epalanganaki epai ya bato oyo bazalaki komibenga bakristo na Eleko ya Molili, elingi koloba ntango bokristo ya solo elimwaki.

Kasi, balobi te ete ezalaki mpenza na “bansuki ebele” (seʽi·rimʹ). Bato mosusu bakanisaka ete ezalaki mpenza bantaba to bikeko oyo ezalaki na motindo ya bantaba, kasi emonani lokola ezalaki mpenza bongo te; vɛrsɛ moko te ya Biblia endimisi likanisi yango. Liloba oyo esalelami ekoki kaka kolimbola ete bato oyo bazalaki kosambela banzambe yango bazalaki kokanisa ete banzambe yango ezalaki na motindo ya bantaba to etondaki na bansuki. To, kosalela “bantaba” na bavɛrsɛ yango ekoki kaka komonisa lityo mpo na biloko nyonso ya losambo ya bikeko, ndenge moko na liloba oyo esalelamaka mpo na bikeko na bavɛrsɛ mingi euti na liloba ya ebandeli oyo elimboli “bosɔtɔ,” kasi yango emonisi te ete biloko yango esalemaki mpenza na bosɔtɔ to nyɛi.​—Le 26:30; Mib 29:17.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Salisá bayekoli na yo ya Biblia ntango balingi kozwa toli

be lok. 69 par. 4-5

Yebá kopesa biyano

Makambo oyo moto ye moko asengeli kopona mpe oyo etali lisosoli na ye

Soki moyekoli moko ya Biblia to ndeko moko na kati ya lisangá atuni yo nini asengeli kosala na likambo moko boye, eyano nini okopesa ye? Mbala mosusu oyebi likambo oyo yo moko okoki kosala. Kasi moto na moto asengeli komema mokumba na ye mpo na bikateli oyo azali kozwa na bomoi na ye. (Gal. 6:5) Ntoma Paulo alobi ete alendisaki bato oyo ye ateyaki ete bázala na “botosi na nzela ya kondima.” (Rom. 16:26) Yango ezali ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda. Moto oyo azwaka bikateli kaka mpo na kosepelisa moto oyo ateyaki ye Biblia to moto mosusu, azali nde kosalela bato, kasi azali kotambwisa bomoi na ye na kondima te. (Gal. 1:10) Yango wana soki opesi moto oyo atuni yo motuna eyano ya mokuse mbala moko, mbala mosusu yango ekosalisa ye mpenza te.

Ndenge nini okoki koyanola na lolenge oyo eyokani mpenza na toli ya Biblia? Okoki kobenda likebi na ye na mitinda mpe na bandakisa ya Biblia oyo ebongi. Na makambo mosusu, okoki kolakisa ye ndenge nini ye moko akoki kolukaluka na mikanda mpo amona mitinda mpe bandakisa yango. Okoki kolobela mitinda yango mpe matomba ya bandakisa yango elongo na ye, kozanga koyokanisa yango na likambo oyo akutani na yango. Tuná ye soki amoni ete makambo yango ekoki kosalisa ye azwa ekateli ya malamu. Lendisá ye atalela mitinda mpe bandakisa yango mpo na koyeba makambo oyo asengeli kosala mpo na kosepelisa Yehova. Soki osali bongo, ozali kosalisa ye ‘asalela makoki na ye ya kososola mpo na kokesenisa ná malamu ná mabe.’​—Ebr. 5:14.

24-30/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 13-16

“Ntango nini ebongi kotyela Yehova motema?”

w21.03 lok. 5 par. 12

Bilenge: Bokoki kosala nini mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema?

12 Ntango Mokonzi Asa azalaki elenge, azalaki na komikitisa mpe na mpiko. Na ndakisa, ntango akómaki mokonzi na esika ya tata na ye Abiya, Asa asalaki mosala makasi mpo na kosilisa losambo ya bikeko na ekólo mobimba. Lisusu, Asa “alobaki na Yuda báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bátosa mobeko mpe mitindo” ya Yehova. (2 Nt. 14:1-7) Mpe ntango Zera moto ya Etiopi ná basoda milio moko bayaki mpo na kobundisa Yuda, Asa asɛngaki Yehova asalisa ye na maloba oyo: “Ee Yehova, ezala bato bazali mingi, ezala bazali na makasi te, yo osalisaka kaka. Salisá biso, ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema.” Maloba yango ya kitoko, emonisi ndenge Asa azalaki na kondima makasi ete Yehova akobikisa ye ná bato na ye. Asa atyelaki Tata na ye ya likoló motema, mpe “Yehova alongaki bato ya Etiopi.”​—2 Nt. 14:8-12.

w21.03 lok. 5 par. 13

Bilenge: Bokoki kosala nini mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema?

13 Na ntembe te, kobundisa limpinga ya basoda milio moko ezalaki mokakatano monene mpenza. Kasi lokola Asa atyelaki Yehova motema, alongaki bango. Nzokande likambo ya mawa, ntango Asa akutanaki na mokakatano moko ya moke, atyelaki Yehova motema te. Na ndakisa, ntango Baasha mokonzi mabe ya Yisraele ayaki mpo na kobundisa ye, Asa akendaki koluka lisalisi epai ya mokonzi ya Siri. Ekateli yango ememelaki ye mpasi mpenza! Na nzela ya mosakoli Hanani, Yehova ayebisaki Asa boye: “Lokola otyeli mokonzi ya Siri motema mpe otyeli Yehova Nzambe na yo motema te, yango wana limpinga ya basoda ya mokonzi ya Siri ekimi, elongwe na lobɔkɔ na yo.” Kutu, kobanda na ntango wana, Asa akómaki na bitumba ntango nyonso. (2 Nt. 16:7, 9; 1 Bak. 15:32) Yango eteyi biso nini?

w21.03 lok. 6 par. 14

Bilenge: Bokoki kosala nini mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema?

14 Kobá kozala na komikitisa mpe kotyela Yehova motema. Ntango ozwaki batisimo, omonisaki ete ozalaki na kondima makasi mpe ete otyelaka Yehova motema. Mpe Yehova asepelaki koyamba yo na kati ya libota na ye. Na yango, osengeli kokoba kotyela Yehova motema. Ekoki komonana pɛtɛɛ kotyela Yehova motema ntango tolingi kozwa bikateli mosusu ya ntina mingi na bomoi. Bongo na bantango mosusu? Ezali na ntina mingi ete otyelaka Yehova motema ntango olingi kozwa bikateli ezala na makambo etali kominanola, mosala ya mosuni oyo olingi kosala, mpe mikano oyo osengeli komityela na bomoi. Kotyela bwanya na yo moko motema te. Kasi, luká nde mitinda ya Biblia oyo eyokani na makambo oyo olingi kosala, mpe salá na boyokani na mitinda yango. (Mas. 3:5, 6) Soki osali bongo, okosepelisa motema ya Yehova, mpe bandeko ya lisangá bakobanda kopesa yo limemya.​—Tángá 1 Timote 4:12.

Biloko ya motuya ya elimo

w17.03 lok. 19 par. 7

Salelá Yehova na motema mobimba!

7 Ndenge nini tokoyeba soki tomipesi mobimba epai ya Yehova? Tokoki komituna boye: “Nakotosa Yehova ata soki ekómi mpasi kotosa ye? Nazali na ekateli makasi ya kobatela lisangá na ye pɛto?” Kanisá mpiko oyo Asa asengelaki kozala na yango mpo na kolongola nkɔkɔ na ye na esika ya lokumu oyo azalaki na yango! Ntango mosusu, ekoki kosɛnga ete ozala na mpiko lokola Asa. Na ndakisa, okosala nini soki ndeko moko ya libota na yo to moninga moko ya motema asali lisumu kasi abongoli motema te, mpe asengeli kolongolama na lisangá? Okozala na ekateli ya koboya kosangana na moto yango? Motema na yo ekotinda yo osala nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto