Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/07 nk. 28-30
  • Mpo na nini kokende epai ya monganga ya mino?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kokende epai ya monganga ya mino?
  • Lamuká!—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo mitungisi ya mino ebandaka
  • Lisalisi oyo minganga bapesaka bato mpo bábɛla mino te
  • Ndenge ya kobongisa mino oyo ebebi
  • Kobanga te
  • Batelá mino na yo mpo osɛkaka malamu
    Lamuká!—2006
  • Mpasi ya mino enyokolaka bato banda kala
    Lamuká!—2008
  • Ozali na mposa na mino ya kosalisa?
    Lamuká!—1993
  • Ndenge ya kobatela mino ya ebandeli
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 7/07 nk. 28-30

Mpo na nini kokende epai ya monganga ya mino?

LIBOSO mosala ya monganga ya mino ekóma ndenge ezali lelo oyo, bato mingi bazalaki na mpasi ya mino mpe mino na bango ezalaki kolongwa banda bomwana. Bilongi ya bato mingi ezalaki komonana kitoko te mpo bazalaki na mino oyo egugá, to oyo etɛngamá to mino elongwá. Mibange oyo bazalaki lisusu na mino te bazalaki kolya malamu te mpo bazalaki kokoka kotafuna biloko te; yango wana, bazalaki kokufa noki. Lelo oyo, bato mingi oyo bazwaka lisalisi ya monganga ya mino bakoki kokima mpasi ya mino, kozala na mino na bango nyonso tii bakokóma mibange mpe mino oyo ezali komonana kitoko soki basɛki. Ndenge nini minganga ya mino ya mikolo na biso balongi kosala makambo misato wana ya kokamwa?

Eloko oyo ezali mpenza kosalisa bato bábɛlaka mpasi ya mino te mpe bálongwaka mino te ezali ete minganga ya mino bazali mingimingi kopesa bato mateya mpe kolendisa bango bákendeke kotalisa mino na bango mbala na mbala. Yesu alobaki ete: “Baoyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te.” (Luka 5:31) Mateya oyo emonisaka ndenge ya kobatela mino malamu esalisi bato mosusu; yango wana, bakendeke mpenza te epai ya monganga ya mino mpo asalisa bango.a Atako bongo, bato mingi balingaka te kokende epai ya monganga ya mino. Ezali mpe na baoyo balingaka te kokende kosalisa mino mpo bamonaka ete ezali na ntina te. Basusu bakimaka ntalo. Kasi basusu mpe, babangaka nde kobanga. Ezala likambo nini oyo epekisaka yo kokende epai ya monganga ya mino, osengeli komituna mituna oyo: Monganga ya mino akoki kosalisa ngai na nini? Ezali na ntina kokende epai na ye? Mpo tómona mpenza ntina ya mosala oyo minganga ya mino basalaka mpo na kobatela mino na biso, esengeli naino tóyeba mitungisi ya mino oyo minganga babundisaka.

Ndenge oyo mitungisi ya mino ebandaka

Minganga ya mino bakoki kosalisa yo onyokwama na mpasi ya mino te to mino elongwa te. Monganga ya mino alukaka kosilisa mitungisi oyo salite ya mino ekoki kobimisa. Kasi, yo mpe okoki kosalisa ye na likambo yango. Mikrobe oyo ezalaka na kati ya salite yango elyaka mwa bilei mikemike ya sukali oyo etikalaka na mino. Mikrobe yango esalaka ete sukali ekóma aside mpe aside wana nde etɔbɔlaka mokemoke libanga oyo ebatelaka motó ya lino (émail). Nsukansuka, mwa madusu wana ya mike ekómaka lidusu moko ya mwa monene; wana nde kobeba ya lino. Na ntango wana, moto ayokaka naino mpasi te; kasi, soki lidusu wana ekómi tii na mosisa ya lino, wana nde moto akobanda koyoka mpasi makasi na lino yango.

Mikrobe oyo ezalaka na kati ya salite oyo ekangamaka na mino ekoki koyokisa yo mpasi na ndenge mosusu. Soki moto aniki mino malamu te, salite wana ekolongwa te, ekokóma nde makasi (na ntango wana, babengaka yango tartre); soki ekómi makasi, ekoki kovimbisa mosuni ya lino mpe kokabola yango mwa moke na lino. Bilei ekobanda kokangama na mwa esika yango; sikoyo, mikrobe ekolinga kofanda na esika wana mpe ekobanda kobebisa mosuni ya lino. Monganga ya mino akoki kosalisa yo mpo salite wana ya makasi etondana na mino na yo te; kasi, soki eloko moko te esalemi mpo na kolongola salite wana, misuni ya mino na yo ekoki kobeba makasi mpe mino na yo ekobanda mpenza kolongwa. Mino oyo elongwaka mpo na salite wana ezalaka mingi koleka oyo elongwaka mpo etɔbɔki.

Nsɔi esalisaka mpe na kobatela mino na yo, mpamba te epekisaka mikrobe esala makambo mibale oyo touti kolobela. Ntango olei bilei to ata bisikiti mpamba, nsɔi na yo ekolongola, na boumeli ya miniti 15 tii 45, mwa bilei oyo etikali na monɔkɔ mpe ekoboma aside ya salite oyo ekangami na mino na yo. Miniti yango eumelaka na kotalela soki bilei to sukali ekangami makasi na mino to te. Ntango mosusu, ezali na boumeli ya miniti wana nde mikrobe esalaka mosala na yango ya kobebisa mino. Yango emonisi ete ezali te kolya biloko ya sukali makasi nde ebebisaka mino mingi, kasi nde kolya mbala na mbala biloko ya sukali to biloko mosusu. Lokola nsɔi ezalaka mingi te na monɔkɔ ntango tolali mpɔngi, soki olei to omɛli eloko moko ya sukali na butu kasi osukoli mino te liboso olala, yango ekoki kozala likama monene mpo na mino na yo. Nzokande, balobaka ete kotafuna bazoka oyo ezangá sukali nsima ya kolya esalaka ete nsɔi ezala mingi na monɔkɔ mpe yango ebatelaka mino.

Lisalisi oyo minganga bapesaka bato mpo bábɛla mino te

Minganga ya mino balendisaka bato bákendeke epai na bango kosalisa ekzamɛ ya mino mbala moko to mibale na mbula, na kotalela ndenge mino na bango ezali. Na ntango ya ekzamɛ yango, mbala mingi monganga ya mino atalaka malamumalamu mino na radio mpo na koyeba soki ezali na madusu to te. Soki amoni lidusu, akopesa nkisi oyo ebomaka nzoto (anesthésie) mpo oyoka mpasi te ntango akosalela masini oyo babengi fraise liboso azipa lidusu yango. Epai ya baoyo babangaka mingi, minganga mosusu ya mino bakómi kosalela masini oyo babengi laser to nkisi moko oyo bakoki kotya moto na monɔkɔ mpo elɛmbisa biteni ya mino oyo esili kobɛba mpe elongola yango. Soki basaleli nkisi yango, bakosalela lisusu mingi te, to bakosalela te, masini oyo babengi fraise mpe nkisi ya koboma nzoto. Soki ezali mwana, monganga ya mino atyaka likebi mingi na mino na ye oyo ebimi sika na nsuka mpenza ya monɔkɔ; atalaka soki mino yango ezali na banzela te, mpo soki ezali bongo, ekozala mpasi mpo na konika yango malamu na brɔsi. Monganga ya mino akoki kosɛnga ete azipa banzela yango na mwa plastiki moko oyo basalelaka; yango ekoki kosalisa mpo na kosukola mino yango malamu mpe ekobatela yango etɔbɔka te.

Soki ezali mokóló, monganga ya mino alukaka mingimingi kobatela misuni na ye ya mino. Soki amoni ete basalite ekangami makasi na mino, akopalola yango. Ntango bato mingi banikaka mino, mbala mingi brɔsi ekómaka na bisika mosusu te; yango wana, monganga ya mino akoki kolakisa yo ndenge ya malamu ya konika mino na yo. Minganga mosusu ya mino batindaka bato oyo bayaka epai na bango bákende kokutana na moto moko oyo ayekolá ndenge ya kosukola monɔkɔ malamu mpo asalisa bango na likambo yango oyo ezali na ntina mingi.

Ndenge ya kobongisa mino oyo ebebi

Soki mino na yo mosusu ebebi, elongwe to etɛngami, komitungisa te mpamba te minganga ya mino bazali na mayele mingi ya sika oyo bakoki kosalela mpo na kobongisa mino yango. Kasi, lisalisi ya ndenge wana ezalaka ntalo makasi. Yango wana, osengeli naino kotala makoki na yo. Kasi, bato mingi bamitungisaka te mpo na ntalo, mpamba te bamonaka ete ezali na ntina mingi bábongisa bango mino. Ntango mosusu monganga ya mino akoki kosalisa yo okóma lisusu kotafuna biloko ndenge ozalaki kosala liboso. Akoki mpe kosala ete mino na yo emonana kitoko ntango ozali kosɛka mpe yango ezali na ntina mingi, mpamba te mino oyo ebebá ekoki kobotela yo mindɔndɔ na bomoi.

Soki lino moko ya liboso ebukani to egugi, monganga ya mino akoki koyebisa yo ete abamba yango na eloko moko babengi facette. Basalaka yango mbala mosusu na eloko moko oyo engɛngaka mwa moke mpe ezalaka mpenza lokola libanga (émail) oyo ebatelaka motó ya lino. Monganga ya mino akobamba eloko yango likoló ya lino oyo ebebi, mpe lino ekozala na ndenge ya sika mpe ekomonana malamu. Soki lino ebebi mpenza makasi, monganga akoki koyebisa yo ete alatisa yango mwa ekɔti moko babengi couronne. Ekɔti yango, oyo ekoki kozala ya wolo to ya eloko mosusu oyo ezali lokola lino, ekozipa eteni mobimba ya lino oyo etikalaki mpe libándá ya lino yango ekomonana mpenza ya sika.

Soki lino elongwe, monganga ya mino akoki kosala nini? Akoki kotya na esika yango lino mosusu oyo basalá kosala oyo okoki kolongola mpe kozongisa, to akoki kotya eloko babengi bridge oyo okoki kolongola te. Eloko yango ezali na lino (to mino) oyo basalá kosala, kasi mpo lino (to mino) yango efanda na esika oyo lino (to mino) elongwe, batyá na bansɔngɛ na yango bikɔti oyo ekokɔta na mino oyo ezali ngámbo na ngámbo ya esika yango. Mayele mosusu oyo bato mingi bakómi kosepela na yango ezali oyo babengi implant: na esika oyo lino elongwe, monganga akokɔtisa na kati ya mokuwa ya mbanga, mwa ebende moko (titane) oyo ezali na lidusu epai akokɔtisa lino oyo basalá kosala ntango mokuwa ná mosuni ya lino ezongi malamu na esika yango. Na ndenge yango, moto akoyoka kaka lokola azali na lino ya solo.

Soki moto azali na mino oyo etɛngamá, akoki koyoka nsɔni; akoki kozala na mokakatano mpo na kosukola yango mpe ekozala mpasi te ete mino wana ezwa maladi. Soki mino elandani malamu te, ekoki kosala mpasi ntango okangi monɔkɔ mpe okozala na mokakatano mpo na kotafuna biloko. Mbala mingi, minganga ya mino basilisaka mokakatano yango, basembolaka mino yango na eloko moko oyo bakangaka na mino yango. Lokola mayele ya kosala eloko yango ekoli mingi mikolo oyo, bakómi kosala yango na ndenge oyo, soki bakangi yango na mino, emonana polele te mpe esɛnga te kobongisaka yango mbala na mbala.

Minganga mosusu ya mino bazali kosala milende mingi mpo na kosalisa bato oyo monɔkɔ na bango elumbaka nsolo mabe. Minɔkɔ ya bato mingi elumbaka nsolo mabe na bantango mosusu, kasi ya basusu elumbaka nsolo mabe ntango nyonso. Ekoki kozala na bantina mingi. Minganga mosusu ya mino bazali na bisaleli ya koyeba ntina oyo monɔkɔ ya moto boye to boye ezali kobimisa nsolo mabe. Mbala mingi, mikrobe oyo ezalaka mingimingi kuna na nsuka mpenza ya lolemo nde ebimisaka mokakatano wana. Konika lolemo na brɔsi to kopalola yango ekoki kosalisa yo; ata mpe kotafuna bazoka oyo ezangá sukali, mpamba te esalaka ete nsɔi ezala mingi na monɔkɔ. Ezali mpenza na ntina mingi osukolaka monɔkɔ na yo nsima ya kolya mosuni ya nyama, mbisi, to biloko oyo basali yango na miliki.

Kobanga te

Soki obangaka mingi kokende kokutana na monganga ya mino, akosepela kosalisa yo obanga te. Yebisá ye ndenge ozali koyoka. Liboso abanda kosalisa yo, yokaná na ye elembo oyo okosala na lobɔkɔ soki oyoki mpasi to obangi. Bato mingi oyo bakendeke kosalisa mino bamonaka ete kosala bongo elongolaka bango mpenza kobanga.

Ntango mosusu, ozali kobanga ete monganga ya mino akopamela yo mpo mino na yo ezali malamu te to akotyola yo mpo obateli mino na yo malamu te. Minganga ya mino bayebi ete soki basali bongo, bakozanga bato; yango wana, osengeli kobanga te ete bakopamela yo. Minganga mingi ya mino basololaka na boboto mpenza na bato ya maladi oyo bayaka epai na bango.

Bato mingi babangaka kokende epai ya monganga ya mino mpo bakimaka ntalo. Kasi, soki ozali kokende kotalisa mino epai ya monganga ekosalisa yo obɛla mino te mpe ekosɛnga te obimisa mbongo mingi na nsima mpo na kosalisa mino. Na bamboka mingi, minganga ya mino bakoki kosalisa moto oyo ayei epai na bango na kotalela bozwi na ye. Na bamboka mosusu, ata epai ya monganga ya mino oyo azali na bisaleli mingi te, okozanga te kokuta radio mpo na ekzamɛ ya mino mpe masini mosusu babengi fraise oyo esalaka mbangu mpenza. Minganga ya mino bakoki kosalela mayele ndenge na ndenge mpe moto akoyoka mpenza mpasi te. Mbala mingi, nkisi ya koboma nzoto (anesthésie) na esika oyo monganga azali kosala ezalaka ntalo mingi te; ata baoyo bazali na makoki mingi te bakoki kofuta ntalo yango.

Mosala ya minganga ya mino ezali te ya koyokisa bato mpasi, kasi basalaka nde nyonso mpo na kolɛmbisa mpasi. Kosalisama na monganga ya mino ezali lisusu te likambo moko ya nsɔmɔ lokola ezalaki mbala mosusu na ntango ya bankɔkɔ. Lokola kozala na mino ya malamu esalisaka mpe moto azala nzoto kolɔngɔnɔ mpe ekoki kosalisa yo osepela lisusu malamu na bomoi, omoni te ete ekozala malamu okende kotala monganga ya mino? Ntango mosusu okokamwa mpe okosepela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo oyo ezali nde kolobela makambo oyo monganga ya mino akoki kosala mpo na kosalisa moto oyo ayei epai na ye. Soki olingi koyeba oyo yo moko okoki kosala mpo na kobatela mino na yo, tángá lisolo “Batelá mino na yo mpo osɛkaka malamu,” na Lamuká! ya Aprili-Yuni 2006.

[Etanda on page 29]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Lino ya malamu

Motó

Libanga (émail)

Lino ya kati

Mosisa (pulpe)

Moboko

Mosuni (gencive)

Mokuwa

[Etanda on page 29]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Lino oyo etɔbɔki

Lidusu

Bazipaka lidusu mpo ekóma monene te

[Etanda on page 29]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Maladi ya mosuni ya mino

Salite ya lino elongolamaka na brɔsi to na nsinga ya kosukola mino

Salite oyo ekangamaka makasi na lino, ezalaka mpasi mpo na kolongola yango mpe ekabolaka lino ná mosuni na yango

Mosuni ekabwani na lino

[Etanda on page 30]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Kobongisa lino

Facette babambaka yango na lino

Ekɔti

Implant

Bridge oyo okolongola te: lino oyo basali efandaka na esika batye yango, ezalaka na bikɔti na yango oyo ekɔtaka na mino oyo ezali ngámbo na ngámbo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto