Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/07 nk. 4-7
  • Nini ezali kokómela mangomba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ezali kokómela mangomba?
  • Lamuká!—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato ya Mpoto bapesi mangomba mokɔngɔ
  • Mangomba ekómi lokola mombongo na Amerika ya Nɔrdi
  • Losambo ezali na ntina nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lingomba ya Katolike ya Amérique latine, lizali kati na mpasi​—Mpo na nini bamilió na bato bazali kotika yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini bato bazali kolongwa na mangomba ya kala?
    Lamuká!—2002
  • Mangomba ezali kokende wapi?
    Lamuká!—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 7/07 nk. 4-7

Nini ezali kokómela mangomba?

BATO ya bikólo mingi ya Amerika ya Sudi mpe ya Ntei bazali na mimeseno mingi oyo ekokani. Baoyo kati na bango bakómi mibange bayebi ete kala lingomba ezalaki kaka moko, Lingomba ya Katolike. Na ekeke ya 16, bato ya Espagne nde basɛngaki na makasi ete, na bamboka oyo bayangelaki, bato nyonso básambela kaka na lingomba yango. Ekólo Brésil eyangelamaki na Portugal, oyo ezalaki mpe na Bakatolike mingi. Na boumeli ya mbula 400, Lingomba ya Katolike ezalaki kopesa bakonzi mabɔkɔ mpe bango bazalaki kosunga yango na mbongo mpe bandimaki yango ete ezali Lingomba ya Leta.

Kasi, na bambula ya 1960, basango mosusu bamonaki ete bato bazali kotika lingomba mpo bango bazalaki kopesa bakonzi mabɔkɔ. Yango wana, babandaki kokɔtela babola, mingimingi koteya bato ndenge ya kolongwa na bobola mpe na boombo ya bakonzi. Mateya wana ebandaki na bikólo mingi ya Amerika ya Sudi mpe ya Ntei mpo Bakatolike mingi bazalaki na bobola.

Atako basango bamikɔtisaki na politiki mpo na koluka bolamu ya bato, bandimi mingi batikaki Lingomba ya Katolike mpe bakendaki na mangomba mosusu. Mangomba oyo, na milulu na bango ya losambo, babɛtaka mabɔkɔ, bayembaka nzembo na motema na bango mobimba mpe babɛtaka miziki makasi, ezali se kokóma mingi. Na buku na ye (Faces of Latin America), Duncan Green alobi boye: “Na bikólo mingi ya Amerika ya Sudi mpe ya Ntei, lingomba moko oyo esɛngaka ete moto ye moko amipesa na Klisto mpe andimela Biblia, ekabwani na mangomba ebele ya mike. . . . Mbala mingi, mokomoko na yango ezalaka na pastɛrɛ na yango. Soki lingomba moko ekómi na bandimi mingi, mbala mingi ekabwanaka mpe ebimisaka mangomba mosusu ya sika.”

Bato ya Mpoto bapesi mangomba mokɔngɔ

Na boumeli ya bambula koleka 1 600, mikili mingi ya Mpoto eyangelami na bakonzi oyo balobaka ete bazali baklisto. Na Mpoto, mangomba ezali nde kokóma na bandimi mingi na ekeke oyo ya 21? Na mobu 2002, Steve Bruce, moto moko ya mayele na sosioloji, akomaki na buku na ye (God is Dead​—Secularization in the West) boye: “Na bambula ya 1800, mabala mingi [na Angleterre] ezalaki kosalema na ndako-nzambe.” Kasi na 1971, na Angleterre, kaka bato 60 likoló ya monkama nde bazalaki kosala mabala na ndako-nzambe. Na mobu 2000, ezalaki kaka bato 31 likoló ya monkama.

Mpo na likambo yango, moto moko oyo akomaka masolo ya makambo ya losambo na zulunalo moko ya Londres (Daily Telegraph), alobaki boye: “Banda kala, mangomba nyonso ya minene, na ndakisa Lingomba ya Angleterre, ya Katolike, ya Metodiste mpe Lisangá moko ya mangomba ya Baprotesta (United Reformed Churches) ebendaka lisusu bato te.” Ntango atalelaki lapolo mosusu, alobaki boye: “Tii na mobu 2040, mangomba ya Grande-Bretagne ekotikala kaka na bato 2 likoló ya monkama oyo bakendaka ndako-nzambe.” Balobaki mpe bongo mpo na mangomba ya ekólo Pays-Bas.

Ebongiseli moko ya Pays-Bas (Dutch Social and Cultural Planning Office) elobaki ete: “Banda mwa bambula, emonani ete bato ya mboka na biso bakipaka lisusu makambo ya Nzambe te. Yango wana, tokanisi ete tii na mobu 2020, bato 72 likoló ya monkama bakokima mangomba.” Zulunalo moko ya Allemagne elobi boye: “Bato mingi ya Allemagne bakómi komipesa na bikelakela mpo bázwa lisalisi oyo bazalaki kozwa kala na mangomba, na misala mpe na libota. . . . Na mboka na biso, bandako-nzambe ezali kokangama mpo bandimi bazali lisusu mpenza te.”

Na mikili ya Mpoto, bato oyo bakendeke ndako-nzambe tii lelo, mbala mingi bakendeke te mpo na koluka koyeba makambo oyo Nzambe azali kosɛnga epai na bango. Lapolo moko euti na Italie elobi boye: “Bato ya Italie basalaka ete lingomba elanda lolenge ya bomoi na bango.” Kaka na ekólo yango, moto moko ya mayele na sosioloji alobi boye: “Na makambo nyonso oyo pápa alobaka, tondimaka oyo biso moko tolingi.” Ezali se ndenge moko na ekólo Espagne, epai bandimi ya Lingomba ya Katolike bazali lisusu na molende te mpo na makambo ya Nzambe; bakómi nde na mposa makasi ya kozwa nokinoki biloko mingi ya mokili.

Bizaleli yango ekeseni mpenza na boklisto ya solo oyo Klisto mpe bayekoli na ye bateyaki mpe balandaki. Yesu alobaki te ete moto apona mateya oyo alingi, ndenge baponaka biloko na restora to na fɛti. Alobaki boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.” Yesu ateyaki bato ete moklisto asengeli komipimela mpe kosala milende na bomoi na ye.​—Luka 9:23.

Mangomba ekómi lokola mombongo na Amerika ya Nɔrdi

Bato ya mayele oyo bazali kotalela likambo ya mangomba balobi ete na Canada, bato bazali kondima mpenza te makambo ya mangomba. Nzokande, na Étas-Unis, bato bazali kozwa makambo yango na lisɛki te. Bibongiseli mosusu ya minene oyo esalaka baankɛtɛ elobi ete na mboka yango, bato koleka 40 likoló ya monkama oyo bango batunaki mituna balobaki ete bakendeke ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, soki otángi moto mokomoko oyo akendeke mpenza ndako-nzambe, okomona ete ezali kaka bato pene na 20 likoló ya monkama. Bato koleka 60 likoló ya monkama bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Kasi, baumelaka te kolɛmba lingomba oyo esepelisaki bango liboso. Na États-Unis, ebele ya bandimi bakakatanaka te mpo na kotika lingomba moko mpe kokende na mosusu. Soki pastɛrɛ azali lisusu kobenda bato mingi te, bandimi mingi bakoki kokima ye mpe akozwa lisusu makabo mingi te.

Na mangomba mosusu, bayekolaka mayele ya mombongo mpo na kobenda bato epai na bango. Mangomba ezali kofuta bamilio ya badolare na bakompanyi oyo epesaka toli mpo bálakisa bango mayele ya kobenda bato. Lapolo moko oyo elobelaki bakompanyi yango emonisi ndenge pastɛrɛ moko oyo azwaki matomba na batoli na bango alobaki: “Mbongo oyo nabimisaki eboti mpenza mbuma.” Bazulunalo oyo elobelaka makambo ya mombongo (The Wall Street Journal ná The Economist) ekómi mpe kolobela mangomba ya minene oyo ezali na bankóto ya bandimi mpo ekómi na mbongo mingi. Moko na bazulunalo yango elobi ete na mangomba ya minene, babongisaka “bisika oyo moto akoki kokokisa bamposa na ye ya elimo mpe ya mosuni.” Na bisika yango, okoki kokuta barestora, bandako ya kosala monzɛlɛ, bisika ya kosukola mpe ya kosala masano. Mpo na kobenda bato, basalisaka mpe bateyatre, bamemaka bato bákende kotala bato ya lokumu mpe babɛtelaka bango miziki ya mikolo na biso. Kasi, bapastɛrɛ ya mangomba yango bateyaka nini?

Na esika ya koteya nsango malamu ya Bokonzi, bazali nde koteya bato ndenge ya kokóma bazwi mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Bayebisaka bandimi na bango ete soki bazali kopesa makabo mingi, bakokóma bazwi mpe bakozala na nzoto kolɔngɔnɔ. Mpo na oyo etali bizaleli ya malamu, mbala mingi bateyaka ete Nzambe akipaka mabe ya bato te. Moto moko ya mayele na sosioloji alobi ete: “Mangomba ya États-Unis elingaka nde kopesa bato kimya na makanisi, kasi kopamela bango te.” Mbala mingi, mangomba ya minene epesaka nde batoli oyo ekosalisa bandimi bázala na bomoi ya malamu. Bato mingi bakómi kosepela kozala na kati ya mangomba oyo elobelaka mpenza te bindimeli mpo bamonaka ete yango nde ebimisaka bokabwani. Kasi, mbala mingi, na mangomba yango, balobelaka makambo ya politiki polele mpenza. Bandakisa ya makambo oyo euti kosalema, oyo emonisi ndenge mangomba yango emikɔtisaki na politiki, epesi nsɔni na bakonzi mosusu ya mangomba.

Na Amerika ya Nɔrdi, bato mingi bakómi nde kosepela na makambo ya Nzambe? Na mobu 2005, zulunalo moko (Newsweek) elobaki ete, na milulu ya losambo ya mangomba mingi, bakómi na momeseno ya “koganga, kokwea, kotutatuta makolo na nse,” mpe kosala makambo mosusu. Nzokande, kaka zulunalo yango emonisaki mpe ete: “Atako bongo, yango emonisi te ete bato mingi bakómi kokende ndako-nzambe.” Na baankɛtɛ oyo batunaka bato lingomba oyo basambelaka, baoyo bayanolaka ete bazali bandimi ya lingomba ata moko te bakómi ebele. Mangomba mosusu ezali kokóma na bandimi mingi kaka mpo mosusu ezali kozonga nsima. Bansango ezali komonisa ete bato “mingi” bakómi kosundola mangomba ya kala, milulu na yango ya losambo, miziki na yango mpe bakonzi na bango ya mangomba.

Na lisolo oyo, tomoni na mokuse ete na bikólo mingi ya Amerika ya Sudi mpe ya Ntei mangomba ezali kokabwana; na Mpoto, bandimi bazali kotika mangomba na bango; mpe na États-Unis, mangomba ekómi kosalisa masano, makambo ya kosepelisa mpe kopesa nzela na bandimi ete bámonisa mayoki na bango, mpo bákima te. Atako mangomba nyonso esalaka bongo te, emonani ete mangomba mingi ezali kosala nyonso mpo bandimi na yango bákima te. Yango emonisi nde ete boklisto ya solo ezali lisusu na bopusi te na bomoi ya bato?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 6]

“MANGOMBA EKÓMI LOKOLA BAMAGAZINI YA MINENE”

Mokambi ya ebongiseli moko ya Lingomba ya Katolike na France (Service national des vocations) alobaki boye: “Tozali komona ndenge mangomba ekómi lokola bamagazini ya minene epai moto na moto aponaka oyo alingi. Bato bakendeke kosambela, kasi soki bamoni ete lingomba oyo bakɔti esepelisi bango te, bakendeke na lingomba mosusu.” Na ankɛtɛ na ye oyo etali mangomba ya Mpoto, Grace Davie, profɛsɛrɛ na iniversite moko ya Angleterre, alobaki boye: “Bato ‘baponaka’ kaka makambo oyo balingi na mangomba oyo ezali. Bato bakómi kopona lingomba kaka ndenge baponaka biloko mosusu, elingi koloba batalaka soki eyokani na bomoi na bango to bamposa na bango.”

[Elilingi na lokasa 5]

Makomi na porte ya ndako-nzambe moko na Naples, na Italie

[Eutelo ya bafɔtɔ]

©Doug Scott/age fotostock

[Elilingi na lokasa 5]

Na ekoló Mexique, bato mingi batiki Lingomba ya Katolike

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto