YISAYA
1 Emonaneli ya Yisaya*+ mwana ya Amoze, oyo amonaki mpo na Yuda mpe Yerusaleme na mikolo ya Uzia,+ Yotame,+ Ahaze+ ná Ezekiasi,+ bakonzi ya Yuda:+
3 Ngɔmbɛ eyebaka malamu moto oyo asombi yango,
Mpe mpunda eyebaka esika nkolo na yango apesaka yango bilei;
Kasi Yisraele eyebi ngai te,*+
Bato na ngai moko bamitambwisi na mayele te.”
5 Bábɛta bino lisusu wapi, awa bozali kaka kotomboka?+
Motó mobimba ezali na maladi,
Mpe motema mobimba ezwi maladi.+
6 Banda na nse ya lokolo tii na motó, eteni moko ya malamu ezali te.
Kaka bampota, bisika oyo bazokisi mpe bampota minene;
Basukoli yango te,* bakangi yango te, balɛmbisi yango na mafuta te.+
7 Mokili na bino etikali mpamba.
Bingumba na bino etumbami na mɔtɔ.
Bapaya bazali kobebisa mokili na bino na miso na bino.+
Ezali lokola mabele oyo bapaya+ babebisi mpenza.
8 Mwana mwasi ya Siona atikali lokola esika ya kobatama* na elanga ya vinyo,
Lokola mwa ndako ya matiti na elanga ya kɔkɔmbrɛ,
Lokola engumba oyo ezingami.+
9 Soki Yehova ya mampinga atikelaka biso te mwa bato oyo babiki,
Tolingaki kokóma lokola Sodoma,
Mpe tolingaki kokokana na Gomora.+
10 Bóyoka liloba ya Yehova, bino bakonzi ya Sodoma oyo bozali koyangela na makasi.+
Bino bato ya Gomora,+ bótya likebi na mobeko* ya Nzambe na biso.
11 Yehova alobi: “Ebele ya bambeka+ na bino ezali na litomba nini mpo na ngai?
Nalɛmbi makabo na bino ya kotumba ya bampate ya mibali+ mpe mafuta ya banyama oyo eleisami malamu,+
Mpe nasepeli te na makila+ ya bana-ngɔmbɛ ya mibali,+ ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba ya mibali.+
13 Bóya lisusu te na makabo ya mbuma oyo ezangá ntina.
Mpaka ya malasi na bino ezali eloko oyo nayiná.+
Bozali kotosa sanza ya sika+ mpe sabata,+ kobengisa liyangani+
—Nzokande nakoki te kondima misala ya maji+ esika moko na liyangani monene.
14 Nayini* basanza na bino ya sika mpe bafɛti na bino.
Ekómeli ngai kilo;
Nalɛmbi komema yango.
Bólongola liboso ya miso na ngai misala na bino ya mabe;
Bótika kosala mabe.+
17 Bóyekola kosala malamu, bóluka bosembo,+
Bósembola monyokoli,
Bósamba mpo na ntomo ya mwana oyo tata akufá,
Mpe bósamba likambo ya mwasi oyo mobali akufá.”+
18 Yehova alobi: “Sikoyo bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.+
Ata soki masumu na bino ezali motane makasi,
Ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ;+
Ata soki ezali motane lokola elamba ya motane makasi,
Ekokóma lokola lɛnɛ.
21 Talá ndenge engumba ya sembo+ ekómi mwasi ya ndumba!+
23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+
Mokomoko na bango alingaka kanyaka mpe alandelaka makabo.+
Bakataka na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá,
Mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá batyelaka yango likebi te.+
24 Yango wana, Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga,
Moto ya nguya ya Yisraele, alobi boye:
“Aha! Nakolongola banguna na ngai,
Mpe nakozongisela banguna na ngai mabe.+
26 Nakozongisela yo basambisi na yo ndenge ezalaki na ebandeli
Mpe bapesi-toli na yo ndenge ezalaki liboso.+
Nsima na yango, okobengama Engumba ya Boyengebene, Sité ya Bosembo.+
30 Mpo bokokóma lokola nzete monene oyo nkasa na yango ezali kokauka,+
Mpe lokola elanga oyo ezali na mai te.
31 Mobali makasi akokóma lokola lititi oyo ekauki,
Mpe mosala na ye lokola montɛntɛi;
Mpe yango nyonso mibale ekopela mɔtɔ elongo,
Moto ya koboma yango akozala te.”
2 Talá likambo oyo Yisaya mwana ya Amoze amonaki mpo na Yuda mpe Yerusaleme:+
2 Na eleko ya nsuka ya mikolo,
Ngomba ya ndako ya Yehova
Ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba,+
Mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike,
Mpe bikólo nyonso ekosopana kuna.+
3 Mpe bato mingi ya bikólo bakokende mpe bakoloba:
“Bóya! Tómata na ngomba ya Yehova,
Na ndako ya Nzambe ya Yakobo.+
Akoteya biso banzela na ye,
Mpe tokotambola na banzela na ye.”+
4 Akokata makambo kati na bikólo
Akosembola makambo etali bato mingi ya bikólo.
Bakokómisa mipanga na bango bitimweli ya mabele
Mpe makɔnga na bango makwangola ya kokata matiti.+
Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu,
Bakoyekola mpe etumba lisusu te.+
6 Mpo osundoli bato na yo, ndako ya Yakobo,+
Mokili etondi na biloko ya Ɛsti;
Bazali kosala misala ya maji+ lokola Bafilistia,
Mpe batondi na bana ya bapaya.
7 Mokili na bango etondi na palata ná wolo,
Mpe biloko na bango ya motuya ezali na nsuka te.
Mokili na bango etondi na bampunda,
Mpe makalo na bango ezali na nsuka te.+
8 Mokili na bango etondi na banzambe oyo bazangá ntina.+
Bazali kogumbamela misala ya mabɔkɔ na bango moko,
Eloko oyo misapi na bango moko esali.
9 Mpo moto azali kogumbama, azali kokita na nse,
Mpe okoki te kolimbisa bango.
10 Kɔtá na libanga mpe bombaná na putulu
Mpo na nsɔmɔ ya kozala liboso ya Yehova
Mpe nkembo ya bonene na ye.+
Yehova ye moko akotombwama na mokolo yango.
12 Mpo ezali mokolo ya Yehova ya mampinga.+
Ekoyela moto nyonso ya lofundo mpe ya lolendo,
Moto nyonso, azala moto monene to moto mpamba,+
13 Ekoyela banzete nyonso ya sɛdrɛ ya Liban oyo ezali molai mpe etombwaná
Mpe banzete minene nyonso ya Bashane,
14 Ekoyela bangomba nyonso ya milai
Ná bangomba mike nyonso oyo etombwaná,
15 Linɔ́ngi nyonso ya molai mpe efelo nyonso oyo ebatelami makasi,
16 Ekoyela bamasuwa nyonso ya Tarasisi+
Mpe bamasuwa nyonso ya kitoko.
Yehova ye moko akotombwama na mokolo yango.
18 Mpe banzambe oyo bazangá ntina bakosila mpenza.+
19 Mpe bato bakokɔta na mobenga ya mabanga
Mpe na mabulu ya mabele,+
Mpo na nsɔmɔ ya kozala liboso ya Yehova
Mpe nkembo ya bonene na ye,+
Ntango akotɛlɛma mpo na kosala ete mabele elɛnga na nsɔmɔ.
20 Na mokolo yango, bato bakobwakela bampoko*
Mpe bangembo banzambe na bango ya palata oyo ezangá ntina
Mpe banzambe na bango ya wolo oyo basalaki mpo báfukamela yango,+
21 Mpo na kokɔta na madusu ya mabanga
Mpe na minkaka ya mabanga minene,
Mpo na nsɔmɔ ya kozala liboso ya Yehova
Mpe nkembo ya bonene na ye,
Ntango atɛlɛmaka mpo na kosala ete mabele elɛnga na nsɔmɔ.
22 Mpo na bolamu na bino moko, bótyela moto motema te,
Oyo mpema na ye ezali na zolo na ye,
Mpo na nini bótyela ye motema?
3 Mpo talá oyo Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga,
Azali kolongola na Yerusaleme mpe na Yuda eloko nyonso oyo ekoki kosunga mpe kosalisa,
Elingi koloba mampa nyonso mpe mai nyonso,+
2 Mobali ya nguya ná mobundi-etumba,
Mosambisi ná mosakoli,+ mosakoli ya makambo oyo ebombaná ná nkulutu,
3 Mokonzi ya bato 50,+ moto ya lokumu ná mopesi-toli,
Moto oyo ayebi malamu misala ya maji ná moto oyo ayebi mpenza kolengola.+
Elenge mobali akobundisa mobange,
Mpe moto oyo batyolaka akowelana na moto oyo bamemyaka.+
6 Moto na moto akosimba ndeko na ye ya mobali na ndako ya tata na ye, mpe akoloba:
“Yo ozali na zambala; zalá mokonzi na biso,
Liboke ya bisika oyo ebebabebá ezala na mabɔkɔ na yo.”
7 Na mokolo yango, akoboya mpe akoloba ete:
“Nakozala mokangi ya mpota na yo te;
Nazali na bilei te to bilamba te na ndako na ngai.
Bótya ngai mokonzi ya bato te.”
8 Mpo Yerusaleme abɛti libaku,
Mpe Yuda akwei,
Mpamba te bazali kotɛmɛla Yehova na maloba mpe na misala na bango;
9 Ndenge bilongi na bango ezali komonana ezali kofunda bango,
Mpe bazali kolobela lisumu na bango lokola Sodoma;+
Baluki te kobomba yango.
Mawa na bango! Mpo bazali komibendela mpasi.
10 Bóyebisa bato ya sembo ete makambo ekotambola malamu mpo na bango;
11 Mawa na moto mabe!
Mpasi ekokwela ye,
Bakosala ye kaka ndenge asalaki!
12 Nzokande bato oyo bapesaka bato na ngai mosala banyokolaka bango,
Mpe basi bazali koyangela bango.
Bato na ngai, baoyo bazali kotambwisa bino bazali kosala ete bóyengayenga,
Mpe babulunganisi banzela oyo bosengeli kolanda.+
13 Yehova atɛlɛmi mpo na kosamba likambo na ye;
Atɛlɛmi mpo na kopesa bato ya bikólo etumbu.
14 Yehova akopesa etumbu na bankulutu mpe bankumu ya bato na ye.
“Botumbi elanga ya vinyo,
Biloko oyo boyibi epai ya mobola ezali na bandako na bino.+
15 Ebandi boni bótutatuta bato na ngai
Mpe bonyokoli mpenza bato ya mpasi?”+ Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga nde alobi bongo.
16 Yehova alobi boye: “Lokola bana basi ya Siona bazali na lolendo,
Bazali kotambola batomboli mitó na bango,*
Bazali kofinafina miso na bango, kodenda,
Bazali kolelisa bashɛnɛti ya makolo na bango,
17 Yehova akobimisa mpe mapaka* na motó ya bana basi ya Siona,
Mpe Yehova akosala ete motó na bango ezala na nsuki te.+
18 Na mokolo yango, Yehova akolongola kitoko na bango: bikɔmɔ,
Mwa elamba ya kozipa motó mpe babiju oyo basalá yango lokola sɛrklɛ,+
19 Biloko ya matoi, bikɔmɔ ná matambala,
20 Biloko ya kolata na motó, bashɛnɛti ya makolo ná bankamba ya ntolo,*
Milangi ya malasi* mpe mayaka,
21 Bampɛtɛ ya misapi ná bampɛtɛ ya zolo,
22 Bazambala ya molulu, bazambala ya likoló, bakazaka ná bapotɔmɔni,
23 Batalatala ya mabɔkɔ,+ bilamba ya lini,*
Batirba ná matambala.
24 Na esika ya mafuta ya balsame,+ ekozala nsolo moko ya mabe;
Na esika ya mokaba, nsinga;
Na esika ya nsuki oyo ebongisami malamu, libandi;+
Na esika ya elamba ya ntalo, ngɔtɔ;*+
Na esika ya bonzenga elembo ya mɔtɔ.
4 Mpe na mokolo yango, basi nsambo bakokanga mobali moko+ mpe bakoloba ete:
“Tokolya limpa na biso moko
Mpe tokolata bilamba na biso moko;
Tiká bábenga biso kaka na nkombo na yo
2 Na mokolo yango, mwa nzete oyo Yehova akokolisa ekozala kitoko mpe na nkembo, mpe mbuma ya mokili ekozala eloko moko ya komikumisa na yango mpe ya kitoko mpo na bato ya Yisraele oyo babiki.+ 3 Baoyo nyonso bakotikala na Siona mpe baoyo bakotikala na Yerusaleme bakobengama basantu, baoyo nyonso nkombo na bango ekomami mpo na kozala na bomoi na Yerusaleme.+
4 Ntango Yehova akosukola bosɔtɔ* ya bana basi ya Siona,+ akomonisela Yerusaleme nkanda na ye ya kongala mpe akosambisa ye mpe akopɛtola na kati na ye makila oyo asopaki,+ 5 Yehova akozalisa mpe likoló ya Ngomba Siona mobimba mpe likoló ya esika ya mayangani na moi lipata ná milinga, na butu kongɛnga ya mɔtɔ oyo ezali kopela;+ mpo esika ya komibatela ekozala likoló ya eloko nyonso ya nkembo. 6 Mpe na moi, ekozala na ndako ya matiti oyo ekopesa elili mpo na komibatela na molunge,+ mpe mpo ezala esika ya kokima mpe ya komibomba na mopɛpɛ makasi mpe na mbula.+
5 Tiká nayembela moto oyo nalingaka
Ezali loyembo ya moto oyo nalingaka, mpe ya elanga ya vinyo na ye.+
Moto oyo nalingaka azalaki na elanga ya vinyo na mopanzi ya ngomba moko moke oyo ebotaka malamu.
2 Abalolaki mabele mpe alongolaki mabanga
Alonaki nzete ya vinyo ya motane ya kitoko mpenza,
Atongaki linɔ́ngi moko na katikati na yango,
Mpe atimolaki ekamwelo moko ya vinyo kati na yango.+
Bongo azalaki na elikya ete ekobota mbuma ya vinyo ya malamu,
Kasi ebotaki nde bambuma ya vinyo ya zamba.+
3 “Mpe sikoyo, bino bafandi ya Yerusaleme mpe bato ya Yuda,
Nabondeli bino, bókata likambo na ngai ná elanga na ngai ya vinyo.+
Nazalaki na elikya ete ekobota mbuma ya vinyo ya malamu,
Kasi mpo na nini ebotaki mbuma ya vinyo ya zamba?
5 Sikoyo, tiká nayebisa bino
Oyo nakosala elanga na ngai ya vinyo:
Nakolongola lopango na yango,
Mpe bakotumba yango.+
Bakobuka efelo na yango ya mabanga,
Mpe bakonyatanyata yango.
6 Nakokómisa yango mabele moko ya mpamba;+
Bakokata bitape na yango te, bakolongola mpe matiti na yango te.
Ekotonda na banzubɛ mpe matiti mabe,+
Mpe nakopesa mapata etinda ete enɔkisela yango lisusu mbula te.+
7 Mpo elanga ya vinyo ya Yehova ya mampinga ezali ekólo Yisraele;+
Bato ya Yuda bazali elanga oyo azalaki kolinga mingi.
Azalaki kolikya ete bosembo ekokoba,+
Kasi talá! Kozanga bosembo nde ezalaki;
Azalaki kolikya ete boyengebene ekokoba,
Kasi talá! Koganga mpo na mpasi.”+
8 Mawa na baoyo bazali kobakisa ndako moko na ndako mosusu+
Mpe na baoyo bazali kobakisa elanga moko na elanga mosusu+
Tii esika ezali lisusu te
Mpe bozali kofanda bino moko na mokili!
9 Na matoi na ngai, Yehova ya mampinga alapi ndai
Ete bandako mingi, atako ezali minene mpe kitoko,
Ekokóma eloko moko ya nsɔmɔ mpenza,
Moto moko te akofanda kuna.+
11 Mawa na bato oyo balamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na komɛla masanga oyo elangwisaka,+
Baoyo baumelaka tii na molili ya mpokwa, bongo vinyo ekómaka kopela lokola mɔtɔ na kati na bango!
12 Bazali na nzɛnzɛ, ebɛtɛlo ya nsinga,
Mbonda moke, piololo, ná vinyo na bafɛti na bango;
Kasi bazali kotya likebi te na misala ya Yehova,
Mpe bamonaka mosala ya mabɔkɔ na ye te.
13 Na yango, bato na ngai bakomemama na mboka mopaya,
Mpo bazangi boyebi;+
Bato na bango ya nkembo bakokufa nzala,+
Mpe bato na bango nyonso bakokufa na mposa ya mai.
14 Bongo, Nkunda* emikómisi monene
Mpe efungoli monɔkɔ na yango monene koleka ndelo;+
Mpe nkembo* ya Yerusaleme, bato na yango ebele oyo bazali kosala makɛlɛlɛ,
Mpe bato na yango oyo balingá kosala fɛti bakokita mpenza kati na yango.
16 Yehova ya mampinga akotombwama na nzela ya lisambisi* na ye;
Nzambe ya solo, Mosantu,+ akomisantisa na nzela ya bosembo.*+
17 Mpe bana-mpate ekolya lokola na esika na yango ya kolya matiti;
Mpe bato oyo bafandi bapaya bakolya na bisika oyo etikalá mpamba ya banyama oyo eleisami malamu.
18 Mawa na baoyo bazali kobenda ngambo na bango na bansinga ya bokosi
Mpe lisumu na bango na nsinga ya pusu;
19 Na baoyo balobaka: “Nzambe asala mosala na ye nokinoki;
Eya mbangu, mpo tómona yango.
20 Mawa na baoyo balobaka ete malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu,+
Baoyo batyaka molili na esika ya pole mpe pole na esika ya molili,
Baoyo batyaka bololo na esika ya elɛngi mpe elɛngi na esika ya bololo!
22 Mawa na baoyo bazali bilombe ya komɛla vinyo
Mpe na baoyo bazali makasi mpo na kosangisa masanga oyo elangwisaka,+
23 Na baoyo bazali kolongisa moto mabe mpo na kanyaka+
Mpe na baoyo bazali kowangana bosembo ya moto ya sembo!+
24 Yango wana, kaka ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya blé
Mpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ,
Misisa na bango ekopɔla mpenza,
Mpe bafololo na bango ekomata lokola putulu,
Mpo baboyi mobeko* ya Yehova ya mampinga
Mpe batyoli liloba ya Mosantu ya Yisraele.+
25 Yango wana nkanda ya Yehova epeleli bato na ye,
Mpe akosembolela bango lobɔkɔ na ye mpe akobɛta bango.+
Bangomba ekoningana,
Mpe bibembe na bango ekokóma lokola bosɔtɔ na babalabala.+
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,
Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.
26 Atɛlɛmisi elembo mpo na ekólo moko ya mosika;+
Abɛti piololo mpo bango báya uta na bansuka ya mabele;+
Mpe talá! Bazali koya mbangu mpenza.+
27 Moto moko te na kati na bango alɛmbi to azali kobɛta libaku.
Moto moko te azali koyoka mpɔngi to kolala.
Mokaba oyo ezingi loketo na bango efungwami te,
Bansinga ya basandale na bango ekatani mpe te.
28 Makula na bango nyonso epelisami,
Mpe matimbo na bango nyonso egumbami.
Basabo ya bampunda na bango ezali libanga ya silekisi,
Mpe bapine na bango ya ebende lokola mopɛpɛ makasi.+
Bakonguluma mpe bakokanga nyama ya kolya
Bakomema yango mpe moto moko te akobikisa yango.
Bato nyonso oyo bakotala mokili bakomona molili ya nsɔmɔ;
Ata pole ekómi molili mpo na mapata.+
6 Na mbula oyo mokonzi Uzia akufaki,+ namonaki Yehova afandi na kiti moko ya bokonzi oyo ezalaki likoló mpe etombwaná,+ bansongɛ ya elamba na ye etondaki na tempelo. 2 Baserafɛ batɛlɛmaki likoló na ye. Mokomoko azalaki na mapapu motoba. Na mibale, azipaki elongi na ye mpe na mibale, azipaki makolo na ye mpe na mibale, azalaki kopumbwapumbwa.
3 Mpe bazalaki kobelelana na mongongo makasi ete:
“Mosantu, mosantu, mosantu ezali Yehova ya mampinga.+
Mabele mobimba etondi na nkembo na ye.”
4 Mpe makonzí ya baporte eninganaki na makɛlɛlɛ ya mongongo ya mokomoko na bango,* mpe ndako etondaki na milinga.+
5 Bongo nalobaki ete: “Mawa na ngai!
Mpo nakufi nde kokufa,*
Mpo nazali moto oyo azali na mbɛbu ya mbindo,
Mpe nazali kofanda na kati ya bato oyo bazali na mbɛbu ya mbindo;+
Mpo miso na ngai emoni Mokonzi, Yehova ya mampinga!”
6 Bongo moko ya baserafɛ apumbwaki epai na ngai, mpe na lobɔkɔ na ye, azalaki na likala oyo ezalaki kongala+ oyo azwaki na bapɛnsi na etumbelo.+ 7 Asimbaki monɔkɔ na ngai mpe alobaki boye:
“Talá! Eloko oyo esimbi mbɛbu na yo.
Ozali lisusu na ngambo te,
Mpe lisumu na yo elimbisami.”
8 Bongo nayokaki mongongo ya Yehova ezali koloba boye: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?”+ Mpe nalobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.”+
9 Mpe alobaki lisusu boye: “Kende mpe yebisá bato oyo ete:
‘Bokoyoka lisusu mpe lisusu,
Kasi bokokanga ntina te;
Bokomona lisusu mpe lisusu,
Kasi bokoyeba eloko ata moko te.’+
10 Kómisá motema ya bato oyo makasi,+
Kómisá matoi na bango mangbongi,+
Mpe kangá bango miso,
Mpo bámona te na miso na bango
Mpe báyoka te na matoi na bango,
Mpo motema na bango ekanga ntina te
Mpe bázongela ngai te mpe bábika te.”
11 Bongo nalobaki boye: “Ee Yehova, tii ntango nini?” Mpe alobaki ete:
“Tii bingumba ekobeba mpenza kobeba mpe moto ata moko te akofanda kuna,
Bandako ekozala na bato te
Mpe mabele ekobeba mpe ekotikala mpamba;+
12 Tii Yehova akobengana bato mosika+
Mpe bisika oyo etikali mpamba na mokili ekokóma mingi mpenza.
13 Kasi moko ya bandambo zomi ekozala naino na kati na yango, mpe ekotumbama lisusu, lokola nzete monene mpe lokola ebakata ya nzete oyo, soki bakati yango, ekumu na yango etikalaka; momboto mosantu ekozala ekumu na yango.”
7 Na mikolo ya Ahaze+ mwana ya Yotame mwana ya Uzia, mokonzi ya Yuda, Rezine mokonzi ya Siri mpe Peka+ mwana ya Remalia, mokonzi ya Yisraele, bamataki mpo na kobundisa Yerusaleme, kasi akokaki* kozwa yango te.+ 2 Bapesaki nsango na ndako ya Davidi ete: “Siri eyokani na Efraime.”
Mpe motema ya Ahaze ná motema ya bato na ye ebandaki kolɛnga, ndenge banzete ya zamba eninganaka na mopɛpɛ.
3 Bongo Yehova alobaki na Yisaya ete: “Nabondeli yo, kende kokutana na Ahaze, yo ná mwana na yo Sheare-yashube,*+ na nsuka ya nzela oyo elekisaka mai na liziba ya likoló+ pene na balabala monene ya elanga ya mosukoli-bilamba. 4 Osengeli koloba na ye ete: ‘Salá nyonso ete ofanda nyɛɛ. Kobanga te, mpe motema na yo ebanga te mpo na biteni mibale ya nkoni oyo ezali kobimisa milinga, mpo na nkanda makasi ya Rezine mpe ya Siri, mpe ya mwana na ye Remalia.+ 5 Mpamba te Siri ná Efraime ná mwana ya Remalia bakani kosala yo mabe, balobi: 6 “Tómata kobundisa Yuda mpe tópasolapasola yango mpe tóbɔtɔla yango mpo ekóma ya biso;* mpe tótya mwana ya Tabeele ayangela yango.”+
7 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye:
“Ekosimba te,
Ekosalema mpe te.
8 Mpo motó ya Siri ezali Damasi,
Mpe motó ya Damasi ezali Rezine.
Liboso mbula 65 ekoka
Efraime ekobebisama nyonso mpe ekozala lisusu ekólo te.+
Soki bozali na kondima makasi te,
Bokopikama makasi te.”’”
10 Yehova akobaki koloba na Ahaze ete: 11 “Sɛngá Yehova Nzambe+ na yo apesa yo elembo. Ekoki kozala mozindo lokola Nkunda* to etombwaná lokola likoló.” 12 Kasi Ahaze alobaki: “Nakosɛnga te, nakotya mpe Yehova na komekama te.”
13 Bongo Yisaya alobaki boye: “Nabondeli bino, bóyoka Ee ndako ya Davidi. Ndenge bozali kotyola motema molai ya bato ekoki te, bolingi lisusu kotyola motema molai ya Nzambe?+ 14 Yango wana Yehova ye moko akopesa bino elembo: Talá! Elenge mwasi akozwa zemi, akobota mwana mobali,+ mpe akopesa ye nkombo Emanuele.*+ 15 Liboso ayeba koboya mabe mpe kopona malamu, akolya manteka mpe mafuta ya nzoi. 16 Mpo liboso mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona malamu, mabele ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekosundolama mpenza.+ 17 Yehova akomemela yo mpe bato na yo mpe ndako ya tata na yo ntango moko ya mpasi oyo eyá naino te banda mokolo oyo Efraime ekabwanaki na Yuda:+ akotinda mokonzi ya Asiri.+
18 “Na mokolo yango, Yehova akobɛta piololo mpo na kobengisa banzinzi uta na mosika ya banzela ya mai ya Nile ya Ezipito mpe banzoi oyo ezali na mokili ya Asiri, 19 yango nyonso ekoya mpe ekokitela mabwaku* oyo ekitá makasi, madusu ya mabanga minene, mwa bazamba nyonso ya nzubɛnzubɛ mpe bisika nyonso ya komɛla mai.
20 “Na mokolo yango, na razware oyo bafuteli na etúká ya Ebale,* na nzela ya mokonzi ya Asiri,+ Yehova akokokola motó mpe nsuki ya makolo, mpe ekolongola mandefu nyonso.
21 “Na mokolo yango, moto moko akotika na bomoi mwana-ngɔmbɛ ya mwasi ya etonga ná mpate mibale. 22 Mpe lokola miliki ekozala ebele, akolya manteka; mpo moto nyonso oyo akotikala na mokili akolya manteka ná mafuta ya nzoi.
23 “Na mokolo yango, esika nyonso oyo ezalaki kala na banzete ya vinyo 1 000 oyo ezalaki na motuya ya shekele ya palata 1 000, ekozala kaka na mwa banzete ya nzubɛ mpe na matiti mabe. 24 Bato bakoya kuna na makula mpe na litimbo, mpo mokili yango mobimba ekokóma kaka mwa banzete ya nzubɛ mpe matiti mabe. 25 Mpe bangomba nyonso oyo kala bazalaki kolongola matiti mabe na nkongo, okopusana kuna te mpo na nsɔmɔ ya mwa banzete ya nzubɛ mpe matiti mabe; ekokóma esika ya kofungola bangɔmbɛ mpo elya mpe esika bampate ezali konyatanyata.”
8 Yehova alobaki na ngai boye: “Zwá etanda moko monene+ mpe komá likoló na yango na ekomeli oyo bato nyonso basalelaka:* ‘Mahere-shalale-hashe-baze.’* 2 Mpe nalingi ete batatoli ya sembo, nganga-nzambe Uria+ ná Zekaria mwana ya Yeberekia, bákoma ete bamonaki yango ntango ekomamaki.”
3 Bongo nasangisaki nzoto na* mosakoli-mwasi,* azwaki zemi mpe na nsima abotaki mwana mobali.+ Na yango, Yehova alobaki na ngai ete: “Pesá ye nkombo Mahere-shalale-hashe-baze, 4 mpo liboso mwana yango ayeba koloba: ‘Tata!’ mpe ‘Mama!’ bakomema liboso ya mokonzi ya Asiri biloko ya Damasi mpe biloko oyo bapunzi na Samaria.”+
5 Yehova alobaki na ngai lisusu boye:
6 “Lokola bato oyo baboyi mai ya Shiloa*+ oyo ezali kotíyola malɛmbɛmalɛmbɛ,
Mpe basepeli na Rezine mpe na mwana ya Remalia,+
7 Yango wana, talá! Yehova akomemela bango
Mai ya makasi mpe ya monene ya Ebale,*
Mokonzi ya Asiri+ mpe nkembo na ye nyonso.
Akozindisa mpe akoleka. Akokóma tii na nkingo;+
Mapapu na ye oyo esembolami ekotondisa bonene ya mokili na yo,
9 Bósala mabe bino bato ya bikólo, kasi bakobuka bino mikemike.
Mpe bóyoka, bino nyonso baoyo bozali na bisika ya mosika ya mabele!
Bómibongisa mpo na etumba,* kasi bakobuka bino mikemike!+
Bómibongisa mpo na etumba, kasi bakobuka bino mikemike!
10 Bósalela mayele nyonso, kasi ekolonga te!
11 Lobɔkɔ ya nguya ya Yehova ezalaki likoló na ngai. Mpe mpo na kokebisa ngai nalanda te nzela ya bato oyo, alobaki boye:
12 “Bino bosengeli koloba te ete: ‘Ezali likita mabe!’ kaka mpo bato oyo balobi bongo,
Bóbanga te oyo bazali kobanga;
Bólɛnga te mpo na yango.
13 Yehova ya mampinga ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu,+
Ye nde moto bosengeli kobanga,
Mpe liboso na ye nde bosengeli kolɛnga.”+
14 Mpo na bandako mibale ya Yisraele,
Akokóma lokola esika mosantu
Kasi mpe lokola libanga ya kotutana na yango
Mpe lokola libanga ya kobɛta libaku,+
Lokola motambo mpe monyama
Epai ya bato oyo bafandi na Yerusaleme.
15 Mpe mingi kati na bango bakobɛta libaku, bakokwea mpe bakobukana;
Bakokangama na motambo mpe bakozwama.
17 Nakokoba kozela* Yehova,+ oyo azali kobombela ndako ya Yakobo elongi na ye,+ mpe nakozala na elikya epai na ye.
18 Talá! Ngai ná bana oyo Yehova apesá ngai+ tozali na Yisraele lokola bilembo+ mpe lokola makamwisi oyo euti na Yehova ya mampinga, oyo afandi na Ngomba Siona.
19 Mpe soki balobi na bino: “Bótuna bato oyo basololaka na bilimo to baoyo bayebisaka makambo oyo ekoya, baoyo bazali koloba swiswiswi mpe na mingongo ya nse,” bato na bato basengeli nde kotuna Nzambe na bango te? Basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai ya bakufi?+ 20 Kutu basengeli nde kotuna mobeko ná mokanda ya kondimisa likambo yango!*
Ntango bazali koloba makambo oyo eyokani te na liloba oyo, bazali na pole te.*+ 21 Mpe moto na moto akoleka mpenza na kati ya mokili, wana azali na mpasi mingi mpe na nzala;+ mpe lokola azali na nzala mpe na nkanda, akolakela mokonzi ná Nzambe na ye mabe wana azali kotala na likoló. 22 Bongo akotala na mabele, mpe akomona kaka mpasi mpe molili, moindo mpe bantango ya mpasi mpe molili makasi, kongɛnga ezali te.
9 Nzokande, molili ekozala te lokola ntango mokili ezalaki na mpasi, lokola na ntango ya kala oyo bazalaki kotyola mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali.+ Kasi na nsima, akosala ete bákumisa nzela oyo ezali pene na mbu, na etúká ya Yordani, Galile ya bato ya bikólo.
2 Bato oyo bazalaki kotambola na molili
Bamoni pole moko monene.
Mpe bato oyo bafandaki na mokili ya molili makasi,
Pole engɛngɛli bango.+
3 Okómisi ekólo yango bato ebele;
Osali ete esepela makasi mpenza.
Basepeli liboso na yo
Ndenge bato basepelaka na ntango ya kobuka mbuma,
Ndenge bato bayokaka esengo ntango bazali kokabola biloko oyo bapunzi.
4 Mpo obukibuki ekanganeli ya mokumba na bango,
Fimbo oyo ezalaki kobɛta mapeka na bango, lingenda ya moto oyo azalaki kotinda bango básala mosala,
Lokola na mokolo ya Midiane.+
5 Sapato nyonso ya basoda oyo eningisaka mabele wana bazali kotambola
Mpe bilamba na bango oyo epoli na makila
Ekokóma biloko ya kopelisela mɔtɔ.
Bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko, Nkumu ya Kimya.
7 Bonene ya boyangeli* na ye mpe kimya,
Kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.+
Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama
Na bosembo+ mpe na boyengebene,+
Banda sikoyo mpe libela na libela.
Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.
9 Mpe bato nyonso bakoyeba yango
Efraime mpe bato oyo bafandi na Samaria,
Baoyo na lolendo na bango mpe na lofundo ya motema na bango balobi:
Banzete ya sikomore ekatami,
Kasi na esika na yango tokotya banzete ya sɛdrɛ.”
11 Yehova akotika banguna ya Rezine bátɛmɛla ye
Mpe akosala ete banguna ya Yisraele bábundisa ye,
12 Siri ekouta na ɛsti mpe Bafilistia bakouta na wɛsti,*+
Bakofungola monɔkɔ na bango mpe bakolya Yisraele.+
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,
Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
15 Nkulutu mpe moto oyo bapesaka limemya mingi nde motó,
Mpe mosakoli oyo ateyaka lokuta nde mokila.+
16 Baoyo bazali kokamba bato oyo nde bazali kosala ete báyengayenga,
Mpe baoyo bazali kokambama, babulunganisami.
17 Yango wana Yehova akosepela na bilenge mibali na bango te,
Mpe akoyoka mawa te mpo na bana na bango oyo batata bakufá mpe basi na bango oyo mibali bakufá
Mpo bango nyonso bazali bapɛngwi mpe basali-mabe+
Mpe moto nyonso azali koloba makambo ya bozoba.
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,
Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
18 Mpo mabe epeli lokola mɔtɔ,
Ezikisi mwa banzete ya nzubɛ mpe matiti mabe.
Ekopelisa mwa banzete oyo ezali na zamba,
Mpe mwa banzete yango ekotombwana na likoló lokola lipata ya milinga.
19 Na nkanda makasi ya Yehova ya mampinga
Mokili epeli mɔtɔ,
Mpe bato bakokóma lokola biloko oyo epelisaka mɔtɔ.
Moto moko te akobikisa ata ndeko na ye.
20 Bakokata eloko ya kolya na lobɔkɔ ya mobali,
Kasi bakozala kaka na nzala;
Bakolya eloko na lobɔkɔ ya mwasi,
Kasi bakotonda te.
Bango nyonso elongo bakobunda na Yuda.+
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,
Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
10 Mawa na baoyo batyaka malako mpo na kopesa mpasi,+
Mawa na baoyo babimisaka ntango nyonso mibeko mpo na konyokola,
2 Mpo báboyela babola ntomo na bango,
Mpo na kopimela bato mpamba na kati ya bato na ngai bosembo,+
Bazali kopunza basi oyo mibali bakufá,
Mpe bana oyo batata bakufá!+
4 Likambo mosusu ya kosala ekozala te longola kaka kogumbama na kati ya bato ya bolɔkɔ
To kokwea na nse na kati ya bato oyo babomami.
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,
Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
Azali fimbo oyo nazali kosalela mpo na komonisa nkanda na ngai,+
Nazali kosalela nzete oyo ezali na lobɔkɔ na ye mpo na kopesa etumbu!
6 Nakotinda ye akende kobunda na ekólo oyo epɛngwi,+
Kobunda na bato oyo basilikisi ngai;
Nakopesa ye mitindo abɔtɔla mpe apunza biloko mingi
Mpe anyatanyata bango lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.+
7 Kasi ekozala likanisi na ye te
Mpe motema na ye ekokana yango te;
Mpo na motema na ye, likanisi ezali nde ya kobebisa nyɛɛ,
Koboma bikólo mingi, kasi moke te.
9 Kalano+ ezali lokola Karakemishe+ te?
Hamate+ ezali lokola Arpade+ te?
Samaria+ ezali lokola Damasi+ te?
10 Lobɔkɔ na ngai esimbi makonzi ya banzambe oyo ezangá ntina,
Oyo bikeko* na ye ezali ebele koleka bikeko oyo ezali na Yerusaleme mpe na Samaria,+
11 Nakosala mpe te Yerusaleme ná bikeko na yango
Ndenge nasalaki Samaria mpe banzambe na yango oyo ezangá ntina?’+
12 “Ntango Yehova akosilisa mosala na ye nyonso na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, akopesa* mokonzi ya Asiri etumbu mpo na lofundo ya motema na ye, komitombola na ye mpe miso na ye ya lolendo.+ 13 Mpo alobi:
‘Nakosala yango na makasi ya lobɔkɔ na ngai,
Mpe na bwanya na ngai, mpo nazali moto ya bwanya.
Nakolongola bandelo ya bato ya bikólo,+
Nakopunza biloko na bango ya motuya,+
Mpe nakokitisa bato oyo bafandi wana ndenge moto ya nguya asalaka.+
14 Ndenge kaka lobɔkɔ ya moto esimbaka zumbu,*
Lobɔkɔ na ngai ekosimba biloko ya bato ya bikólo;
Mpe kaka ndenge moto asangisaka maki oyo esundolami,
Nakosangisa mabele mobimba!
Ata moto moko te akobɛta mapapu na ye to akofungola monɔkɔ na ye to akoloba swiswiswi.’”
15 Epasola ekomikumisa ete eleki moto oyo azali kokata na yango?
Sii ekomitombola nde ete eleki moto oyo azali kosalela yango?
Fimbo+ ekoki nde koningisa moto oyo azali kotombola yango?
To lingenda ekoki nde kotombola moto oyo asimbi yango?
16 Yango wana Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga,
Akosala ete bato* na ye ya makasi* bákɔnda,+
Mpe na nse ya nkembo na ye akopelisa mɔtɔ moko ya makasi.+
17 Pole ya Yisraele+ akokóma mɔtɔ,+
Mpe Mosantu na ye lolemo ya mɔtɔ;
Ekopela mpe ekozikisa matiti na ye ya mabe mpe mwa banzete na ye ya nzubɛ na mokolo kaka moko.
18 Akobebisa mpenza* nkembo ya zamba na ye mpe ya elanga na ye ya banzete;
Ekozala lokola kokɔnda ya moto oyo azali kobɛla.+
19 Banzete oyo ekotikala na zamba na ye
Ekokóma motángo moke, ata mwana moke ya mobali akokoka kotánga yango.
20 Na mokolo yango, baoyo bakotikala na Yisraele
Mpe baoyo babiki na ndako ya Yakobo
Bakoluka lisusu lisalisi te epai ya moto oyo azali kobɛta bango;+
Kasi bakoluka nde lisalisi epai ya Yehova,
Mosantu ya Yisraele, mpe bakozala sembo epai na ye.
22 Ata soki bato na yo, Ee Yisraele,
Bazali lokola bambuma ya zɛlo ya mbu,
Kaka mwa bato na bango oyo batikali nde bakozonga.+
23 Ɛɛ, ekateli oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga,
Azwaki ya kosilisa nyɛɛ ekokokisama na mboka mobimba.+
24 Yango wana, talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, alobi: “Bato na ngai oyo bofandi na Siona, bóbanga Moasiri te, oyo azalaki kobɛtabɛta bino na fimbo+ mpe oyo azalaki kotombolela bino lingenda na ye ndenge Ezipito ezalaki kosala.+ 25 Mpo etikali kaka mwa ntango moke bitumbu ekosila, mpe nkanda na ngai ekozala epai na bango mpo na kobebisa bango.+ 26 Yehova ya mampinga akoningisela ye fimbo+ lokola ntango Midiane ebɛtamaki pene na libanga ya Orebe.+ Mpe lingenda na ye ekozala likoló ya mbu, mpe akotombola yango ndenge atombolelaki Ezipito.+
27 Na mokolo yango, mokumba na ye ekolongwa na lipeka na yo,+
Ekanganeli na ye ekolongwa na nkingo na yo,+
Mpe ekanganeli yango ekobukana+ mpo na mafuta.”
30 Ee mwana mwasi ya Galime, bimisá mongongo na yo mpe gangá makasi.
Ee Laisha, tyá likebi.
Ee mawa na yo, Anatote!+
31 Madamena ekimi.
Bato oyo bafandi na Gebime baluki esika ya komibomba.
32 Liboso mokolo esila, akotɛlɛma na Nobe.+
Azali koningisa likofi na ye na ngomba ya mwana mwasi ya Siona,
Ngomba moke ya Yerusaleme.
33 Talá! Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga,
Azali kokata bitape na lokito moko ya nsɔmɔ;+
Banzete oyo eleki milai ezali kokitisama,
Mpe oyo eleki minene ezali kokatama.
34 Akweisi mwa banzete oyo ezali na zamba na esaleli ya ebende,*
Mpe moto oyo azali na nguya akokweisa Liban.
11 Mwa etape+ ekobima na ekumu ya Yese,+
Mpe mwa nzete ya sika+ oyo ekobima na misisa na ye ekobota mbuma.
2 Mpe elimo ya Yehova ekofanda likoló na ye,+
Elimo ya bwanya+ mpe ya mayele,
Elimo ya toli mpe ya nguya,+
Elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova.
3 Mpe akosepela na kobanga Yehova.+
Akosambisa te na kolanda oyo miso na ye emoni,
Mpe akopamela te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki.+
4 Akosambisa moto mpamba na bosembo,
Mpe akosembola na bosembo mpo na bolamu ya bato ya komikitisa oyo bazali na mabele.
6 Na ntango mosusu, mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana-mpate,+
Mpe nkoi ekolala esika moko ná mwana-ntaba,
Mwana-ngɔmbɛ, nkɔsi,* ná nyama oyo eleisami malamu, yango nyonso ekofanda esika moko;*+
Mpe mwana moke ya mobali akokamba yango.
7 Ngɔmbɛ ya mwasi ná urse ekolya esika moko,
Mpe bana na yango ekolala esika moko.
Nkɔsi ekolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ-mobali.+
8 Mwana oyo azali naino komɛla mabɛlɛ akosakana na libulu oyo kobra efandaka,
Mpe mwana oyo batiki komɛlisa mabɛlɛ akokɔtisa lobɔkɔ na ye na libulu oyo nyoka ya ngɛngɛ ebatamaka.
9 Bakosala eloko moko te ya mabe+
Mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba mosantu na ngai mobimba,+
Mpo mabele ekotonda mpenza na boyebi ya Yehova
Ndenge mai etondi na mbu.+
10 Na mokolo yango, mosisa ya Yese+ akotɛlɛma lokola elembo mpo na bato ya bikólo.+
11 Na mokolo yango, Yehova akosembola lisusu lobɔkɔ na ye, mpo na mbala ya mibale, mpo na kozwa bato na ye oyo bakotikala na Asiri+ mpe na Ezipito,+ na Patrose+ mpe na Kushi,+ na Elame,+ na Shinare,* na Hamate mpe na bisanga ya mbu.+ 12 Akotombola elembo mpo na bikólo mpe akoyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná,+ mpe akoyanganisa bato ya Yuda oyo bapanzaná, uta na nsuka minei ya mabele.+
Efraime akoyokela Yuda zuwa te,
Yuda mpe akozala monguna ya Efraime te.+
14 Bakokita mbangu na bangomba mike na wɛsti mpo na kobundisa Bafilistia;
Bango nyonso elongo bakopunza bato ya Ɛsti.
Na mpema* na ye ya mɔtɔ akobɛta yango na* mikɛli na yango nsambo,
Mpe akosala ete bato bákatisa na basandale na bango.
16 Mpe ekozala na balabala moko monene+ oyo ekouta na Asiri mpo na bato na ye oyo bakotikala,+
Kaka ndenge ezalaki mpo na Yisraele na mokolo oyo abimaki na mokili ya Ezipito.
12 Na mokolo yango okoloba mpenza boye:
“Ee Yehova, napesi yo matɔndi,
Mpo atako osilikelaki ngai,
Nsukansuka, nkanda na yo ekitaki, mpe obɔndisaki ngai.+
2 Talá! Nzambe azali lobiko na ngai.+
Nakotya motema mpe nakozala na nsɔmɔ te;+
Mpo Yah* Yehova azali makasi na ngai mpe nguya na ngai,
Mpe akómaki lobiko na ngai.”+
4 Mpe na mokolo yango bokoloba boye:
“Bópesa Yehova matɔndi, bóbelela nkombo na ye.
Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye!+
Bóloba ete nkombo na ye etombwani likoló.+
5 Nakoyemba mpo na kosanzola* Yehova,+ mpo asali makambo ya kokamwa.+
Tiká yango eyebisama na mabele mobimba.
6 Yo oyo ofandaka* na Siona, gangá makasi mpe gangá na esengo,
Mpo Mosantu ya Yisraele azali monene na kati na yo.”
13 Liyebisi mpo na Babilone,+ oyo Yisaya+ mwana ya Amoze amonaki na emonaneli:
2 “Bótɛlɛmisa elembo+ na ngomba ya mabanga oyo ezali polele.
Bóbelela bango, bóningisa lobɔkɔ na bino,
Mpo bákɔta na baporte ya bato ya lokumu.
3 Napesi bato oyo naponi* mitindo.+
Nabengi babundi-bitumba na ngai mpo na komonisa nkanda na ngai,
Baoyo bazali kosepela na lolendo mpenza.
4 Bóyoka! Ebele ya bato na bangomba;
Ezali koyokana lokola ebele ya bato mpenza!
Bóyoka! Yikiyiki ya makonzi,
Ya bikólo oyo eyangani esika moko!+
Yehova ya mampinga azali koyanganisa limpinga mpo na etumba.+
5 Yehova mpe bibundeli ya nkanda na ye,
Bauti na mokili ya mosika,+
Bauti na nsuka ya likoló
Mpo na kobebisa mabele mobimba.+
6 Bóganga na kolela, mpo mokolo ya Yehova ezali pene!
Ekoya lokola libebi oyo euti epai ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+
Kotutuka mpe mpasi ekangi bango,
Lokola mwasi oyo azali kobota.
Bazali kotalana na nsɔmɔ,
Bilongi na bango epeli mɔtɔ mpo na mpasi.
9 Talá! Mokolo ya Yehova ezali koya,
Ezali na nko, na nkanda makasi mpe na nkanda ya kongala,
Mpo na kokómisa mokili eloko moko ya nsɔmɔ,+
Mpe mpo na kosilisa nyɛɛ basumuki ya mokili yango.
10 Mpo minzoto ya likoló mpe maboke na yango*+
Ekobimisa pole na yango te;
Moi ekoyinda ntango ezali kobima,
Mpe sanza ekongɛngisa pole na yango te.
11 Nakosɛnga na bato ya mabele bázongisa monɔkɔ mpo na mabe na bango,+
Mpe bato mabe mpo na libunga na bango.
Nakosukisa lolendo ya bato ya lofundo,
Mpe nakosilisa lolendo ya banyokoli.+
12 Nakokómisa moto mowei mpamba eloko ya koluka lokola wolo oyo epɛtolami,+
Mpe bato eloko ya koluka koleka wolo ya Ofire.+
13 Yango wana nakosala ete likoló eningana,
Mpe mabele ekoningana mpo elongwa na esika na yango+
Na nkanda makasi ya Yehova ya mampinga mpe na mokolo ya nkanda na ye ya kongala.
14 Lokola mboloko oyo babengani mpe lokola etonga oyo ezangi moto ya koyanganisa yango,
Moto na moto akozonga epai ya bato ya ekólo na ye;
Moto na moto akokima na mokili na ye.+
16 Bana na bango bakokatama bitenibiteni na miso na bango,+
Bandako na bango ekopunzama
Mpe bakosangisa nzoto na basi na bango na makasi.
17 Talá, nazali kotindela bango Bamede,+
Bato oyo bamonaka palata eloko mpamba
Mpe baoyo basepelaka na wolo te.
18 Matimbo na bango ekobukabuka bilenge mibali;+
Bakoyokela mbuma ya libumu mawa te
Bakoyokela mpe bana mawa te.
19 Mpe Babilone, bokonzi oyo eleki makonzi na nkembo,*+
Bonzenga mpe lolendo ya Bakaladea,+
Ekokóma lokola Sodoma ná Gomora ntango Nzambe akweisaki yango.+
Moarabe akopika hema na ye kuna te,
Mpe babateli ya mpate bakolalisa bitonga na bango kuna te.
21 Bikelamu oyo efandaka na mokili ekauká ekolala kuna;
Bandako na bango ekotonda na bisulungutu minene.
22 Banyama oyo egangaka ekoganga na bandako na yango ya milai
Mpe bambwa ya zamba* na bandako na yango ya kitoko.
Ntango na ye ekómi pene, mpe mikolo na ye ekobakisama te.”+
14 Mpo Yehova akoyokela Yakobo mawa+ mpe akopona lisusu Yisraele;+ akofandisa bango* na mokili na bango,+ mpe bato oyo bafandi bapaya bakosangana na bango mpe bakokangana na bato ya libota ya Yakobo.+ 2 Bato ya bikólo bakozwa bango, bakomema bango na bisika na bango moko, bato ya Yisraele bakozwa bango bázala basaleli ya mibali mpe ya basi+ na mabele ya Yehova, mpe bakokanga baoyo bakangaki bango bakangami, mpe bakozala na bokonzi likoló ya baoyo bazalaki kosalisa bango mosala makasi.
3 Na mokolo oyo Yehova akopemisa yo na mpasi na yo mpe na yikiyiki na yo mpe na boombo ya makasi oyo batyaki yo,+ 4 okozongela liloba oyo ya matumoli epai ya mokonzi ya Babilone:
“Talá ndenge moto oyo azalaki kotinda basusu na makasi básala mosala asuki!
Talá ndenge monyoko esuki!+
5 Yehova abuki lingenda ya bato mabe,
Lingenda ya bayangeli,+
6 Moto oyo azalaki ntango nyonso kobɛta bato ya bikólo na nkanda makasi,+
Moto oyo azalaki kotika te kotya bikólo na nse na ye na nkanda mpenza mpe na monyoko.+
7 Sikoyo mabele mobimba epemi, ekómi kimya.
Bato bazali koganga na esengo.+
8 Ata banzete ya jenevriye,
Ná banzete ya sɛdrɛ ya Liban esepeli mpo na yo,
Elobi: ‘Banda okweá,
Mokati-nzete ata moko te ayaka kokata biso.’
Mpo na yo, elamwisi baoyo bazangi makasi kati na liwa,
Bakambi nyonso oyo banyokolaka bato* na mabele.
Etɛlɛmisaka bakonzi nyonso ya bikólo na bakiti na bango ya bokonzi.
10 Bango nyonso bazali koloba mpe koyebisa yo boye:
‘Yo mpe olɛmbi lokola biso?
Okómi lokola biso?
Mpe misɔpi nde elamba na yo ya kozipa nzoto.’
12 Ee talá ndenge okwei uta na likoló,
Yo monzoto ya kongɛnga, mwana ya kotana ya ntɔngɔ!
Talá ndenge bakati yo, okwei na mabele,
Yo oyo olongaki bikólo!+
13 Olobaki na motema na yo ete: ‘Nakomata likoló.+
Nakotombola kiti na ngai ya bokonzi likoló ya minzoto ya Nzambe,+
Mpe nakofanda na ngomba ya kokutana,
Na bisika eleki mosika ya nɔrdi.+
14 Nakomata likoló ya bisika oyo etombwaná ya mapata;
Nakomikokanisa na Oyo-Aleki-Likoló.’
16 Baoyo bakomona yo bakotalatala yo;
Bakotala yo na likebi mpe bakoloba:
‘Oyo nde mobali oyo azalaki koningisa mabele,
Oyo azalaki kolɛngisa makonzi,+
17 Oyo akómisaki mabele oyo bato bafandi lokola esobe
Mpe akweisaki bingumba na yango,+
Oyo aboyaki kotika bato na ye ya bolɔkɔ bázonga epai na bango?’+
19 Kasi yo, obwakami, ozali na lilita te,
Lokola mwa nzete ya sika* oyo eyinamá,
Olati bato oyo babomami, oyo batɔbɔlami na mopanga,
Baoyo babwakami tii na libulu oyo etondi na mabanga,
Lokola ebembe oyo banyatinyati.
Bana ya basali-mabe bakotángama nkombo ata moke te.
21 Bóbongisa esika ya koboma bana na ye,
Mpo na ngambo ya bankɔkɔ na bango,
Mpo bátɛlɛma te mpo na kozwa mabele
Mpe bátondisa mokili na bingumba na bango.”
22 “Nakotɛmɛla bango,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
“Mpe nakolongola na Babilone nkombo ná bato oyo batikali, bana ná libota,”+ yango nde liloba ya Yehova.
23 “Mpe nakokómisa yango esika ya nziko mpe ya etúká ya maimai, mpe nakokɔmba yango na nkɔmbɔ oyo esilisaka nyɛɛ,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
24 Yehova ya mampinga alapi ndai ete:
“Ekosalema kaka ndenge nakanaki,
Mpe ekokokisama kaka ndenge nazwaki ekateli.
Ekanganeli na ye ekolongwa epai na bango
Mpe mokumba na ye ekolongwa na lipeka na bango.”+
26 Yango nde ekateli oyo ezwamaki* mpo na* mabele mobimba,
Mpe yango nde lobɔkɔ oyo esembolami epai ya bikólo nyonso.
Lobɔkɔ na ye esembolami,
Mpe nani akoki kozongisa yango nsima?+
28 Na mbula oyo Mokonzi Ahaze akufaki,+ liyebisi oyo epesamaki:
29 “Filistia, moto moko te kati na bato na yo asepela,
Kaka mpo lingenda ya moto oyo azalaki kobɛta yo ebukani.
Mpo uta na mosisa ya nyoka,+ nyoka moko ya ngɛngɛ ekobima,+
Mpe libota na yango ekozala nyoka ya mɔtɔ oyo epumbwaka.*
30 Ntango bana ya liboso ya bato mpamba bakolya,
Mpe babola bakolala na kimya,
Nakoboma mosisa na yo na nzala,
Mpe oyo ekotikala epai na yo ekobomama.+
31 Ee porte, gangá na kolela! Ee engumba, belelá!
Ee Filistia, bato na yo nyonso bakolɛmba nzoto!
Mpo milinga ezali kouta na nɔrdi,
Mpe na milɔngɔ ya banguna moto moko te oyo alɛmbi azangi.”
32 Eyano nini bakopesa na bamemi-nsango ya ekólo?
Ete Yehova atye moboko na Siona,+
Mpe bato na ye oyo bazali bato mpamba bakokima mpo na kozwa libateli epai na ye.
Lokola ebebisami na butu moko,
Are+ ya Moabe ekangisami monɔkɔ.
Lokola ebebisami na butu moko,
Kire+ ya Moabe ekangisami monɔkɔ.
Moabe ezali koganga na kolela mpo na Nebo+ mpe Medeba.+
Mitó ya bato nyonso ekokolami+ mpe mandefu nyonso ekatami.+
3 Na babalabala na yango, balati ngɔtɔ.*
Na bansamba na bango mpe na bisika minene na bango ya bato nyonso,
Bango nyonso bazali koganga na kolela, bazali kokita na kolela.+
Yango wana bato ya Moabe oyo bazali na bibundeli bazali se koganga.
Azali* kolɛnga.
5 Motema na ngai ezali koganga na kolela mpo na Moabe.
Bato na yango oyo bakimi bakómi tii na Zoare+ mpe na Eglate-shelishiya.+
Na esika ya komata na Luhite bazali komata na kolela;
Na nzela oyo ekei na Horonaime, bazali koganga makasi mpo na likama monene.+
6 Mpo mai ya Nimirime ekauki mpenza;
Matiti ya mobesu ekauki, matiti esili,
Mpe eloko moko te ya mobesu etikali.
7 Yango wana bazali komema oyo etikali na biloko na bango oyo ebombami mpe bozwi na bango;
Bazali kokatisa na lobwaku* ya banzete ya arava.
8 Mpo koganga eyokani epai na epai na teritware ya Moabe.+
Kolela makasi ekómi tii na Eglaime;
Kolela makasi ekómi tii na Beere-elime.
9 Mpo mai ya Dimone etondi na makila,
Mpe nabombi makambo mosusu mpo na Dimone:
Nkɔsi mpo na bato ya Moabe oyo bakobika
Mpe mpo na baoyo bakotikala na mabele yango.+
16 Bótindela moyangeli ya mokili mpate moko ya mobali,
Uta na Sela, bótinda yango na esobe
Tii na ngomba ya mwana mwasi ya Siona.
2 Na bisika oyo bakatisaka Arnone na makolo,+
Bana basi ya Moabe bakokóma lokola ndɛkɛ oyo babengani na zumbu* na yango.+
3 “Pesá toli, salelá ekateli.
Na midi, kómisá elili na yo lokola butu.
Bombá bato oyo bapalangani mpe kotɛka te bato oyo bazali kokima.
4 Ee Moabe, tiká bato na ngai oyo bapalangani báfanda epai na yo.
Kómá esika na bango ya kobombama mpo na mobebisi.+
Monyokoli akokóma na nsuka na ye,
Libebi ekosila,
Mpe baoyo bazalaki konyatanyata basusu bakosila na mabele.
5 Bongo na bolingo ya sembo, kiti ya bokonzi ekopikama makasi,
Moto oyo afandi na yango na hema ya Davidi akozala sembo,+
Akosambisa na bosembo, akosala noki mpo na kosalela boyengebene.”+
6 Toyoki nsango ya lolendo ya Moabe—azali na lolendo mpenza+—
Lofundo na ye, lolendo na ye mpe nkanda na ye ya makasi;+
Kasi bilobaloba na ye ekosala eloko te.
Baoyo balongi etumba te bakolelalela mpo na bagato ya mbuma ya vinyo ya Kire-haresete.+
8 Mpo mikala ya bilanga ya Heshibone+ ekauki,
Nzete ya vinyo ya Sibima mpe ekauki,+
Bayangeli ya bikólo banyatinyati bitape na yango ya motane ngwaa;*
Ekómaki tii na Yazere;+
Ekendaki tii na esobe.
Bitape na yango ekolaki mpe ekendaki mosika tii na mbu.
9 Yango wana nakolela nzete ya vinyo ya Sibima ndenge nazali kolela Yazere.
Ee Heshibone mpe Eleale,+ nakopɔlisa yo na mai ya miso na ngai
Mpo koganga ya esengo oyo ebimi na eleko na yo ya molunge mpe na eleko na yo ya kobuka mbuma ekómi na nsuka.*
10 Balongoli nsai mpe esengo na elanga ya banzete ya mbuma,
Mpe na bilanga ya vinyo,+ nzembo ya koganga na esengo ezali te.
Monyati azali konyata mbuma moko te ya vinyo na bikamwelo,
Mpo nasalaki ete bátika koganga.+
11 Yango wana na kati na ngai nazali koningana mpo na likambo ya Moabe,+
Lokola nzɛnzɛ oyo bazali kobɛta,
Mpe natondi mpenza na mawa mpo na Kire-haresete.+
12 Ata ntango oyo Moabe akolɛmba na esika oyo etombwaná mpe akokende na esika na ye mosantu mpo na kobondela, akosala eloko moko te.+
13 Yango nde liloba Yehova alobaki kala mpo na Moabe. 14 Mpe sikoyo Yehova alobi ete: “Liboso mbula misato esila, lokola bambula ya mosali oyo azwaka lifuti,* nkembo ya Moabe ekosambwisama mpenza na ebele ya yikiyiki ya ndenge nyonso, mpe baoyo bakotikala bakozala mpenza moke, bakozala na nguya te.”+
“Talá! Damasi ekozala lisusu engumba te,
Mpe ekokóma esika oyo ebebisamá mpo na libela.+
2 Bingumba ya Aroere+ ekosundolama;
Ekokóma bisika oyo bitonga ekobanda kolala
Mpe moto ata moko te akobangisa yango.
3 Bingumba oyo ebatelami makasi ekozala lisusu te na Efraime,+
Mpe bokonzi ekozala lisusu te na Damasi;+
Bato ya Siri oyo bakotikala
Bakokóma lokola nkembo ya Bayisraele,”* yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
4 “Na mokolo yango, nkembo ya Yakobo ekokita,
Mpe nzoto na ye ya mafuta ekokɔnda.
5 Ekozala lokola ntango mobuki-mbuma azali koyanganisa blé oyo etɛlɛmi
Mpe lobɔkɔ na ye ezali kobuka mitó ya blé,
6 Kaka mbuma ya kolɔkɔta nde ekotikala
Lokola ntango babɛtaka nzete ya olive:
Kaka mbuma mibale to misato ya olive ekotikala na etape oyo eleki likoló,
Kaka mbuma minei to mitano na bitape oyo ebotaka mbuma,”+ yango nde liloba ya Yehova Nzambe ya Yisraele.
7 Na mokolo yango, moto akotala Mozalisi na ye, mpe miso na ye ekotalatala mpenza Mosantu ya Yisraele. 8 Akotala bitumbelo te,+ mosala ya mabɔkɔ na ye;+ akotalatala te eloko oyo misapi na ye esali: banzete ya losambo* to bitumbelo ya mpaka ya malasi.
9 Na mokolo yango, bingumba na ye ya bandako ya makasi ekokóma lokola esika oyo basundolá na zamba,+
Lokola etape oyo basundolá liboso ya Bayisraele;
Ekokóma esika oyo etikalá mpamba.
Yango wana oloni bilanga kitoko,
Mpe otye wana mwa etape ya mopaya.*
11 Na moi, ozingaka malamumalamu elanga na yo na lopango,
Na ntɔngɔ, osalaka ete molona na yo ebimisa nkasa,
Kasi mbuma ya kobuka ekozala te na mokolo ya maladi mpe ya mpasi oyo esilaka te.+
12 Yoká! Ezali na ebele ya bato ya bikólo,
Oyo bazali kosala makɛlɛlɛ lokola makɛlɛlɛ ya mbu!
Koganga ya bikólo,
Oyo makɛlɛlɛ na yango ezali lokola konguluma ya mai ya makasi!
13 Bikólo ekosala makɛlɛlɛ lokola konguluma ya mai ebele.
Akopamela yango, mpe ekokima mosika,
Bakobengana yango lokola mposo ya blé ya bangomba liboso ya mopɛpɛ,
Lokola ekumbaki oyo ezali kobalusa bansende liboso ya mopɛpɛ ya makasi.
14 Na mpokwa, nsɔmɔ ekozala.
Liboso ntɔngɔ etana bakozala lisusu te.
Yango nde likabo ya baoyo bazali kobɔtɔla biso biloko
Mpe libula ya baoyo bazali kopunza biso.
18 Mawa na mboka ya nyama-nkɛkɛ oyo mapapu na yango esalaka makɛlɛlɛ,
Oyo ezali na etúká ya bibale ya Etiopi!+
2 Ezali kotinda bato na nzela ya mbu,
Na nzela ya bamasuwa ya papirisi oyo ekatisaka mai, elobi:
“Bino bamemi-nsango ya lombangu, bókende
Epai ya ekólo ya bato ya milaimilai mpe ya loposo sɛlisɛli,*
Bato oyo babangisaka na esika nyonso,+
Na ekólo ya makasi mpe oyo elongaka,*
Oyo bibale ekɔmbɔlá mabele na yango.”
3 Bino nyonso, bato oyo bofandi na mokili, mpe bino baoyo bofandi na mabele,
Oyo bokomona ekozala lokola elembo oyo batɛlɛmisi na bangomba,
Mpe bokoyoka lokito lokola na ntango bayulaka liseke.
4 Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai:
“Nakotikala kimya mpe nakotala* esika na ngai ya libela,
Lokola molunge ná kongɛnga ya moi,
Lokola lipata ya mamwɛ* na molunge ya ntango ya kobuka mbuma.
5 Mpo liboso ya ntango ya kobuka mbuma,
Ntango fololo esilaka mpe fololo ekómaka mbuma ya vinyo oyo eteli,
Bitape ya mike ekokatama na makwangola ya kokata matiti
Mpe bitape oyo elíngamalíngamá, ekokatama mpe ekolongolama.
6 Bango nyonso bakotikala mpo na bandɛkɛ oyo ekangaka banyama na bangomba
Mpe mpo na banyama ya mabele.
Bandɛkɛ oyo ekangaka banyama ekolekisa eleko ya molunge likoló na bango,
Mpe banyama nyonso ya mabele ekolekisa ntango ya kobuka mbuma likoló na bango.
7 Na ntango yango, bakomemela Yehova ya mampinga likabo,
Oyo euti na ekólo ya bato ya milaimilai mpe ya loposo sɛlisɛli,*
Euti epai ya bato oyo babangisaka na esika nyonso,
Euti na ekólo ya makasi mpe oyo elongaka,*
Oyo bibale ekɔmbɔlá mabele na yango,
Bakoya na yango esika nkombo ya Yehova ya mampinga ezali, Ngomba Siona.”+
19 Nsango ya kotɛmɛla Ezipito:+
Talá! Yehova amati likoló ya lipata oyo ezali kokende mbangu mpe azali koya na Ezipito.
Banzambe ya Ezipito oyo bazangá ntina bakolɛnga liboso na ye,+
Mpe motema ya Ezipito ekonyangwa na katikati na yango.
2 “Nakotinda Baezipito bándongwana bango na bango,
Mpe bakobunda bango na bango,
Moto na moto na ndeko na ye mpe na mozalani na ye,
Engumba na engumba, bokonzi na bokonzi.
Bakoluka lisalisi epai ya banzambe oyo bazangá ntina,
Epai ya balengoli, bato oyo basololaka na bilimo ná bato oyo basakolaka makambo oyo ekoya.+
4 Nakokaba Ezipito na lobɔkɔ ya nkolo moko ya makambo makasi,
Mpe mokonzi moko ya nko akoyangela bango,”+ yango nde liloba ya Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga.
6 Mpe bibale ekolumba nsolo mabe;
Banzela ya mai ya Nile ya Ezipito ekokita mpe ekokauka makasi.
Matiti ya ebale ná nkɛkɛlɛ ekopɔla.+
7 Banzete oyo ezali pene na Ebale Nile, na monɔkɔ ya Ebale Nile,
Mpe mabele nyonso oyo baloni mboto penepene ya Ebale Nile+ ekokauka.+
Ekomemama na mopɛpɛ, mpe ekozala lisusu te.
8 Mpe babomi-mbisi bakolela,
Mpe baoyo nyonso babwakaka ndɔbɔ na Ebale Nile bakomilelalela,
Mpe baoyo batandaka minyama na mai bakozala lisusu mingi te.
10 Bato na ye oyo basalaka mayemi na bilamba bakotungisama;
Basali nyonso oyo bazwaka lifuti bakoyoka mawa.*
11 Bankumu ya Zoane+ bazali bazoba.
Bapesi-toli ya Farao oyo baleki na bwanya bapesi toli oyo ezangi mayele.+
Ndenge nini bokoloba na Farao ete:
“Nazali mwana ya bato ya bwanya,
Mwana ya bakonzi ya ntango ya kala”?
12 Bongo bato na yo ya bwanya+ bazali wapi?
Báyebisa yo oyo Yehova ya mampinga akani kosala na Ezipito.
13 Bankumu ya Zoane basali na bozoba;
Bakonzi ya mabota na ye babungisi Ezipito nzela.
14 Yehova asali ete Ezipito ebulungana;+
Mpe babungisi Ezipito nzela ata soki esali nini,
Ndenge moto oyo alangwe amibalolaka na biloko oyo asanzi.
16 Na mokolo yango, Ezipito ekokóma lokola basi mpe ekolɛnga, mpe ekozala na nsɔmɔ mpo na koningisama ya lobɔkɔ oyo Yehova ya mampinga azali koningisela yango.+ 17 Mpe mabele ya Yuda ekokóma eloko oyo ezali kopesa Ezipito nsɔmɔ. Soki kaka batángeli bango yango, bakozala na nsɔmɔ, mpo na ekateli oyo Yehova ya mampinga azwi mpo na bango.+
18 Na mokolo yango, ekozala na bingumba mitano na mokili ya Ezipito oyo ekoloba monɔkɔ ya Kanana+ mpe oyo ekolapela Yehova ya mampinga ndai na bosembo. Engumba moko ekobengama Engumba ya Kobuka.
19 Na mokolo yango, etumbelo moko ekozala mpo na Yehova na katikati ya mokili ya Ezipito, mpe likonzí moko mpo na Yehova na ndelo na yango. 20 Mpe yango ekozala elembo mpe litatoli mpo na Yehova ya mampinga na mokili ya Ezipito; mpo bakobelela Yehova mpo na banyokoli, mpe akotindela bango mobikisi, mobikisi moko monene, oyo akobikisa bango. 21 Yehova akoyebana epai ya Baezipito, mpe Baezipito bakoyeba Yehova na mokolo yango, bakopesa bambeka, ná makabo mpe bakosalela Yehova elako mpe bakokokisa yango. 22 Yehova akobɛta Ezipito,+ akobɛta mpe akobikisa yango; mpe bakozongela Yehova, akoyanola na mabondeli na bango mpe akobikisa bango.
23 Na mokolo yango, balabala moko monene ekozala+ banda na Ezipito tii na Asiri, Asiri akoya na Ezipito, mpe Ezipito na Asiri, mpe Ezipito ná Asiri bakosalela Nzambe elongo. 24 Na mokolo yango, Yisraele akozala moto ya misato elongo na Ezipito mpe Asiri,+ lipamboli na katikati ya mabele, 25 mpo Yehova ya mampinga akopambola yango boye: “Ezipito, bato na ngai, mpe Asiri, mosala ya mabɔkɔ na ngai, mpe Yisraele, libula na ngai, bápambwama.”+
20 Na mbula oyo Sargone mokonzi ya Asiri atindaki Tartane* na Ashedode,+ abundisaki Ashedode mpe azwaki yango.+ 2 Na ntango yango, Yehova alobaki na nzela ya Yisaya+ mwana ya Amoze ete: “Kende, longolá ngɔtɔ* oyo ezali na loketo na yo, mpe longolá basandale na makolo na yo.” Mpe asalaki kaka bongo, azalaki kotambola bolumbu* mpe makolo ngulu.
3 Yehova alobaki lisusu boye: “Kaka ndenge mosaleli na ngai Yisaya atambolitamboli bolumbu mpe makolo ngulu mbula misato lokola elembo+ mpe likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoyela Ezipito+ mpe Etiopi,+ 4 ndenge yango nde mokonzi ya Asiri akotambwisa bato ya Ezipito oyo bakangami+ mpe bato ya Etiopi oyo bakomemama na mboka mopaya, bilenge mibali ná mikóló, bolumbu mpe makolo ngulu, mpe masɔkɔ polele, na nsɔni* ya Ezipito. 5 Mpe bakozala na nsɔmɔ mpe bakoyoka nsɔni mpo na Etiopi oyo bazalaki kotyela elikya, mpe mpo na Ezipito, lokumu na bango.* 6 Na mokolo yango, bato oyo bafandi na mokili oyo ya pembeni ya mbu bakoloba boye: ‘Talá ndenge eloko oyo tozalaki kotyela elikya ekómi, epai tozalaki kokima mpo na kozwa lisalisi, mpo na kobikisama liboso ya mokonzi ya Asiri! Bongo biso tokobika ndenge nini?’”
21 Nsango ya kotɛmɛla esobe ya mbu:*+
Ezali koya lokola mopɛpɛ ya makasi oyo ezali kokɔmba na sudi,
Euti na esobe, na mokili ya nsɔmɔ.+
2 Bayebisi ngai emonaneli moko ya mpasi:
Mokosi azali kosala makambo na bokosi,
Mobebisi azali kobebisa.
Ee Elame, matá! Ee Media,+ zingá!
Nakosala ete kolelalela nyonso oyo azalaki kobimisela bato esila.+
3 Yango wana nazali komitungisa mingi.*+
Mpasi makasi ekangi ngai,
Lokola mpasi ya mwasi oyo azali kobota.
Natungisami mingi mpenza, yango wana nazali koyoka te;
Nabulungani mpenza, yango wana nazali komona te.
4 Motema na ngai elɛmbi; nalɛngi na nsɔmɔ.
Mpokwa liboso molili ekɔta, oyo nazalaki kolinga, ezali kolɛngisa ngai.
5 Bátya biloko na mesa, bábongisa bakiti!
Bálya mpe bámɛla!+
Bótɛlɛma, bino bankumu, bótya nguba mafuta!
6 Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai:
“Kende, tyá mokɛngɛli mpe yebisá ye aloba makambo oyo azali komona.”
7 Mpe namonaki likalo ya etumba ná farasa mibale oyo bakangisi esika moko,
Likalo ya etumba ya bampunda,
Mpe likalo ya etumba ya bakamela.
Atalaki mpenza na likebi, na likebi mpenza.
8 Bongo abelelaki lokola nkɔsi:
“Ee Yehova, na moi nazali kaka kotɛlɛma na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli,
Mpe butu nyonso natɛlɛmaka na esika na ngai ya kokɛngɛla.+
9 Talá oyo ezali koya:
Mibali bazali koya na likalo moko ya etumba ná farasa* mibale oyo bakangisi esika moko!”+
Bongo alobaki na mongongo makasi ete:
“Akwei! Babilone akwei,+
Mpe bikeko* nyonso ya banzambe na ye ebukani, elali na mabele!”+
10 Ee bato na ngai, baoyo batutami ndenge batutaka blé.
Biloko* ya esika na ngai ya kotutatuta mbuma,+
Nayebisi bino makambo oyo nayoki epai ya Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele.
Moto moko azali kobelela ngai uta na Seire:+
“Sinzili, ntɔngɔ ekotana ntango nini?
Sinzili, ntɔngɔ ekotana ntango nini?”
12 Sinzili alobaki:
“Ntɔngɔ ekotana, butu mpe ekoya.
Soki bolingi kotuna, bótuna.
Bóya lisusu!”
13 Nsango ya kotɛmɛla mokili patatalu oyo ekauká:
Bokolala na zamba na butu, na mokili patatalu oyo ekauká,
Ee bino milɔngɔ ya bato ya Dedane oyo bozali koleka.+
14 Bóya na mai mpo na kokutana na moto oyo azali na mposa ya mai,
Bino bato oyo bofandi na mokili ya Tema,+
Bóya na limpa mpo na moto oyo azali kokima.
15 Mpo bakimi mipanga, mopanga oyo euti na libenga na yango,
Mpo na litimbo oyo egumbami, mpo na etumba oyo eyei ndongo.
16 Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai: “Liboso ete mbula moko ekoka, lokola bambula ya mosali oyo azwaka lifuti,* nkembo nyonso ya Kedare+ ekosuka mpenza. 17 Motángo ya bato ya litimbo, ya babundi-bitumba ya Kedare, oyo bakotikala ekokóma moke, mpo Yehova, Nzambe ya Yisraele, alobi yango.”
22 Liyebisi mpo na Lobwaku ya emonaneli:*+
Likambo nini boye oyo bato na yo nyonso bamati na bansamba?
2 Otondaki na yikiyiki,
Engumba ya makɛlɛlɛ, sité oyo ezali kosepela makasi.
Bato na yo oyo babomami, babomami na mopanga te,
Bakufi mpe na etumba te.+
3 Bakonzi na yo nyonso oyo bazali koyangela na makasi bakimi elongo.+
Bakangaki bango na bolɔkɔ kozanga kosalela litimbo.
Bato nyonso oyo bakutaki, bakangaki bango,+
Ata baoyo bakimaki mosika.
4 Yango wana nalobi: “Bólongola miso na bino epai na ngai,
Bótika kobɔndisa ngai.
5 Mpo ezali mokolo oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,
Yehova ya mampinga, azali kobulunganisa,
Kolonga mpe kobangisa+ na Lobwaku ya emonaneli.
Bazali kobuka efelo,+
Mpe koganga eyokani na ngomba.
7 Mabwaku* na yo oyo eleki kitoko
Ekotonda mpenza na makalo ya etumba,
Mpe bampunda ekotɛlɛma* na porte,
“Na mokolo yango, bokotala na ngámbo ya esika ya kobomba bibundeli ya Ndako ya zamba,+ 9 ya solo bokomona madusu ebele na efelo ya Sité ya Davidi.+ Mpe bokoyanganisa mai ya liziba ya nse.+ 10 Bokotánga bandako ya Yerusaleme. Mpe bokobuka bandako mpo na kokómisa efelo makasi. 11 Bokosala libulu ya mai kati na bifelo mibale mpo na mai ya liziba ya kala. Kasi bokotala te Mokeli Monene na yango, mpe bokomona te moto oyo asalaki yango banda kala.
12 Na mokolo yango, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga,
Akosɛnga ete bólela mpe bózala na mawa,+
Bókokola mitó mpe bólata ngɔtɔ.*
13 Kasi na esika na yango, ekozala nde kosepela makasi mpe esengo,
Koboma bangɔmbɛ mpe koboma bampate,
Kolya mosuni mpe komɛla vinyo.+
‘Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.’”+
14 Bongo Yehova ya mampinga alobaki na matoi na ngai ete: “‘Libunga na bino oyo ekozipama te tii bokokufa,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
15 Talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, alobi: “Kende epai ya kapita oyo, epai ya Shebena,+ oyo azali kokamba ndako, lobá boye: 16 ‘Eloko nini ozali na yango awa, mpe nani azali moto na yo awa, mpo omitimwela lilita awa?’ Na esika oyo etombwaná, azali kotimola lilita na ye; na libanga, azali kopasola esika na ye ya kopema.* 17 ‘Talá! Yehova akobwaka yo na nse na makasi nyonso, Ee moto, mpe akokanga yo makasi. 18 Na ntembe te, akolínga yo makasi, mpe akobwaka yo lokola ndembo na mokili moko monene. Okokufa kuna, mpe kuna makalo ya bitumba ya nkembo na yo ekozala nsɔni mpo na ndako ya nkolo na yo. 19 Nakobengana yo na ebonga na yo mpe nakobengana yo na esika na yo ya lokumu.
20 “‘Na mokolo yango, nakobenga mosaleli na ngai, Eliakime+ mwana ya Hilikiya. 21 Nakolatisa ye zambala na yo, nakokanga ye makasi elamba na yo ya kokanga na loketo,+ mpe nakopesa bokonzi na yo na mabɔkɔ na ye; akozala tata ya bafandi ya Yerusaleme mpe ya bato ya libota ya Yuda. 22 Nakotya fungola ya ndako ya Davidi+ na lipeka na ye; akofungola mpe moto moko te akokanga, akokanga mpe moto moko te akofungola. 23 Nakokɔtisa ye lokola pike na esika moko ya makasi, mpe akokóma lokola kiti ya bokonzi ya nkembo ya ndako ya tata na ye. 24 Mpe bakokakisa epai na ye nkembo* nyonso ya ndako ya tata na ye, bato ya libota mpe bana, bambɛki nyonso ya mikemike, bambɛki oyo ezali lokola mabakuli mpe bambɛki nyonso oyo basali yango bilokó minene.
25 “‘Na mokolo yango,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘bakolongola pike oyo ekɔtisami na esika moko ya makasi,+ bakokata yango mpe ekokwea, mpe mokumba oyo ezali likoló na yango ekokwea mpe ekobeba, mpo Yehova ye moko alobi yango.’”
Bino bamasuwa ya Tarasisi bóganga na kolela!+
Mpo babebisi libongo, esika ya kokɔta ezali lisusu te.
Bayebisaki bango likambo yango banda na mokili ya Kitime.+
2 Bófanda nyɛɛ, bino baoyo bofandi na mokili ya pembeni ya mbu.
Bato ya mombongo ya Sidone,+ baoyo bakatisaka mai ya mbu batondisi yo na bozwi.
3 Bamemi blé* ya Shihore*+ likoló ya mai mingi,
Mbuma oyo babuki na Nile, biloko oyo mosala na ye epesi ye,
Yango ekómi litomba ya bikólo.+
4 Ee Sidone, zalá na nsɔni; yo esika makasi ya libateli ya mbu,
Mpo mbu elobi:
5 Bato bakomitungisa mingi ntango bakoyoka nsango ya Tire,+
Ndenge ezalaki ntango bato bayokaki nsango ya Ezipito.+
6 Bókatisa tii na Tarasisi!
Bóganga na kolela, bino baoyo bofandi na mokili ya pembeni ya mbu.
7 Oyo nde engumba na bino oyo ezalaki kosepela makasi banda kala, banda bantango na yango ya ebandeli?
Makolo na ye ezalaki komema ye mpo afanda na mikili ya mosika.
8 Nani azwi ekateli oyo mpo na kotɛmɛla Tire,
Mopesi mitole, oyo bato na ye ya mombongo bazalaki bankumu,
Oyo bato na ye oyo basalaka mombongo,
Bazalaki bato ya lokumu na mabele mobimba?+
9 Yehova ya mampinga ye moko nde azwi ekateli yango,
Ya kokómisa kitoko na ye eloko mpamba mpe kosilisa lolendo na ye,
Kokitisa bato nyonso ya lokumu na mabele.+
10 Ee mwana mwasi ya Tarasisi, katisá mokili na yo lokola Ebale Nile.
Esika ya kosala masuwa* ezali lisusu te.+
11 Asemboli lobɔkɔ na ye likoló ya mbu;
Aningisi makonzi.
Yehova apesi mitindo ya kosilisa nyɛɛ bisika makasi ya libateli ya Fenisia.+
Tɛlɛmá, katisá tii na Kitime.+
Ata kuna, okopema te.”
13 Talá! Mokili ya Bakaladea.+
Bato oyo nde batongaki yango, kasi Asiri+ te,
Bakómisi yango esika ya banyama ya mokili ekauká.
Batɛlɛmisi manɔ́ngi mpo na kobunda;
Babebisi bandako milai na yango ya makasi,+
Bakómisi yango bitiká oyo ezali kokweakwea.
15 Na mokolo yango, bakobosana Tire mbula 70+ lokola bomoi* ya mokonzi moko. Na nsuka ya mbula 70, Tire ekokóma lokola mwasi ya ndumba oyo bayembi na loyembo oyo:
16 “Ee mwasi ya ndumba oyo babosaná, zwá nzɛnzɛ,
Baluká na engumba epai na epai. Bɛtá nzɛnzɛ malamumalamu;
Yembá nzembo ebele,
Mpo bákanisa yo.”
17 Na nsuka ya mbula 70, Yehova akotya likebi na ye na Tire, mpe Tire akozongela lifuti na ye mpe akosala pite na makonzi nyonso ya mabele, bipai nyonso na mabele. 18 Kasi litomba na ye ná lifuti na ye ekokóma eloko moko mosantu epai ya Yehova. Ekotyama na esika ya kobomba biloko te, ekobombama mpe te, mpo lifuti na ye ekozala ya baoyo bazali kofanda liboso ya Yehova, mpo bálya ndenge balingi mpe bálata bilamba ya kitoko.+
24 Talá! Yehova azali kolongola eloko nyonso na mokili* mpe azali kotika yango mpamba.+
Abaloli yango+ mpe apanzi bato oyo bafandi wana.+
2 Ekozala ndenge moko mpo na moto nyonso:
Bato ya ekólo mpe nganga-nzambe,
Mosaleli mpe nkolo na ye,
Mosaleli ya mwasi mpe nkolo na ye ya mwasi,
Mosombi mpe motɛki,
Modefisi mpe modefi,
Modefisi nyongo mpe moto oyo azwi nyongo.+
4 Mokili ezali kolela;*+ ebebi mpenza.
Mabele oyo ebotaka ekaukikauki, ezali kobeba.
Bato ya lokumu na mokili balɛmbilɛmbi.
Yango wana motángo ya bato oyo bafandi na mokili yango ekiti,
Mpe kaka bato moke nde batikali.+
7 Vinyo ya sika ezali kolela,* nzete ya vinyo ekaukikauki,+
Mpe bato nyonso oyo bazali na motema ya esengo bazali kolela na mongongo ya nse.*+
8 Esengo ya bambonda mike esili,
Makɛlɛlɛ ya bato ya bisengo esuki,
Esengo ya makɛlɛlɛ ya nzɛnzɛ esili.+
9 Bazali komɛla vinyo kozanga koyemba,
Masanga oyo elangwisaka ekómeli baoyo bazali komɛla yango bololo.
11 Bazali koganga na babalabala mpo vinyo ezangi.
Esengo nyonso esili;
Esengo ya mokili esili.+
13 Mpo ekozala bongo na mokili, na kati ya bato ya bikólo:
Lokola ntango oyo babɛtabɛtaka nzete ya olive,+
Ndenge balɔkɔtaka mbuma ya vinyo ntango mosala ya kobuka mbuma ekómaka na nsuka.+
14 Bakotombola mongongo na bango,
Bakoganga na esengo.
Uta na mbu* bakosakola nkembo ya Yehova.+
15 Yango wana bakokumisa Yehova na etúká ya pole;*+
Na bisanga ya mbu, bakopesa nkombo ya Yehova, Nzambe ya Yisraele nkembo.+
16 Longwa na bansuka ya mabele tozali koyoka nzembo:
Kasi nalobi: “Nazali kobeba, nazali kobeba!
Mawa na ngai! Bakosi basali makambo na bokosi.
Na bokosi, bakosi basali makambo na bokosi.”+
17 Nsɔmɔ, mabulu mpe mitambo ezali kozela yo, moto oyo ofandi na mokili.+
18 Moto nyonso oyo akokima lokito ya nsɔmɔ akokwea na libulu,
Mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo.+
Mpo baporte ya mai ya likoló ekofungwama
Mpe miboko ya mokili ekoningana.
20 Mokili etengitengi lokola moto oyo alangwe masanga,
Mpe eningani epai na epai lokola mwa ndako ya kobatama na mopɛpɛ.
Misala na yango ya kobuka mibeko ekómeli yango kilo,+
Ekokwea mpe ekotɛlɛma lisusu te.
21 Na mokolo yango, Yehova akotya likebi na ye na limpinga ya esika oyo etombwaná
Mpe na bakonzi ya mabele, oyo bazali na mabele.
22 Mpe bakoyanganisama
Lokola bato ya bolɔkɔ oyo bayanganisami na libulu,
Mpe bakokangama na kasho;
Nsima ya mikolo ebele, bakotyela bango likebi.
23 Yehova ya mampinga akómi Mokonzi+ na Ngomba Siona+ mpe na Yerusaleme.
Akoyangela na nkembo nyonso liboso ya bankulutu ya bato na ye.+
Liboso ya nkembo ya bokonzi na ye, ata sanza oyo ebimi mobimba ekomonana molili,
Mpe moi oyo ezali kongala ekongɛnga te.+
25 Ee Yehova, ozali Nzambe na ngai.
Nazali kosanzola yo, nazali kokumisa nkombo na yo,
Mpo osali makambo ya kokamwa,+
Makambo* oyo ebongisamá banda kala,+
Na bosembo+ oyo ebongi kotyelama motema.
2 Mpo okómisi engumba moko libondo ya mabanga,
Okómisi sité moko oyo ebatelami makasi bitiká oyo ezali kokweakwea.
Ndako molai ya bapaya ezali lisusu engumba te;
Ekotongama lisusu ata mokolo moko te.
3 Yango wana bato oyo bazali ekólo moko ya makasi bakokumisa yo;
Engumba ya bikólo oyo enyokolaka bakobanga yo.+
4 Mpo okómi esika makasi ya libateli mpo na moto mpamba,
Esika makasi ya libateli mpo na mobola na mpasi na ye,+
Esika ya kokima mbula ya mopɛpɛ makasi,
Mpe elili ya kokima molunge ya moi,+
Ntango mopɛpɛ ya banyokoli ezali lokola mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali kobɛta efelo,
5 Lokola molunge na mokili oyo ekauká,
Ozali kokitisa makɛlɛlɛ ya bapaya.
Lokola molunge oyo esili na elili ya lipata,
Loyembo ya banyokoli esuki.
6 Na ngomba oyo,+ Yehova ya mampinga akosalela bato ya bikólo nyonso
Fɛti moko ya bilei ya kitoko mpenza,+
Fɛti ya vinyo ya kitoko,*
Ya bilei ya kitoko oyo etondi na mafuta ya mikuwa,
Ya vinyo ya kitoko oyo bakɔngɔlá.
7 Na ngomba oyo akolongola* eloko oyo ezipi bato ya bikólo nyonso
Mpe elamba elitamá oyo ezipi bikólo nyonso.
8 Akolongola liwa mpo na libela,+
Mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mai ya miso na bilongi nyonso.+
Akolongola nsɔni ya bato na ye na mabele mobimba,
Mpo Yehova ye moko nde alobi bongo.
9 Na mokolo yango, bakoloba boye:
“Talá! Oyo nde Nzambe na biso!+
Oyo nde Yehova!
Totyeli ye elikya.
Tózala na esengo mpe tósepela na lobiko euti epai na ye.”+
10 Mpo lobɔkɔ ya Yehova ekokita na ngomba oyo,+
Mpe Moabe ekonyatama na esika na yango+
Lokola ntango banyataka libondo ya matiti na esika nyɛi ya nyama ezali.
11 Akosembola mabɔkɔ na ye na kati na yango*
Ndenge mobɛti mai asembolaka mabɔkɔ na ye mpo na kobɛta mai,
Mpe akokitisa lolendo na yango+
Na ndenge akobɛta yango na mabɔkɔ na ye oyo eyebi kobɛta.
12 Mpe akolalisa na nse engumba oyo ebatelami makasi,
Ná bifelo na yango milai ya libateli;
Akokitisa yango na nse tii na putulu.
26 Na mokolo yango, na mokili ya Yuda,+ bakoyemba loyembo oyo:+
“Tozali na engumba ya makasi.+
Lobiko na ye ezali lokola bifelo mpe ngomba oyo basalá mpo na libateli.+
3 Okobatela baoyo batyaka motema mobimba epai na yo;*
Okopesa bango kimya ntango nyonso,+
Mpo batyaka motema na bango epai na yo.+
5 Mpo akitisi na nse baoyo bazalaki kofanda na esika oyo etombwaná, sité oyo etombwani.
Akitisi yango na nse,
Akitisi yango tii na mabele;
Abwaki yango tii na putulu.
6 Ekonyatama,
Na makolo ya moto ya mpasi, na matambe ya bato mpamba.”
7 Nzela ya moyengebene ezali sembo.*
Lokola ozali sembo,
Okokómisa nzela ya moyengebene semba.
8 Ee Yehova, lokola tozali kotambola na nzela na yo ya bosembo,
Totye elikya na biso epai na yo.
Tozali* na mposa makasi ya nkombo na yo mpe ya ekaniseli na yo.
9 Nayoki* mposa na yo makasi na butu,
Ɛɛ, elimo na ngai ezali kaka koluka yo;+
Mpo ntango okosambisa mabele,
Bato oyo bafandi na mabele bakoyekola bosembo.+
11 Ee Yehova, lobɔkɔ na yo etombwani likoló, kasi bazali komona yango te.+
Bakomona molende na yo mpo na bato na yo mpe bakoyoka nsɔni.
Ɛɛ, mɔtɔ oyo ebongisami mpo na banguna na yo ekozikisa bango.
13 Ee Yehova Nzambe na biso, bankolo mosusu bayangeli biso, kasi yo te,+
Nzokande, tokotánga kaka nkombo na yo moko.+
14 Bazali bakufi, bakobika te.
Bazangi makasi kati na liwa, bakotɛlɛma te.+
Mpo otye likebi na yo epai na bango
Mpo osilisa bango nyɛɛ mpe obebisa nkombo na bango nyonso.
Opusi mpenza mosika bandelo nyonso ya mokili.+
16 Ee Yehova, na ntango ya mpasi batalelaki yo;
Ntango opesaki bango disiplini,+ bafungolaki motema na bango mpe babondelaki yo na nse nse.
17 Ndenge mwasi ya zemi azalaka na mpasi ntango alingi kobota
Azalaka na mpasi mpe agangaka mpo na mpasi,
Tokómi ndenge wana mpo na yo, Ee Yehova.
18 Tokómaki na zemi, toyokaki mpasi ya kobota,
Kasi ezalaki lokola nde tobotaki mopɛpɛ.
Tomemi lobiko na mokili te,
Mpe moto moko te abotamaki mpo afanda na mokili.
19 “Bakufi na yo bakozonga na bomoi.
Bólamuka mpe bóganga na esengo,
Bino baoyo bofandi na putulu!+
Mpo mamwɛ na yo ezali lokola mamwɛ ya ntɔngɔntɔngɔ,*
Mpe mabele ekozongisa na bomoi baoyo bazangi makasi kati na liwa.*
21 Mpo talá! Yehova azali kouta na esika na ye
Mpo na kosɛnga bato oyo bafandi na mokili bázongisa monɔkɔ mpo na libunga na bango,
Mpe mokili ekomonisa mpenza polele makila oyo yango esopá
Mpe ekozipa lisusu te bato na yango oyo babomamá.”
27 Na mokolo yango, Yehova akotyela Leviatana* likebi, nyoka oyo esɛlimwaka,
Leviatana, nyoka oyo elingamálingamá,
Mpe ya solo, na mopanga na ye ya makasi mpe ya monene mpe ya nguya,+
Akoboma nyama wana ya nsɔmɔ, oyo ezali na mbu.
2 Na mokolo yango, bóyembela mwasi wana boye:*
“Elanga ya vinyo oyo epesaka vinyo ya fulufulu!+
3 Ngai, Yehova, nazali kobatela ye.+
Namwangiselaka ye mai ntango nyonso.+
Nabatelaka ye butu moi
Mpo moto moko te asala ye mabe.+
Soki moto moko atye mwa banzete ya nzubɛnzubɛ mpe matiti mabe na elanga na ngai ya vinyo nakobundisa ye.
Nakonyatanyata yango mpe nakotumba yango nyonso nzela moko.
5 Soki te, asimba makasi esika na ngai ya libateli.
Aluka kozala na kimya ná ngai;
Aluka kozala na kimya ná ngai.”
6 Na mikolo ekoya, Yakobo akobimisa misisa,
Yisraele akobimisa fololo mpe nkasa,+
Mpe bakotondisa mokili na mbuma.+
7 Asengeli nde kobɛtama ndenge moko na moto oyo azali kobɛta ye?
Asengeli nde kobomama lokola bato oyo ye abomaki?
8 Ntango okotika ye akende, okobunda na ye na koganga moko ya nsɔmɔ.
Okobengana ye na mopɛpɛ na yo, mopɛpɛ moko makasi na mokolo ya mopɛpɛ ya ɛsti.+
9 Na ndenge wana nde libunga ya Yakobo ekozipama,+ mpe talá oyo ekosalema ntango lisumu na ye ekolongolama:
Akosala ete mabanga nyonso ya etumbelo
Ekóma lokola mabanga ya mpɛmbɛ oyo bapanzipanzi,
Mpe eloko moko te ekotikala, ezala banzete ya losambo* to bitumbelo ya mpaka ya malasi.+
10 Mpo engumba oyo ebatelami makasi ekotikala mpamba;
Esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti ekotikala kaka boye mpe ekosundolama lokola esobe.+
Mwana-ngɔmbɛ akolya matiti kuna, mpe akolala kuna
Mpe akolya bitape na ye.+
11 Ntango bitape na ye ya mike ekokauka,
Basi bakoya mpe bakobuka yango,
Mpo na kopelisela na yango mɔtɔ.
Mpo bato oyo bazali kokanga ntina te.+
Yango wana Mokeli na bango akoyokela bango mawa te,
Mpe Moto oyo asalaki bango akomonisela bango boboto te.+
12 Na mokolo yango, Yehova akoningisa bambuma, uta na mai ya Ebale* oyo ezali kotíyola tii na mokɛli* ya Ezipito,+ mpe bakolɔkɔta bino mokomoko, Ee bato ya Yisraele.+ 13 Na mokolo yango, bakoyula liseke moko monene,+ mpe baoyo bazali kokufa na mokili ya Asiri+ ná baoyo bapalanganá na mokili ya Ezipito+ bakoya mpe bakogumbamela Yehova na ngomba mosantu na Yerusaleme.+
28 Mawa na motole* ya lofundo* ya balangwi-masanga ya Efraime+
Mpe na fololo ya nkembo na yango ya kitoko,
Oyo ezali kokauka, oyo ezali likoló ya lobwaku oyo ebotaka malamu, ya baoyo vinyo elongi bango!
2 Talá! Yehova akotinda moto ya makasi mpe ya nguya.
Lokola mbula ya mopɛpɛ makasi, ya bankake mpe ya mabanga, mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali kobebisa,
Lokola mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya bankake, ya mai ya makasi oyo ezali kozindisa,
Akokweisa yango na mabele na makasi mpenza.
4 Mpe fololo ya nkembo na yango ya kitoko oyo ezali kokauka,
Oyo ezali likoló ya lobwaku oyo ebotaka malamu,
Ekokóma lokola figi ya ebandeli liboso ya eleko ya molunge.
Ntango moto amoni yango, akomɛla yango wana ezali naino na lobɔkɔ na ye.
5 Na mokolo yango, Yehova ya mampinga akokóma na miso ya bato na ye oyo bakotikala+ lokola motole ya nkembo mpe lokola motole ya fololo ya kitoko. 6 Mpe akokóma elimo ya bosembo na miso ya moto oyo afandi mpo na kosambisa, mpe lokola nguya na miso ya baoyo bazali kopusa etumba, elongwa na porte ya engumba.+
7 Ná baoyo mpe babungi nzela mpo na vinyo;
Masanga na bango oyo elangwisaka epesi bango kizunguzungu.
Nganga-nzambe mpe mosakoli babungi nzela mpo na masanga oyo elangwisaka;
Vinyo ebulunganisi bango,
Mpe masanga na bango oyo elangwisaka epesi bango kizunguzungu;
Emonaneli na bango ebungisi bango nzela,
Bazali kozwa ekateli ya malamu te.+
8 Mpo bamesa na bango etondi na biloko ya bosɔtɔ oyo basanzi
—Esika ezali te oyo ezangi yango.
9 Nani oyo bakopesa ye boyebi,
Mpe nani oyo bakolimbolela ye nsango?
Na baoyo batiki komɛlisa mabɛlɛ,
Baoyo balongoli bango na mabɛlɛ?
10 Mpo ezali “mitindo likoló ya mitindo, mitindo likoló ya mitindo,
Mobeko likoló ya mobeko, mobeko likoló ya mobeko,*+
Awa moke, kuna moke.”
11 Mpo akoloba na bato oyo na nzela ya bato ya likukuma* mpe na monɔkɔ ya bapaya.+ 12 Liboso alobaki na bango ete: “Esika ya kopema yango oyo. Moto oyo alɛmbi apema; esika ya kimya yango oyo,” kasi baboyaki koyoka.+ 13 Bongo Yehova akoloba na bango boye:
“Mitindo likoló ya mitindo, mitindo likoló ya mitindo,
Awa moke, kuna moke,”
Mpo ntango bakotambola
Bábɛta libaku mpe bákwea makalekale
Mpe bábukana, bázwama na motambo mpe bákangama.+
14 Yango wana bóyoka liloba ya Yehova, bino bato oyo bozali komikumisa,
Bino bayangeli ya bato oyo bazali na Yerusaleme,
15 Mpo bolobi ete:
Ntango mpela ya pwasa oyo ezindisaka ekoleka,
Ekokómela biso te,
Mpo tokómisá lokuta esika na biso ya kokima
Mpe tomibombi na kati ya lokuta.”+
16 Yango wana talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Talá na Siona, nazali kotya libanga oyo emekami ezala moboko,+
Libanga ya ntina mingi oyo ezali na motuya,+ ya moboko ya solosolo.+
Moto oyo azali komonisa kondima akozala na nsɔmɔ te.+
Mbula ya mabanga ekokɔmbɔla ekimelo ya lokuta,
Mpe mai ekozindisa esika ya kobombana.
Ntango mpela ya pwasa ekoleka
Ekonyatanyata bino.
Kaka nsɔmɔ nde ekosala ete bákanga ntina ya likambo oyo bayokaki.”*
20 Mpo mbeto ezali mokuse mingi mpe moto akokoka komisembola likoló na yango te,
Mpe elamba ya mbeto* ezali moke mingi mpo moto amizipa na yango.
21 Mpo Yehova akotɛlɛma lokola na Ngomba Perazime;
Akoningana lokola na lobwaku* oyo ezali pene na Gibeone,+
Mpo asala likambo na ye, likambo na ye ya kokamwa,
Mpo asala mosala na ye, mosala moko oyo esalemá naino te.+
Mpo bansinga na bino ekangama makasi te,
Mpo nayoki epai ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga,
23 Bótya litoi mpe bóyoka mongongo na ngai;
Bótya likebi mpe bóyoka oyo nazali koloba.
24 Motimoli atimolaka nde mokolo mobimba liboso alona mboto?
Abalolaka mabele mpe abongisaka yango nde ntango nyonso?+
25 Ntango alalisi etando na yango,
Nsima na yango nde apalanganisaka kumini ya moindo mpe alonaka kumini,
Alonaka te blé, miyɛ, ɔrje na bisika na yango,
Mpe blé ya mbuma makasi+ na ndelo ya elanga?
27 Mpo banyatanyataka kumini ya moindo na eloko ya kotutela te;+
Mpe balekisaka pine ya pusu likoló ya kumini te.
Kasi babɛtaka kumini ya moindo nde na lingenda,
Mpe kumini na fimbo.
28 Moto anikaka nde blé oyo esalelamaka mpo na mampa?
Te anyataka yango ntango nyonso te;+
Mpe ntango azali kotambwisa pine ya pusu na ye likoló na yango, ná bampunda na ye,
Anikaka yango te.+
29 Yango mpe euti na Yehova ya mampinga,
Oyo mokano na ye ezali malamu mingi
29 “Mawa na Ariele,* Ariele, engumba oyo Davidi atyaki kaa!+
Bóbakisa mbula likoló ya mbula;
Bafɛti+ ekoba kolandana.
2 Kasi nakomemela Ariele mpasi,+
Mpe mawa ná kolela ekozala,+ mpe na miso na ngai
Akokóma lokola esika mɔtɔ ya etumbelo ya Nzambe epelaka.+
3 Nakotya kaa na bangámbo nyonso mpo na kobundisa yo,
Mpe nakozinga yo na lopango ya banzete
Mpe nakotɛlɛmisa biloko oyo ekozinga yo.+
4 Okokitisama na nse mpenza,
Okoloba uta na mabele,
Mpe putulu ekosala ete makambo oyo okoloba eyokana te.
Mongongo na yo oyo ekouta na mabele+
Lokola mongongo ya moto oyo asololaka na bilimo,
Mpe uta na putulu maloba na yo ekoyokana swiswiswi.
5 Ebele ya bato oyo bazali banguna* na yo bakokóma lokola putulu,+
Ebele ya banyokoli bakokóma lokola mposo ya blé oyo ememami na mopɛpɛ.+
Mpe yango ekosalema na mbala moko, na pwasa.+
6 Yehova ya mampinga akotyela yo likebi
Na nkake, na koningana ya mabele mpe na makɛlɛlɛ makasi,
Na ekumbaki, na mopɛpɛ makasi mpe na lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa.”+
7 Mpe ebele ya bato ya bikólo nyonso oyo bazali kobunda etumba na Ariele+
—Baoyo nyonso bazali kobunda na ye etumba,
Ná baoyo bazali kotya manɔ́ngi ya kobunda na ye,
Mpe bazali komemela ye mpasi—
Bakokóma lokola ndɔtɔ, emonaneli ya butu.
8 Ɛɛ, ekozala lokola ntango moto oyo azali na nzala azali kolɔta ete azali kolya,
Kasi alamuki azali kaka na nzala,*
Mpe lokola ntango moto oyo azali na mposa ya mai azali kolɔta ete azali komɛla,
Kasi alamuki ya kolɛmba ná mposa ya mai.*
Yango nde ekokómela ebele ya bato ya bikólo nyonso
Oyo bazali kobundisa Ngomba Siona.+
Balangwe, kasi na vinyo te;
Bazali kotengatenga, kasi te na masanga oyo elangwisaka.
10 Mpo Yehova asopeli bino elimo ya mpɔngi makasi;+
Akangi miso na bino, basakoli,+
Mpe azipi mitó na bino, bamoni-bimonaneli.+
11 Emonaneli nyonso ekómi epai na bino lokola maloba ya buku oyo ekangamá na elembo,+ ntango bapesi yango moto oyo ayebi kotánga, balobi: “Tobondeli yo, tángá yango na mongongo makasi,” akoloba boye: “Nakokoka te, mpo ekangami na elembo.” 12 Mpe ntango bapesi buku yango na moto moko oyo ayebi kotánga te, balobi: “Tobondeli yo, tángá awa,” akoloba boye: “Nayebi kotánga te.”
13 Yehova alobi: “Bato oyo basambelaka ngai kaka na maloba mpamba,
Mpe bakumisaka ngai kaka na mbɛbu,+
Kasi motema na bango ezali mosika na ngai,
Mpe kobanga oyo bazali kobanga ngai euti nde na mibeko ya bato, oyo bateyi bango.+
14 Yango wana, ngai Moto nakosala lisusu makambo ya kokamwa na bato oyo,+
Makambo ya kokamwa na makambo ya kokamwa;
Mpe bwanya ya bato na bango ya bwanya ekosila,
Mpe mayele ya bato na bango ya mayele ekobombama.”+
15 Mawa na baoyo bazali koluka kobombela Yehova mikano na bango ya mabe.+
Bakokisaka mikano na bango ya mabe na esika ya molili,
Wana bazali koloba: “Nani azali komona biso?
Nani ayebi nini oyo tozali kosala?”+
16 Bozali mpenza kobalola makambo!*
Moyemi-mbɛki asengeli nde kotalelama lokola mabele?*+
Eloko oyo esalemi esengeli nde koloba mpo na moto oyo asali yango ete:
“Asalaki ngai te”?+
Mpe eloko oyo esalemi esengeli nde koloba na moto oyo asali yango ete:
“Azali na mayele ata moke te”?+
17 Etikali kaka mwa ntango moke Liban ekokóma elanga ya banzete ya mbuma,+
Mpe elanga ya banzete ya mbuma ekotalelama lokola zamba.+
18 Na mokolo yango, bato oyo bakufá matoi bakoyoka maloba ya buku,
Mpe miso ya bato oyo bakufá miso ekolongwa na molili ná molili makasi mpe ekomona.+
20 Mpo monyokoli akozala lisusu te,
Moto oyo amikumisaka akosuka,
Mpe baoyo bazali ntango nyonso pene ya kosala mabe bakobomama,+
21 Baoyo basalelaka lokuta mpo na kokweisa basusu,
Baoyo bazali kotyela molobeli* motambo na porte ya engumba,+
Mpe baoyo bazali kosalela bifundeli ya lokuta mpo na kopimela moyengebene bosembo.+
22 Na yango, talá oyo Yehova moto oyo asikolaki Abrahama+ alobi mpo na bato ya libota ya Yakobo:
23 Mpo ntango akomona bana na ye,
Oyo bazali mosala ya mabɔkɔ na ngai, na katikati na ye,+
Bakosantisa nkombo na ngai;
Ɛɛ, bakosantisa Mosantu ya Yakobo,
Mpe bakozala na limemya mingi mpo na Nzambe ya Yisraele.+
24 Baoyo bazali na libunga na makanisi na bango bakozwa mayele,
Mpe baoyo bazali koimaima bakondima báteyama.”
30 Yehova alobi boye: “Mawa na bana ya motó makasi,”+
“Baoyo bakokisaka mokano oyo ezali ya ngai te,+
Baoyo basalaka kondimana,* kasi na litambwisi ya elimo na ngai te,
Mpo bábakisa lisumu likoló ya lisumu.
2 Bakiti na Ezipito+ kozanga ete bátuna ngai,*+
Mpo na koluka esika ya kobombama na nse ya libateli ya Farao*
Mpo na kozwa esika ya kokima na elili ya Ezipito!
3 Kasi libateli ya Farao ekokóma likambo moko ya nsɔni mpo na bino,
Mpe kobombama na elili ya Ezipito ekokóma eloko oyo ezali kosambwisa.+
5 Bango nyonso bakoyoka nsɔni
Mpo na ekólo oyo ekoki komemela bango ata litomba moko te,
Oyo esalisaka te mpe epesaka litomba te,
Kasi eyokisaka nde nsɔni mpe esambwisaka.”+
6 Liyebisi mpo na banyama ya sudi:
Na mokili ya mpasi mpe ya bomoi ya mpasi,
Ya nkɔsi mpe ya nkosi oyo ezali konguluma,
Ya etupa mpe ya nyoka ya mɔtɔ oyo epumbwaka,*
Bazali komema bomɛngo na bango na mikɔngɔ ya bampunda
Mpe biloko na bango na matutu ya bakamela.
Kasi biloko yango ekomemela bato litomba te.
7 Mpo lisalisi ya Ezipito ezali na ntina ata moke te.+
Yango wana nabengi yango: “Rahaba,+ asalaka eloko te.”
8 “Sikoyo kende, komá yango na etanda na miso na bango,
Mpe komá yango na buku,+
Mpo na mikolo oyo ezali koya
Yango ekosalisa lokola litatoli ya libela.+
10 Balobi na bato oyo bamonaka ete: ‘Bómona te,’
Mpe na bato oyo bazwaka bimonaneli ete: ‘Bóyebisa biso te bimonaneli ya solo.+
Bóyebisa biso makambo oyo ekosepelisa biso;* bimonaneli ya makambo ya solo te.+
11 Bólongwa na nzela; bópɛngwa na nzela.
Bótika koyebisa biso makambo etali Mosantu ya Yisraele.’”+
12 Yango wana, talá oyo Mosantu ya Yisraele alobi:
“Lokola boboyi liloba oyo+
Mpe botye motema na kobuba mpe na bokosi
Mpe botyeli yango motema,+
13 Yango wana, libunga oyo ekozala mpo na bino lokola efelo oyo epasuki,
Lokola efelo ya molai oyo etɛngami mpe ekómi pene ya kokwea.
Ekokwea na pwasa, na mbala moko.
14 Ekobukama lokola elokó moko monene ya moyemi-mbɛki,
Ekobebisama mpenza nyonso mpe ata eteni na yango moko te ekotikala
Mpo na kozwa mɔtɔ na lituka
To mpo na kotoka mai na mwa liziba.”*
15 Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Mosantu ya Yisraele, alobi:
“Soki bozongeli ngai mpe bopemi nde bokobika;
Bokozala na nguya soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.”+
Nzokande bolingaki te.+
16 Kasi bolobaki: “Te, tokokima na bampunda!”
Bokokima mpenza.
“Mpe tokomata na bampunda ya mbangu!”+
Yango wana bato oyo bakolanda bino bakozala na mbangu.+
17 Bato nkóto bakolɛnga na matumoli ya moto moko;+
Bokokima na matumoli ya bato mitano epai na bino
Mpe baoyo bakotikala epai na bino bakokóma lokola likonzí ya molai na nsɔngɛ ya ngomba,
Lokola elembo na ngomba moke.+
18 Kasi Yehova azali kozela na motema-molai* mpo na komonisela bino boboto,+
Mpe akotɛlɛma mpo na koyokela bino mawa.+
Mpo Yehova azali Nzambe ya bosembo.+
Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.*+
19 Ntango bato bakofanda na Siona, na Yerusaleme,+ okolela ata moke te.+ Na ntembe te akomonisela yo boboto ntango lokito ya koganga na yo ekoyokana mpo na kosɛnga lisalisi; ntango kaka akoyoka yango, akoyanola yo.+ 20 Na yango, mampa oyo Yehova akopesa bino nde mpasi mpe mai oyo akopesa bino nde monyoko,+ Molakisi na yo Monene akomibomba lisusu te, mpe miso na yo ekomona Molakisi na yo Monene.+ 21 Mpe matoi na yo ekoyoka liloba nsima na yo ezali koloba ete: “Nzela yango oyo.+ Tambolá na yango,” soki okokende na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.+
22 Mpe okokómisa mbindo palata oyo ezipi bikeko na yo ya palata* mpe wolo oyo ezipi mpe ekangani makasi na ekeko na yo ya wolo.*+ Okolongola yango lokola elamba oyo ekómisami mbindo na makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe okoloba na yango boye: “Longwá!”*+ 23 Mpe akopesa mbula mpo na momboto na yo oyo oloni na mabele,+ mpe bilei oyo mabele ekobimisa ekozala mingi mpe kitoko.*+ Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.+ 24 Mpe bangɔmbɛ ná bampunda oyo ezali kotimola mabele ekolya bilei oyo esangisami na ngaingai, oyo bapupoli na pau mpe na nkanya. 25 Mpe na ngomba molai nyonso mpe na ngomba moke nyonso oyo etombwani, mikɛli ná banzela ya mai ekozala,+ na mokolo ya kobomama moko monene, ntango manɔ́ngi ekokwea. 26 Mpe pole ya sanza oyo ebimi mobimba ekokóma lokola pole ya moi oyo ezali kongala; mpe pole ya moi oyo ezali kongala ekokóma makasi mbala nsambo,+ lokola pole ya mikolo nsambo, na mokolo oyo Yehova akokanga elamba na esika oyo bato na ye babukani+ mpe akosilisa mpota monene oyo euti na kobɛta oyo abɛtaki bango.+
27 Talá! Nkombo ya Yehova ezali kouta mosika,
Ezali kopela na nkanda na ye mpe ezali koya elongo na mapata minene.
Mbɛbu na ye etondi na nkanda,
Mpe lolemo na ye ezali lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa.+
28 Elimo* na ye ezali lokola mokɛli ya mai oyo ezali kozindisa, oyo ezali kokóma tii na nkingo,
Mpo na koningisa bikólo na kiyungulu ya libebi;*
Mpe bato ya bikólo bakozala na ebende ya mbanga na mbanga na bango,+ oyo ekobungisa bango nzela.
29 Kasi bino, loyembo na bino ekokokana na loyembo oyo eyembamaka na butu,
Ntango bamibongisaka* mpo na fɛti,+
Mpe motema na bino ekosepela lokola moto
Oyo azali kotambola na* piololo mpo na kokende
Na ngomba ya Yehova, epai ya Libanga ya Yisraele.+
30 Yehova akosala ete mongongo na ye ya nguya+ eyokana
Mpe akomonisa lobɔkɔ na ye+ ya nguya ntango ekokita na nkanda makasi,+
Ná lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa,+
Mbula ya makasi mpenza,+ mbula ya bankake mpe mbula ya mabanga.+
32 Mpe ntango nyonso oyo
Yehova akokitisela Asiri fimbo na ye ya etumbu,
Ekozala elongo na bambonda mike mpe na banzɛnzɛ+
Wana akoningisela bango lobɔkɔ na ye na etumba.+
Atondisi mipiko ya nkoni na esika ya mozindo mpe ya monene,
Mɔtɔ mpe nkoni ezali ebele.
Mpema ya Yehova, oyo ezali lokola mokɛli ya sufulu,
Ezali kozikisa yango.
31 Mawa na baoyo bazali kokita na Ezipito mpo na koluka lisalisi,+
Baoyo batyeli bampunda motema,+
Baoyo batye motema na makalo ya etumba, mpo ezali ebele,
Mpe na bampunda ya etumba,* mpo ezali makasi.
Kasi batali te Mosantu ya Yisraele,
Mpe baluki Yehova te.
2 Kasi azali mpe na bwanya mpe akomema mpasi,
Mpe akobongola maloba na ye te.
Akotɛmɛla ndako ya basali-mabe
Mpe bato oyo basalisaka bato oyo basalaka mabe.+
3 Nzokande, Baezipito bazali kaka bato, kasi Nzambe te;
Bampunda na bango ezali mosuni, kasi elimo te.+
Ntango Yehova akosembola lobɔkɔ na ye,
Moto oyo asalisi akobɛta libaku
Mpe moto oyo basalisi akokwea;
Bango nyonso bakosila na mbala moko.
4 Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai:
“Kaka ndenge nkɔsi, mwana-nkɔsi ya makasi* engulumaka mpo na nyama oyo yango ekangi,
Ata soki babateli ya mpate ebele bayei mpo na kobengana yango,
Mongongo na bango ekobangisa yango te,
Makɛlɛlɛ na bango ekobangisa mpe yango te,
Ndenge wana nde Yehova ya mampinga akokita mpo na kobundela
Ngomba Siona mpe ngomba moke na ye.
5 Ndenge kaka bandɛkɛ epumbwapumbwaka mpo na kobatela bana na yango, ndenge wana nde Yehova ya mampinga akobatela Yerusaleme.+
Akobatela mpe akobikisa yango.
Akobomba mpe akobikisa yango.”
6 “Ee bato ya Yisraele, bózongela Moto oyo botombokeli mpenza kotombokela.+ 7 Mpo na mokolo yango moto na moto akobwaka banzambe na ye ya palata oyo ezangá ntina mpe banzambe na ye ya wolo ya mpambampamba, oyo mabɔkɔ na bino moko esalaki, yango ezalaki lisumu.
Akokima mpo na mopanga,
Mpe bakosalisa bilenge mibali na ye misala ya makasi.
9 Libanga na ye ekolimwa mpo na nsɔmɔ,
Mpe bankumu na ye bakoyoka nsɔmɔ mpo na elembo,” yango nde liloba ya Yehova,
Oyo pole* na ye ezali na Siona mpe oyo esika ya mɔtɔ makasi na ye ezali na Yerusaleme.
2 Mpe mokomoko akozala lokola esika ya komibomba* mpo na kokima mopɛpɛ,
Esika ya kobombana* mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi,
Lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai,+
Lokola elili ya libanga monene na mokili ekauká.
3 Bongo miso ya baoyo bazali komona ekokangama te,
Mpe matoi ya baoyo bazali koyoka ekotya likebi.
4 Motema ya baoyo basalaka makambo mbangumbangu ekotya likebi na boyebi,
Mpe lolemo ya bato ya likukuma ekoloba malamu mpe polele.+
5 Zoba bakobenga ye mokabi lisusu te,
Mpe moto oyo asilá nsɔni, bakobenga ye te moto ya lokumu;
6 Mpo zoba akoloba makambo ya bozoba,
Mpe motema na ye ekokana kosala makambo ya mabe,+
Mpo na kolendisa lipɛngwi* mpe koloba makambo ya bokosi mpo na Yehova,
Mpo na kosala ete moto ya nzala akufa* na nzala
Mpe koboyela moto oyo azali na mposa ya mai eloko ya komɛla.
7 Moto oyo asilá nsɔni asalelaka mayele mabe;+
Alendisaka etamboli ya nsɔni
Mpo na kobebisa moto ya mpasi na maloba ya lokuta,+
Ata ntango mobola azali koloba makambo ya sembo.
8 Kasi mokabi asepelaka kokaba,
Mpe akobaka na misala ya kokaba.
9 “Bino basi oyo bofandi na kimya, bótɛlɛma, bóyoka mongongo na ngai!
Bino bana basi oyo bomitungisaka te,+ bótya likebi na oyo nazali koloba!
10 Na mbula moko ná mwa mikolo, bino baoyo bozali komitungisa te, bokolɛnga,
Mpo mbuma moko te ekolɔkɔtama ntango mosala ya kobuka mbuma ya vinyo ekosila.+
11 Bino basi oyo bozali na kimya, bólɛnga!
Bino basi oyo bozali komitungisa te, bólɛnga!
12 Bómibɛtabɛta na ntolo na kolela mpo na bilanga ya kitoko,
Mpe mpo na nzete ya vinyo oyo ebotaka mbuma.
13 Mpo mabele ya bato na ngai ekotonda na nzubɛ, mpe banzete mike ya nzubɛnzubɛ,
Ekotonda na bandako nyonso oyo liboso ezalaki kotonda na esengo,
Ɛɛ, engumba makasi.+
Ofele+ mpe linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ekómi esika oyo etikalá mpamba mpo na libela,
Ekómi esika ya kosepelisa mpo na bampunda ya zamba,
Esika ya koleisa bitonga matiti,+
15 Tii bakosopela biso elimo uta na likoló,+
Mpe esobe ekokóma lokola elanga ya banzete ya mbuma,
Mpe elanga ya banzete ya mbuma ekotalelama lokola zamba.+
17 Boyengebene ya solo ekomema kimya,+
Ɛɛ mbuma ya boyengebene ya solo ekomema kimya mpe libateli mpo na libela.+
18 Bato na ngai bakofanda mpenza na esika ya kimya,
Na bisika oyo ebatelami malamu mpe na bisika ya kopema oyo ezangi mitungisi.+
19 Kasi mbula ya mabanga ekobebisa zamba
Mpe engumba ekobebisama mpenza.
20 Esengo na bino baoyo bozali kolona mboto bisika nyonso oyo mai ezali,
Ntango okosilisa kobebisa, bakobebisa yo.+
Ntango okosilisa kotɛka, bakotɛka yo.
2 Ee Yehova, moniselá biso boboto.+
Totye elikya epai na yo.
3 Bato ya bikólo bakimi ntango bayoki makɛlɛlɛ makasi.
Ntango otɛlɛmi, bikólo epanzani.+
4 Biloko na bino oyo epunzami ekoyanganisama lokola koyangana ya mayoyo ya lokoso,
Bato bakosopanela yango ndenge mayoyo esopanelaka moto.
5 Yehova akotombwama,
Mpo afandi na bisika oyo etombwaná.
Akotondisa Siona na bosembo mpe na boyengebene.
6 Ye moto asalaka ete ozwa libateli,
Ebele ya misala ya lobiko,+ bwanya, boyebi mpe kobanga Yehova,+
Yango nde eloko na ye ya motuya.
7 Talá! Bilombe na bango bagangi na balabala;
Bamemi-nsango ya kimya baleli na mawa makasi.
8 Babalabala ya minene etikali mpamba;
Moto ya koleka na banzela azali lisusu te.
9 Mokili ezali na mawa* mpe ekauki.
Liban eyoki nsɔni;+ ebebibebi.
Sharone ekómi lokola mokili ekauká,
Mpe Bashane ná Karamele ekweisi nkasa na yango.+
11 Bokumbi zemi ya matiti ya kokauka mpe boboti matiti ya blé.
Elimo na bino moko ekozikisa bino lokola mɔtɔ.+
12 Mpe bato ya bikólo bakokóma lokola mpɛmbɛ oyo eziki.
Bakotumbama na mɔtɔ lokola banzubɛ oyo ekatami.+
13 Bino baoyo bozali mosika, bóyoka likambo oyo nakosala!
Mpe bino baoyo bozali pene, bóyeba nguya na ngai.
‘Nani kati na biso akoki kofanda esika mɔtɔ oyo ezikisaka ezali?+
Nani kati na biso akoki kofanda na mɔtɔ oyo ezali kopela mpo na libela?’
15 Ezali moto oyo atambolaka ntango nyonso na boyengebene+
Oyo alobaka makambo ya sembo,+
Oyo aboyaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, oyo euti na misala ya kobuba,
Oyo mabɔkɔ na ye eboyaka kosimba kanyaka,+
Mpe oyo akangaka matoi na ye mpo ayoka te makambo ya kosopa makila,
Mpe oyo akangaka miso na ye mpo amona te makambo ya mabe
16 Akofanda na bisika oyo etombwaná;
Esika na ye ya kokima ya libateli* ekozala na bisika ya mabanga makasi ya libateli.
Bakopesa ye limpa na ye;
Esika na ye ya kobomba mai ekozanga mai te.”+
17 Miso na yo ekotalatala mokonzi na kitoko na ye;
Ekomona mokili moko ya mosika.
18 Na motema na yo okokanisa* likambo ya nsɔmɔ mpe okomilobela boye:
“Wapi sɛkrɛtɛrɛ?
Wapi moto oyo azalaki komeka mpako na kilo?+
Wapi moto oyo azalaki kotánga manɔ́ngi?”
19 Okomona lisusu bato ya lofundo te,
Bato oyo monɔkɔ na bango ezali mpasi mingi* mpo na kokanga ntina,
Bato ya lolemo ya likukuma oyo ozali kokanga ntina te.+
20 Talá Siona, engumba na biso ya bafɛti!+
Miso na yo ekomona Yerusaleme, esika ya kimya ya kofanda,
Hema oyo ekoki kolongolama te.+
Pike ya hema na yango ekopikolama ata moke te,
Mpe nsinga na yango ata moko te ekokatama.
21 Kasi kuna Yehova, Moto ya lokumu,
Akozala mpo na biso etúká ya bibale, ya banzela minene ya mai.
Epai bamasuwa mpo na etumba ekoleka te,
Mpe bamasuwa mineneminene ekoleka kuna te.
22 Mpo Yehova azali Mosambisi+ na biso,
Yehova azali Moto oyo apesaka biso Mibeko,+
Yehova azali Mokonzi na biso;+
Ye moto akobikisa biso.+
23 Bansinga na yo ekofungwama;
Likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa ekotɛlɛma makasi te; elamba ya mopɛpɛ etandami te.
Na ntango yango, bakokabola biloko ebele oyo bapunzi;
Ata batɛngumi bakozwa biloko ebele oyo epunzami.+
24 Mpe moto moko te oyo afandi kuna akoloba: “Nazali kobɛla.”+
Bato oyo bafandi na mokili yango, libunga na bango ekolimbisama.+
34 Bino bikólo, bópusana mpo na koyoka,
Mpe bino bato ya bikólo, bótya likebi.
Mabele mpe nyonso oyo etondi wana eyoka,
Mokili mpe biloko na yango nyonso.
Akosilisa bango nyonso mpenza;
Akopesa bango mpo bábomama.+
4 Limpinga nyonso ya likoló ekopɔla.
Mpe likoló ekolíngama lokola rulo.
Limpinga nyonso ekolɛmbalɛmba,
Kaka ndenge nkasa ya nzete ya vinyo elɛmbaka mpe ekweaka
Mpe ndenge figi oyo elɛmbilɛmbi elongwaka na nzete ya figi.
5 “Mpo na likoló mopanga na ngai ekopɔlisama na makila.+
Ekokita mpo na kosambisa Edome,+
Ekokitela bato oyo nakani kosilisa nyɛɛ.
6 Yehova azali na mopanga; ekozipama na makila.
Ekozipama na mafuta,+
Na makila ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba,
Na mafuta ya mimpíko ya bampate-mibali.
Mpo Yehova azali na mbeka na Bozera,
Koboma moko monene na mokili ya Edome.+
7 Bangɔmbɛ ya zamba ekokita elongo na yango,
Bana-ngɔmbɛ ya mibali elongo na oyo ya makasi;
Mokili na bango ekopɔla na makila,
Mpe putulu na bango ekomɛla mafuta.”
9 Mikɛli na ye* ekokóma mpaka,
Mpe putulu na ye ekokóma sufulu,
Mpe mabele na ye ekokóma lokola mpaka oyo ezali kozika.
10 Ezala na butu to na moi, ekokufa te;
Milinga na yango ekomata se komata mpo na libela.
Ekotikala ya kobeba libota na libota;
Moto moko te akoleka kuna libela na libela.+
11 Libeki ná iko ekozwa yango,
Mpe bisulungutu ya matoi milai ná bayanganga ekofanda kuna.
Nzambe akotanda likoló na yango nsinga ya komeka esika oyo etikali mpamba
Mpe nsinga ya nivo* ya esika oyo etikali mpamba.
12 Bakobenga ata moto moko te na kati ya bato na ye ya lokumu,
Mpo akóma mokonzi, mpe bankumu na ye nyonso bakozala lisusu te.
13 Nzubɛ ekobima na bandako milai na ye ya kofanda,
Matiti ya nsendensende mpe ya nzubɛnzubɛ ekobima na bisika na ye oyo ebatelami makasi.
14 Bikelamu oyo efandaka na mokili ekauká ekokutana na banyama oyo egangaka,
Mpe ntaba ya zamba* ekobenga moninga na yango.
Ɛɛ, kuna, kongabalɔki ekofanda mpe ekozwa esika ya kopema.
15 Kuna, nyoka-likula ekosala zumbu* na yango mpe ekobwaka maki na yango,
Mpe ekolalela yango mpe ekoyanganisa yango na nse ya elili na yango.
Ɛɛ, kuna, bakombekombe ekoyangana, mokomoko na moninga na yango.
16 Bóluka na buku ya Yehova mpe bótánga yango na mongongo makasi:
Ata nyama moko te ekozanga,
Mokomoko na yango ekozanga moninga te,
Mpo monɔkɔ ya Yehova nde epesi mitindo,
Mpe elimo na ye nde eyanganisi yango.
Ekozwa yango mpo na libela;
Ekofanda kuna mabota na mabota.
35 Esobe mpe mokili oyo ezangá mai ekosepela,+
Mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.+
Bakomona nkembo ya Yehova, lokumu ya Nzambe na biso.
4 Bóyebisa baoyo bazali motema likoló boye:
“Bózala makasi. Bóbanga te.
Talá! Nzambe na bino akoya kozongisa mabe,
Nzambe akoya kopesa etumbu.+
Akoya mpe akobikisa bino.”+
5 Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama,+
Mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama.+
6 Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe,+
Mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.+
Mpo mai ekobima na esobe,
Mpe mikɛli na mokili patatalu oyo ekauká.
7 Mabele oyo ekauká ekokóma etima oyo etondi na matiti,
Mpe mabele oyo ezangá mai ekokóma maziba ya mai.+
Na esika oyo bambwa ya zamba* ezalaki kopema,+
Ekozala na matiti ya mobesu, matiti ya ebale ná papirisi.
Moto ya mbindo akoleka kuna te.+
Yango ezali kaka mpo na bato oyo bapesami nzela ya koleka* kuna;
Bazoba bakoyengayenga kuna te.
9 Nkɔsi moko te ekozala kuna,
Mpe nyama moko te ya zamba oyo elyaka nyama ekoya kuna.
10 Baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe bakoya na Siona na koganga ya esengo.+
Esengo oyo ezangi nsuka ekozala na mitó na bango.+
36 Na mbula ya 14 ya boyangeli ya Mokonzi Ezekiasi, Senakeribe mokonzi ya Asiri+ amataki kobundisa bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi mpe azwaki yango.+ 2 Bongo, longwa na Lakishi+ mokonzi ya Asiri atindaki Rabashake*+ elongo na limpinga monene ya basoda epai ya Mokonzi Ezekiasi na Yerusaleme. Batɛlɛmaki pene na nzela oyo elekisaka mai ya liziba ya likoló,+ oyo ezali na balabala monene ya elanga ya mosukoli-bilamba.+ 3 Na nsima, Eliakime+ mwana ya Hilikiya, oyo azalaki kokamba bato ya ndako ya mokonzi, Shebena+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ná Yoa mwana ya Asafe mokomi-makambo babimaki mpo na kokutana na ye.
4 Bongo Rabashake alobaki na bango: “Nasɛngi bino, bóloba na Ezekiasi boye: ‘Talá oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi: “Ozali kotya motema na nini?+ 5 Olobi: ‘Nazali na mayele mpe na nguya ya kobunda etumba.’ Kasi wana ezali kaka maloba ya mpamba. Nani yango otyeli motema, mpo otombokela ngai?+ 6 Talá! Otyeli Ezipito motema, mongendu oyo ebukanabukaná, oyo soki moto asimbi yango mpo na koyekama, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema.+ 7 Mpe soki olobi na ngai ete: ‘Totyeli Yehova Nzambe na biso motema.’ Bongo bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo oyo Ezekiasi alongoli+ ezali ya ye te? Alobaki na bato ya Yuda mpe ya Yerusaleme ete: ‘Bokogumbama liboso ya etumbelo oyo.’”’+ 8 Sikoyo, tótala nani akolonga kati na yo ná nkolo na ngai mokonzi ya Asiri.+ Nakopesa yo bampunda 2 000, mpe tótala soki okokoka kozwa bato ya kotambwisa yango. 9 Awa ozali kotyela Ezipito motema mpo na makalo mpe basoda na yango oyo batambolaka na mpunda, ndenge nini okokoka kobengana ata guvɛrnɛrɛ oyo aleki moke kati na basaleli ya nkolo na ngai? 10 Okanisi ete namati kobundisa esika oyo mpe kobebisa yango kozanga ndingisa ya Yehova? Yehova ye moko alobaki na ngai: ‘Matá kobundisa mokili yango, mpe bebisá yango.’”
11 Bongo Eliakime, Shebena+ ná Yoa balobaki na Rabashake+ ete: “Tobondeli yo, lobá na basaleli na yo na monɔkɔ ya Aramɛyɛ,*+ mpo toyokaka mpe yango. Koloba na biso te na monɔkɔ ya Bayuda,* noki bato oyo bazali likoló ya efelo báyoka.”+ 12 Kasi Rabashake alobaki: “Ezali kaka mpo na nkolo na yo mpe mpo na yo nde nkolo na ngai atindi ngai naloba maloba oyo? Maloba yango etali mpe te bato oyo bafandi likoló ya efelo, oyo mosika te bakolya nyɛi na bango moko mpe bakomɛla masuba na bango moko elongo na bino?”
13 Na nsima, Rabashake agangaki na mongongo makasi na monɔkɔ ya Bayuda+ ete: “Bóyoka liloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri.+ 14 Mokonzi alobi boye: ‘Ezekiasi akosa bino te, mpo akokoka te kobikisa bino.+ 15 Mpe Ezekiasi atinda bino te ete bótyela Yehova motema+ na maloba oyo: “Kozanga ntembe, Yehova akobikisa biso, mokonzi ya Asiri akokoka te kobɔtɔla engumba oyo.” 16 Bóyokela Ezekiasi te, mpo mokonzi ya Asiri alobi boye: “Bóluka kosala na ngai boyokani ya kimya mpe bómitika epai na ngai.* Boye, moto na moto akolya mbuma ya nzete na ye ya vinyo mpe mbuma ya nzete na ye ya figi mpe akomɛla mai ya libulu na ye ya kobomba mai, 17 Tii nakoya mpe nakomema bino na mokili moko oyo ezali lokola mokili na bino,+ mokili ya mbuma mpe ya vinyo ya sika, mokili ya limpa mpe ya bilanga ya vinyo. 18 Bóyokela Ezekiasi te mpo azali kokosa bino na ndenge azali koloba ete: ‘Yehova akobikisa biso.’ Ezali nde na nzambe moko ya bikólo oyo asilá kobikisa mokili na ye na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri?+ 19 Wapi banzambe ya Hamate mpe ya Arpade?+ Wapi banzambe ya Sefarvaime?+ Babikisaki Samaria na lobɔkɔ na ngai?+ 20 Nani kati na banzambe nyonso ya mikili wana abikisá mokili na bango na lobɔkɔ na ngai, mpo Yehova abikisa Yerusaleme na lobɔkɔ na ngai?”’”+
21 Kasi bango bafandaki kaka nyɛɛ mpe bazongiselaki ye ata liloba te, mpo mokonzi apesaki mitindo ete: “Bópesa ye eyano te.”+ 22 Kasi Eliakime mwana ya Hilikiya, oyo azalaki kokamba ndako ya mokonzi, Shebena+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mpe Yoa mwana ya Asafe mokomi-makambo, bapasolaki bilamba na bango mpe bakendaki epai ya Ezekiasi mpe bayebisaki ye maloba ya Rabashake.
37 Ntango kaka Mokonzi Ezekiasi ayokaki maloba yango, apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ* mpe akendaki na tempelo* ya Yehova.+ 2 Na nsima, atindaki Eliakime, oyo azalaki kokamba ndako ya mokonzi, Shebena oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ mpe bakambi ya banganga-nzambe. Bango nyonso balataki ngɔtɔ* mpe bakendaki epai ya mosakoli Yisaya+ mwana ya Amoze. 3 Balobaki na Yisaya ete: “Ezekiasi alobi boye: ‘Mokolo oyo ezali mokolo ya mpasi, ya mpamela* mpe ya nsɔni. Mpo tokómi lokola mwasi oyo alingi kobota,* kasi makasi ya kobota ezali te.+ 4 Mbala mosusu, Yehova Nzambe na yo akoyoka maloba ya Rabashake, oyo nkolo na ye mokonzi ya Asiri atindaki mpo na kotumola Nzambe ya bomoi,+ mpe Yehova Nzambe na yo akosɛnga ye azongisa monɔkɔ mpo na maloba oyo ayoki. Yango wana bondelá+ mpo na bato oyo batikali na bomoi.’”+
5 Ntango basaleli ya Mokonzi Ezekiasi bayebisaki Yisaya nsango yango,+ 6 Yisaya ayanolaki bango: “Talá oyo bokoyebisa nkolo na bino: ‘Yoká oyo Yehova alobi: “Kobanga te+ maloba oyo oyoki, maloba oyo basaleli ya mokonzi ya Asiri+ balobi mpo na kofinga ngai. 7 Talá nazali kotya likanisi moko na motema na ye,* akoyoka nsango moko mpe akozonga na mokili na ye;+ mpe nakosala ete abomama na mopanga na mokili na ye moko.”’”+
8 Ntango Rabashake ayokaki ete mokonzi ya Asiri alongwe na Lakishi, alandaki ye mpe akutaki ye azali kobundisa Libina.+ 9 Bongo bapesaki mokonzi ya Asiri nsango ete: “Tiraka mokonzi ya Etiopi abimi mpo na kobundisa yo.” Ntango ayokaki yango, mokonzi atindelaki lisusu Ezekiasi+ bamemi-nsango, na maloba oyo: 10 “Bóyebisa Ezekiasi mokonzi ya Yuda boye: ‘Nzambe na yo oyo otyeli motema akosa yo te ete: “Yerusaleme ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri te.”+ 11 Talá! Yo moko oyebi makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki mikili nyonso, mpe ndenge babebisi yango.+ Bongo yo nde okobika? 12 Banzambe ya bikólo oyo bankɔkɔ na ngai babebisaki, babikisaki nde bikólo yango?+ Wapi Gozane, Harane,+ Rezefe ná bato ya Edene oyo bazalaki na Tele-asare? 13 Wapi mokonzi ya Hamate, mokonzi ya Arpade mpe mokonzi ya bingumba ya Sefarvaime,+ Hena ná Iva?’”
14 Ezekiasi azwaki mikanda na mabɔkɔ ya bamemi-nsango yango mpe atángaki yango. Na nsima akendaki na ndako ya Yehova mpe atandaki yango liboso ya Yehova.+ 15 Mpe Ezekiasi abandaki kobondela Yehova+ mpe koloba boye: 16 “Ee Yehova ya mampinga,+ Nzambe ya Yisraele, yo oyo ofandi na kiti na yo ya bokonzi likoló ya bakeruba, kaka yo moko nde ozali Nzambe ya solo ya makonzi nyonso ya mabele. Yo nde osalaki likoló ná mabele. 17 Tyá litoi na yo, Ee Yehova, mpe yoká!+ Fungolá miso na yo, Ee Yehova, mpe talá!+ Yoká maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kotumola yo, Nzambe ya bomoi.+ 18 Ee Yehova, ezali solo ete bakonzi ya Asiri babebisi mikili nyonso+ mpe mokili na bango moko. 19 Bazikisaki banzambe ya bikólo yango na mɔtɔ,+ mpo bazali banzambe ya solo te, kasi bazali biloko oyo moto asali+ na nzete mpe na libanga. Yango wana babebisaki yango. 20 Kasi sikoyo, Ee Yehova Nzambe na biso, bikisá biso na lobɔkɔ na ye, mpo makonzi nyonso ya mabele eyeba ete kaka yo moko nde ozali Nzambe, Ee Yehova.”+
21 Na nsima, Yisaya mwana ya Amoze atindelaki Ezekiasi nsango oyo: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Lokola obondeli ngai mpo na Senakeribe mokonzi ya Asiri,+ 22 yoká liloba oyo Yehova alobi mpo na ye:
“Ngɔndɔ, mwana mwasi ya Siona, atyoli yo mpe asɛki yo.
Mwana mwasi ya Yerusaleme aningisi motó mpo na kotyola yo.
23 Nani oyo otumoli+ mpe ofingi?
Nani oyo otomboleli mongongo na yo+
Mpe nani oyo otomboleli miso na yo na lolendo?
Otumoli Mosantu ya Yisraele!+
24 Na nzela ya basaleli na yo, otumoli Yehova+ mpe olobi ete:
‘Nakoya na ebele ya makalo na ngai ya bitumba,
Mpe nakomata tii na nsɔngɛ ya bangomba,+
Na bamboka ya Liban oyo eleki mosika.
Nakokata basɛdrɛ na yango ya milai, mpe banzete na yango ya jenevriye ya kitoko mingi.
Nakokɔta na bisika na yango oyo eleki likoló, na kati ya bazamba na yango oyo etondi na banzete.
26 Oyoká yango te? Nasilá kozwa ekateli oyo banda kalakala.
Nabongisá mokano yango banda mikolo eleká.+
Sikoyo nakokokisa yango.+
Okokómisa mpamba bingumba oyo ebatelami makasi; ekotikala esika oyo ebebá.+
27 Bafandi na yango bakolɛmba nzoto;
Bakozala na nsɔmɔ mpe bakoyoka nsɔni.
Bakokóma lokola matiti ya esobe mpe lokola matiti ya mobesu,
Lokola matiti oyo ebimaka na nsamba, oyo ekaukaka mpo na mopɛpɛ ya ɛsti.
28 Kasi nayebi malamu ntango ofandaka, ntango obimaka, ntango ozongaka,+
Mpe ntango osilikelaka ngai makasi,+
29 Mpo kosilika makasi oyo osilikeli ngai,+ mpe koganga na yo ekómi tii na matoi na ngai.+
Yango wana, nakotya ndɔbɔ na ngai na zolo na yo mpe ebende na ngai ya mbanga+ kati na mbɛbu na yo,
Mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyaki.”
30 “‘Oyo ekozala elembo mpo na yo:* Mbula oyo bokolya bambuma oyo ekokola yango moko.* Na mbula ya mibale mpe bokolya bambuma oyo ekobima yango moko. Kasi na mbula ya misato, bokolona milona, bokobuka bambuma mpe bokolona bilanga ya vinyo mpe bokolya bambuma na yango.+ 31 Bato ya Yuda oyo bakobika, baoyo bakotikala,+ bakobimisa misisa na nse mpe bakobota mbuma lokola nzete. 32 Mpo bato oyo batikali bakobima na Yerusaleme, mpe baoyo babiki bakouta na Ngomba Siona.+ Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+
33 “‘Yango wana, yoká oyo Yehova alobi mpo na mokonzi ya Asiri:+
“Akokɔta na engumba oyo te+
Akobwakela yango mpe likula te
Akobundisa yango na nguba te
Akotya mpe te mwa ngomba ya mabele mpo na kozinga yango.”’+
34 ‘Akozonga kaka na nzela oyo ayaki;
Kasi akokɔta na engumba oyo te,’ Yehova alobi bongo.
35 ‘Nakobatela engumba oyo+ mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya nkombo na ngai+
Mpe mpo na mosaleli na ngai Davidi.’”+
36 Mpe anzelu ya Yehova akendaki na kaa ya Baasiri mpe abomaki basoda 185 000. Ntango bato balamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, bamonaki bibembe na bango nyonso elali wana.+ 37 Bongo Senakeribe mokonzi ya Asiri alongwaki wana, azongaki na Ninive+ mpe akómaki kofanda kuna.+ 38 Mokolo moko, ntango azalaki kogumbama na tempelo ya nzambe na ye Nisroke, bana na ye ya mibali, Adrameleke ná Sharezere, babomaki ye na mopanga.+ Na nsima bakimaki na mokili ya Ararate.+ Mpe mwana na ye Esare-hadone+ akómaki mokonzi na esika na ye.
38 Na mikolo yango, Ezekiasi abɛlaki mpe etikalaki moke akufa.+ Mosakoli Yisaya+ mwana ya Amoze ayaki epai na ye mpe alobaki na ye ete: “Yoká oyo Yehova alobi: ‘Pesá bato ya libota na yo malako ya nsuka mpo okokufa, okobika na maladi oyo te.’”+ 2 Ntango Ezekiasi ayokaki bongo abalusaki elongi na ye na efelo mpe abandaki kobondela Yehova boye: 3 “Nabondeli yo, Ee Yehova, nabondeli yo, kobosana te+ ete natambolaki liboso na yo na bosembo mpe na motema mobimba,+ mpe nasalaki makambo oyo ezali malamu na miso na yo.” Mpe Ezekiasi alelaki mingi mpenza.
4 Bongo Yehova alobaki na Yisaya ete: 5 “Zongá, mpe lobá na Ezekiasi:+ ‘Yehova Nzambe ya nkɔkɔ na yo Davidi alobi ete: “Nayoki libondeli na yo.+ Namoni mai ya miso na yo.+ Talá, nazali kobakisa mbula 15 na bomoi na yo.*+ 6 Nakobikisa yo mpe engumba oyo na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela engumba oyo.+ 7 Talá elembo oyo euti epai ya Yehova. Yango ekomonisa yo ete Yehova akokokisa liloba oyo alobi:+ 8 Talá nakosala ete elili oyo moi ebimisi, oyo ekitaki na matambe ya eskalye ya Ahaze ezonga nsima matambe zomi.”’”+ Mpe elili ezongaki nsima matambe zomi, na matambe ya eskalye* epai yango ekitaki.
9 Mokanda oyo Ezekiasi mokonzi ya Yuda akomaki, ntango abɛlaki mpe abikaki na maladi na ye.
Nakozanga bambula na ngai oyo etikali.”
11 Nalobaki: “Nakomona Yah* te, ɛɛ Yah, na mokili ya bato ya bomoi.+
Nakotala lisusu bato te
Ntango nazali elongo na bato oyo bafandi na mokili epai makambo nyonso esukaka.
12 Esika na ngai ya kofanda epikolami mpe balongoli yango epai na ngai+
Lokola hema ya mobateli ya mpate.
Nalíngilíngi bomoi na ngai ndenge mosali-bilamba asalaka na elamba;
Akati ngai ndenge bakataka elamba nsima ya kolita yango.
Banda na moi tii na butu, ozali kaka kokómisa ngai tii na nsuka.+
13 Nafandaki kimya tii na ntɔngɔ.
Azali kaka kobuka mikuwa na ngai nyonso ndenge nkɔsi ebukaka;
Banda na moi tii na butu, ozali kaka kokómisa ngai tii na nsuka.+
14 Nazali se kosala swiswiswi lokola ndɛkɛ babengi martinɛ to ndɛkɛ babengi bulubulu;+
Nazali se konguluma lokola ebenga.+
Miso na ngai elɛmbi mpo na kotala likoló:+
15 Naloba nini?
Alobi na ngai mpe asali.
16 ‘Ee Yehova, moto nyonso atikalaka na bomoi mpo na makambo yango,*
Mpe na nzela na yango nde elimo na ngai ezali na bomoi.
Okokómisa nzoto na ngai kolɔngɔnɔ mpe okobatela ngai na bomoi.+
17 Talá! Na esika nazwa kimya, natungisami nde mingi;
Kasi lokola olingaka ngai mingi,
Obateli ngai mpo nakita te na libulu ya libebi.+
Obwaki masumu na ngai nyonso nsima ya mokɔngɔ na yo.*+
Baoyo bazali kokita na libulu bakoki te kotyela bosembo na yo motema.+
19 Moto ya bomoi, moto ya bomoi, akoki kosanzola yo,
Lokola ngai na mokolo ya lelo.
Tata akoki koyebisa bana na ye bosembo na yo.+
20 Ee Yehova, bikisá ngai,
Mpe tokobɛta nzembo na ngai, na bibɛtɛlo ya bansinga+
Mikolo nyonso ya bomoi na biso, na ndako ya Yehova.’”+
21 Na nsima, Yisaya alobaki boye: “Bóya na gato ya figi ya kokauka oyo bafinafiná mpe bópakola yango na bibɔ ya mokonzi mpo abika.”+ 22 Ezekiasi atunaki boye: “Elembo nini emonisi ete nakomata na ndako ya Yehova?”+
39 Na ntango yango, mokonzi ya Babilone, Merodake-baladane mwana ya Baladane atindelaki Ezekiasi+ mikanda ná likabo, mpo ayokaki ete Ezekiasi abɛlaki, mpe na nsima abikaki.+ 2 Ezekiasi ayambaki bango na esengo* mpe alakisaki bango ndako oyo abombaka biloko na ye ya motuya:+ palata, wolo, mafuta ya balsame, mafuta mosusu ya kitoko, ebombelo mobimba ya bibundeli na ye ná eloko nyonso oyo ezalaki na bisika na ye ya kobomba biloko ya motuya. Ezekiasi alakisaki bango biloko nyonso oyo ezalaki na ndako na ye mpe na boyangeli na ye mobimba, abombelaki bango ata eloko moko te.
3 Nsima na yango, mosakoli Yisaya ayaki epai ya Mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye: “Bato oyo bayebisi yo nini, mpe bauti wapi?” Bongo Ezekiasi ayanolaki ete: “Bauti na mokili moko mosika, na Babilone.”+ 4 Mpe Yisaya atunaki: “Bamoni nini na ndako na yo?”* Ezekiasi ayanolaki: “Bamoni biloko nyonso oyo ezali na ndako na ngai.* Nalakisi bango biloko nyonso oyo ezali na bisika na ngai ya kobomba biloko ya motuya.”
5 Sikoyo Yisaya alobaki na Ezekiasi boye: “Yoká liloba ya Yehova ya mampinga: 6 ‘Talá! Mikolo ezali koya, eloko nyonso oyo ezali na kati ya ndako na yo mpe nyonso oyo bankɔkɔ na yo babombaki tii na mokolo ya lelo ekokende na Babilone. Eloko moko te ekotikala,’+ Yehova alobi bongo.+ 7 ‘Mpe bana na yo mosusu, baoyo okobota, bakozwa bango mpe bakokóma bakapita na ndako monene ya mokonzi ya Babilone.’”+
8 Na yango, Ezekiasi alobaki na Yisaya ete: “Liloba ya Yehova oyo olobi ezali malamu.” Mpe abakisaki boye: “Mpo kimya mpe libateli* ekozala mikolo nyonso ya bomoi na ngai.”*+
40 Nzambe na bino alobi: “Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai.”+
2 “Bóloba na motema ya* Yerusaleme,
Mpe bósakwela ye ete mosala na ye ya makasi esili,
Ete alongwe na ngambo na ye.+
Mpo azwi na lobɔkɔ ya Yehova etumbu mobimba* mpo na masumu na ye nyonso.”+
3 Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe:
“Bóbongisa nzela ya Yehova!+
Bósembolela Nzambe+ na biso balabala monene+ na mokili ekauká.
4 Mabwaku nyonso etombwama,
Mpe bangomba minene ná bangomba mike nyonso ekitisama.
Esika ya matutumatutu esengeli kokóma patatalu,
Mpe esika ya mabulumabulu ekokóma lobwaku patatalu.+
6 Yoká! Moto moko azali koloba: “Belelá!”
Mpe moto mosusu atuni: “Nabelela nini?”
“Bato nyonso bazali* matiti ya mobesu.
Bolingo na bango nyonso ya sembo ezali lokola fololo ya esobe.+
Ya solo, bato bazali kaka matiti ya mobesu.
Tombolá mongongo na yo makasi,
Yo mwasi oyo ozali komemela Yerusaleme nsango malamu.
Tombolá yango, kobanga te.
Yebisá na bingumba ya Yuda ete: “Nzambe na bino ye oyo.”+
10 Talá! Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akoya na nguya,
Mpe lobɔkɔ na ye ekoyangela mpo na ye.+
Talá! Azali na mbano ya kopesa,
Mpe lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.+
11 Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye.+
Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate,
Mpe akomema yango na ntolo na ye.
Oyo ezali komɛlisa bana na yango mabɛlɛ, akokamba yango malɛmbɛmalɛmbɛ.+
Nani asangisá putulu ya mabele na emekeli moko,+
To nani ameká bangomba
Mpe bangomba mike na bimekeli-kilo?
14 Apesanaki makanisi na nani mpo akanga ntina,
To nani ateyaka ye nzela ya bosembo,
To ateyaka ye boyebi,
To alakisaka ye nzela ya mayele ya solosolo?+
15 Talá! Bikólo ezali lokola litangá ya mai na katini,
Mpe etalelami lokola mwa putulu likoló ya bimekeli-kilo.+
Talá! Atombolaka bisanga lokola mwa putulu moke.
16 Ata Liban ekoki te mpo na kobatela mɔtɔ ekoba kopela,*
Mpe banyama na yango ya zamba ekoki te mpo na likabo ya kotumba mobimba.
17 Liboso na ye, bikólo nyonso ezali lokola eloko oyo ezali te;+
Atalaka yango lokola eloko mpamba, eloko oyo ezali ya solo te.+
18 Bokoki kokokanisa Nzambe na nani?+
Eloko nini bokoki kotya pembeni na ye oyo ekokani na ye?+
19 Moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ anyangwisi ekeko,*
Mosali-bibende azipi yango na wolo,+
Mpe atye minyololo ya palata.
21 Boyebi te?
Boyoká te?
Bayebisá yango bino te banda na ebandeli?
Bokangá naino ntina te banda ntango miboko ya mabele etyamaki?+
22 Ezali na Moto oyo afandi likoló ya sɛrklɛ* ya mabele,+
Mpe bafandi na yango bazali lokola mabanki.*
Moto oyo atandaka likoló lokola mwa elamba ya pɛtɛpɛtɛ,
Mpe asembolaka yango lokola hema mpo ezala esika ya kofanda.+
23 Moto oyo akómisaka bankumu biloko mpamba
Mpe akómisaka basambisi* ya mabele eloko moko ya solo te.
24 Bauti kokonama sika,
Bauti kolonama sika,
Ekumu na bango ebimisi misisa ya sika na mabele.
Bafuli bango mopɛpɛ mpe bakauki,
Mpe mopɛpɛ ekumbi bango lokola matiti ya blé.+
25 “Bokoki kokokanisa ngai na nani mpo nazala ndenge moko na ye?” Mosantu alobi bongo.
26 “Bótombola miso na bino na likoló mpe bómona.
Nani azalisaki biloko oyo nyonso?+
Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango;
Abengaka yango nyonso na nkombo.+
Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpe nguya na ye ya kokamwa,+
Ata moko te kati na yango ezali kozanga.
27 Ee Yakobo, mpo na nini ozali koloba, Ee Yisraele, mpo na nini ozali kolobaloba ete:
‘Yehova azali komona makambo ya bomoi na ngai te,
Nzambe azali kotya likebi te na kozanga bosembo oyo nazali kokutana na yango?’+
28 Oyebi te, oyoká te?
Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na seko.+
Alɛmbaka te, asilaka makasi mpe te.+
Mayele na ye ekoki kososolama te.+
30 Bana mibali bakolɛmba mpe bakosila makasi,
Mpe bilenge mibali bakobɛta libaku mpe bakokwea,
31 Kasi baoyo batyeli Yehova elikya bakozwa nguya ya sika.
Bakopumbwa likoló na mapapu lokola bampongo.+
Bakokima mbangu mpe bakosila makasi te;
Bakotambola mpe bakolɛmba te.”+
41 “Bófanda nyɛɛ liboso na ngai, mpe bóyoka bino bisanga;
Tiká bato ya bikólo bázwa lisusu makasi na bango.
Bápusana, mpe na nsima báloba.+
Biso nyonso tópusana mpo na lisambisi.
2 Nani abimisaki moto moko epai moi ebimaka?*+
Abengaki ye na bosembo mpo asalela Ye,*
Mpo na kokaba bikólo epai na ye
Mpe mpo na kotya bakonzi na nse na ye?+
Oyo akómisi bango putulu liboso ya mopanga na ye,
Na litimbo na ye apanzi bango epai na epai lokola matiti ya blé?
3 Azali kolanda bango, kokoba koleka na kimya
Na makolo na nzela oyo ayaki te?
4 Nani asali mpe akokisi yango,
Abengi mabota uta na ebandeli?
Ngai, Yehova, nazali Moto ya Liboso;+
Mpe epai ya bato oyo bakoya nsima, nakozala kaka ndenge nazalaka.”+
5 Bisanga emonaki mpe ebangaki.
Bansuka ya mabele ebandaki kolɛnga.
Epusanaki pene mpe ezalaki se koya.
6 Moto na moto azali kosalisa moninga na ye
Mpe koloba na ndeko na ye ete: “Zalá makasi.”
7 Bongo moto oyo ayebi misala ya mabɔkɔ azali kolendisa mosali bibende;+
Moto oyo ayeisaka biloko sɛlisɛli na marto ya kotulela
Azali kolendisa moto oyo azali kobɛta marto na elondo*
Alobi mpo na sudire ete: “Ezali malamu.”
Na nsima bakangisaki yango makasi na nsɛtɛ mpo eningana te.
8 “Kasi yo, Ee Yisraele, ozali mosaleli na ngai,+
Yo, Ee Yakobo, oyo naponá,+
Libota* ya Abrahama moninga na ngai,+
9 Yo oyo nazwá uta na bansuka ya mabele,+
Mpe yo oyo nabengá uta na bisika na yango oyo eleki mosika.
10 Kobanga te, mpo nazali na yo.+
Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo.+
Nakopesa yo makasi, ɛɛ nakosalisa yo,+
Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali, lobɔkɔ oyo esalaka oyo ezali sembo.’
11 Talá! Baoyo nyonso bazali kosilikela yo bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa.+
Baoyo bazali kobundisa yo bakokóma eloko mpamba mpe bakokufa.+
12 Okoluka bato oyo bazali kobunda na yo, kasi okomona bango te;
Bato oyo bazali kobunda na yo etumba bakokóma lokola eloko oyo ezali te, lokola eloko mpamba.+
13 Mpo ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali,
Ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’+
14 Kobanga te, yo Yakobo mosɔpi,*+
Bino bato ya Yisraele, nakosalisa yo,” Yehova alobi bongo, Mosikoli+ na yo, Mosantu ya Yisraele.
Okonyatanyata bangomba mpe okobuka yango
Mpe okokómisa bangomba mike lokola mposo ya blé.
17 “Bato oyo bazangá mpe babola bazali koluka mai, kasi ezali te.
Lolemo na bango ekauki mpo na mposa ya mai.+
Ngai Yehova nakoyanola bango.+
Ngai Nzambe ya Yisraele nakosundola bango te.+
18 Nakosala ete bibale esopana likoló ya bangomba mikemike oyo ezali polele+
Mpe maziba na mabwaku ya patatalu.+
Nakokómisa esobe etima oyo etondi na matiti
Mpe mokili oyo ezangá mai maziba ya mai.+
Na mokili patatalu oyo ekauká nakolona nzete ya jenevriye,
Elongo na nzete ya frɛnɛ mpe ya siprɛ,+
20 Mpo bato nyonso bámona mpe báyeba
Bátya likebi mpe bákanga ntina
Ete lobɔkɔ ya Yehova nde esali yango,
Mpe Mosantu ya Yisraele azalisi yango.”+
21 Yehova alobi ete: “Bóya na likambo na bino.”
Mokonzi ya Yakobo alobi: “Bóbimisa makanisi na bino.”
22 “Bóbimisa mpe bóyebisa biso makambo oyo ekosalema.
Bóyebisa biso makambo ya kala,*
Mpo tókanisa* yango mpe tóyeba ndenge yango ekosuka na mikolo ezali koya.
Mpo bóyebisa biso makambo oyo ezali koya.+
Ɛɛ, bósala eloko moko ya malamu to ya mabe,
Oyo ekokamwisa biso ntango tokomona yango.+
Moto nyonso oyo azali kopona bino azali eloko oyo eyinamá.+
25 Nabimisi moto moko uta na nɔrdi, mpe akoya,+
Moto oyo auti epai moi ebimaka,*+ oyo akobelela nkombo na ngai.
Akonyata bayangeli* lokola nde bazalaki mabele,+
Lokola moyemi-mbɛki oyo azali konyatanyata mabele ya pɔtɔpɔtɔ.
26 Nani alobá likambo yango uta na ebandeli, mpo tóyeba,
To banda na bantango ya kala, mpo tóloba: ‘Alobi solo’?+
Ya solo, moto moko te asakolá yango!
Moto moko te alobá yango!
Moto moko te ayoká likambo yango epai na bino!”+
27 Nazalaki moto ya liboso, oyo nalobaki na Siona ete: “Talá! Bango oyo!”+
Mpe na Yerusaleme nakotinda momemi-nsango malamu.+
28 Kasi nakobaki kotala, mpe moto azalaki te;
Moto azalaki te na kati na bango mpo na kopesa toli.
Mpe nakobaki kotuna bango, mpo bápesa eyano.
29 Talá! Bango nyonso bazali lokola eloko oyo ezali te.
Misala na bango ezali mpamba.
Bikeko* na bango ezali mopɛpɛ mpe eloko moko ya solo te.+
42 Talá! Mosaleli na ngai,+ oyo nazali kosalisa!
Moto oyo naponi,+ oyo nandimi!*+
Akomema mpenza bosembo.+
4 Akolɛmba te mpe akotika te tii akotya bosembo na mabele;+
Mpe bisanga ekokoba kozela mobeko* na ye.
5 Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi,
Mozalisi ya likoló mpe Nzambe Monene oyo atandá yango,+
Moto oyo atandá mabele mpe mbuma na yango,+
Moto oyo apesaka mpema na bato oyo bafandi wana+
Mpe elimo na bato oyo batambolaka wana.+
6 “Ngai Yehova nabengi yo na bosembo;
Nasimbi lobɔkɔ na yo.
Nakobatela yo mpe nakopesa yo ozala kondimana mpo na bato+
Mpe lokola pole mpo na bikólo,+
7 Mpo ofungola miso ya bato oyo bakufá miso,+
Mpo obimisa moto ya bolɔkɔ na kasho
Mpo obimisa na bolɔkɔ bato oyo bafandi na molili.+
9 Talá, makambo ya liboso esalemi;
Sikoyo nazali kosakola makambo ya sika.
Liboso yango ebima, nazali koyebisa bino yango.”+
10 Bóyembela Yehova loyembo ya sika,+
Lisanzoli na ye uta na bansuka ya mabele,+
Bino baoyo nyonso botambolaka na mbu mpe na nyonso oyo etondisi yango,
Bino bisanga mpe bino baoyo bofandi kuna.+
Bato oyo bafandi na libanga monene báganga na esengo;
Báganga na mongongo makasi uta na nsɔngɛ ya bangomba.
13 Yehova akobima lokola mobali ya nguya.+
Akolamwisa molende na ye lokola mobundi-etumba.+
Akoganga, ɛɛ, akobɛta ntangwa ya etumba;
Akolakisa ete azali na nguya koleka banguna na ye.+
14 “Nafandi nyɛɛ ntango molai.
Nazalaki kaka kofanda nyɛɛ mpe namipekisaki.
Lokola mwasi oyo azali kobota nakolelalela,*
Nakopemapema mpe nakosila mpema na mbala moko.
15 Nakobebisa bangomba mpe bangomba mike
Mpe nakokaukisa matiti na yango nyonso.
16 Nakotambwisa bato oyo bakufá miso na nzela oyo bayebi te+
Nakosala ete bátambola na balabala oyo bayebi te.+
Yango nde makambo oyo nakosalela bango, mpe nakosundola bango te.”
17 Baoyo bazali kotyela bikeko* motema,
Baoyo bazali koloba na bikeko* ete: “Bozali banzambe na biso,”+
Bakozonga mpenza nsima, bakoyoka nsɔni mingi mpenza.
19 Nani akufá miso, soki mosaleli na ngai te?
Nani akufá mpenza matoi, lokola momemi-nsango oyo nazali kotinda?
Nani akufá mpenza miso lokola moto oyo azwi mbano,
Nani akufá mpenza miso lokola mosaleli ya Yehova?+
20 Omoni makambo mingi, kasi ozali kotya likebi te.
Ofungoli matoi, kasi ozali koyoka te.+
22 Kasi bango bazali bato oyo bapunzami mpe babɔtɔli bango biloko na makasi;+
Bango nyonso bazwami na motambo na kati ya mabulu, mpe babombi bango na babolɔkɔ.+
Bapunzi bango mpe moto ya kobikisa bango azali te,+
Babɔtɔli bango biloko na makasi mpe moto azali te oyo akoloba ete: “Zongisá bango!”
23 Nani kati na bino akoyoka likambo oyo?
Nani akotya likebi mpe akoyoka na ntango oyo ekoya?
24 Nani akabi Yakobo mpo bábɔtɔla ye biloko
Mpe Yisraele epai ya bapunzi?
Ezali te Yehova, Moto oyo tosaleli lisumu?
Ezikisaki eloko nyonso oyo ezalaki zingazinga na bango, kasi batyaki likebi te.+
Epelelaki bango, kasi batyaki yango na motema te.+
Kobanga te, mpo nasikoli yo.+
Nabengi yo na nkombo na yo.
Ozali ya ngai.
Soki otamboli na mɔtɔ, okozika te,
Lolemo ya mɔtɔ mpe ekotumba yo te.
3 Mpo nazali Yehova Nzambe na yo,
Mosantu ya Yisraele, Mobikisi na yo.
Napesi Ezipito ezala lisiko na yo,
Etiopi mpe Seba na esika na yo.
Yango wana nakopesa bato na esika na yo,
Mpe bikólo na esika ya bomoi* na yo.
5 Kobanga te, mpo nazali elongo na yo.+
6 Nakoloba na nɔrdi ete: ‘Tiká bango!’+
Mpe na sudi ete: ‘Kokanga bango te.
Yaká na bana na ngai ya mibali uta na mosika, mpe na bana na ngai ya basi uta na bansuka ya mabele,+
7 Moto nyonso oyo abengami na nkombo na ngai+
Mpe oyo nazalisá mpo na nkembo na ngai moko,
Oyo nakelá, mpe oyo nasalá.’+
Nani na kati na bango akoki koyebisa yango?
To bakoki nde koyebisa biso makambo ya liboso?*+
Bábimisa batatoli mpo bámilongisa,
To báyoka mpe báloba ete: ‘Ezali solo!’”+
10 Yehova alobi: “Bino bozali batatoli na ngai,+
Ɛɛ, mosaleli na ngai oyo naponi,+
Mpo bóyeba mpe bóndimela ngai,*
Mpo bókanga ntina ete, ngai nazali kaka ndenge nazalaka.+
Liboso na ngai Nzambe moko te asalemaki,
Mpe nsima na ngai mosusu azali te.+
11 Ngai, nazali Yehova,+ mpe longola ngai mobikisi mosusu azali te.”+
12 “Ngai moko nasakoli, nabikisi mpe nayebisi yango,
Wana nzambe mopaya ata moko te azalaki na kati na bino.+
Yango wana, bino bozali batatoli na ngai,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe ngai nazali Nzambe.+
13 Lisusu, ntango nyonso, ngai nazali kaka ndenge nazalaka;+
Moto moko te akoki kobɔtɔla ata eloko nini na lobɔkɔ na ngai.+
Soki nasali, nani akoki kopekisa ngai?”+
14 Talá oyo Yehova, Mosikoli+ na bino, Mosantu ya Yisraele,+ alobi:
“Mpo na bino, nakotinda limpinga na Babilone mpe nakokitisa bikangiseli ya baporte,+
Mpe Bakaladea, na bamasuwa na bango bakoganga mpo na mpasi.+
15 Nazali Yehova Mosantu na bino,+ Mozalisi ya Yisraele,+ Mokonzi na bino.”+
16 Talá oyo Yehova alobi,
Moto oyo asalaka nzela na mbu
Mpe balabala na mai oyo ezali kotomboka,+
17 Moto oyo abimisaka likalo ya etumba mpe mpunda,+
Limpinga ya basoda mpe bilombe ya etumba:
“Bakolala na nse mpe bakotɛlɛma te.+
Bakokufa, bakobomama lokola nsinga ya lini oyo ezali kopela.”
18 “Bókanisa lisusu te makambo ya kala,
Mpe bótikala kaka te na makambo ya kala.
Bozali komona yango te?
20 Nyama ya zamba oyo efandaka na esobe,
Bambwa ya zamba* ná bamaligbanga ekokumisa ngai,
Mpo nakopesa mai na esobe,
Bibale na mokili ekauká,+
Mpo na komɛlisa bato na ngai, moto oyo naponá,+
21 Bato oyo nasalá mpo na ngai moko,
Mpo báyebisa lisanzoli na ngai.+
23 Omemeli ngai te bampate ya makabo na yo ya kotumba mobimba,
Mpe okumisi ngai te na bambeka na yo.
Natindi yo te ete omemela ngai likabo,
Nalɛmbisi yo mpe te mpo na kosɛnga yo olibana.+
24 Osombeli ngai te nkokó ya nsolo kitoko* na mbongo na yo;
Mpe otondisi ngai te na mafuta ya bambeka na yo.+
Masumu na yo ezali lokola kilo epai na ngai;
Olɛmbisi ngai na mabunga na yo.+
25 Ngai, ngai nde Moto nazali koboma misala na yo ya kobuka mibeko*+ mpo na nkombo na ngai,+
Mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.+
26 Kundolelá ngai; tósamba;
Lobá likambo ndenge oyebi yango mpo olonga.
28 Yango wana, nakokómisa bankumu ya esika mosantu eloko mpamba,
Mpe nakokaba Yakobo mpo abebisama,
Mpe Yisraele mpo afingama.+
3 Mpo moto oyo azali na mposa ya mai nakosopela ye mai*+
Mpe mabele oyo ekauká nakosopela yango mikɛli ya mai oyo ezali kotíyola.
5 Moto moko akoloba: “Nazali moto ya Yehova.”+
Moto mosusu akomibenga na nkombo ya Yakobo,
Mosusu mpe akokoma na lobɔkɔ na ye: “Moto ya Yehova.”
Mpe akozwa nkombo ya Yisraele.’
‘Ngai nazali moto ya liboso mpe moto ya nsuka,+
Mpe longola ngai Nzambe mosusu azali te.+
Abelela, ayebisa yango mpe alakisa ngai yango!+
Banda ntango oyo natyaki bato ya kala,
Ezali na moto moko oyo akoki koyebisa makambo oyo ezali koya
Mpe makambo oyo ekosalema?
Nayebisaki mokomoko na bino yango liboso te? Mpe namonisaki yango te?
Bino bozali batatoli na ngai.+
Longola ngai, ezali nde na Nzambe mosusu?
Te, Libanga mosusu ezali te.+ Nayebi ata moko te.’”
9 Bato nyonso oyo basalaka bikeko* bazali eloko mpamba,
Mpe biloko oyo balingaka ekozala na litomba moko te.+
Yango* ezali batatoli oyo emonaka te mpe eyebaka eloko te,+
Mpe baoyo basalaka yango bakoyokisama nsɔni.+
10 Nani akokaki kozala na likanisi ya kosala nzambe moko boye to ekeko moko ya ebende*
Oyo ekozala na litomba te?+
11 Talá! Baninga na ye nyonso bakoyokisama nsɔni!+
Bato oyo bayebi misala ya mabɔkɔ bazali kaka bato.
Bango nyonso báyangana mpe bázwa esika na bango.
Bakozala na nsɔmɔ mpe bakoyokisama nsɔni elongo.
12 Moyemi ya biloko ya bibende oyo asalelaka likwangola ya mokuse asali mosala na ye na makala.
Ayemi yango na marto,
Azali kosala yango na lobɔkɔ na ye ya makasi.+
Na nsima, ayoki nzala, mpe makasi na ye esili;
Amɛli mai te mpe alɛmbi.
13 Moyemi ya biloko ya nzete asemboli nsinga ya komeka, azali kokoma yango na mpɛmbɛ ya motane.
Azali kosala yango na epalola-nzete mpe kokoma yango na kompa.
14 Ezali na moto moko oyo mosala na ye nde kokata banzete ya sɛdrɛ.
Aponaka motindo moko boye ya nzete, nzete ya monene,
Atikaka yango ekóma makasi na kati ya banzete ya zamba.+
Alonaka nzete ya lorye, mpe mbula ekolisaka yango.
15 Na nsima moto asalelaka yango lokola nkoni mpo na mɔtɔ.
Azwaka eteni na yango mpo ayɔta mɔtɔ;
Apelisaka mɔtɔ mpe atumbaka limpa.
Lisusu asalaka nzambe mpe asambelaka yango.
Akómisi yango ekeko* mpe agumbamaka na nse liboso na yango.+
16 Na eteni moko ya nkoni, apelisaka mɔtɔ;
Kaka na eteni yango atumbaka mosuni oyo akolya, mpe atondi.
Azali mpe koyɔta mɔtɔ mpe koloba:
“Aha! Nayɔki mɔtɔ ndenge nazali kotala mɔtɔ oyo.”
17 Kasi na eteni oyo etikali, asalaka nzambe moko, ekeko.
Agumbamelaka yango mpe asambelaka yango.
Abondelaka yango mpe alobaka ete:
“Bikisá ngai, mpo ozali nzambe na ngai.”+
18 Bayebi eloko te, mpe bakangaka ntina ya eloko te,+
Mpo miso na bango ekangami mpenza mpe bakoki komona te,
Mpe motema na bango ezali na bososoli te.
19 Moto moko te akanisaka na motema na ye
Moko te azali na boyebi to na mayele ya koloba ete:
“Napelisi ndambo na mɔtɔ,
Mpe na makala na yango natumbi limpa ná mosuni mpo na kolya.
Kasi na ndambo oyo etikali, nasengeli nde kosala na yango eloko oyo eyinamá?+
Nasengeli nde kosambela nkoni ya nzete?”*
20 Azali kolya putulu ya mɔtɔ.
Motema na ye moko oyo ekosami ebungisi ye nzela.
Akoki te komibikisa mpe koloba ete:
“Lokuta ezali te na lobɔkɔ na ngai ya mobali?”
21 “Kanisá makambo wana, Ee Yakobo, mpe yo, Ee Yisraele,
Mpo ozali mosaleli na ngai.
Nasalá yo. Mpe ozali mosaleli na ngai.+
Ee Yisraele, nakobosana yo te.+
22 Nakozipa misala na yo ya kobuka mibeko lokola nde ezipami na lipata+
Mpe masumu na yo lokola nde na lipata moko monene.
Zongelá ngai, mpo nakosikola yo.+
23 Yo likoló, gangá na esengo,
Mpo Yehova asali mosala!
Bóganga na koganga ya bolongi, bino bisika ya mozindo ya mabele!
Bóganga na esengo bino bangomba,+
Yo zamba mpe banzete na yo nyonso!
Mpo Yehova asikoli Yakobo,
Mpe azali komonisa kitoko na ye na Yisraele.”+
“Ngai Yehova moto nasalaki eloko nyonso.
Nani azalaki elongo na ngai?
25 Nazali kobebisa bilembo ya basakoli ya lokuta,*
Mpe nazali Moto oyo akómisaka basakoli ya makambo oyo ebombani lokola bato ya ligboma;+
Moto oyo abulunganisaka bato ya bwanya
Mpe akómisaka boyebi na bango bozoba;+
26 Moto oyo akokisaka liloba ya mosaleli na ye
Moto oyo akokisaka na mobimba bisakweli ya bamemi-nsango na ye;+
Moto oyo azali koloba na Yerusaleme ete: ‘Bato bakofanda kuna,’+
Mpe na bingumba ya Yuda ete: ‘Ekotongama lisusu,+
Mpe nakotɛlɛmisa bisika na yango oyo etikalá mpamba’;+
27 Moto oyo azali koloba na mai mozindo ete: ‘Kauká;
Mpe nakokaukisa bibale na yo nyonso’;+
28 Moto oyo azali koloba na Siruse+ ete: ‘Azali mobateli ya mpate na ngai,
Mpe akokokisa mpenza mokano na ngai nyonso’;+
Moto oyo azali koloba na Yerusaleme, ete: ‘Ekotongama lisusu,’
Mpe na Tempelo ete: ‘Moboko na yo ekotyama.’”+
45 Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta, na Siruse,+
Oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali,+
Mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye,+
Mpo na kobɔtɔla bakonzi bibundeli,*
Mpo na kofungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye,
Mpo baporte ekangama te:
Nakobukabuka baporte ya kwivre,
Mpe nakokata bikangiseli ya bibende.+
3 Nakopesa yo biloko ya motuya oyo ezali na molili
Mpe biloko ya motuya oyo babombá na bisika ya kobombana,+
Mpo oyeba ete nazali Yehova,
Nzambe ya Yisraele, oyo azali kobenga yo na nkombo na yo.+
4 Mpo na mosaleli na ngai Yakobo mpe mpo na Yisraele moto oyo ngai naponi,
Nazali kobenga yo na nkombo na yo.
Nazali kopesa yo nkombo ya lokumu, atako oyebi ngai te.
5 Nazali Yehova, mpe mosusu azali te.
Longola ngai, Nzambe mosusu azali te.+
Nakokómisa yo makasi,* atako oyebaki ngai te,
6 Mpo bato báyeba
Banda epai moi ebimaka tii epai yango elalaka*
Ete longola ngai, mosusu azali te.+
Nazali Yehova, mpe mosusu azali te.+
7 Nasalaka pole+ mpe nazalisaka molili,+
Natyaka kimya+ mpe nabimisaka mpasi;+
Ngai Yehova nazali kosala biloko nyonso wana.
Mabele efungwama, mpe ebota lobiko,
Mpe kaka na ntango yango ebimisa bosembo.+
Ngai Yehova nazalisi yango.”
9 Mawa na moto oyo azali kobunda* na Moto oyo asalaki ye,
Mpo azali kaka mwa eteni ya mbɛki ya mabele
Na kati ya mwa biteni mosusu ya mbɛki ya mabele oyo elali na mabele!
Mabele* ekoki nde koloba na moyemi na yango* ete: “Ozali kosala nini?”+
To mosala na yo ekoki nde koloba: “Azali na mabɔkɔ te”?*
10 Mawa na moto oyo azali koloba na tata ete: “Oboti nini?”
Mpe na mwasi ete: “Ozali kobota nini?”*
11 Talá oyo Yehova alobi, Mosantu ya Yisraele,+ Moto oyo asalaki ye:
“Bokotuna ngai mpo na makambo oyo ekoya
Mpe bokopesa ngai mitindo mpo na bana na ngai+ mpe misala ya mabɔkɔ na ngai?
12 Nasalá mabele+ mpe kuna nazalisá moto.+
13 Yehova ya mampinga alobi boye, “na bosembo na ngai, nabimisaki moto moko,+
Mpe nakosembola banzela na ye nyonso.
Ye nde akotonga engumba na ngai+
Mpe akotika bato na ngai oyo bamemamá na mboka mopaya, bákende,+ kozanga kofuta mbongo to kanyaka.”+
14 Talá oyo Yehova alobi:
“Matomba* ya Ezipito, mpe biloko ya kotɛka* ya Etiopi ná Basabea, bato ya milaimilai,
Bakoya epai na yo mpe bakokóma ya yo.
Bakotambola nsima na yo; bakangami na bikangeli,
Bakoya mpe bakogumbamela yo.+
Bakoloba na yo na limemya makasi ete: ‘Ya solo Nzambe azali elongo na yo,+
Mpe mosusu azali te; Nzambe mosusu azali te.’”
17 Kasi Yisraele akobika mpo na Yehova na lobiko ya seko+
Bokoyokisama nsɔni te, mpe bokosambwa te mpo na seko.+
18 Mpo talá oyo Yehova alobi,
Mozalisi ya likoló,+ Nzambe ya solo,
Moto oyo asalaki mabele, Mokeli na yango, Moto oyo atɛlɛmisaki yango makasi,+
Moto oyo asalaki yango kaka mpamba te,* kasi asalaki yango nde mpo bato báfanda:+
“Nazali Yehova, mpe mosusu azali te.
19 Nalobaki te na esika ya kobombana,+ na mokili ya molili;
Nalobaki te na libota* ya Yakobo ete:
‘Bóluka ngai kaka mpamba.’
Nazali Yehova, oyo alobaka makambo ya boyengebene, mpe ayebisaka makambo ya sembo.+
20 Bóyangana mpe bóya.
Bópusana elongo, bino baoyo bobiki na bikólo.+
Baoyo bazali kokumba ekeko* na bango, bayebi eloko te,
Mpe bazali kobondela nzambe oyo akoki kobikisa bango te.+
21 Bóloba mpe bómonisa likambo na bino.
Bópesana makanisi na bomoko.
Nani ayebisá likambo yango banda kala?
Nani alobá yango banda bantango eleká?
Ezali ngai Yehova te?
22 Bóbaluka epai na ngai mpo bóbika,+
Bino nyonso baoyo bozali na bansuka ya mabele; mpo nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.+
23 Nalapi ndai na nkombo na ngai moko;
Liloba oyo ebimi na monɔkɔ na ngai ezali solo,
Ekozanga te kokokisama+
Moto nyonso akofukamela ngai,
Mpe moto nyonso akolapa ndai na bosembo epai na ngai,+
24 Mpe akoloba: ‘Ya solo bosembo ya solosolo mpe makasi ezali epai ya Yehova.
Baoyo nyonso bazali kosilikela ye makasi bakoya liboso na ye na nsɔni.
46 Bele agumbami,+ Nebo agunzami.
Banyama ná banyama oyo ememaka mikumba ekumbi bikeko na bango,+
Lokola mikumba ya kilo likoló ya banyama oyo elɛmbi.
2 Bagunzami mpe bagumbami bango nyonso elongo;
Bakoki te kobikisa mikumba* na bango,
Mpe bango moko bazali kokende na kokangama.
3 “Ee libota ya Yakobo, bóyoka ngai, mpe bino nyonso bato ya ekólo Yisraele oyo botikali,+
Bino baoyo nasalisá liboso bóbotama, mpe namemá banda na libumu.+
4 Tii na bobange na bino nakozala kaka ndenge nazalaka;+
Tii bokokóma na nsuki mpɛmbɛ, nakosalisa bino.
Ndenge nasalaki yango, nakokumba bino, nakosalisa bino mpe nakobikisa bino.+
5 Bokomeka ngai na nani to bokokómisa ngai ndenge moko na nani,
To bokokokanisa ngai na nani+ mpo ngai ná ye tózala ndenge moko?+
6 Ezali na bato oyo babimisaka wolo na potɔmɔni mpe basopasopaka yango;
Bamekaka kilo ya palata na emekeli-kilo.
Bafutaka mosali-bibende, mpe asalaka na yango nzambe.+
Na nsima, bafukamelaka yango, ɛɛ, basambelaka yango.*+
7 Bamemaka yango na mapeka na bango;+
Bakumbaka yango, batyaka yango na esika na yango mpe etɛlɛmaka kaka wana.
Elongwaka te na esika na yango.+
Babelelaka yango, kasi eyanolaka te;
Ekoki kobikisa moto te na ntango ya mpasi.+
8 Bókanisa lisusu yango, mpo bózwa mpiko.
Bótya yango na motema, bino babuki-mibeko.
Nazali Nzambe mpe mosusu lokola ngai azali te.+
10 Banda na ebandeli nayebisaka ndenge makambo ekosuka,
Mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te;+ nalobaka ete
11 Nazali kobenga ndɛkɛ oyo ekangaka nyama uta epai moi ebimaka,*+
Mpe nabengaka uta na mokili ya mosika moto oyo akokokisa ekateli* na ngai.+
Nalobi mpe nakokokisa yango.
Nakani yango, mpe nakosala yango.+
Nakopesa lobiko na Siona, mpe nkembo na ngai na Yisraele.”+
Ee mwana mwasi ya Bakaladea,
Fandá na mabele esika kiti ya bokonzi ezali te,+
Mpo bakobenga yo lisusu te moto oyo amesaná na makambo ya makasi te mpe oyo babondelabondelaka.
2 Zwá enikelo ya mabɔkɔ mpe niká farini.
Longolá litambala na yo.
Matisá zambala na yo mpe monisá makolo na yo.
Katisá bibale.
3 Bolumbu na yo ekomonana.
Nsɔni na yo ekomonana.
Nakozongisa mabe,+ mpe moto moko te akopekisa ngai.*
5 Ee mwana mwasi ya Bakaladea,+
Fandá kuna na kimya mpe kɔtá na molili;
Bakobenga yo lisusu te Mwasi oyo azali Nkolo ya makonzi.+
Kasi oyokelaki bango mawa te.+
Okómisaki ekanganeli na yo kilo ata epai ya mobange.+
7 Olobaki: “Nakozala kaka Mwasi oyo azali Nkolo* mpo na libela.”+
Otyaki makambo yango na motema na yo te;
Otalelaki te ndenge yango ekosuka.
8 Sikoyo yoká likambo oyo, yo mwasi oyo alingá bisengo,+
Oyo afandi na kimya, oyo azali koloba na motema na ye ete:
“Longola ngai, moto mosusu azali te.+
Nakokóma te mwasi oyo mobali akufá,
Nakoyeba te eloko babengi kobungisa bana.”+
9 Kasi na mokolo moko, makambo oyo mibale ekokwela yo pwasa:+
Kobungisa bana mpe kozala mwasi oyo mobali akufá.
Ekokwela yo mobimba mpenza,+
Mpo na ebele ya misala na yo ya bonganga-nkisi, mpo na* nguya nyonso ya bondɔki na yo.+
10 Otyelaki mabe na yo motema.
Olobaki: “Moto moko te azali komona ngai.”
Bwanya mpe boyebi na yo nde ebungisi yo nzela,
Mpe olobi na motema na yo ete: “Longola ngai, mosusu azali te.”
Mokakatano ekokwela yo; okokoka kolongola yango te.
Libebi moko oyo omoná naino te ekokwela yo na pwasa.+
12 Bongo kobá kaka na bondɔki na yo mpe na ebele ya misala na yo ya bonganga-nkisi,+
Oyo obomá na yango nzoto banda bolenge na yo.
Mbala mosusu okozwa litomba;
Mbala mosusu okoyokisa bato nsɔmɔ.
13 Olɛmbi na ebele ya bapesi-toli na yo.
Bátɛlɛma sikoyo mpe bábikisa yo,
Baoyo basambelaka likoló,* baoyo batalatalaka minzoto,+
Baoyo, na basanza ya sika,
Bayebisaka makambo oyo ekokómela yo.
14 Talá! Bazali lokola matiti ya blé.
Mɔtɔ ekotumba bango.
Bakoki te komibikisa na nguya ya lolemo ya mɔtɔ.
Yango ezali mɔtɔ ya makala te mpo bato báyɔta,
Ezali mpe mɔtɔ te mpo bato báfanda liboso na yango.
15 Ndenge wana nde bato na yo ya misala ya maji bakokóma epai na yo,
Baoyo obomaki nzoto elongo na bango banda bolenge na yo.
Bakoyengayenga moto na moto na nzela na ye moko.*
Moto ya kobikisa yo akozala te.+
48 Ee bato ya libota ya Yakobo, bóyoka likambo oyo,
Bino baoyo bomibengaka na nkombo ya Yisraele+
Mpe bino baoyo bouti na mai ya* Yuda,
Bino baoyo bolapaka ndai na nkombo ya Yehova+
Mpe baoyo bobelelaka Nzambe ya Yisraele,
Atako ezalaka na bosolo te mpe na bosembo te.+
2 Mpo bamibengaka bato ya engumba mosantu+
Mpe balukaka lisalisi epai ya Nzambe ya Yisraele,+
Oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga.
3 “Makambo oyo eleká* oyo nayebisaki yo banda kala,
Ebimaki na monɔkɔ na ngai moko,
Mpe nayebisaki yango.+
Na mbala moko nasalaki eloko oyo, mpe yango esalemaki.+
4 Lokola nayebaki ete ozali motó makasi
Ete nkingo na yo ezali mosisa ya ebende mpe elongi na yo ezali ya kwivrɛ,+
5 Nayebisaki yo banda kala.
Nayebisaki yo yango liboso esalema,
Mpo oloba te ete: ‘Ekeko na ngai esalaki yango;
Ekeko* na ngai mpe ekeko na ngai ya ebende* epesaki yango mitindo.’
6 Oyokaki mpe omonaki yango nyonso.
Okolobela yango te?+
Banda sikoyo nazali koyebisa yo makambo ya sika,+
Makambo oyo ebombaná, oyo oyebi te.
7 Makambo yango ezalisami kaka sikoyo, kasi banda kala te,
Makambo oyo oyoká te liboso ya mokolo ya lelo,
Mpo oloba te ete: ‘Talá! Nayebá yango kala.’
9 Mpo na nkombo na ngai nakopekisa nkanda na ngai;+
Mpo na lisanzoli na ngai,
Nakomipekisa mpe nakoboma yo te.+
10 Talá! Napɛtoli yo, kasi lokola palata te.+
Nameki* yo na esika ya mɔtɔ makasi ya konyangwisa ya monyoko.+
11 Mpo na ngai, ɛɛ mpo na ngai moko nakosala,+
Mpo ndenge nini nakoki kotika bákómisa nkombo na ngai eloko mpamba?+
Napesaka nkembo na ngai na moto mosusu te.*
12 Ee Yakobo, yoká ngai, mpe Yisraele moto oyo nabengá.
Nazali kaka ndenge nazalaka.+ Nazali moto ya liboso; nazali mpe moto ya nsuka.+
Ntango nabengaka yango, yango nyonso etɛlɛmaka elongo.
14 Bóyangana, bino nyonso mpe bóyoka.
Nani na kati na bango alobá makambo oyo?
Yehova alingá ye.+
15 Ngai moko nalobi, mpe nabengi ye.+
Nayei na ye, mpe nzela na ye ekolonga.+
16 Bópusana pene na ngai. Bóyoka likambo oyo.
Banda na ebandeli mpenza nalobá na esika ya kobombana te.+
Banda ntango yango esalemaki, nazalaki wana.”
Mpe sikoyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova apesi ngai elimo na ye mpe atindi ngai.
17 Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli na yo, Mosantu ya Yisraele:+
“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo,
Moto oyo azali koteya yo mpo na bolamu na yo moko,+
Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.+
18 Soki otyaka likebi na mibeko na ngai!+
Mbɛlɛ nkombo na bango ebomami te mpe elongolami te liboso na ngai.”
Bókima Bakaladea!
Bósakola yango na koganga ya esengo, bóyebisa yango!+
Bósala ete yango eyebisama tii na bansuka ya mabele.+
Bóloba ete: “Yehova asikoli mosaleli na ye Yakobo.+
21 Bayokaki mposa ya mai te ntango azalaki kotambwisa bango na bisika oyo ekauká.+
Abimiselaki bango mai na libanga;
Apasolaki libanga mpe asalaki ete mai ebima.”+
22 Yehova alobi: “Bato mabe bazalaka na kimya te.”+
Yehova abengá ngai liboso nabotama.+
Atángá nkombo na ngai banda na libumu ya mama na ngai.
Akómisaki ngai likula oyo epeli;
Abombaki ngai na libenga na ye ya makula.
3 Alobaki na ngai boye: “Ee Yisraele, ozali mosaleli na ngai,+
Na nzela na yo nakomonisa nkembo na ngai.”+
4 Kasi nalobaki ete: “Nabomi nzoto kaka mpamba.
Nasaleli nguya na ngai mpo na eloko moko oyo ezali ya solo te, mpo na mpamba.
5 Mpe sikoyo Yehova, Moto oyo asalaki ngai banda na libumu mpo nazala mosaleli na ye,
Alobi ete ngai nazongisela ye Yakobo,
Mpo Yisraele eyanganisama epai na ye.+
Nakokumisama na miso ya Yehova,
Mpe Nzambe na ngai akokóma makasi na ngai.
6 Mpe alobaki boye: “Ekoki kaka te ete ozala mosaleli na ngai
Mpo otɛlɛmisa mabota ya Yakobo
Mpe ozongisa bato ya Yisraele oyo babatelami.
7 Talá oyo Yehova, Mosikoli ya Yisraele, Mosantu na ye,+ alobi na ye oyo atyolami,+ na moto oyo ayinami na ekólo, na mosaleli ya bayangeli:
“Bakonzi bakomona mpe bakotɛlɛma,
Mpe bankumu bakogumbama,
Mpo na Yehova, moto ya sembo,+
Mosantu ya Yisraele oyo aponi yo.”+
8 Talá oyo Yehova alobi:
“Na eleko ya boboto nayanolaki yo,+
Mpe na mokolo ya lobiko nasalisaki yo;+
Nazalaki kobatela yo mpo napesa yo lokola kondimana mpo na bato ya ekólo,+
Mpo na kobongisa lisusu mokili,
Mpo na kosala ete bázwa libula oyo etikalá mpamba,+
Mpe na baoyo bazali na molili:+ ‘Bómimonisa!’
Bakolya matiti pembenipembeni ya banzela,
Mpe bisika na bango ya kolya matiti ekozala na banzela nyonso* epai bato balekalekaka.
10 Bakozala na nzala te, bakozala mpe na mposa ya mai te,+
Molunge oyo ezali kozikisa to moi ekobɛta bango te.+
Mpo Moto oyo azali koyokela bango mawa akokamba bango,+
Mpe akotambwisa bango pene na maziba ya mai.+
12 Talá! Bazali kouta mosika,+
Mpe talá! baoyo bauti na nɔrdi mpe na wɛsti,
Mpe baoyo bauti na mokili ya Sinime.”+
13 Yo likoló, gangá na esengo, mpe yo mabele, sepelá.+
Bangomba esepela mpe eganga na esengo.+
14 Kasi Siona azalaki kaka koloba:
“Yehova asundoli ngai,+ mpe Yehova abosani ngai.”+
15 Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo azali komɛlisa mabɛlɛ,
To akoyokela mwana oyo amemaki na libumu mawa te?
Ata soki basi wana babosani, ngai nakobosana yo te.+
16 Talá! Nakomi nkombo na yo na mabɔkɔ na ngai.
Bifelo na yo ezali ntango nyonso liboso na ngai.
17 Bana na yo bazongi noki.
Baoyo bazali kobukabuka yo mpe kobebisa yo bakobima epai na yo.
18 Tombolá miso na yo mpe talá bipai nyonso.
Bango nyonso bayangani.+
Bazali koya epai na yo.
“Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova,
“Okolata bango nyonso lokola biloko ya kobongisa nzoto,
Mpe okokanga bango na nzoto na yo ndenge mwasi ya libala asalaka.
19 Atako bisika na yo oyo ebebisamá etikalá mpamba mpe mokili na yo ezalaki liboke ya mabanga,+
Sikoyo ekokóma nkaka mpenza mpo na baoyo bazali kofanda kuna,+
20 Bana oyo okobota nsima ya liwa ya bana na yo mosusu bakoloba na matoi na yo ete:
‘Esika oyo ezali nkaka mpenza mpo na ngai.
Kómisá esika monene mpo nafanda.’+
21 Mpe okoloba na motema na yo ete:
‘Nani azali tata ya bana oyo bapesá ngai,
Ngai nazali mwasi oyo nazalaka lisusu na bana te mpe nazali ekomba,
Oyo bamemá na mboka mopaya mpe moto ya bolɔkɔ?
Nani abɔkɔlá bango?+
22 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Talá! Nakotombolela bikólo lobɔkɔ na ngai,
Mpe nakotombolela bato ya bikólo elembo na ngai.+
Mpe bakoya na bana na yo ya mibali na mabɔkɔ* na bango,
Mpe bakomema bana na yo ya basi na mapeka na bango.+
Bakogumbamela yo bilongi na nse+
Mpe bakolɛmbɔla putulu ya makolo na yo,+
Mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova;
Baoyo batyelaka ngai elikya bakoyoka nsɔni te.”+
24 Baoyo basili kozwama, bakoki nde kolongolama na mabɔkɔ ya moto ya nguya,
To bato oyo bakangami epai ya monyokoli bakoki nde kobikisama?
25 Kasi talá oyo Yehova alobi:
Nakotɛmɛla baoyo batɛmɛlaka yo,+
Mpe nakobikisa bana na yo.
26 Nakosala ete baoyo bazali komonisa yo mpasi bálya mosuni na bango moko,
Mpe bakolangwa makila na bango moko lokola nde vinyo ya elɛngi.
Mpe bato nyonso bakoyeba* ete nazali Yehova,+
Mobikisi+ mpe Mosikoli+ na yo,
Moto ya Nguya ya Yakobo.”+
50 Talá oyo Yehova alobi:
“Wapi mokanda ya koboma libala+ ya mama na bino, oyo nabenganaki?
To natɛkaki bino epai ya nani na kati ya badefisi na ngai?
Talá! Botɛkamaki mpo na mabunga na bino moko,+
Mpe babenganaki mama na bino mpo na misala na bino ya kobuka mibeko.+
2 Mpo na nini ntango nayaki, moto azalaki te?
Mpo na nini moto moko te ayanolaki ntango nabengaki?+
Lobɔkɔ na ngai ezali mokuse mpo na kosikola,
To nazangi nde nguya ya kobikisa?+
Mbisi na yango ekufaka mpo mai ezali te.
Mpe epɔlaka mpo na kozanga mai.
Alamwisaka ngai ntɔngɔ nyonso;
Alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami.+
Nabalukaki na ngámbo mosusu te.+
6 Napesaki mokɔngɔ na ngai na baoyo bazalaki kobɛta ngai
Mpe matama na ngai na baoyo bazalaki kopikola ngai mandefu.
Nabombaki elongi na ngai te ntango bafingaki ngai mpe babwakelaki ngai nsoi.+
7 Kasi Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akosalisa ngai.+
Yango wana nakoyoka nsɔni te.
Yango wana natye elongi na ngai lokola libanga ya silekisi,+
Mpe nayebi ete nakoyokisama nsɔni te.
8 Moto oyo azali kotánga ngai moto ya sembo* azali pene.
Tótɛlɛma elongo.*
Nani azali na likambo ya kosamba na ngai?
Apusana pene na ngai.
9 Talá! Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akosalisa ngai.
Nani akotánga ngai ete nazali na ngambo?
Talá! Bango nyonso bakonzuluka lokola elamba.
Ndɔngɛ ekolya bango.
Nani oyo atamboli na molili makasi ata kongɛnga ya moke ezali te?
Atyela nkombo ya Yehova motema mpe atalelaka Nzambe na ye.
11 “Talá! Bino nyonso oyo bozali kopelisa mɔtɔ,
Bozali kosala ete mintentei ebima,
Bótambola na pole ya mɔtɔ na bino,
Na kati ya mintentei oyo bobimisi.
Eloko oyo bokozwa na lobɔkɔ na ngai yango oyo:
Bokolala na kati ya mpasi.
Bótala libanga epai boutaki
Mpe lidusu epai bobimaki.
3 Mpo Yehova akobɔndisa Siona.+
Akobɔndisa bisika na ye nyonso oyo ebebisamá,+
Mpe akokómisa esobe na ye lokola Edene+
Mpe mokili patatalu na ye oyo ekauká lokola elanga ya Yehova.+
Nsai monene mpe esengo ekomonana epai na ye,
Matɔndi mpe mongongo ya mondule.+
5 Bosembo na ngai ekómi pene.+
6 Bótombola miso na bino likoló,
Mpe bótala mabele na nse.
Mpo likoló ekopanzana lokola milinga;
Mpe mabele ekonzuluka lokola elamba,
Mpe bato oyo bafandi wana bakokufa lokola bangungi.
Bóbanga te matumoli ya bato, bawei mpamba,
Bózala na nsɔmɔ te ya mafinga na bango.
Kasi bosembo na ngai ekozala mpo na seko,
Mpe lobiko na ngai libota na libota.”+
Lamuká lokola na mikolo ya kala, lokola na ntango ya mabota oyo eleká.
10 Ezali yo te moto okaukisaki mbu, mai ya mozindo monene?+
Yo te moto okómisaki bozindo ya mbu nzela mpo bato oyo basikolami bákatisa?+
11 Basikolami ya Yehova bakozonga,+
12 “Ngai moko nazali Moto oyo azali kobɔndisa bino.+
Mpo na nini obanga moto, mowei mpamba oyo akokufa,+
Mpe mwana ya moto oyo akokauka lokola matiti ya mobesu?
Mpe mokolo mobimba ozalaki ntango nyonso na nsɔmɔ ya nkanda ya monyokoli,*
Lokola nde amibongisaki mpo na kobebisa yo.
Sikoyo wapi nkanda ya monyokoli?
14 Moto oyo agunzami na minyɔlɔlɔ akofungolama mosika te;+
Akokufa te mpe akokende na libulu te,
Mpe akozanga limpa te.
15 Kasi ngai nazali Yehova Nzambe na yo,
Moto oyo atombokisaka mbu mpo mbonge na yango ezala na yikiyiki.+
—Yehova ya mampinga nde nkombo na ye.+
16 Nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na yo,
Mpe nakozipa yo na elili ya lobɔkɔ na ngai,+
Mpo na kolona likoló mpe kotya moboko ya mabele+
Mpe koloba na Siona ete: ‘Bozali bato na ngai.’+
17 Lamuká! Lamuká! Tɛlɛmá, Ee Yerusaleme,+
Yo oyo omɛli na lobɔkɔ ya Yehova kɔpɔ ya nkanda makasi na ye.
Omɛli kɔpɔ ya monene;
Osilisi kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu.+
18 Na bana nyonso oyo ye aboti, mwana moko te azali wana mpo na kotambwisa ye,
Mpe na bana nyonso oyo ye abɔkɔli, ata mwana moko te asimbaki lobɔkɔ na ye.
19 Makambo oyo mibale ekwelaki yo.
Nani akomitya na esika na yo?
Kopunza ná libebi, nzala ná mopanga!+
Nani akobɔndisa yo?+
Balali na nse na nsuka nyonso ya balabala*
Lokola mpate ya zamba na monyama.
Batondi na nkanda makasi ya Yehova, mpamela ya Nzambe na yo.”
21 Na yango, nabondeli yo, yoká likambo oyo,
Ee mwasi oyo amoni mpasi mpe alangwe, atako na vinyo te.
22 Talá oyo Nkolo na yo, Yehova, Nzambe na yo, oyo azali kobundela bato na ye, alobi:
“Talá! Nakobɔtɔla na lobɔkɔ na yo kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu,+
Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ na ngai ya nkanda makasi;
Okomɛla yango lisusu te.+
23 Nakotya yango na lobɔkɔ ya baoyo bazali kotungisa yo,+
Baoyo balobi na yo ete: ‘Gumbamá mpo tótambola likoló na yo!’
Bongo okómisaki mokɔngɔ na yo lokola mabele,
Lokola balabala mpo bango bátambola.”
52 Ee Siona!+ Lamuká! Lamuká! Latá makasi na yo,+
Ee Yerusaleme, engumba mosantu, latá bilamba na yo ya kitoko!+
Mpo esutu mpe moto ya mbindo akokɔta epai na yo lisusu te.+
2 Ee Yerusaleme, pupolá putulu na nzoto, tɛlɛmá mpe fandá.
Ee yo mokangami, mwana mwasi ya Siona, longolá bansinga na nkingo na yo.+
3 Mpo talá oyo Yehova alobi:
4 Mpo talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova alobi:
“Mbala ya liboso, bato na ngai bakitaki na Ezipito mpo na kofanda kuna lokola bapaya;+
Na nsima Asiri enyokolaki bango kaka mpamba.”
5 “Bongo sikoyo, nasala nini?” Yehova alobi bongo.
“Mpo bato na ngai bazwamaki ofele.
Bato oyo bazalaki koyangela bango bazalaki kaka koganga na bolongi,”+ yango nde liloba ya Yehova,
“Mpe ntango nyonso, mokolo mobimba, bamemyaki nkombo na ngai te.+
6 Mpo na yango nde bato na ngai bakoyeba nkombo na ngai,+
Mpo na yango, bakoyeba na mokolo yango ete, ngai nde Moto nazali koloba.
Ɛɛ, ezali ngai.”
7 Ezali kitoko mpenza na bangomba makolo ya moto oyo azali koya na nsango malamu,+
Ya moto oyo azali kosakola kimya,+
Ya moto oyo azali koya na nsango malamu ya eloko moko ya malamu koleka,
Ya moto oyo azali kosakola lobiko,
Ya moto oyo azali koloba na Siona ete: “Nzambe na yo akómi Mokonzi!+
8 Yoká! Basinzili na yo batomboli mongongo.
Bazali koganga elongo na esengo,
Bakomona yango polele* ntango Yehova akozongisa Siona.
10 Yehova amonisi lobɔkɔ na ye mosantu na miso ya bikólo nyonso;+
Bansuka nyonso ya mabele ekomona misala ya lobiko* ya Nzambe na biso.+
11 Bólongwa, bólongwa, bóbima kuna,+ bósimba eloko moko te ya mbindo!+
12 Bokobima mbangumbangu te,
Bokokima mpe te,
Mpo Yehova akotambola liboso na bino,+
Mpe Nzambe ya Yisraele akokɛngɛla bino na nsima.+
13 Talá! Mosaleli na ngai+ akosala makambo na mayele ya kososola.
Akotombolama likoló,
Akomatisama mpe akokumisama mingi mpenza.+
14 Bato ebele batikalaki minɔkɔ polele ntango bazalaki kotala ye,
—Mpo elongi na ye ebebisamaki mingi koleka oyo ya moto mosusu nyonso
Mpe nzoto na ye ya lokumu ebebisamaki koleka ya bato—
Bakonzi bakokanga minɔkɔ na bango* liboso na ye,+
Mpo bakomona makambo oyo bayebisá bango yango te
Mpe bakotya likebi na makambo oyo bayoká naino te.+
53 Nani andimeli likambo oyo ayoki epai na biso?*+
Bongo lobɔkɔ ya Yehova+ emonisami epai ya nani?+
2 Akobima lokola mwa nzete+ liboso na ye,* lokola mosisa oyo ezali kobima na mokili oyo ekauká.
3 Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye,+
Moto oyo asengelaki komona* mpasi mpe amesanaki na maladi.
Ezalaki lokola nde elongi na ye ebombami liboso na biso.*
Atyolamaki mpe tomonaki ye mpamba.+
Kasi tomonaki ete azali moto oyo Nzambe apesi etumbu, abɛti mpe amonisi mpasi.
6 Biso nyonso tozalaki koyengayenga lokola bampate,+
Tobalukaki moto na moto na nzela na ye,
Mpe Yehova asali ete libunga na biso nyonso ekwela ye.+
Bamemaki ye lokola mpate oyo ekei na esika ya kobomama,+
Lokola mpate ya mwasi oyo efandaka nyɛɛ liboso ya bakati-nsuki na yango,
Mpe afungolaki monɔkɔ na ye te.+
8 Basambisaki ye na bosembo te yango wana anyokwamaki mpe alongolamaki;
Mpe nani akoluka koyeba molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye?*
9 Mpe bapesaki ye lilita* elongo na bato mabe,+
Mpe na liwa na ye elongo na bazwi,*+
Atako asalaki mabe moko te*
Mpe lokuta ezwamaki na monɔkɔ na ye te.+
10 Kasi ezalaki mokano ya Yehova ya* konyata ye, mpe atikaki ete amona mpasi.
Soki okopesa bomoi* na ye lokola likabo ya ngambo,+
11 Nsima ya konyokwama,* akosepela na makambo oyo akomona.
Na nzela ya boyebi na ye, moto ya sembo, mosaleli na ngai,+
Akosala ete bato mingi bámonana bato ya sembo,+
Mpe akomema mabunga na bango.+
12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,
Mpe akokabola biloko oyo epunzami elongo na bato ya nguya,
Mpo apesaki bomoi na ye tii na liwa+
Atángamaki na kati ya bato oyo babukaka mibeko;+
Amemaki lisumu ya bato ebele,+
Mpe abondelaki mpo na bato oyo babukaka mibeko.+
54 “Gangá na esengo, yo mwasi ekomba oyo abotá te!+
Sepelá na koganga moko ya esengo mpe gangá makasi,+ yo mwasi oyo oyoká ata mpasi ya kobota te,+
Mpo bana ya mwasi oyo asundolamá bazali ebele mpenza
Koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali,”*+ Yehova alobi bongo.
2 “Kómisá esika ya hema na yo monene koleka.+
Tandá bilamba ya hema na yo ya monene.
Kotika te. Kómisá bansinga ya hema na yo milai,
Mpe kómisá bapike ya hema na yo makasi.+
3 Mpo okopalangana na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi,
Bana na yo bakozwa bikólo,
Mpe bakofanda na bingumba oyo etikalá mpamba.+
Mpo okobosana nsɔni ya bolenge na yo,
Mpe okokanisa lisusu te kosambwa na yo ya mwasi oyo mobali akufá.”
5 “Mpo Mokeli na yo Monene+ azali lokola mobali* na yo,+
Yehova ya mampinga nde nkombo na ye,
Mpe Mosantu ya Yisraele azali Mosikoli na yo.+
Akobengama Nzambe ya mabele mobimba.+
6 Mpo Yehova abengaki yo lokola nde ozalaki mwasi oyo basundolá mpe oyo anyokwamá mpenza na makanisi,*+
Lokola mwasi oyo babalaki na bolenge mpe na nsima babenganaki,” Nzambe na yo alobi bongo.
8 Na nkanda monene lokola mpela, nabombelaki yo elongi na ngai mpo na mwa ntango,+
Kasi nakoyokela yo mawa na bolingo na ngai ya sembo mpe ya seko,”+ Mosikoli na yo,+ Yehova, alobi bongo.
9 “Mpo na ngai, oyo ezali lokola mikolo ya Noa:+
Ndenge nalapaki ndai ete mai ya Noa ekozindisa lisusu mabele te,+
Yango wana nalapi ndai ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.+
10 Mpo bangomba ekoki kolongolama
Mpe bangomba mike ekoki koningana,
Kasi bolingo na ngai ya sembo ekolongolama epai na yo te.+
Mpe kondimana na ngai ya kimya ekotengatenga te,”+ Yehova, Moto oyo azali koyokela yo mawa,+ alobi bongo.
11 “Ee mwasi oyo amoni mpasi,+ oyo abɛtami na mopɛpɛ makasi, oyo azali na moto ya kobɔndisa ye te,+
Nazali kotya mabanga na yo na pɔtɔpɔtɔ ya makasi
Mpe moboko na yo na mabanga ya safire.+
12 Nakosala madusu oyo bakatakatá na bifelo na yo na mabanga ya rubi,
Baporte na yo na mabanga oyo ezali kongɛnga,*
Mpe bandelo na yo nyonso na mabanga ya motuya.
14 Okopikama makasi na bosembo.+
Monyoko ekozala mpenza mosika na yo,+
Okobanga eloko te mpe ntina ya kozala na nsɔmɔ ekozala te
Mpo ekopusana pene na yo te.+
15 Soki moto abundisi yo,
Ngai te moto nakopesa ye mitindo.
Moto nyonso oyo akobundisa yo akokwea mpo na yo.”+
16 “Talá! Ngai moko nde nazalisá moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ,
Moto oyo azali kofula mɔtɔ ya makala,
Mpe mosala na ye ebimisaka ebundeli.
Ngai moko mpe nazalisá mobebisi mpo na kobebisa.+
17 Ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga,+
Mpe okokweisa lolemo nyonso oyo ekomeka kosambisa yo.
Yango nde libula ya basaleli ya Yehova,
Mpe bosembo na bango euti epai na ngai,” Yehova alobi bongo.+
55 Bino nyonso oyo bozali na mposa ya mai,+ bóya kozwa mai.+
Bino baoyo bozali na mbongo te, bóya, bózwa* mpe bólya.
Ɛɛ, bóya, bózwa* vinyo mpe miliki+ kozanga mbongo, mpe ya ofele.+
2 Mpo na nini bozali kaka kobimisa mbongo mpo na eloko oyo ezali limpa te,
Mpo na nini kobebisa mbongo na bino oyo bozwi na mpasi na eloko oyo etondisaka te?
Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu,+
3 Bótya litoi mpe bóya epai na ngai.+
Bóyoka, mpe bokokoba kozala na bomoi,
Mpe nakosala na bino kondimana moko oyo ekoumela seko+
Na kolanda elaka ya bolingo ya sembo oyo nasalaki na Davidi, oyo ebongi kotyelama motema.+
5 Talá! Okobenga* ekólo oyo oyebi te,
Mpe bato ya ekólo oyo bayebi yo te bakoya mbangu epai na yo
Mpo na Yehova Nzambe na yo,+ Mosantu ya Yisraele,
Mpo akokumisa yo.+
6 Bóluka Yehova na ntango oyo akoki komonana.+
Bóbenga ye na ntango oyo azali pene.+
7 Moto mabe atika mabe na ye,+
Mpe mosali mabe atika makanisi na ye;
Azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+
8 “Mpo makanisi na ngai ezali makanisi na bino te,+
Ndenge na ngai ya kosala makambo ekeseni mpenza na oyo ya bino,” Yehova alobi bongo.
9 “Mpo kaka ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,
Ndenge na ngai mpe ya kosala makambo eleki mosika oyo ya bino
Mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+
10 Mpo kaka ndenge mbula ná nɛjɛ eutaka na likoló ekiti,
Ezongaka kuna te soki epɔlisi mabele te, ebotisi yango te mpe esali te ete ebimisa milona,
Soki moloni azwi naino mboto te mpe molei azwi naino limpa te,
11 Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana.+
Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te,+
Kasi ekokokisa mpenza nyonso oyo esepelisaka ngai,*+
Mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.
Bangomba mpe bangomba mike ekosepela liboso na bino na koganga ya esengo,+
Mpe banzete nyonso ya zamba ekobɛta mabɔkɔ na yango.+
13 Na esika ya mwa banzete ya nzubɛnzubɛ, nzete ya jenevriye ekobima,+
Na esika ya lititi ya nsendensende, nzete ya mirte ekobima.
56 Yehova alobi boye:
“Bósimba bosembo+ mpe bósala oyo ezali boyengebene,
Mpo lobiko na ngai ekoya mosika te
Mpe boyengebene na ngai ekomonisama.+
2 Esengo na moto oyo asalaka yango
Mpe na mwana ya moto oyo akangamaka makasi na yango,
Oyo atosaka sabata mpe akómisaka yango eloko mpamba te+
Mpe oyo apekisaka lobɔkɔ na ye mpo asala eloko moko te ya mabe.
Mpe mokube aloba te ete: ‘Talá! Nazali nde nzete oyo ekauká.’”
4 Mpo talá oyo Yehova alobi na mikube oyo bazali kotosa basabata na ngai mpe oyo baponi makambo oyo nasepelaka na yango mpe bakangami makasi na kondimana na ngai:
5 “Nakopesa bango monimá mpe nkombo na ndako na ngai mpe na kati ya bifelo na ngai,
Eloko moko ya malamu koleka bana mibali ná bana basi.
Nakopesa bango nkombo ya seko,
Nkombo oyo ekosila te.
6 Mpo na bapaya oyo bayei epai ya Yehova mpo na kosalela ye,
Kolinga nkombo ya Yehova+
Mpe kozala basaleli na ye,
Baoyo nyonso bazali kotosa sabata mpe bakómisi yango eloko mpamba te
Mpe baoyo bakangami makasi na kondimana na ngai,
7 Nakomema mpe bango na ngomba na ngai mosantu+
Mpe nakosepelisa bango na ndako na ngai ya mabondeli.
Makabo na bango ya kotumba mobimba ná bambeka na bango ekondimama likoló ya etumbelo na ngai.
Mpo ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso.”+
8 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, oyo azali koyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná,+ alobi boye:
“Longola bato oyo bayanganisami, nakoyanganisa mpe bato mosusu epai na ye.”+
9 Bino banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe, bóya kolya,
Bino banyama nyonso oyo efandaka na zamba.+
10 Basinzili na ye bakufá miso.+ Ata moko te na bango atye likebi.+
Bango nyonso bazali bambwa oyo egangaka te, ezali kokoka koganga te.+
Ezali komɛla mpema, elali na nse, elingá kolala.
11 Bazali bambwa oyo ezali na lokoso mingi;
Batondaka te.
Bazali babateli ya mpate oyo bakangaka ntina te.+
Bakei bango nyonso na nzela na bango moko;
Moto na moto azali koluka litomba na ye moko oyo ezwami na ndenge ya mabe mpe koloba ete:
Mpe lobi ekozala lokola lelo, kaka malamu mingi koleka.”
57 Moyengebene akufi,
Kasi moto moko te atyeli yango likebi.
2 Azali kokɔta na kati ya kimya.
Bazali kopema na bambeto* na bango, baoyo nyonso bazali kotambola na bosembo.
3 “Kasi bino, bópusana awa,
Bino bana ya mwasi oyo azali nganga-nkisi,
Bino bana ya mobali ya ekobo mpe ya mwasi ya ndumba:
4 Bozali kosɛka nani?
Nani bozali kofungolela monɔkɔ polele mpe kobimisela lolemo?
Bozali te bana ya kobuka mibeko,
Bana ya bokosi,+
5 Baoyo bazikaka na mposa makasi na katikati ya banzete minene,+
Na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+
Baoyo babomaka bana na mabwaku,*+
Na nse ya madusu ya mabanga?
6 Likabo na yo ezali na mabanga ya sɛlisɛli ya lobwaku.*+
Ɛɛ, yango nde libula na yo.
Osopeli yango ata mpe makabo ya masanga, mpe opesi makabo.+
Nasengeli nde kosepela* na makambo wana?
7 Otyaki mbeto na yo likoló ya ngomba ya molai mpe oyo etombwaná,+
Mpe omataki kuna mpo na kopesa mbeka.+
8 Otyaki elembo ya ekeko na yo ya losambo nsima ya porte mpe ya likonzí ya porte.
Otikaki ngai, mpe omitikaki bolumbu;
Omataki mpe okómisaki mbeto na yo monene.
Mpe osalaki kondimana na bango.
Otindaki bato na yo mosika,
Okitaki na nse tii na Nkunda.*
10 Obomi nzoto mpo na kolanda ebele ya banzela na yo,
Kasi olobi te ete: ‘Elikya ezali te!’
Ozwi lisusu makasi.
Yango wana otiki te.*
Okanisaki ngai te.+
Otyaki likebi na eloko moko te.+
Nabombaki makambo mpe nafandaki nyɛɛ?+
Yango wana, obangaki ngai te.
Mopɛpɛ ekomema yango nyonso,
Mwa mopɛpɛ ekomema yango,
Kasi moto oyo azali kokima epai na ngai akozwa mokili ezala libula na ye
Mpe akozwa ngomba na ngai mosantu.+
14 Ekolobama ete: ‘Bótonga, bótonga nzela! Bóbongisa nzela!+
Bólongola libaku nyonso na nzela ya bato na ngai.’”
15 Mpo talá oyo Moto oyo azali likoló mpe atombwani,
Oyo afandi mpo na libela+ mpe oyo nkombo na ye ezali mosantu,+ alobi:
“Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu,+
Kasi mpe esika moko na baoyo batutami mpe baoyo bazali na elimo ya komikitisa,
Mpo na kopesa lisusu bato ya komikitisa makasi
Mpe kopesa lisusu makasi na motema ya baoyo batutami.+
16 Mpamba te nakotɛmɛla bango te mpo na libela
Mpe nakosilikela bango te ntango nyonso;+
Mpo elimo ya moto ekolɛmba mpo na ngai,+
Ata bikelamu oyo epemaka oyo nasalá.
17 Nasilikaki mpo na lisumu na ye ndenge azalaki koluka litomba na ndenge ya mabe,+
Yango wana nabɛtaki ye, mpe lokola nazalaki na nkanda, nalongolaki likebi na ngai epai na ye.*
Kasi akobaki kaka kotambola lokola mopɛngwi+ mpe kolanda kaka nzela ya motema na ye.
18 Namoni makambo asalaka,
Kasi nakobikisa ye+ mpe nakokamba ye+
Mpe nakobɔndisa ye lisusu*+ ná bato na ye oyo bazali kolela.”+
19 “Nazali kotya lisanzoli na mbɛbu.
Kimya ya ntango nyonso ekopesama na moto oyo azali mosika mpe na moto oyo azali pene,”+ Yehova alobi bongo,
“Mpe nakobikisa ye.”
20 “Kasi bato mabe bazali lokola mbu oyo ezali kotombwatombwana, oyo ezali kokoka kofanda nyɛɛ te,
Oyo mai na yango ezali kobwakabwaka matiti ya mai mpe pɔtɔpɔtɔ.”
21 Nzambe na ngai alobi: “Bato mabe bazalaka na kimya te.”+
58 “Belelá na mongongo makasi; kotika te.
Tombolá mongongo na yo lokola liseke.
Yebisá bato na ngai botomboki na bango,+
Bana ya Yakobo masumu na bango.
2 Mokolo na mokolo, bazali koluka ngai,
Mpe bazali koloba ete bazali kosepela koyeba ndenge oyo nalingi bázala,
Lokola nde ezalaki ekólo oyo ezalaki kosala makambo ya bosembo
Mpe oyo esundolaki bosembo ya Nzambe na bango te.+
Basɛngaki ngai nasambisa makambo na bosembo mpenza,
Lokola nde bazalaki kosepela kopusana pene na Nzambe:+
3 ‘Ntango tokilaka bilei mpo na nini omonaka yango te?+
Mpe ntango tomimonisaka mpasi* mpo na nini otyaka likebi te?’+
Mpo mokolo oyo bokilaka bilei, bolukaka nde matomba na bino moko,*
Mpe bonyokolaka bato na bino ya misala.+
4 Kokila bilei na bino esukaka na koswana mpe na bitumba,
Mpe bóbɛtaka likofi na ndenge ya mabe.
Bokoki te kokila bilei ndenge bozali kosala yango lelo mpe mongongo na bino eyokana na likoló.
5 Kokila bilei oyo naponi esengeli kozala nde lokola oyo:
Lokola mokolo oyo moto amiyokisaka mpasi,
Kogumba motó na ye lokola nkɛkɛlɛ,
Kotanda mbeto na ye na ngɔtɔ* mpe na putulu ya mɔtɔ?
Ezali yango nde ozali kobenga kokila bilei mpe mokolo oyo esepelisaka Yehova?
6 Te, kokila bilei oyo naponi yango oyo:
Kolongola bikangeli ya mabe,
Kofungola bansinga ya ekanganeli,+
Kotika baoyo banyokwami bákende na bonsomi,+
Mpe kobuka ekanganeli nyonso;
7 Ezali nde kokabola limpa na yo na moto oyo azali na nzala,+
Kokɔtisa na ndako na yo mobola mpe moto oyo azangá ndako,
Kolatisa elamba na moto oyo omoni bolumbu,+
Mpe kopesa bandeko na yo* mokɔngɔ te.
Bosembo na yo ekokende liboso na yo,
Mpe nkembo ya Yehova ekokɛngɛla yo na nsima.+
9 Bongo okobenga mpe Yehova akoyanola;
Okobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe ye akoloba: ‘Ngai oyo!’
Soki olongoli ekanganeli epai na yo
Mpe soki otiki kolakisalakisa mosapi mpe kolobaloba makambo ya mabe,+
10 Soki opesi moto oyo azali na nzala biloko oyo yo moko osepelaka na yango+
Mpe okokisi mposa ya bato oyo bazali na mpasi,*
Wana pole na yo ekongɛnga ata na molili,
Mpe molili na yo ekozala lokola midi.+
11 Yehova akokamba yo ntango nyonso
Mpe akokokisa mposa na yo ata na mokili oyo ekauká mpenza,+
Akokembisa mikuwa na yo,
Mpe okokóma lokola elanga oyo ezwaka mai malamu mpenza,+
Lokola liziba ya mai, oyo mai na yango esilaka te.
12 Bakotongela yo lisusu bisika oyo ebebisamá kala,+
Mpe okobongisa miboko oyo ebebá banda mabota na mabota.+
Okobengama mobongisi bifelo oyo ebukaná,+
Mobongisi babalabala oyo bato bakoki kofanda pembenipembeni na yango.
13 Soki mpo na sabata oboyi* kolanda matomba na yo moko na mokolo na ngai mosantu,+
Mpe soki obengi sabata bisengo mpenza, mokolo mosantu ya Yehova, mokolo oyo esengeli kokumisama,+
Mpe okumisi yango na esika ya kolanda matomba na yo moko,* mpe na esika ya koloba maloba ya mpamba,
14 Bongo okosepela mpenza na Yehova,
Mpe nakotambwisa yo na bisika oyo etombwaná ya mabele.+
Nakoleisa yo biloko euti na libula ya Yakobo nkɔkɔ na yo,+
Mpo monɔkɔ ya Yehova nde elobi.”
2 Mabunga na bino nde ekaboli bino na Nzambe na bino,+
Masumu na bino esali ete abombela bino elongi na ye,
Mpe aboyi koyoka bino.+
Mbɛbu na bino elobaka lokuta,+ mpe lolemo na bino elobaka na nse nse likambo ya kozanga bosembo.
Batye motema na eloko oyo ezali ya solo te,*+ mpe balobi makambo ezangá ntina.
Bakumbaka mpasi lokola zemi mpe babotaka eloko oyo eyokisaka mpasi.+
Moto nyonso oyo akolya maki yango akokufa,
Mpe liki oyo epasuki ekobimisa nyoka ya ngɛngɛ.*
6 Bakoki kosala elamba te na monyama na bango ya limpulututu,
Mpe biloko na bango oyo basali ekozipa bango te.+
Misala na bango ezali mabe,
Mabɔkɔ na bango etondi na misala ya mobulu.+
7 Makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe,
Mpe basalaka noki mpo na kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te.+
Makanisi na bango ezali makanisi mabe;
Babimiselaka bato ntango nyonso libebi mpe banyokolaka bango.+
Batɛngisi babalabala na bango.
Moto moko te oyo azali kotambola kuna akozwa kimya.+
9 Yango wana bosembo ezali mosika na biso,
Mpe boyengebene ezali kokómela biso te.
Tozali na elikya ya komona pole, kasi molili nde ezali;
Tozali na elikya ya komona kongɛnga, kasi tozali kaka kotambola na molili.+
10 Lokola bato oyo bakufá miso, tozali kosimbasimba mpo na koluka efelo;
Tozali kokoba kosimbasimba lokola bato oyo bazangá miso.+
Tobɛti libaku na midi lokola nde tozalaki na molili ya mpokwa;
Na kati ya bato ya makasi tozali lokola bato oyo bakufá.
11 Biso nyonso tozali kokoba konguluma lokola ba-urse
Mpe tozali konguluma na mawa lokola bibenga.
Tozali na elikya ya komona bosembo, kasi ezali te;
Elikya ya lobiko, kasi ezali mosika na biso.
12 Mpo misala na biso ya botomboki ezali mingi liboso na yo;+
Mpe masumu na biso mokomoko ezali kotatola mpo na kofunda biso.+
Mpo misala na biso ya botomboki ezali elongo na biso;
Toyebi malamu mabunga na biso.+
13 Tobuki mibeko mpe towangani Yehova;
Topesaki Nzambe na biso mokɔngɔ,
Tolobelaki monyoko mpe botomboki,+
Na motema na biso, tokanaki mpe tolobaki na nse nse maloba ya lokuta.+
Mpe boyengebene etɛlɛmi mosika.+
Mpo solo* ebɛti libaku na esika monene ya bato nyonso,
Mpe oyo ezali sembo ezali kokoka kokɔta te.
16 Akamwaki komona ete moto azali te,
Ata moto moko te akɔtaki na likambo yango,
Yango wana lobɔkɔ na ye moko ememaki lobiko,*
Mpe bosembo na ye moko esungaki ye.
18 Talá oyo bakozwa mpo na oyo basali:+
Nkanda makasi epai ya batɛmɛli na ye, etumbu epai ya banguna na ye.+
Mpe akopesa bisanga etumbu oyo ebongi na yango.
19 Baoyo bazali na wɛsti bakobanga nkombo ya Yehova
Mpe baoyo bazali na ɛsti bakobanga nkembo na ye,
Mpo Yehova akoya nokinoki lokola ebale oyo ezali kotíyola mbangu,
Na nguya na ye akɔmbɔlaka eloko nyonso oyo ezali na nzela na yango.
20 “Mosikoli+ akoya na Siona,+
Epai ya bana ya Yakobo oyo bazali kotika makambo ya kobuka mibeko,”+ Yehova alobi bongo.
21 “Mpo na ngai, oyo nde kondimana na ngai ná bango,”+ Yehova alobi bongo. “Elimo na ngai oyo ezali likoló na yo mpe maloba na ngai oyo natye na monɔkɔ na yo, ekolongolama te na monɔkɔ na yo, na monɔkɔ ya bana* na yo, to na monɔkɔ ya bana ya bana na yo,* banda sikoyo mpe mpo na libela,” Yehova alobi bongo.
60 “Ee mwasi, tɛlɛmá,+ panzá pole, mpo pole na yo eyei.
Mpe nkembo ya Yehova engɛngɛli yo.+
2 Mpo talá! molili ekozipa mabele
Mpe molili makasi ekozipa bikólo;
Kasi Yehova akongɛngɛla yo,
Mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.
4 Tombolá miso na yo mpe talá zingazinga na yo nyonso!
Bayanganisami bango nyonso; bazali koya epai na yo.
5 Na ntango yango okomona mpe okotonda na esengo,+
Motema na yo ekosepela mpe ekotonda na esengo,
Mpo bozwi ya mbu ekoya epai na yo;
Biloko ya bikólo ekoya epai na yo.+
Baoyo nyonso bauti na Sheba—bakoya;
Bakomema wolo ná olibana.
Bakosakola masanzoli ya Yehova.+
7 Bitonga nyonso ya Kedare+—ekoyanganisama epai na yo.
Bampate-mibali ya Nebayote+—ekosalela yo.
9 Mpo bisanga ekotyela ngai elikya;+
Bamasuwa ya Tarasisi ezali liboso,*
Mpo na kouta na bana na yo mosika,+
Na palata na bango mpe wolo na bango,
Epai nkombo ya Yehova Nzambe na yo ezali mpe epai ya Mosantu ya Yisraele,
10 Bapaya bakotonga bifelo na yo,
Mpe bakonzi na bango bakosalela yo,+
Mpo na nkanda na ngai nabɛti yo,
Kasi na boboto na ngai nakoyokela yo mawa.+
11 Baporte na yo ekotikala polele ntango nyonso;+
Ekokangama te ezala na moi to na butu,
Mpo na komemela yo biloko ya bikólo,
Mpe bakonzi na bango nde bakokamba.+
12 Mpo ekólo nyonso to bokonzi nyonso oyo ekosalela yo te ekokufa,
Mpe bikólo yango ekobebisama mpenza.+
13 Nkembo ya Liban ekoya epai na yo,+
Nzete ya jenevriye, nzete ya frɛnɛ mpe nzete ya siprɛ, yango nyonso elongo,+
Mpo na kokómisa esika na ngai mosantu kitoko;
Nakokumisa esika natyaka makolo na ngai.+
14 Bana ya baoyo banyokolaki yo bakoya mpe bakogumbama liboso na yo;
Baoyo nyonso bamemyaki yo te basengeli kofukama na makolo na yo,
Mpe bakobenga yo engumba ya Yehova,
Siona ya Mosantu ya Yisraele.+
15 Na esika ete ozala engumba oyo basundolá mpe oyo eyinamá, oyo moto moko te azali koleka kuna,+
Nakokómisa yo eloko ya lokumu mpo na seko,
Eloko ya esengo mabota na mabota.+
16 Mpe okomɛla mpenza miliki ya bikólo,+
Okomɛla libɛlɛ ya bakonzi;+
Mpe okoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nazali Mobikisi na yo,
Mpe ete Moto ya Nguya ya Yakobo azali Mosikoli na yo.+
17 Na esika ya kwivrɛ nakotya wolo,
Na esika ya ebende nakotya palata,
Na esika ya nzete, nakotya kwivrɛ,
Mpe na esika ya mabanga, ebende;
Mpe nakotya kimya ezala bakɛngɛli na yo
Mpe bosembo ezala bato oyo bapesaka yo mosala.+
Mpe okobenga bifelo na yo Lobiko+ mpe baporte na yo Lisanzoli.
19 Mpo na yo moi ekozala pole lisusu te na ntango ya moi,
Kongɛnga ya sanza ekopesa yo pole te,
Mpo Yehova akokóma epai na yo pole ya seko,+
Mpe Nzambe na yo akozala kitoko na yo.+
20 Moi na yo ekolala lisusu te,
Sanza na yo mpe ekolimwa te,
Mpo Yehova akokóma pole na yo ya seko,+
Mpe mikolo ya kolela na yo ekosila.+
21 Bato na yo nyonso bakozala bato ya sembo;
Bakozwa mokili mpo na libela.
22 Oyo ya moke akokóma nkóto
Mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya.
Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.”
61 Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali likoló na ngai,+
Mpo Yehova atye ngai mafuta mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu.+
Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema,
Nasakwela bakangami ete bakozwa bonsomi
Mpe ete miso ya bato ya bolɔkɔ ekofungwama polele,+
2 Nasakola mbula ya boboto ya Yehova
Mpe mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe;+
Mpo na kobɔndisa baoyo nyonso bazali kolela;+
3 Napesa baoyo bazali kolela mpo na Siona,
Napesa bango eloko ya kolata na motó na esika ya putulu ya mɔtɔ,
Mafuta ya nsai na esika ya kolela,
Elamba ya lisanzoli na esika ya elimo ya kolɛmba nzoto;
4 Bakotonga lisusu bisika oyo ebebisamá kala;
Bakotɛlɛmisa bisika ya kala oyo etikalá mpamba,+
Mpe bakobongisa lisusu bingumba oyo ebebisamá,+
Bisika oyo etikalaki mpamba libota na libota.+
5 “Bapaya bakotɛlɛma mpe bakobatela bitonga na bino,
Mpe bapaya+ bakozala baloni-bilanga na bino mpe basali-bilanga na bino ya vinyo.+
7 Na esika ya nsɔni bokozwa nde likabo mbala mibale,
Mpe na esika ya kosambwa bakoganga na esengo mpo na likabo na bango.
Ɛɛ, bakozwa makabo mibale na mokili na bango.+
Bakozwa esengo ya seko.+
Nakopesa bango lifuti na bango na bosembo mpenza,
Mpe nakosala kondimana ya seko ná bango.+
9 Bana* na bango bakoyebana na kati ya bikólo,+
Mpe bato ya libota na bango na kati ya bato ya bikólo.
10 Nakosepela mpenza na Yehova.
Nakozala* na esengo mingi na Nzambe na ngai.+
Mpo alatisi ngai bilamba ya lobiko;+
Alíngi ngai kazaka ya bosembo,*
Kaka lokola mobali ya libala oyo alati tirba, lokola nganga-nzambe,+
Mpe lokola mwasi ya libala oyo alati biloko na ye ya kobongisa nzoto.
11 Mpo ndenge mabele ebimisaka milona na yango ya sika,
Mpe ndenge elanga ebimisaka biloko oyo baloni kuna,
Ndenge wana nde Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso
62 Mpo na Siona nakokanga monɔkɔ te,+
Mpe mpo na Yerusaleme nakofanda nyɛɛ te
Tii bosembo* na ye ekongɛnga lokola pole ya makasi+
Mpe lobiko na ye ekopela lokola mɔtɔ oyo ezali kopela.+
Mpe bakobenga yo na nkombo ya sika,+
Oyo Yehova ye moko akopona.
4 Okobengama lisusu te mwasi oyo basundolá,+
Mpe mokili na yo ekobengama lisusu te oyo etikalá mpamba.+
Kasi bakobenga yo: “Esengo na ngai ezali epai na ye,”+
Mpe bakobenga mokili na yo: “Mwasi ya moto.”
Mpo Yehova akosepela na yo,
Mpe mokili na yo ekozala lokola mwasi oyo abalá.
5 Mpo kaka ndenge elenge mobali abalaka ngɔndɔ,
Bafandi na yo bakobala yo.
Ndenge mobali oyo auti kobala asepelaka na mwasi oyo abali,
Nzambe na yo akosepela na yo.+
6 Ee Yerusaleme, natye basinzili likoló ya bifelo na yo.
Moi mobimba mpe butu mobimba, ntango nyonso, basengeli kokanga monɔkɔ te.
Bino baoyo bolobelaka Yehova,
Bófanda nyɛɛ te,
7 Bótika ye apema te tii akopika Yerusaleme makasi,
Tii akosala ete ezala eloko ya kosanzola na mabele.”+
8 Yehova alapi ndai na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na lobɔkɔ na ye ya makasi ete:
“Nakopesa lisusu te banguna na yo mbuma na yo mpo bálya,
Mpe bato ya mboka mosusu bakomɛla te vinyo na yo ya sika oyo obomelaki nzoto.+
9 Kasi baoyo bakobuka yango bakolya yango, mpe bakosanzola Yehova;
Mpe baoyo bazali koyanganisa yango bakomɛla yango na mapango mosantu na ngai.”+
10 Bóleka, bóleka na baporte.
Bóbongisa nzela mpo na bato.+
Bótonga, bótonga balabala monene.
Bólongola mabanga na yango.+
Bótɛlɛmisela bato ya bikólo elembo.+
11 Talá! Yehova ye moko asakoli tii na bansuka ya mabele:
“Bóloba na mwana mwasi ya Siona ete:
‘Talá! Lobiko na yo ezali koya.+
Talá! Azali na mbano ya kopesa,
Mpe lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.’”+
12 Bato bakobenga bango ekólo mosantu, bato oyo Yehova asikoli,+
Bakobenga yo “Moto balukaka,” “Engumba oyo basundolá te.”+
63 Nani yango oyo azali kouta na Edome,+
Oyo azali kouta na Bozera+ na bilamba ya langi makasi,*
Oyo alati bilamba ya kitoko,
Azali kotambola na nguya na ye nyonso?
“Ezali ngai, Moto oyo alobaka na bosembo,
Moto oyo atondi na nguya ya kobikisa.”
2 Mpo na nini bilamba na yo ezali motane,
Mpe mpo na nini bilamba na yo ezali lokola ya moto oyo azali konyatanyata mbuma na ekamwelo ya vinyo?+
3 “Nanyatinyati saani ya kokamola vinyo kaka ngai moko,
Moto moko te na kati ya bato ya bikólo azalaki elongo na ngai.
Na nkanda na ngai nakobaki konyata banguna na ngai,
Mpe nakobaki konyata bango na nkanda makasi na ngai.+
Makila na bango epanzanaki na bilamba na ngai,
Mpe bilamba na ngai nyonso ekómaki mbindo.
5 Natalaki, kasi moto ya kosalisa ngai azalaki te;
Nakamwaki, mpo moto ya kosalisa ngai azalaki te.
6 Na nkanda na ngai nanyatanyataki bato ya bikólo,
Nasalaki ete nkanda na ngai makasi elangwisa bango+
Mpe nasopaki makila na bango na mabele.”
7 Nakolobela misala ya bolingo ya sembo ya Yehova,
Misala ya Yehova oyo ebongi kosanzolama,
Mpo na nyonso oyo Yehova asaleli biso,+
Makambo ebele ya malamu asali mpo na ekólo Yisraele,
Na kolanda motema mawa na ye mpe bolingo ya sembo oyo atondi na yango.
8 Mpo alobaki ete: “Ya solo bazali bato na ngai, bana oyo bakozanga bosembo te.”*+
Yango wana, akómaki Mobikisi na bango.+
9 Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.+
Mpe momemi-nsango na ye moko abikisaki bango.+
Na bolingo na ye mpe na motema mawa na ye, asikolaki bango,+
Mpe atombolaki bango mpe amemaki bango bambula nyonso oyo eleká.+
10 Kasi batombokaki+ mpe bayokisaki elimo santu na ye mawa.+
11 Mpe bakanisaki lisusu mikolo ya kala,
Mikolo ya mosaleli na ye Moize:
“Wapi Moto oyo abimisaki bango na mbu+ elongo na babateli ya mpate ya etonga na ye?+
Wapi Moto oyo atyaki elimo santu na Ye kati na ye?+
12 Wapi Moto oyo asalisaki Moize na nzela ya nguya na ye monene;*+
Moto oyo akabolaki mai liboso na bango,+
Mpo na komisalela nkombo oyo ekoumela seko;+
13 Moto oyo asalaki ete bákatisa mai oyo ezalaki kotomboka,*
Bongo batambolaki kozanga kobɛta libaku,
Lokola mpunda na esobe?
Oboyeli biso yango.
Atako Abrahama ayebi biso te
Mpe Yisraele ayebi biso lisusu te,
Ee Yehova, yo nde Tata na biso.
Mosikoli na biso ya kala, yango nde nkombo na yo.+
17 Ee Yehova, mpo na nini ozali kotika biso* tóyengayenga mosika na banzela na yo?
Mpo na nini otiki* mitema na biso ekóma makasi tii tozali kobanga yo lisusu te?+
Zongá mpo na bolamu ya basaleli na yo,
Mabota ya libula na yo.+
18 Ekólo na yo mosantu ezwaki yango kaka mpo na ntango moke.
Banguna na biso banyatinyati esika na yo mosantu.+
19 Banda kala tokómá lokola bato oyo oyangelaki te,
Lokola bato oyo babengamaki ata moke te na nkombo na yo.
64 Soki opasolaka ata likoló mpe okitaka na nse,
Mpo bangomba eningana mpo na yo,
2 Lokola ntango mɔtɔ epelisaka mwa bitape ya mikemike,*
Mpe mɔtɔ etɔkisaka mai,
Bongo banguna na yo bakoyeba nkombo na yo,
Mpe bikólo ekolɛnga liboso na yo!
3 Ntango osalaki makambo ya nsɔmɔ oyo tokokaki kolikya te,+
Okitaki na nse mpe bangomba eninganaki liboso na yo.+
4 Banda kala moto moko te ayoká to atyá likebi,
Mpe liso moko te emoná Nzambe mosusu, longola kaka yo,
5 Okutani na baoyo basalaka na esengo nyonso oyo ezali sembo,+
Baoyo bakanisaka yo mpe balandaka banzela na yo.
Talá! Osilikaki, wana tozalaki kosala masumu+
Mpe tosalaki bongo ntango molai.
Tosengeli mpenza kobikisama?
6 Mpe biso nyonso tokómi lokola moto ya mbindo,
Mpe misala na biso nyonso ya bosembo* ezali lokola elamba ya bileko ya komona sanza.+
Biso nyonso tokokauka lokola lokasa,
Mpe mabunga na biso ekomema biso lokola mopɛpɛ.
7 Moto moko te azali kobelela nkombo na yo,
Moto moko te azali komeka koluka lisalisi epai na yo,
Mpo obombeli biso elongi na yo,+
8 Kasi sikoyo, Ee Yehova, ozali Tata na biso.+
Talá biso, tobondeli yo, mpo biso nyonso tozali bato na yo.
10 Bingumba na yo mosantu ekómi esobe.
Siona ekómi esobe,
Yerusaleme mabele oyo etikali mpamba.+
11 Ndako na biso ya bosantu mpe ya nkembo,*
Epai bankɔkɔ na biso bazalaki kosanzola yo,
Etumbami na mɔtɔ,+
Mpe biloko nyonso oyo tozalaki kolinga mingi ebebisami.
12 Ee Yehova, liboso ya makambo yango nyonso, okokanga kaka motema?
Okotikala nyɛɛ mpe okotika biso tómona mpasi koleka ndelo?+
65 “Nandimaki koyanola baoyo balukaki litambwisi na ngai te;
Natikaki baoyo balukaki ngai te bámona ngai.+
Nalobaki boye na ekólo oyo ezalaki kobelela nkombo na ngai te: ‘Ngai oyo, ngai oyo!’+
2 Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato ya motó makasi,+
Epai ya baoyo bazali kotambola na nzela oyo ezali malamu te,+
Baoyo bazali kolanda makanisi na bango moko;+
3 Bato oyo bazali ntango nyonso kofinga ngai na miso na ngai,+
Bazali kopesa mbeka na bilanga+ mpe bazali kobimisa milinga ya mbeka likoló ya babriki.
Mpe bazali kolekisa butu na bisika oyo ebombani,*
Bazali kolya mosuni ya ngulu,+
Mpe supu ya biloko ya mbindo ezali na bambɛki na bango.+
5 Bazali koloba ete: ‘Fandá esika oyo ozali; kopusana pene na ngai te,
Mpo nazali mosantu koleka yo.’*
Baoyo wana bazali milinga na zolo na ngai, mɔtɔ oyo ezali kopela mokolo mobimba.
6 Talá! Ekomami liboso na ngai;
Nakokanga monɔkɔ te,
Nakopesa bango etumbu,+
Nakopesa bango etumbu mpo na likambo nyonso*
7 Mpo na mabunga na bango moko mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na bango,+ Yehova alobi bongo.
“Lokola babimisi milinga ya mbeka na bangomba
Mpe basambwisi ngai na bangomba mike,+
Ya liboso nakopesa bango etumbu mpo na misala na bango nyonso ya mabe.”*
8 Talá oyo Yehova alobi:
“Kaka ndenge vinyo ya sika ezwamaka na etuka
Mpe moto moko alobi ete: ‘Kobebisa yango te, mpo eloko moko ya malamu* ezali na kati,’
Ndenge wana nde nakosala mpo na basaleli na ngai;
Nakoboma bango nyonso te.+
Mpe na Yuda moto oyo akozwa libula na bangomba na ngai;+
Bato oyo naponi bakozwa yango,
Mpe basaleli na ngai bakofanda kuna.+
10 Sharone+ ekokóma esika bampate ekolya matiti
Mpe Lobwaku* ya Akore+ ekokóma esika ya bangɔmbɛ,
Mpe bato na ngai oyo bakoluka ngai bakopema.
11 Kasi bozali na kati ya baoyo bazali kosundola Yehova,+
Baoyo bazali kobosana ngomba mosantu na ngai,+
Baoyo bazali kotyela nzambe ya Makila Malamu biloko na mesa,
Mpe baoyo bazali kotondisela nzambe ya Makambo Nyonso Etángamá vinyo oyo esangisami.
Mpe bino nyonso bokogumbama mpo bóbomama,+
Mpo nabengaki, kasi boyanolaki te,
Nalobaki, kasi boyokaki te;+
Bokobaki kosala oyo ezali mabe na miso na ngai,
Mpe boponaki likambo oyo esepelisaka ngai te.”+
13 Na yango talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Talá! Basaleli na ngai bakolya, kasi bino bokozala na nzala.+
Talá! Basaleli na ngai bakomɛla,+ kasi bino bokozala na mposa ya mai.
Talá! Basaleli na ngai bakosepela,+ kasi bino bokozala na nsɔni.+
14 Talá! Basaleli na ngai bakoganga na esengo na ndenge bakoyoka malamu na motema,
Kasi bino bokoganga mpo na mpasi na motema
Mpe bokoganga na kolela mpo elimo elɛmbi.
15 Nsima na bino bokotika nkombo oyo bato oyo naponi bakosalela mpo na kolakela mabe,
Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akoboma bino mokomoko,
Kasi akobenga basaleli na ye na nkombo mosusu;+
16 Mpo ete moto nyonso oyo akoluka kozwa lipamboli na mabele
Nzambe oyo alobaka solo* akopambola ye,
Mpe moto nyonso oyo akolapa ndai na mabele
17 Mpo talá nazali kozalisa likoló ya sika mpe mabele ya sika;+
Makambo ya kala ekokanisama lisusu te,
Mpe ekoya na motema te.+
18 Na yango bósepela, mpe bózala na esengo libela mpo na oyo nazali kozalisa.
Mpo talá nazali kozalisa Yerusaleme mpo ezala eloko oyo ezali kopesa esengo
Mpe bato na yango mpo bázala ntina ya kosepela.+
19 Nakozala na esengo mpo na Yerusaleme mpe nakosepela na bato na ngai;+
Makɛlɛlɛ ya kolela to makɛlɛlɛ ya komilelalela ekoyokana lisusu te epai na ye.”+
20 “Na esika oyo, ekozala lisusu te na mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ oyo akozala na bomoi kaka mikolo moke,
To mobange akokufa te liboso ete bambula na ye ekoka.
Mpo moto nyonso oyo akokufa na mbula nkama bakotalela ye ete azalaki naino elenge,
Mpe mosumuki akolakelama mabe ata soki azali na mbula nkama.*
22 Bakotonga te mpo moto mosusu afanda kuna,
Bakolona te mpo moto mosusu alya.
Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete,+
Mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.
23 Bakoboma nzoto* mpamba te,+
Bakobota mpo na kotungisama te,
Mpo bango ná bana* na bango+ bakozala libota ya bato oyo Yehova apamboli.+
24 Liboso ete bábelela, ngai nakoyanola;
Ntango bazali naino koloba, ngai nakoyoka.
25 Mbwa ya zamba mpe mwana-mpate bakolya esika moko,
Nkɔsi ekolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ,+
Mpe bilei ya nyoka, ekozala putulu.
Bakosala mabe te mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba na ngai mosantu mobimba,”+ Yehova alobi bongo.
66 Talá oyo Yehova alobi:
“Likoló ezali kiti ya bokonzi na ngai, mpe mabele ezali ebonga ya makolo na ngai.+
2 “Lobɔkɔ na ngai nde esalá biloko oyo nyonso,
Mpe bongo nde yango nyonso ebimaki,” Yehova alobi bongo.+
“Yango wana, nakotala nde moto oyo:
Moto ya komikitisa mpe oyo motema etutami oyo alɛngaka* mpo na liloba na ngai.+
3 “Moto oyo azali koboma ngɔmbɛ azali lokola moto oyo azali koboma moto.+
Moto oyo azali kopesa mbeka ya mpate azali lokola moto oyo azali kobuka nkingo ya mbwa.+
Moto oyo azali kopesa likabo azali lokola moto oyo azali kopesa makila ya ngulu!+
Moto oyo azali kotumba olibana ya ekaniseli+ azali lokola moto oyo azali kopambola na maloba ya maji.*+
Baponi banzela na bango moko,
Bazali kosepela* na biloko ya bosɔtɔ.
Mpo ntango nabengaki, moto moko te ayanolaki;
Ntango nalobaki, moto moko te ayokaki.+
Bakobaki kosala oyo ezali mabe na miso na ngai,
Mpe baponaki kosala likambo oyo nasepelaki na yango te.”+
5 Bóyoka liloba ya Yehova bino baoyo bolɛngaka mpo na* liloba na ye:
“Bandeko na bino oyo bazali koyina bino, oyo bazali kobengana bino mpo na nkombo na ngai, balobaki ete: ‘Yehova akumisama!’+
Kasi akomonana mpe akomemela bino esengo,
Mpe bango nde bakoyoka nsɔni.”+
6 Makɛlɛlɛ ya yikiyiki ezali kouta na engumba, makɛlɛlɛ ezali kouta na tempelo!
Ezali makɛlɛlɛ ya Yehova oyo azali kofuta banguna na ye eloko oyo ebongi na bango.
7 Liboso kutu abanda koyoka mpasi ya kobota, abotaki.+
Liboso kutu mpasi ya kobota eyela ye, abotaki mwana mobali.
8 Nani ayoká likambo ya boye?
Nani amoná makambo ya boye?
Mokili ekobotama nde na mokolo moko?
To ekólo ekobotama nde na mbala moko?
Kasi ntango kaka Siona akómaki na mpasi ya kobota abotaki bana na ye.
9 “Nakotika ete zemi ekóma tii na nsuka, bongo na nsima napekisa ete mwana abotama?” Yehova alobi bongo.
“Nakopekisa nde mwasi oyo azali na mpasi ya kobota abota te?” Nzambe na yo alobi bongo.
10 Bósepela elongo na Yerusaleme mpe bózala na esengo elongo na ye,+ bino nyonso oyo bolingaka ye.+
Bósepela mingi mpenza elongo na ye, bino nyonso oyo bozali kolela ye,
11 Mpo bokomɛla mpe bokotonda libɛlɛ ya libɔndisi mobimba oyo euti na ye,
Bokomɛla mpenza mpe bokoyoka esengo makasi na ebele ya nkembo na ye.
12 Mpo talá oyo Yehova alobi:
“Talá nazali kopesa ye kimya oyo ekozala lokola ebale+
Mpe nkembo ya bikólo lokola mokɛli oyo mai ezali kotíyola.+
Bokomɛla libɛlɛ mpe bokomemama na loketo,
Mpe bakopumbwisa bino na mabɔlɔngɔ.
Ndenge mama abɔndisaka mwana na ye;
Mpe bokobɔndisama mpo na Yerusaleme.+
14 Bokomona yango, mpe motema na bino ekosepela,
Mikuwa na bino ekokola lokola matiti ya sika.
15 “Mpo Yehova akoya lokola mɔtɔ,+
Mpe makalo na ye ezali lokola mopɛpɛ makasi,+
Mpo na kopesa etumbu na nkanda na ye makasi,
Mpo na kopamela na lolemɔ ya mɔtɔ.+
16 Mpo, na mɔtɔ, ɛɛ na mopanga,
Yehova akopesa bato nyonso* etumbu;
Mpe baoyo Yehova akoboma bakozala ebele mpenza.
17 “Baoyo bazali komisantisa mpe komipɛtola mpo na kokɔta na bilanga*+ na nsima ya oyo azali na katikati, baoyo bazali kolya mosuni ya ngulu,+ biloko ya bosɔtɔ mpe mpoko,*+ bango nyonso bakosila,” Yehova alobi bongo. 18 “Lokola nayebi misala mpe makanisi na bango nyonso, nazali koya koyanganisa bato ya bikólo nyonso mpe minɔkɔ nyonso; bakoya mpe bakomona nkembo na ngai.”
19 “Nakotya elembo kati na bango, mpe bato mosusu na kati ya baoyo babiki, nakotinda bango na bikólo—na Tarasisi,+ na Pulu mpe na Ludi,+ baoyo babendaka litimbo, na Tubale ná Yavane,+ mpe na bisanga ya mosika—baoyo bayoká nsango na ngai te mpe bamoná nkembo na ngai te; mpe bakoyebisa nkembo na ngai na kati ya bikólo.+ 20 Bakouta na bandeko na bino nyonso na bikólo nyonso+ mpe bakomema bango epai ya Yehova, lokola likabo likoló ya bampunda, na makalo, na bapusu oyo ezipami, likoló ya badɔngi,* likoló ya bakamela oyo ezali na mbangu, na ngomba na ngai mosantu, Yerusaleme,” Yehova alobi bongo, “kaka ndenge bato ya Yisraele bayaka na likabo na bango na kati ya mbɛki ya pɛto mpo na kokɔta na ndako ya Yehova.”
21 “Nakozwa ndambo bázala banganga-nzambe mpe basusu Balevi,” Yehova alobi bongo.
22 “Mpo kaka ndenge likoló ya sika mpe mabele ya sika+ oyo nazali kosala etɛlɛmi liboso na ngai,” yango nde liloba ya Yehova, “ndenge wana nde libota* na yo mpe nkombo na yo ekotikala.”+
23 “Mpe banda sanza ya sika tii sanza ya sika mpe banda sabata tii sabata,
24 “Bakobima mpe bakotala bibembe ya bato oyo batombokelaki ngai;
Mpo nkusu likoló na bango ekokufa te,
Mpe mɔtɔ na bango ekobomama te,+
Mpe bakokóma eloko ya bosɔtɔ epai ya bato nyonso.”*
Elimboli, “lobiko ya Yehova.”
To, “eyebi nkolo na yango te.”
Lil., “bafini yango te.”
To, “ndako ya matiti.”
To, “mateya.”
To, “molimo na ngai eyini.”
To, “masanga na bino ya blé.”
Lil., “Nakobalusela yo lobɔkɔ na ngai.”
Ekoki kozala banzete mpe bilanga oyo ezali na boyokani na losambo ya bikeko.
To, “mateya.”
To, “ekogumbama.”
To, “ekokitisama.”
Na bisika mosusu babengaka yango bampuku.
To, “bato oyo bazali lokola bana mike.”
Lil., “Bazali kotomboka na miso na ye ya nkembo.”
Lil., “bakolya mbuma ya misala na bango.”
Lil., “batɛlɛmisi nkingo na bango.”
Bisika mosusu babengaka yango mpe lipata to panda.
Elingi koloba, “elamba oyo batyaka na ntolo.”
Lil., “bandako ya molimo.”
To, “bilamba ya nse.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, ezali kosambwa oyo eyaka soki moto abali te mpe azali na bana te.
Lil., “nyɛi.”
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bato na yango ya lokumu.”
To, “bosembo.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ekateli; toli.”
To, “mateya.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
Lil., “mongongo ya ye oyo azalaki kobenga.”
Lil., “nazangi maloba.”
To mbala mosusu, “bakokaki.”
Elimboli, “kaka bato oyo batikali nde bakozonga.”
To, “tótya bandelo na bifelo na yango.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Elimboli, “Nzambe azali elongo na biso.”
To, “mabwaku ya mokɛli.”
Elingi koloba, “Efratɛ.”
Lil., “na ekomeli ya moto mowei mpamba.”
To mbala mosusu, “kowela mpo na kopunza.”
Lil., “nabɛlɛmaki pene na.”
Elingi koloba, “mwasi ya Yisaya.”
Shiloa ezalaki nzela oyo mai elekaka.
Elingi koloba, “Efratɛ.”
Talá Yisaya 7:14.
To, “bómikanga loketo.”
Maloba ya Ebre “Nzambe azali elongo na biso” ezali Emanuele. Talá Yisaya 7:14; 8:8.
To, “litatoli yango.”
To, “mateya.”
To, “nakozela na mposa makasi.”
To, “litatoli yango.”
Lil., “pole ya ntɔngɔntɔngɔ te.”
To, “guvɛrnema; boyangeli ya nkumu.”
To, “guvɛrnema; boyangeli ya nkumu.”
Lil., “na nsima.”
To, “etumbu.”
To, “nkembo.”
To, “bikeko oyo eyemami.”
Lil., “nakopesa.”
To, “zála.”
Elingi koloba, “bato ya moto ya Asiri.”
Lil., “mafutamafuta.”
To, “banda na molimo tii na mosuni.”
To, “sóka; epasola.”
To, “elimo.”
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To mbala mosusu, “mwana-ngɔmbɛ ná nkɔsi ekolya elongo.”
To, “bikólo ekoluka ye.”
Elingi koloba, Babilonia.
To, “bokonzi na bango ekokóma tii na Edome ná Moabe.”
To mbala mosusu, “akokaukisa.”
Lil., “lolemo.”
Elingi koloba, “Efrate.”
To, “elimo.”
To mbala mosusu, “akobɛta na kati ya.”
“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “Nakobɛta miziki mpo na.”
Lil., “mwasi oyo afandi.” Ezali kolobela ekólo mobimba, oyo ezali elilingi ya mwasi.
Lil., “bato na ngai oyo basantisamá.”
Lil., “Kesile na yango,” mbala mosusu ezali kolobela Orion mpe maboke oyo ezali zingazinga.
To, “kitoko.”
To mbala mosusu, “bademo na ndenge ya bantaba.”
To, “bambulú.”
To, “akopemisa bango.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bantaba nyonso ya mibali.”
To, “ekitisami na Nkunda.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ndako.”
To, “etape.”
Lil., “toli oyo epesamaki.”
To, “ezali pene ya kobɛta.”
To, “nyoka ya ngɛngɛ oyo etambolaka mbangumbangu.”
To, “ndako.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo na ye ezali.”
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “zála.”
To, “bitape na yango oyo etondi na mbuma ya vinyo ya motane.”
To mbala mosusu, “koganga ya etumba ekiti na eleko na yo ya molunge mpe na eleko na yo ya kobuka mbuma.”
To, “atángaka yango malamumalamu ndenge moto oyo azwaka lifuti asalaka.” Elingi koloba, “mbula misato mpenza.”
Lil., “bana ya Yisraele.”
To, “Lobwaku patatalu.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “nzambe mopaya.”
Lil., “ekólo oyo ebendaná mpe engɛngaka.”
To, “ekólo oyo elendá, oyo enyatanyataka.”
To mbala mosusu, “nakotala uta na.”
Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
Lil., “ekólo oyo ebendaná mpe engɛngaka.”
To, “ekólo oyo elendá, oyo enyatanyataka.”
Lil., “Baoyo basalaka bilamba ya mpɛmbɛ na nsingansinga.”
To, “Molimo na bango ekoyoka mawa.”
To, “Memfisi.”
To mbala mosusu, “etape ya nzete ya mbila to matiti oyo ebotaka pembeni ya mai.”
To, “Komanda.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Biteni mosusu ya nzoto ezipamaki te.”
Lil., “bolumbu.”
To, “oyo bazalaki kosepela na kitoko na yango.”
Ekoki kozala ete “ezali kolobela etúká ya Babilonia ya kala.”
Lil., “Loketo na ngai etondi na mpasi.”
Ezali lolenge moko ya mpunda ya monene oyo bato bakoki kosalela mpo na kokima mbangu.
To, “bikeko na bango moko oyo eyemami.”
Lil., “Mwana.”
Elimboli, “kofanda nyɛɛ.”
To, “Atángaka yango malamumalamu ndenge moto oyo azwaka lifuti asalaka”; elingi koloba, mbula moko mpenza.
Na ntembe te, ezali kolobela Yerusaleme.
Maloba ya ntɔki mpo na kolobela moto, mbala mosusu komonisa mawa to komitya na esika ya moto.
To, “ebongisi.”
To, “mabwaku ya patatalu.”
To, “batambwisi-mpunda bakotɛlɛma.”
To, “libateli.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “esika na ye ya kofanda.”
Lil., “kilo.”
Lil., “Momboto.”
Elingi koloba, “lobɔkɔ ya ebale Nile.”
Lil., “bangɔndɔ.”
To mbala mosusu, “libongo.”
Lil., “mikolo.”
To, “mabele.”
To mbala mosusu, “ekauki.”
To, “ya kala.”
To mbala mosusu, “ekauki.”
To, “kokimela.”
To, “na wɛsti.”
To, “na ɛsti.”
To, “Kitoko.”
To, “Batoli.”
To, “ya vinyo oyo mbɔtɔ elalá na nse.”
Lil., “akomɛla.”
Elingi koloba, “Moabe.”
To mbala mosusu, “baoyo makanisi na bango etengatengaka te.”
“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “patatalu.”
To, “molimo na biso ezali.”
To, “Na molimo na ngai nayoki.”
Lil., “Ebembe na ngai.”
To mbala mosusu, “mamwɛ ya yengolongonda.”
To, “ekobota baoyo bazangi makasi kati na liwa.”
To, “makaneli.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Ekoki kozala ete ezali kolobela Yisraele, awa emonisami na mwasi mpe bakokanisi yango na elanga ya vinyo.
Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, Efrate.
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ekɔti ya bokonzi.” Ekoki kozala ete ezali kolobela engumba mokonzi, Samaria.
To, “lolendo.”
To, “lolendo.”
To, “nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka.”
Lil., “mbɛbu ya likukuma.”
To, “nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “tomoná emonaneli.”
To, “nsinga ya nivo.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “ntango bakokanga ntina, bakotonda na nsɔmɔ.”
To, “molekani.”
To, “lobwaku patatalu.”
To, “mabele mobimba.”
To, “apesaka ye disiplini.”
To, “oyo bwanya na ye ezali mingi mpenza.”
Ekoki mpe kolimbola, “esika etumbelo ya mɔtɔ ya Nzambe ezali,” ekoki kozala ete ezali kolobela Yerusaleme.
Lil., “bapaya.”
To, “molimo na ye ezali na eloko te.”
To, “mpe molimo na ye ekauki.”
To, “bozoba ya ndenge nini bozali na yango.”
To, “mabele ya lima.”
Lil., “moto oyo apamelaka.”
Lil., “elongi na ye ekokóma puu te.”
Lil., “basopaka likabo ya masanga.” Ekoki mpenza kozala ete ezali kolobela kosala boyokani.
To, “kozanga kotuna monɔkɔ na ngai.”
Lil., “na esika makasi ya libateli ya Farao.”
To, “nyoka ya ngɛngɛ oyo etambolaka mbangumbangu.”
To, “mateya.”
Lil., “ya elɛngi.”
To mbala mosusu, “libulu.”
To, “kokoba kozela.”
To, “kozela ye na mposa makasi.”
To, “oyo eyemami.”
To, “oyo enyangwisami.
To mbala mosusu, “okobenga yango bosɔtɔ.”
Lil., “mafuta mpe mafutamafuta.”
To, “mpema.”
Lil., “kiyungulu oyo ezangi ntina.”
To, “bamisantisaka.”
To, “makɛlɛlɛ ya.”
“Tofete.” Awa esalelami na ndenge ya elilingi lokola esika ya kotumba, mpo na komonisa libebi.
To, “batambwisi-mpunda.”
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To, “mɔtɔ.”
To, “esika ya libateli.”
To, “Esika ya kokima.”
To, “kosala misala ya kobanga Nzambe te.”
To, “molimo ya moto oyo azali na nzala ekufa.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kofungola.”
Lil., “lobɔkɔ.”
Ezali kolobela monguna.
To mbala mosusu, “ekauki.”
To, “esika makasi oyo etombwaná.”
To, “okomanyola.”
Lil., “mozindo.”
To, “ekokwea.”
Ekoki mpenza kozala ete ezali kolobela Bozera, engumba mokonzi ya Edome.
Lil., “mabanga.”
To, “bambulú.”
To mbala mosusu, demo na lolenge ya ntaba.
To, “zála.”
Lil., “ekokabolela yango na nsinga ya komeka.”
To, “bambulú.”
To, “ya kotambola.”
To, “kokimela.”
To, “kapita ya bapesi masanga.”
To, “Siri.”
Elingi koloba, “Ebre.”
Lil., “bóluka lipamboli mpe bóbima epai na ngai.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ndako.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kofinga.”
Lil., “bana bakómi pene na kobima na libumu.”
Lil., “nazali kotya elimo moko kati na ye.”
To, “banzela ya mai ya Nile.”
Elingi koloba, “Ezekiasi.”
To, “biloko oyo ekokola oyo euti na mbuma oyo ekweaki.”
Lil., “na mikolo na yo.”
Mbala mosusu bazalaki kosalela eskalye yango mpo na kotala esika elili ekómi mpo na koyeba ngonga.
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
Lil., “kɔtelá ngai.”
To, “malɛmbɛmalɛmbɛ.”
To, “bololo ya molimo na ngai.”
Elingi koloba, maloba mpe misala ya Nzambe.
To, “Olongoli masumu na ngai nyonso na miso na yo.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “asepelaki na bango.”
To, “ndako ya mokonzi.”
To, “ndako ya mokonzi.”
To, “solo.”
Lil., “mikolo na ngai.”
To, “bóloba na boboto na.”
To, “mbala mibale.”
Lil., “mosuni nyonso ekomona.”
Lil., “mosuni nyonso ezali.”
To, “elimo.”
Ntaka oyo ezali kobanda na nsuka ya mosapi ya monene tii na mosapi ya nsuka ya moke ntango lobɔkɔ ezali ya kofungwama. Talá Ap. B14.
To mbala mosusu, “nani akangá ntina.”
To, “ekoki te kopesa nkoni oyo ebongi mpo na kopelisa mɔtɔ.”
To, “ekeko oyo enyangwisami.”
To, “ekeko oyo eyemami.”
To, “etando.”
Na bisika mosusu babengaka yango, mapalela to mankɔkɔ.
To, “bayangeli.”
To, “makasi.”
To, “uta na ɛsti.”
Lil., “na makolo na Ye.”
Eloko moko ya ebende esika bazalaki kotutatuta ebende mpe kobongisa yango.
Lil., “momboto.”
Elingi koloba, “moto oyo azangi libateli mpe moto mpamba.”
Lil., “ya liboso.”
To, “mpo tótya motema.”
To, “uta na ɛsti.”
To, “bayangeli-basungi.”
To, “ya konyangwa.”
To, “molimo na ngai endimi.”
To, “mateya.”
To, “nakabolaka.”
To, “bikeko oyo eyemami.”
To, “nakokimela.”
To, “mokili.”
To, “bikeko oyo eyemami.”
To, “bikeko ya konyangwa.”
To, “mateya.”
To, “mateya.”
To, “molimo.”
Lil., “momboto.”
Mbala mosusu ezali kolobela makambo ya liboso oyo ekosalema na mikolo ezali koya.
To, “bótyela ngai motema.”
To, “bambulú.”
ya nsolo mpimbo.
To, “misala ya botomboki.”
Ekoki kolobela, “bateyi ya mibeko.”
To, “banda kobotama na yo.”
Elimboli, “moto ya sembo, ebengeli ya lokumu mpo na Yisraele.”
To, “mabele oyo ezali na mposa ya mai.”
Lil., “momboto.”
To, “oyo eyemami.”
Elingi koloba, “bikeko.”
To, “ekeko oyo enyangwisami.”
To, “etumbelo.”
To, “ekeko oyo eyemami.”
To, “eteni ya nzete ya kokauka.”
To, “bato ya bilobaloba.”
Lil., “mpo na kofungola mikaba na loketo ya bakonzi.”
Lil., “nakokanga yo loketo mpenza.”
To, “banda na ɛsti tii na wɛsti.”
To, “kobendana.”
To, “mabele ya lima.”
To, “Moto oyo asalaki yango.”
To mbala mosusu, “mabele ya lima ekoki nde koloba, mosala na yo ezali na bisimbeli te.”
To, “ozali na mpasi ya kobota nini.”
To mbala mosusu, “basali.”
To mbala mosusu, “bato ya mombongo.”
To mbala mosusu, “ezala mpamba.”
Lil., “momboto.”
To, “ekeko oyo eyemami.”
Lil., “momboto.”
Elingi koloba, “bikeko oyo banyama ememi.”
Lil., “bagumbamelaka yango.”
Lil., “ya liboso.”
To, “mokano; toli.”
To, “ɛsti.”
To, “mokano; toli.”
Lil., “bozali na nguya na motema.”
To mbala mosusu, “nakokutana na moto moko te na boboto.”
To, “mokonzi-mwasi.”
To mbala mosusu, “atako.”
To, “okoyeba te ndenge ya kopɛngola yango na nzela ya maji.”
To mbala mosusu, “baoyo bakabolaka likoló, bato ya astroloji.”
Lil., “na etúká na ye moko.”
To mbala mosusu, “baoyo bouti na.”
Lil., “ya liboso.”
To, “ekeko oyo eyemami.”
To, “ekeko oyo enyangwisami.”
To, “natalitali yo.” To mbala mosusu, “naponi yo.”
To, “nakabolaka nkembo na ngai na moto mosusu te.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “momboto na yo ekómi.”
To, “Yehova nde akomonisela ngai bosembo.”
To, “akopesa ngai mbano.”
To mbala mosusu, “mwa bangomba oyo ezali polele.”
Lil., “ntolo.”
Lil., “mosuni nyonso ekoyeba.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “lolemo oyo eteyami malamu.”
To mbala mosusu, “mpo napesa moto oyo alɛmbi makasi.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kobunda na ngai.”
To, “tótalana.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “abotaki bino na mpasi.”
To, “nguya.”
To, “ekobukana te.”
To, “mateya.”
To mbala mosusu, “mosɔpi.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ekozala na motó.”
To, “kokimela.”
To, “moto oyo azalaki kotya yo nkaka.”
Lil., “na motó ya banzela nyonso.”
To, “na miso.”
To, “bolongi.”
To, “bakozanga maloba.”
To mbala mosusu, “likambo oyo toyoki.”
“Ye” ekoki komonisa moto moko boye to mpe Nzambe.
To, “azali ata na lolenge moko te oyo ekoki kosepelisa biso.”
To, “oyo ayebaki.”
To mbala mosusu, “azalaki lokola moto oyo bato balongolaki bilongi na bango epai na ye.”
To, “lolenge ya bomoi na ye.”
To, “abɛtamaki tii na liwa.”
To, “moto moko akopesa ye lilita na ye.”
To, “moto moko ya bozwi.”
To, “mobulu te.”
To, “kasi Yehova asepelaki na.”
To, “molimo.”
To, “momboto.”
To, “mokano.”
To, “motungisi ya molimo na ye.”
To, “nkolo.”
To, “nkolo.”
Lil., “oyo atungisamá na elimo.”
To, “mabanga ya mɔtɔ.”
Lil., “bósomba.”
Lil., “bósomba.”
Lil., “na biloko ya mafuta.”
Ezali kolobela Yakobo to Yisraele.
To, “akolimbisa na motema mobimba.”
To, “mokano na ngai.”
To, “ekosala nkombo mpo na.”
To mbala mosusu, “mpo na kokima mpasi.”
Elingi koloba, “na nkunda.”
To, “mabwaku ya mikɛli.”
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “nasengeli nde komibɔndisa.”
Mbala mosusu ezali kolobela losambo ya bikeko.
To mbala mosusu, “mokonzi.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “olɛmbaki te.”
Lil., “namibombaki.”
To, “nakopesa ye lisusu lifuti.”
To, “tomonisaka molimo na biso mpasi.”
To, “bisengo na bino moko.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mosuni na yo.”
To, “milimo oyo ezali na mpasi.”
Lil., “ozongisi lokolo na yo nsima.”
To, “bisengo na yo moko.”
Lil., “litoi na ye ezali kilo mingi te mpo na koyoka.”
To, “mpamba.”
To, “etupa.”
To, “bosembo.”
To, “bosembo.”
Lil., “mpe ezalaki mabe na miso na ye.”
To, “bolongi mpo na ye.”
To, “bolongi.”
To, “kazaka ezangá mabɔkɔ.”
Lil., “momboto.”
Lil., “momboto ya momboto na yo.”
To, “epai ya kongɛnga na yo ya ntɔngɔ.”
Lil., “yo.”
To, “ndako na ngai ya kitoko.”
To, “na minɔkɔ ya ndako ya bibenga.”
To, “lokola na ebandeli.”
To, “akokómisa yo kitoko.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mpo akóma kitoko.”
To, “bozwi.”
Lil., “momboto.”
Lil., “momboto.”
To, “molimo na ngai ekozala.”
To, “kazaka ya bosembo oyo ezangá mabɔkɔ.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ekɔti ya bokonzi.”
To mbala mosusu, “ya motane oyo ezali kongɛnga.”
To, “bolongi.”
To, “bakokosa te.”
To, “oyo alekisaki lobɔkɔ na ye ya kitoko na lobɔkɔ mobali ya Moize.”
To, “mai mozindo.”
To, “ya kitoko.”
To, “kitoko.”
To, “makɛlɛlɛ ya libumu na yo.”
To, “kosala ete.”
Lil., “ozali kokómisa.”
To, “mosɛnzu.”
To, “baoyo bazali kozela ye na motema molai nyonso.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “onyangwisaki biso.”
Lil., “na lobɔkɔ ya.”
To, “mabele ya lima.”
To, “Moto oyo asalaki biso.”
To, “kitoko.”
To mbala mosusu, “bazali kokɛngɛla na mwa ndako ya matiti.”
To mbala mosusu, “nakopesa yo bosantu na ngai.”
To, “nakofutisa bango na ntolo na bango.”
To, “nakofutisa bango na ntolo na bango.”
Lil., “lipamboli.”
Lil., “momboto.”
To, “Lobwaku patatalu.”
To, “bosembo.” Lil., “Amen.”
To, “bosembo.” Lil., “Amen.”
To, “mitungisi.”
To mbala mosusu, “moto oyo akokokisa mbula nkama te, akotalelama lokola moto oyo alakelami mabe.“
To, “bakosala mosala makasi.”
Lil., “momboto.”
To, “amitungisaka.”
To mbala mosusu, “moto oyo azali kosanzola ekeko.”
To, “molimo na bango ezali kosepela.”
To, “bomitungisaka mpo na.”
To, “nguya.”
Lil., “mosuni nyonso.”
Elingi koloba, “bilanga oyo ezalaki kosalelama mpo na losambo ya bikeko.”
Na bisika mosusu babengaka yango mpuku.
Dɔngi ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.
Lil., “momboto.”
To, “kosambela.”
Lil., “mosuni nyonso.”